2010–2019
Tokotambola Mokolo Moko te Biso Moko
Sánzá ya Zómi 2013


2:3

Tokotambola Mokolo Moko te Biso Moko

Okotelema mokolo moko na pembeni mpe okotala ba ngonga na yo ya pasi, mpe bokososola ete Ye azalaki ntango nyonso wana pembeni na yo.

Bandeko ba ngai ya basi ya bolingo, molimo toyoki mpokwa ya lelo ezali eyano ya bokasi na bino, bomipesi na bino mpe bolamu na bino. Mpo na kotanga Nkolo: “Bozali mongwa ya mabele. …bozali mwinda ya mokili.”1

Lokola naluli libaku na ngai ya koloba na bino, nakundolisami na bolingo ya mwasi wa ngai ya bolingo, Frances, azalaki na yango mpo na Lingomba ya Bamama Basungi. Na ntango ya bomoi na ye asalaki na bisika mingi na Lingomba ya Bamama Basungi. Ntango ye na ngai tozalaki elongo na mibu 31, nabiangamaki mpo na kozala mokambi ya Misio ya Canada. Na mibu misato ya etinda wana, Frances akambaki Lingomba ya Bamama Basungi na etuka wana ya enene, oyo ekamataki engumba ya Ontario mpe Quebec. Boko ya baninga na ye ya ntango wana bayaki lokola mbano ya etinda wana, lokola na mbiangi mingi nsima asalaki na Lingomba ya Bamama Basungi ya palwasi na biso. Azalaki mwana mwasi ya botongono ya Tata wa biso ya Lola, bolongani wa ngai, mpe moninga wa ngai ya ntalo. Nazangi ye mingi koleka maloba makoki koloba.

Ngai lisusu nalingi Lingomba ya Bamama Basungi. Natatoli na bino ete ebongisamaki na bofuli mpe ezali eteni moko ya ntina na bomoi ya Eklezia awa likola ya mabele. Elingaki kosalema te toyeba motuya ya bolamu nyonso oyo ewuti na lingomba oyo mpe bomoi nyonso oyo epambolaki na ntina ya yango.

Lingomba ya Bamama Basungi ezali na basi ya motindo na motindo. Ezali na baye na bino oyo bazali bango moko kaka—ntango mosusu na eteyelo, ntango mosusu na mosala—kasi kofukaja bomoi moko efuluka mpe ya bomengo. Boko ya bino bazali bamama batonda na mosala ya kokolisa bana. Lisusu basusu na bino bobungisa mibali na bino na ntina ya koboma libala to liwa mpe bozali kobunda mpo na kokolisa bana na bino kasi basosoli ete mposa na bango mpo na lisalisi na bino ezali kokoba. Ezali na mingi na bino oyo bazali na baboti bakoli oyo basengi bolengeli ya bolingo oyo bobele bino bokoki kopesa.

Ezala bisika wapi tozali na bomoi, ezali na ntango oyo biso banso tozali na mikakatano mpe bitumba. Atako ezali ya bokesani mpona moko na moko, ekokani na nyonso.

Mingi ya mikakatano tokutani na yango ezali mpamba te tozala na mokili ya kufa, wapi efandi bato ya ndenge nyonso. Ntango mosusu tokotuna na kozanga elikia, “Boniboni nakoki kobatela miso na ngai sikisiki ya kokangama na ya lola lokola nazali konana o ntei ya mokili oyo ya telesitiale?”

Ekozala na ntango oyo bokotambola na nzela moko ebota nzube mpe ekatama na bitumba. Ekoki kozala ntango oyo bokoyoka bokabwani—kutu bino moko kaka—mosika na Mopesi likabo nyonso ya malamu. Bomitungisi ete bozali kotambola bino mokokaka. Bobangi ekekitani bondimi.

