Tia Elikia na Yo na Nkolo
Bokoma ya komipesa na kosalaka oyo bokoki kokabolaka nsango ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto
Ndeko mwasi Ballard mpe ngai tozongaki kala mingi te kouta na litindami na bamboka mitano ya Eropa. Kuna tozwaki libaku ya kokutana elongo na bamisionele na biso ebele, ntango mosusu boko ya bana na bino ya mibali mpe basi. Wuta bopesi nsango ya Mokambi Thomas S. Monson na oyo etali kokitisa ya mibu mpo na bilenge na biso mibali mpe bilenge na biso basi mpo na kosala, nazwaki libaku ya kokutana elongo koleka 3,000 na bango. Pole ya Kisto engengi na bilongi na bango, mpe bazali na mposa ya komema mosala liboso—koluka mpe koteya, kobatisa, koningisa, mpe kopesa makasi mpe kotonga bokonzi na Nzambe. Bokutani na bango, moko na lombango ayei koyeba, nzoka nde, ete bakoki kosala mosala oyo bango moko te. Lelo nalingi koloba na bandimi nyonso ya Eklezia, mpo ete ezali bosenga na moko na moko na biso kozala ya komipesa na bokaboli nsango malamu
Lokola elobamaki ntango mingi, Profeta Joseph Smith asakolaki ete “na nsima ya manso oyo elobami, mokumba monene koleka mpe oyo eleki na ntina ezali koteya Nsango malamu” (Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 330).
Na 1974 Mokambi Spencer W. Kimball alobaki oyo: “Ntango mosusu ntina monene ya mosala ya etinda ezali kopesa mokili litomba na yango ya koyoka mpe kondima nsango malamu. Makomi ezali ya kotonda na mitindo mpe bilaka mpe mabiangi mpe bambano mpo na koteya nsango malamu. Nasaleli motindo na ndenge na ngai mpo emonani lokola kozala motindo ebetameli sete kouta na oyo tokoki te, na biso moko, to na lisanga kokima” (Ntango Mokili Ekokoma Ya Kobongwana,” Ensign, sanza ya zomi1974, 4).
Na sanza ya nsambo ya mobu moko wana kaka, Ndeko mwasi Ballard mpe ngai tolongwaki elongo na bana na biso mpo na kokamba misio ya Toronto na Canada. Maloba ya Mokambi Kimball ezalaki kobeta na matoyi na ngai, mingi mingi ntango alobaki: “Bandeko na ngai mibali, nazali komituna soki tozali kosala nyonso tokoki. Ezali biso kosepela na lolenge na biso koteya mokili mobimba? Tozali koteyaka sikoyo mibu 144. Tomilengeli nakoyeisa molayi botamboli na biso? Koyeisa molayi bomoni na biso? (Ensign, sanza ya zomi 1974, 5).
Asengaki biso totambwisa matambe na biso mbango, kosalaka elongo mpo na kotonga Eklezia mpe bokonzi na Nzambe.
Na sanza ya motoba oyo eleki Mokambi Thomas S. Monson alobelaki nsango ya ndenge moko kaka na bandimi ya Eklezia. Mokambi alobaki: “Sikoyo ezali ngonga mpo na bandimi mpe bamisionele basangana …[mpe] basala na elanga ya vinyo ya Nkolo mpo na komema milimo epai na Ye. Abongisaki makoki mpo na biso tokabola nsango malamu na ba nzela ebele, mpe Ye akosunga biso na misala na biso soki tokosala na bondimi mpo na kokisa mosala na Ye” (Bondimi na Mosala ya Bokangoli” [liloba epesamaka na bilingi ya bopanzi nsango ya ndenge, sanza ya motoba 23, 2013]; lds.org/broadcasts).
Ezali malamu, bandeko mibali mpe basi, kokanisama na mateya ya baprofeta wuta na ntango ya Joseph Smith tii lelo. Balendisi mpe basenge bokambi mpe ya bandimi ya Eklezia bazala ya komipesa na motema likolo komemaka nsango ya Bozongisi ya nsango malamu na bana nyonso ya Tata na biso ya Lola na mokili mobimba.
Nsango na ngai na mpokwa oyo ezali ete Nkolo azalikosala na lombango mosala na Ye. Na mikolo na biso oyo ekoki kosalama kaka ntango bandimi nyonso ya Eklezia batandi maboko na bolingo mpo na kokabola babosolo ya nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto. Tozali na mposa ya kosala elongo na bosangani elongo na misionele 80,000 baye bakosalaka sikoyo. Nsango etali mosala monene oyo, mingimingi mmikumba mpo na likonzi mpe likita ya batambuisi ya palwasi, etiami polele na the LDS.org website ebengamaki “Hastening the Work of Salvation.”
Toyebi uta na boluki na biso ete ebele ya bandimi ya Eklezia ya makasi balingi mapamboli ya nsango malamu kozala eteni ya ba bomoi ya basusu baoyo balingi, atako bango oyo bango bamona ata moke te. Kasi toyebi lisusu ete ebele ya bandimi bazali kotepatepa mpo na kosala mosala ya etinda mpe kokabola nsango malamu mpo na ntina mibale ya bozindo.
