Kobelema Penepene na Nzambe
Mobikisi na biso alingi biso tolinga ye na bosolo na lolenge oyo biso topesi bolingo na biso na ya ye.
Nkoko na biso ya mobali ya mibu motoba, Oli, oyo abengaka ngai na bolingo “Poppy,” asengelaki kozwa eloko moko na motuka. Tata na ye afandaki na kati ya motuka mpe, kozanga Oli ayeba, afungolaki monoko ya motuka na mosika ntango Oli abelemaki na yango, nsima akangaki yango lisusu ntango asilisaki. Oli nsima akimaki na kati na koseka makasi!
Libota mobimba etunaki ye, “Boniboni asalaki monoko ya motuka efungwama mpo nayo, nsima mpona okanga lisusu?” Asekaki kaka.
Mwana wa biso ya mwasi, mama wa ye, alobaki, “Ntango mosusu ezali lokola soki Poppy asalaki yango—ntango mosusu ozali na nguya ya kindoki lokola ye!”
Ntango ekomaki mbala ya mibale mwa miniti nsima, eyano na ye ya mituna ya nsima etali bokoki na ye ya sika ezalaki: “Ezali ya kokamwa! Nakanisi ezali mpamba te Poppy alingaka ngai mpe azali moko ya baninga ba ngai ya malamu mingi koleka, mpe azali kobatela ngai!”
Napambolami na koyeba makambo ya kokamwa mpenza na bomoi ya Basantu ba botongono na kati ya Afrika, Papua Nouvelle Guinée, Australie, Nouvelle Zelande, mpe esanga ya Pasifik. Nandimi na Oli—Nakanisi ezali mpamba te bato baye ya botongono bayoki lolenge moko etali Tata wa lola mpe Mobikisi lokola Oli azali koyoka etali ngai. Balingi Nzambe lokola moninga moko ya pene, mpe Ye azali kobatela bango.
Bandimi ya Eklezia eye bakoki na yango, mpe mingi bazali kozwa litatoli moko ya molimo mpe bazali kosala mayokani ma bule mpo na kolanda Nkolo. Atako yango, boko bazali kokende epai na Ye kasi basusu te. Na lingomba kani bozali?
Nzambe asengeli kozala na katikati ya makambo na biso—lotomo na biso ya monene mpenza. Ezali Ye? To ezali Ye ntango mosusu mosika na makanisi mpe bamposa ya mitema na biso? (tala Mosiya 5:13). Yeba ete ezali te kaka makanisi ya motema na biso oyo ezali na motuya kasi “bamposa.” Boniboni ezaleli mpe misala na biso elakisi bosembo ya makanisi na biso?
Mwana mobali wa biso Ben, ntango azalaki na mibu16 mpe alobaki na likita ya likonzi, atunaki motuna. “Okoyoka boniboni soki moto moko alakaki yo eloko moko mposo na mposo mpe akokisaki ata mbala moko te elaka na ye? Akobaki, “Tozwaka lokola likambo ya solo elaka tokosalaka ntango tokabolaka elambo mpe boyokani ya kobatela mitindo na Ye mpe ntango inso komikundola Ye?”
Nkolo apesi biso banzela mpo na kosalisa biso komikundola Ye mpe banguya na Ye ya kosunga. Lolenge moko ezali na nzela ya likabo tokokabolaka elongo ezali—bokesani (tala Alama 32:6). Ntango natali nsima na mikakatano na kutanaki na yango, ezali polele ete yango epesaki mbano ya bokoli, bososoli, mpe mawa. Yango ebelemisaki ngai penepene na Tata wa ngai ya lola mpe Mwana wa Ye, elongo na mayele mpe bopeto ekomami na kati ya motema na ngai.
Toli mpe mateya ya Nkolo ezali ya ntina. Asalisaki ndeko ya mobali botongono ya Yalede na kokokaka moko ya mimekano ntango Ya alobaki na ye boniboni kozwa mopepe ya sika na kati ya masuwa oyo etongamaki na botongono (tala Etele 2:20). Kasi, na ntina, Nkolo atikaki naino kaka te akoka momekano te ya boniboni kopesa pole, kasi Ye nde alakisaki yango polele ete Ye, Nkolo, akotika mimekano mpe mikakatano oyo esengelisaka ye akoka yango. Ye, ntango mosusu, alingaki kotinda mipepe, mvula, mpe mpela (tala Etele 2:23–24).