Ntango bomimona na ezalela ya bongo, nabondeli bino bomikundola losambo. Nalingi maloba ya Mokambi EzraTaft Benson etali losambo. Ye alobaki:

“Na kati ya bomoi na ngai mobimba toli ya koyekama na losambo ezali na ntalo mingi koleka toli nyonso mosusu nga …nazwaka. Ekoma eteni ya mobimba na ngai— longo moko, liziba ya ntango nyonso ya bokasi, mpe likonzi ya boyebi ya makambo ma bonzambe. …

“… Atako makila mabe, na losambo tokoki kozwa lisusu bobongi, mpo Nzambe akoloba kimia na molimo. Kimia wana, molimo wana ya boboto, ezali lipamboli eleki monene na bomoi.”2

Apostolo Paulo asengaki:

“Tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Njambe.

“Mpe kimia na Njambe oyo eleki boyebi yonso ekosenjela mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”3

Elaki moko ya nkembo kani! Kimia ezali yango oyo tozali koluka, oyo mpo na yango tozali koyoka mposa.

Totiami na mabele oyo mpo na kotambola biso moko kaka te. Liziba ya nguya kani ya kokamwa, ya bokasi, mpe ya bobondisi ezali mpo na moko na moko na biso. Ye oyo ayebi biso malamu koleka bisomei, Ye oyo amoni bomoni ya monene mingi koleka mpe oyo ayebi nsuka tii na ebandeli bayebisi biso na ntembe te ete Ye akozala wana mpo na biso mpo na kopesa lisalisi soki bobele tosengi: Tozui elaka :bosambela ntango inso, mpe bozala na bondimi, mpe makambo manso bakosala elongo mpo na bolamu na bino.”4

Lokola nsambo na biso ezali komata na lola, tika tobosana te maloba eteyaki biso Mobikisi. Ntango akutanaki na mpasi ya liwa ya nsomo ya Getesamene mpe ekulusu, Ye asambelaki na Tata, “Bolingi na ngai te, kasi ya yo, esalema.”5 Kokoso lokola ekoki ntango mosusu kozala, ezali mpo na biso, lisusu, kondimela Tata na biso ya Lola mpo na koyeba malamu mingi boniboni mpe ntango nini mpe na lolenge nini kopesa lisalisi tozali koluka.

Nakolulaka maloba ma mokomi ya ntoki:

Nayebi te na mayele nini eyebani mingi te.

Kasi oyo nayebi, Nzambe akoyanolaka losambo.

Nayebi ete Ye apesaka liloba na Ye

Oyo elobeli ngai ete losambo ekoyokanaka ntango inso.

Mpe ekoyanolama, noki to nsima,

Mpe yango wana nakosambela mpe na kimia nakozela.

Nayebi te soki mapamboli naluki

Ekoya bobele na nzela nakanisi,

Kasi natiki nsambo na ngai elongo na Ye moko kaka.

Ya ye bolingi esali na bwania koleka ya ngaimei,

Nakobanga te ete Ye akoyamba libondeli na ngai.

To akotinda yoko eyano ya kopambolama mingi koleka.6

Na ntembe te, losambo ezali te bobele mpo na ntango ya mobulu. Toyebisami mingimingi na makomi “kosambela ntango inso”7 mpe kobatela losambo na mitema na biso liloba ya loyembo moko.8 ya lisungi mpe ya momesano etuni motuna nini tosengeli kosala malamu na komituna mokolo na mokolo:: “Tokanisaki kosambela?”9

Elongo na losambo mpo na kosalisa biso kobunda na mokili na biso ya kokoso mingi ezali kotanga makomi. Maloba ya bosolo mpe ya bofuli ezwami na makomi minei ezali na bozwi ya ntalo mpo ngai. Nalemba mokolo moko te kotanga yango. Natombwami na molimo ntango inso nakoluka makomi. Maloba oyo ya bule ya bosolo mpe bolingo ekopesa bokambo mpo na bomoi na ngai mpe ekolakisa nzela mpo na bobongo nie ya seko.

Lokola ekotanga biso mpe komanyola makomi, tokoyoka mamimisi ya kitoko ya Molimo na milimo na biso. Tokoki kozwa biyano na mituna na biso. Toyekoli mapamboli maye mayaka nzela ya kobatela mitindo ya Nzambe. Tozwi litatoli ya solo ya Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe ya bolingo na Bango mpo na biso. Ntango boyekoli ya makomi esangisami na nsambo na biso, tokoki solo mpenza koyeba ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezali ya solo.

