2010–2019
Maninisa ya Lola
Sánzá ya Zómi 2013


Maninisa ya Lola

Mapamboli ya molimo mpe ya ntango makoya na kati ya bomo na biso ntango tosaleli mobeko ya moko na zomi.

Nalingi kolakisa mateya mibale ya motuya nayekoli mpo na oyo etali mobeko ya moko na zomi. Liteya ya yambo ekangami likolo ya mapamboli maye makoya na bato mpe mabota ntango botosi na botongono mobeko oyo. Liteya ya mibale ekangami na motuya ya moko na zomi na bokoli ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na mokili mobimba. Nasambeli Molimo Mosantu akokisa na moko na moko na biso bosolo ya mabongisi na ntina ya maye nakosolola na bino.

Liteya Motango 1—Mapamboli Ya ntina kasi ya Kpokoso mpo na Kosala

Mama ya Ndeko Mwasi Bednar azali mwasi moko ya botongono mpe mosali ndako afulama. Uta na mikolo ya ebandeli ya libala na ye, abatelaki na bokebi makundoli ma mosolo ya ndako. Na bazomi ya mibu akomaki na bwania bozwi mpe bofuti ya libota kosalelaka babuku ya pete mpenza. Boyebi asangisaki o ntaka ya mibu ezali ya mobimba mpe na mayebisi.

Ntango Ndeko mwasi azalaki elenge mwasi, mama na ye azalaki kosalela makambo na kati ya babuku mpo na kobeta sete na mabongisi ya ntina ya kozala na bomilengeli mpe boyangeli ndako na bokebi. Mokolo moko ntango batalaki lisusu elongo maboke ya bofuti, mama na ye amonaki ndakisa moko ya ntina. Bantalo ya kotala dokotolo mpe bankisi mpo na libota na bango ezalaki mosika na nse mingi koleka oyo bakokaki kozela. Nde akangisaki likambo oyo na nsango malamu ya Yesu Klisto mpe alimbolaki na mwana na ye ya mwasi bosolo moko ya nguya: Ntango tozali koumela na mobeko ya moko na zomi, mbala mingi tokozwa mapamboli ya ntina mpe kpokoso na kososola oyo ezali ntango nyonso te nini tozali kozela mpe tokoki na pete kotala mpamba. Libota ezwaka te bobakisi ya mbalakaka to ya polele na bozwi ya ndako. Esika na yango, Tata moko ya Lola apesaki mapamboli ya pete na oyo emonani nzela ya mpamba. Ndeko mwasi Bednar akundolaki liteya oyo ya motuya uta na mama na ye etali lisalisi oyo eyeli biso na nzela ya maninisa ya lola, lokola elakelami na Malaki na Boyokani ya Kala (tala Malaki 3:10).

Mbala mingi ntango toteyi mpe totatoli etali mobeko ya moko na zomi, tokangami na mapamboli oyo tozwi ya ntango ya mbalakaka, ya kafukafu, mpe eyebami noki. Mpe na ntembe te mapamboli ya boye ekoyaka mpenza. Kasi boko ya mapamboli ya ndenge na ndenge oyo tozwi ntango tozali na botosi na mobeko oyo ezali na ntina mpe ya kpokoso na kososola. Mapamboli ya boye ekoki kososolama bobele soki na bokebi mpe kotala na molimo (tala 1 Bakolinti 2:14).

Lisese ya ‘maninisa” ya lola esalelami na Malaki ezali na liyebisi mingi koleka. Maninisa ekopesa nzela na pole ya mokili ekota na kati na ndako. Na lolenge moko, bopeli mpe bomoni ya molimo esopani na nzela ya maninisa ya lola mpe na kati ya bomoi na biso ntango tokumisi mobeko ya moko na zomi.