Ntina nini Ye asalaki yango? Mpe ntina nini Ye akebisi moko na moko na biso mpo na kolongola bisomei na liziba ya likama ntango Ye akokaki bobele kokanga likama na koya? Mokambi Wilford Woodruff alobaki lisolo ya kokebisaka na molimo mpo na kolongola likalo oyo, mwasi wa ye, mpe bana ba ye balalaki na kati, bobele mpo na koyeba ete ekumbaki moko mwa ntango nsima elongolaki nzeta moko monene mpe ebwakaki yango mpenza wapi lokalo ezalaki liboso ya kotelema (Tala Teachings of Presidents of the Church: Wilford Woodruff [2004], 47).
Babale na bisika wana, ntango ekokaki kokokisama mpo na kolongola Makama. Kasi awa ezali liteya— esika ya kokoka momekano Yemei, Nkolo alingi biso tokolisa bondimi oyo ekosalisa biso koyekama na Ye mpo na kokoka nkokoso mpe kondimela Ye. Nde tokoki koyoka bolingo na Ye na sikisiki mingi koleka, na nguya mingi koleka, na polele mingi koleka, na yomei mingi koleka Tokokoma moko na Ye, mpe tokoki kokoma lokola Ye. Mpo na biso kozala kokola Ye ezali lotomo na Ye. Ya solo, ezali nkombo na Ye mpe mosala mwa Ye (tala Moses 1:39).
Mwana mobali moko azalaki komeka kokomisa peto esika ya salite nsima ya ndako na ye mpo ete akoka kosakana na mituka mike ya ye. Ezalaki na libanga moko monene ekangaki kosala na ye. Mwana mobali apusaki mpe abendaki na makasi na ye nyonso, kasi atako amekaki makasi, libanga eninganaki te
Tata wa ye atalaki mwa ntango nsima apusanaki na mwana mobali mpe alobaki, “Osengeli kosalela makasi na yo nyonso mpo na kolongola libanga ya monene boye.”
Mwana mobali ayanolaki: “ Nasalaki makasi na ngai nyonso!”
Tata wa ye asembolaki ye: “Te osali yango te. Ozwi lisalisi na ngai naino te”
Nde bakitaki elongo mpe balongolaki libanga na pete.
Tata ya moninga wa ngai Vaiba Rome, Mokambi ya Likonzi ya yambo na Papua na Nouvelle Guinée, oyo ateyamaki ete akokaki kobaluka na Tata na ye na Lola na ntango ya mposa.Ye mpe baninga na ye na mboka bakokaki kobika bobele na nzela ya bilanga balonaki. Mokolo moko, apelisaki moto mpo na kopetola eteni ya bilanga ya mboka mpo na kolona. Nzokande, liboso ezalaki eleko ya molunge, mpe banzete ezalaki mpenza ya kokauka. Yango wana moto na ye ekomaki ya lolenge ya Mokambi Thomas S. Monson, lokola profeta wa biso yemei alakisaki yango na likita linene eleki (tala, “Obedience Brings Blessings,” Ensign to Liahona, May 2013, 89–90). Ebandaki kopanzana na matiti mpe zamba, mpe na maloba ya mwana wa ye, “dongolamiso monene ya moto” eyaki. Abangaki mpo na baninga ba ye ya mboka mpe libebi ekokaki kosalema ya milona. Soki yango ebebisamaki, alingaki kosambisama na tibinale ya mboka. Kokokaka te koboma moto, nde amikundolaki Nkolo..