Elobaki Mokambi Gordon B. Hinckley, “Tika ete Nkolo apambola moko na moko na biso mpo kosala limpati na [maloba] na ye mpe kobende uta na [yango] bokasi wana, kimia wana, mpe boyebi wana ‘oyo eleki bososoli nyonso.”(Filipo 4:7).”10

Ntango tomikundoli losambo mpe tozwi ntango mpo na kobaluka epai ya makomi, bomoi na biso ekopambolama na ndelo te mpe mikumba na biso ekokoma petepete.

Tika nakabola elongo na bino nsango ya boniboni Tata wa biso ya Lola ayonolaki nsambo mpe mabondeli ya mwasi moko mpe apesaki ye kimia mpe bobangi te alukaki elikia te?

Kokoso ya Tiffany ebandaki mobu moleki ntango ayambaki bampaya na ndako na ye mpo na Thanksgiving mpe nsima lisusu mpo na Noele. Mobali wa ye azalaki na eteyeli ya minganga mpe sikawa azalaki na mobu ya mibale ya stage ya kidokotolo. Na ntina ya ngonga ya mosala ya molai esengamaki na ye, akokaki te kosalisa ye mingi lokola bango babale balingaki, mpe yango wana mingi ya oyo esengelamaki mpo na kosala na eleko ya bopemi na ye, na kobakisa bolengeli ya bana na bango minei ya bilenge, ekweyaki na Tiffany. Elekelaki ye, mpe ayokaki ete moko oyo alingamaki na ye azwamaki na cancer. Botau mpe motungisi ebandaki kozala na bozito mingi likola na ye, mpe akweyaki na eleko ya bolembi mpe ya motema nkaka. Alukaki lisalisi ya munganga, kasi eloko ebongwanaki. Mposa ya kolia esilaki, mpe abandaki kosila kilo, likambo nzoto na ye ya kokonda ekokaki te. Alukaki kimia na makomi mpe asambelaki mpo libiki na motema bololo oyo ezwaki ye. Ntango kimia to lisalisi emonanaki te, akomaki koyoka asundolamaki na Nzambe. Libota mpe baninga na ye basambelaki mpo na ye mpe bamekaki kosalisa ya mayele te. Bayaki kotikela ye bilei na ye alinga mpo na komeka kobatela bokolongono na nzoto na ye, kasi akokaki kolia bobele mwa ndambu mpe nsima akokaki kosilisa te.

Mokolo moko mpenza ya komekama, moninga moko amekaki na mpamba kosenginia ye na bilei alingaka ntango inso. Ntango eloko te esimbaki, moninga alobaki, “Esengeli kozala eloko moko oyo ezali malamu mpo na yo.”

Tiffany akanisaki mwa ntango mpe alobaki, “ Eloko moko kaka nakoki kokanisa oyo ezali malamu mpo na ngai ezali lipa esalami na ndako.”

Kasi ezalaki na moko te penepene.

Lobi elandaki na nsima ya nzanga ngonga ya ekuke ya Tiffany ebetaki. Mabali wa ye esalemaki azalaki na ndako mpe ayanolaki yango. Ntango azongaki, azalaki komeme eteni ya lipa esalema na ndako. Tiffany, akamwaki ntango ayebisaki ye ewutaki na mwasi moko nkombo na ye Sherrie, oyo ayebaki moke mpenza. Azalaki moninga ya ndeko mwasi ya Tiffany, oyo afandaki na Denver, Colorado. Sherrie alakisamaki na Tiffany mpe mobali na ye moke basanza mingi liboso ntango Nicole mpe libota na ye batikalaki na Tiffany mpo na Thanksgiving. Sherrie, oyo afandaki na Omaha, ayaki na ndako ya Tiffany mpo na kotala Nicole.

Sikawa, basanza nsika, na lipa ya elengi na loboko, Tiffany abengaki ndeko na ye ya mwasi mpo na kotonda ye mpo na kotindaka Sherrie na etinda ya ngolu. Nzokande, ayokaki ete Nicole abongisaki te botali wana mpe ayebaka yango te.