Na ndakisa, lipamboli ya ntina mpe ya kpokoso na kososola ezali likabo ya molimo ya botondi oyo ekokokisa boluli na biso mpo na nini tozwi mpo na kokonza bamposa mpo na nini tolingi. Moto moko ya botondi azali na bomengo na bosepeli. (tala Luka 12:15).

Tokoki kozala na mposa mpe kosambela mpo na lisalisi ya kozwa mosala ebongi. Miso mpe matoyi ya bondimi (tala Ether 12:19) esengelami, nzokande, mpo na koyeba likabo ya molimo ya bososoli ya kobakisa oyo ekoki kopesa biso nguya ya koyeba mabaku ya mosala oyo bato mingi bakoki kotala mpamba—to lipamboli ya mokano monene mingi ya moto na moto mpo na koluka makasi mingi mpe bolai mingi mpo na mosala moko koleka bato misusu bakoki kosala to kolinga kosala. Tokoki kolinga mpe kozela mosala ekopesama, kasi lipamboli oyo eyeli biso na nzela ya maninisa ya lola ekoki kozala bokoki ya monene mingi mpo na kosala mpe kobongola bizalela na biso koleka kozelaka bizaleli na biso ebongolama na moto moko to eloko moko mosusu.

Tokoki kozala na mposa mpe mosala mpo na kozwa lifuta ebakisama na mosala na bango mpo na kopesa makoki ya bomoyi. Miso mpe matoyi esengelami, nzokande, mpo na koyeba na biso bokoki ebakisami ya molimo mpo ya ntango (tala Luka 2:52) mpo mingi na moke, bokoki ya kafukafu mpo na kotia na molongo mpe kokokisa pete, mpe bokoki mpo na kolengela na bolongobani bozwi tosili kozwa na mokili. Tokoki kolinga mpe kozela lifuti ya monene mingi, kasi lipamboli oyo eyeli biso na nzela ya maninisa ya lola ekoki kozala bokoki ya monene mingi mpo na kobongola bizaleli na bisomei koleka kozela bizalela na biso ebongolama na moto moko to eloko moko mosusu.

Bilenge babundi na Buku ya Mormon (tala Alma 53; 56–58) basambelaki na makasi ete Nzambe alinga kolendisa bango mpe kobikisa bango na maboko ya bangunga na bango. Na esengo, biyano na nsambo wana ekelaki te mandoki ya kobakisa to motango ya kobakisa ya mampinga. Esika na yango, Nzambe apesaki babundi oyo ya botongono bobangi te ete Ye akobikisa bango, kimia na mitema na bango, mpe bondimi mpe elikia monene mpo na libiki na bango na Ye (tala Alma 58:11). Boye, bana babali ya Elemani bazwaki konzo, bakangamaki na mokano mpo na kolonga, mpe bakendeki liboso na bokasi na bango nyonso kobunda na Balamani (tala Alma 58:12–13). Bobangi te, kimia, bondimi, mpe elikia na ebandeli ekoki komonana lokola mapamboli babundi na bitumba bakokaki kolinga, kasi ezalaki mpenza mapamboli bilenge babali oyo basengelaki mpo na kowela liboso mpe kolonga na bomoto mpe na molimo.

Ntango mosusu tokoki kosenga Nzambe elongo, mpe Ye akopesa biso bokasi ya nzoto mpe ya bongo. Tokaki kobondela mpo na bomengo, mpe tozwi bomoni ya monene mpe bompikiliki ya kobakisa, to tosengi mpo na bokoki mpe topambolami na likabo ya boboto. Ye akoki kopesa biso bondimi mpe elika ntango tobundi mpo na kozwa matoma malongobani. Mpe ntango tobondeli mpo na kolongwa na mikakatano ya nzoto, ya bongo, mpe ya molimo, Ye akoki kokolisa eyano mpe konzo na biso.