-
Ya yambo ezali bobangi. Ebele ya bandimi babondelaka kutu te mpo na mabaku ya kokabola nsango malamu, kobangaka ete bango bakoki koyamba babotindiki ya bonzambe ya kosala likambo bazali kokanisa bazali na makoki te ya kosala yango.
-
Ntina ya mibale ezali bososoli mabe ya nini mosala ya etinda ezali.
Toyebi ete ntango moto moko atelemi mpo na kopesa lisikulu na liyangani ya elambo mpe alobi, “Lelo nakolobela oyo etali mosala ya etinda,” to ntango mosusu kutu ntango Mpaka Ballar atelemi na likita linene mpe alobi eloko kaka moko, basusu na bino oyo bazali koyoka bakoki kokanisa, “O te, lisusu te; tosi toyoka yango liboso.”
Sikoyo, toyebi ete moko te alingi komiyoka ya elindo. Ntango mosusu ozali komiyoka okoki kosengama kosala makambo esalamaka te na babozalani na yo na baninga to bato ya penepene na yo. Elongo na lisalisi ya Nkolo, tika ngai nalongola yo bobangi nyonso oyo yo to misionele ya ntango mobimba kani akoki kozala na yango na kokabolaka nsango malamu elongo na basusu.
Zwa mokano ya kosala oyo Yesu Klisto asengi biso kosala. Mobikisi alobi:
“Senga, mpe ekopesamela yo, luka, mpe okomona, kokola, mpe ekofungwamela yo:
“Mpo na baoyo nyoso basengaki bayambaki; mpe balukaki bamonaki; mpe na baoyo babetaki ete ekofungwama.
“To wapi moto azali awa na bino, oyo soki mwana na ye asengi lipa, akopesa ye libanga?
“To soki asengi mbisi, akopesa ye nyoka?
“Soki yo … oyebi boni kopsa makabo malamu na bana na yo, ebele ebele boni Tata na yo na lola akopesa bikolo malamu na baoyo basengi ye?” (Matai 7:7–11).
Bandeko mibali mpe basi, bondimi mpe elikia ekozwa esika ya bobangi ntango bandimi mpe ba misionele ya ntango mobimba bafukami na mabondeli mpe basengi Nkolo apambola bango na bamabaku ya bamisionele. Nsima, tosengeli kotalisa bondimi na biso mpe kotala mabaku ya kolakisa nsango malamu ya Yesu Klisto na bana ya Tata na biso ya Lola, mpe solo mabaku wana ekoya. Mabaku oyo ekosenga ata moke te eyano ya makasi to ya elonga. Ekotiola lokola mbano ya bomoto ya bolingo na biso mpo na bandeko na biso ya mibali mpe basi. Kaka zala na ya kondima, mpe baoyo ozali koloba na bango bakoyoka bolingo na yo. Bakobosana ata mokolo moko te liyoki wana, atako ntango ekoki kozala malamu te mpo na bango bayamba nsango malamu. Wana mpe ekoki kobongwana na ngonga ekoya ntango makambo na bango ekobongwana.
Ekoki kosalama te biso tokweya soki tozali kosala na motema moko ntango tozali na mosala ya Nkolo. Ntango mbano ezali nsuka ya ngalasisi ya bonsomi ya moto moko, kokabola nsango malamu ezali mokumba na biso.
Tia elikia na Nkolo. Azali Mobateli Mpate Malamu. Ayebi bampate na Ye, mpe mpate na Ye eyebi mongongo na Ye; mpe lelo oyo mongongo ya Mobateli Mpate Malamu ezali mongongo na bino mpe mongongo na ngai. Mpe soki tomipesaki te, ebele oyo bakokaki koyoka nsango ya Bozongisi bakolekelama mpembeni. Na pete, ezali likambo ya bondimi mpe mosala na ngambo na biso. Mabongisi ezali mindondo mpenza te—sambela, yo moko mpe na kati ya libota na yo, mpo na mabaku ya misio. Nkolo alobi na Doctrine et alliances ete bato ebele babombelamaki bosolo bobele “mpo ete bayebi te wapi komona yango” (D&C 123:12).
Osengeli kozala moto ya kofungwama to ya koyeba koloba, moteyi ya kondimisa te. Soki ozali na bolingo ememiami mpe elikya na kati na yo, Nkolo alakaki soki bino “botomboli mingongo na bino na kati ya bato oyo [mpe] bolobi makanisi oyo [Ye] atiaki na kati ya mitema na bino, … bokoki kobulungana te liboso ya bato;
“[Mpe] ekopesamela bino … na ntango yango mpenza, maye okoloba”D&C 100:5–6).