Lisolo etikali elimbolamaki ntango Nicole alukaki elongo na Nicole koyeba nini etindaki ye akende kotika eteni wana ya lipa. Nini ayokaki ezalaki bofuli mpo na ye, na Tiffany, na Sherrie—mpe ezali bofuli mpo na ngai.

Na ntongo wana ya botiki lipa, Sherrie atindakamaki mpo na kosala biteni mibele ya mapa esika ya moko akanisaki kosala. Alobaki ayokaki liyoka ya kokamata eteni ya mibale elongo na ye na motuka na ye moko wana, atako ayebaki te ntina nini. Nsima ya bolei na ndako ya moninga moko, mwana mwasi na ye ya miibu moko abandaki kolela mpe azalaki na mposa na kokende ndako kolala mwa moke. Sherrie atepatepaki ntango liyoki ya kobunga te eyaku na ye ete asengelaki kotika lipa wana mosusu na ndeko ya mwasi ya Nicole Tiffany, oyo afandaki na miniti 30 mosika na ngambo mosusu ya engumba mpe oyo ayebaki mpenza te . Amekaki kotambwisa makanisi mosika, komekaka komema mwana na ye ya mwasi na ndako mpe koyokaka nsoni kokende kotika eteni moko ya lipa na bato oyo bazalaki mwa bampaya. Nzokande, liyoki ya kokende na ndako ya Tiffany ezalaki makasi, yango wana alandaki botindiki.

Ntango akokamaki, Mobali ya Tiffany ayanolaki na ekuke. Sherrie akundolisaki ye ete azalaki moninga ya Nicole oyo akutanaki na ye moke na Thanksgiving, apesaki ye eteni ya lipa, mpe akendaki.

Mpe boye esalemaki ete Nkolo atinda mwa mompaya moko na kati ya engumba mpo na kokende kotika kaka te lipa esalemi na ndako oyo bazali na yango mposa kasi lisusu ntango ya polele ya bolingo ya Tiffany. Oyo ekomelaki ye ekoki kolimbolama te na lolenge mosusu. Azalaki na mposa makasi ya koyoka ete azalaki te ye moko kaka—ete Nzambe ayebi ye mpe asundolaki ye te. Lipa wana—eloko mpenza alingaki—etikamaki na ye na moto moko ayebaki mpenza te, moto moko oyo ayebaki bosenga ye te kasi oyo ayokaki botindiki ya Molimo mpe alandaki botindiki wana. Ekomaki elembo ya polele na Tiffany ete Tata na ye ya Lola ayebaki bamposa na ye mpe alingaki ye mingi mpo na kotindela ye lisalisi. Ye ayanolaki na eleli mpo na lisungi.

Bandeko ba ngai ya basi ya bolingo, Tata wa bino ya Lola alingi bino—moko na moko na bino. Bolingo wana ekobongwana ata moke te. Esalemi te na etalisi na bino, ma bozwi na bino, to na motango ya mosolo bozali na yango na kesi ya banki. Ebongwani te mpo na batalanta mpe makoki na bino. Ezali bobele wana. Ezali wana mpo na bino ntango bozali na mawa to na esengo, bolembi to bozangi elikia. Bolingo ya Nzambe ezali wana mpo na bino ezala to te boyoka bobongi na bolingo. Ezali ntango inso bobele wana.

Ntango toluki Tata na biso ya Lola na nzela ya losambo ya makasi, ya solo mpe ya lokengo, na komipesa na boyekoli makomi, litatoli na biso ekokoma makasi mpe ekozwa misisa ya mozindo. Tokoyeba etali bolingo ya Nzambe mpo na biso. Tokososola ete tokotambolaka biso moko ata moke te. Nalaki bino ete bokotelema mokolo moko mpembeni mpe bokotala ntango na bino ya kokoso, mpe bokososola ete Ye azalaki ntango inso wana mpembeni na bino. Nayebi ete oyo ezali solo na kati ya boleki ya moninga na ngai ya seko—Frances Beverly Johnson Monson.

Natikeli bino lipamboli na ngai. Natikeli bino botondi na ngai mpo na nyonso ya malamu bozali kozala mpe mpo na bomoi bozali komema. Eté bokoka bopambolama elongo na likabo nyonso ya malamu na nkombo ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso, kutu Yesu Klisto Nkolo, amene.