Sikawa napesi maloba ya mwana na ye, moninga na ngai: “Afukamaki na ngomba na zamba mpe abandaki kosambela na Tata ya lola mpo na kokanga moto. Na mbalakata ebimaki mapata ya moindo mpe monene likolo ya wapi azalaki kosambela, mpe enokaki mvula moko makasi mpenza—kasi bobele wapi moto ezalaki kozika. Ntango atalaki nzinganzinga, ezalaki likolo ya polele esika nyonso longola se wapi moto ezikaki. Akokaki te kondima Nkolo alingaki kopesa eyano na moto moko ya mpamba lokola ye, mpe afukamaki lisusu mpe alelaki lokola mwana moke. Alobi ezalaki liyoki elekaki na elengi (talaAlama 36:3).
Mobikisi na biso alingi biso tolinga Ye na lolenge ete alingi kolandisa bolingo na biso na ya Ye. Tokoki nde koyoka bolingo na Ye mpe koyeba nkembo na Ye. Nde akoki kopambola biso lokola alingi. Yango ekomelaki Nefi mwana mobali ya Elamani, oyo akokaki na esika wapi Nkolo andimelaki ye na lolenge moko mpe, na ntina na yango, akokaki kopambola ye na nyonso asengaki ye (tala Elamani 10:4–5).
Na bomoi ya Pi,buku moko ya makanisi ya Yann Martel, elombe alobelaki mayoki na ye etali Klisto: “Nakokaki te kolongola Ye na moto na ngai. Nakoki naino te. Nalekisaki mikolo misato ya makasi mpo na Ye. Ntango natungisamaki mingi mpo na Ye, nakokaki te kobosana Ye. Mpe ntango nayekolaki mingi mpo na Ye, nakoki te kotika Ye” ([2001], 57).
Yango ezali mpenza boniboni nayoki mpo na Mobikisi. Azali ntango inso penepene, mingimingi na bisika bisantu mpe na ntango ya mposa; mpe ntango mosusu, ntango nazali moke mingi koleka, nakoyoka lokola Ye azali kobeta ngai na lipeka mpo koyebisa ngai Ye alingi ngai. Nakoki kozongisa bolingo wana na lolenge na ngai ebonga mpenza te na kopesaka motema na ngai (tala D&A 64:22, 34).
Kaka mwa basanza eleki nafandaki elongo na Mpaka Jeffrey R. Holland ntango azalaki kotia bamisionele na misio na bango. Lokola nayokaki azalaki kozela ngai, mpe lokola tozalaki kotambola azingaki loboko na ye na lipeka na ngai. Nalimbolaki na Ye kosalaka likambo wana kaka liboso na Australie. Alobaki, “Yango wana nalingi yo! Mpe nayebaki ete ezalaki ya solo.
Nandimi ete soki tokoki kozala na litomba ya kotambola na nzoto elongo na Mobikisi, ete tokoki koyoka loboko na Ye kozingaka likolo ya lipeka na biso kaka boye. Lokola bayekoli kokendeke na Emmaus, mitema na biso elingaki kozala “na moto kati na biso te” (Luka 24:32). Eye ezali nsango na Ye: “Boya mpe bomona” (Yoane 1:39(). Ezali ya moto na moto, kobengisaka, mpe koyambaka na libengisi na ye mpo na kotambola elongo na Ye loboko kozinga mapeka na biso.
Ekoka biso toyoka bondimami lokola Enosa, lokola elakisami na nzela ya nsuka ya mokanda na ye ya mokuse kasi mozindo: “Nakosepela o mokolo ekolata kufa ya ngai bozangi bokufi, mpe ekoteleme liboso lya ye; nde nakomono elongo ya ye na elengi, mpe akoloba epai na ngai: Yaka epai ya ngai, yo opambolami; ezali esika yoko elengelemi mpo yayo mboka ya Tata wa ngai” (Enosa 1:27).
Na ntina ya ebele ya mayele mpe banguya na yango Molimo ezali kotatola na ngai, Natatoli na bosolo ebongo nie ete Nzambe azali na bomoi. Nayoki bolingo na Ye. Ezali liyoki ya bilengi. Ekoka biso kosala nini esengeli mpo na kolandisa bolingi na biso elongo na ya Ye mpe ya solo kolinga Ye. O nkombo, ya Yesu Klisto, amene.