Prechez Mon Evangile ekundolisi banso na biso ete “eloko moko te ekosalama na mosala ya etinda tii [biso] tomoni moto moko ya koteya. Solola elongo na bato mingi oyo yo okoki mokolo moko na moko. Ezali ndenge ya kibomoto kozala na bobangi moke na oyo etali bosololi na bato, kasi okoki kosambela mpo na bondimi mpe bokasi kozala makasi mingi na kofongolaka monoko na yo mpo na kosakola nsango malamu ezongisami” ([2004], 156–57). Bino bamisionele ya ntango mobimba, soki bolingi koteya mingi, bosengeli kosolola na bato mingi mikolo nyonso. Oyo ezali ntango nyonso maye Nkolo atindi bamisionele bakende kosala.
Nkolo ayebi biso. Ye ayebi tozali na ya biso bitumba. Na sosoli ete basusu na bino bokoki komiyoka na mokumba ya bozito, kasi nasambeli ete moko te na bino akomiyoka ata mokolo moko ete kotanda liboko libanda na ndenge esengeli, ndenge ya esengo mpo na kokabola nsango malamu ekozala mokolo moko mokumba. Kutu ezali litomba! Ezali na esengo moko te ya monene na bomoi koleka komipesaka na motema likolo na mosala na Nkolo.
Fongola ezali ete bozala bafulami ya Nzambe, ete bosenga Ye boyangeli mpe na sima bokende mpe bosala lokola Molimo etindi bino. Ntango bandimi bazali kotala mosala ya lobiko lokola mokumba na bango moko, ekoki kobangisa. Ntango bandimi bamoni yango lokola libengisi ya kolanda Nkolo na komemaka milimo epai na Ye mpo na koteyama nabampaka mpe bandeko basi ya ntango mobimba, ezali Kofula, kolendisa, mpe kotombola.
Tozali kosenga moto nyonso te asala makambo nyonso. Tozali kaka kosenga na bandimi banso basambela, koyebaka ete soki mondimi nyonso, elenge mpe mpaka, akotanda loboko na “moko” kaka katikati ya sikoyo mpe Noele, bamilio bakoyoka bolingo ya Nkolo Yesu Klisto. Mpe oyo likabo kitoko nini epai ya Mobikisi.
Mposo motoba eleki nayambaki mokanda wuta na libota ya mondimi misionele moko ya elonga mpenza, libota Munns ya Florida. Bakomaki:
“Mpaka ya bolingo Ballard, miniti 30 nsima ya bopanzi nsango na mokili mobimba etali kosalaka bango mosala ya lobiko, tosalaki ya biso likita ya misio ya libota. Tolengaki na komona ete bilenge na biso ya bana ya mikolo balingaki bazala na kati. Tozali na esengo ya koloba uta liyangani na biso ya likita, toyesi monene zolongano na biso ya libota mpo na boteyi na 200 likolo na mokama.
“Bana na biso ya mikolo bamemi baninga na Eklezia, basepeli na mayangani ya elambo elongo na ndambu ya baninga na biso balemba, mpe tozwi ndambu ya bakutani na biso ya sika kodima kozwa mateya ya bamisionele. Moko ya badeko na biso ya basi balemba azongi kaka na Eklezia te kasi amemi baluki ya sika na ye elongo.
“Moko te abwakaki libengisi ya kozwa maeteya ya bamisionele. Ntango kitoko nini oyo kozala mondimi ya Eklezia oyo” (personal letter, sanza ya mwambe. 15, 2013).
Bosala keba na babotindiki ya Molimo. Bosenga Nkolo na losambo ya nguya. Bokoma ya komipesa na kosalaka oyo bokoki kokabolaka nsango ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto.
Na tangi uta misionele mondimi alonga mosusu, Clayton Christensen: “Ntango nyonso ozwi moto moko na loba na loboko mpe olakisi ye na Yesu Klisto, okoyoka na bonzindo boni Mobikisi na biso alingi yo mpe alingi moto oyo ya ye loboko ezali kati na ya yo. (The Power of Everyday Missionaries: The What and How of Sharing the Gospel [2013], 1).
Nzambe apambola bino, bandeko mibali mpe basi, bomona esengo monene oyo eyaka uta na bikamwa na nzela ya bondimi na bino. Lokola toteyami na Moroni mokapo ya 7:
“Klisto alobi: Soki bozali na bondimi na ngai bokozala na nguya ya kosala eloko kani elongobani na ngai. …
“… Mpo ezali na bondimi makamwisi masalami; mpe ezali na bondimi nde banzelu babimi mpe basali epai ya bato; yango wana, soki makambo maye masili lisuma ezali epai ya bana ya bato, mpo ezali na ntina ya bozangi bondimi, mpe nyonso ezali mpamba” (Moloni 7:33, 37).
Uta na bomoni na ngai moko natatoli na bino ete Nkolo akoyoka nsambo na bino mpe bino bokozwa mabaku ebele sikoyo mpe mibu ekoya ya kolakisa nsango malamu ya Yesu Klisto na bana ya talo ya Tata na Lola. Mokambi Monson, toyoki, biso nyonso tokoluka komona moko. Nasambeli ete banso na biso tokoka koyoka esengo monene oyo eyaka uta na mosala ya etinda, na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.