Nalakeli bino ete ntango bino mpe ngai totosi mpe tobateli mobeko ya moko na zomi, ya solo maninisa ya lola ekofungwma mpe mapamboli ya molimo mpe ya ntango ekosopana boye ete ekozala esika ya kokoka te mpo na kozwa yango (tala Malaki 3:10). Tokomikundola lisusu esakola ya Nkolo:

“Mpo makanisi na ngai ezali makanisi na bino te, mpe banzela na bino ezali banzela na ngai te, elobi Nkolo.

“Mpo lokola lola esali likola koleka mabele, boye banzela na ngai likola koleka ya bino, mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino” (Yisaya 55:8–9).

Natatoli ete ntango tozali na bokebi mpe kotala ya molimo, tokopambolama na miso oyo ekomona na polele mingi, matoyi oyo ekoyoka na sikisiki mingi, mpe mitema oyo ekososola mingi mpenza ntina mpe kpokoso ya nzela na Ye, makanisi na Ye, mpe mapamboli na Ye na bomoi na biso.

Liteya Motango 2—Pete ya Nzela ya Nkolo

Liboso ya libiangi na ngai mpo na kosala lokola moko ya Lisanga Likoki ya Bazomi na Mibale, natangaki mbala mingi na Doctrine and Covenants etali lisanga liponamaki mpo na kokamba mpe kosalela mosolo ya moko ma zomi. Lisanga mpo na Kosalela Moko na Zomi etiamaki na libimisi mpe ezwi Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, mpe Bopisikopo Bokonzi (tala D&C 120). Ntango namilengalaki na sanza ya zomi na mibale 2004 mpo na kokende na liyangani ya likita na yambo, namilengelaki mpenza mpo na libaku ya kitoko ya koyekola.

Namikundoli lisusu makambo namonaki mpe nayokaki na lisanga. Nazwaki boluli monene mpe limemia ya mibeko ya Nkolo ya mosolo mpo na bato, mpe na mabota, mpe mpo na Eklezia na Ye. Mwango ya likonzi ya mosolo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka—mpo na bozwi mpe bofuti—elimbolami na biteni 119 mpe 120 ya Doctrine et Alliances. Masakola mibale ezwami na mabimisi maye mapesi likonzi mpo na mambi ma mpako ya Eklezia.

Eteni 119 bobele alobi ete bandimi banso “bakofuta moko na zomi na matomba na bango nyonso na mobu; mpe eye ekozala mobeko ya libela epai na bango libela, … elobaki Nkolo” (molongo 4).

Nde, etali bofuti mbongo epesami ndingisa ya moko na zomi, Nkolo alobaki, “Ekosalelama na lisanga moko, ezwi Bokambi bwa Yambo ya Eklezia, mpe ya episikopo mpe lisanga, mpe na lisanga na ngai ya monene; mpe na mongongo na ngaimei, elobi Nkolo” (D&C 120:1). “Episikopo mpe lisanga na ye” mpe “lisanga na ngai” elobami na libimisi eyebani lelo lokola Bopisikopo Bokonzi mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, moko na moko. Mosolo oyo ya bule esalelami na eklezia moko ezali kokola mbangu mpo na kopambola na molimo bato mpe mabota na kotangaka mpe kobongisaka batempelo mpe bandako ya losambo, kosunga mosala ya misio, kobongola mpe kobimisa makomi, kolendisa boluki ya mambi ya libota, kofuta biteyelo mpe boyekoli ya bonzambe, mpe kokokisa bantina mingi misusu ya Eklezia lokola etindami na basali bakulisama ya Nkolo.

Nakamwi na polele mpe bokuse ya mabimisi na komekisa na masungi ma mosolo mpe botambolisi ya kilikili ya misala oyo esalelami na mabongisi mpe babulamatali mingi mpenza na mokili mobimbi. Boniboni mambi ma ntango ya libongisi lyoko linene lokola Eklezia ya Yeus Klisto ezongisami ekoki kotambolisama na mokili mobimba na kosalelaka malakisi ma mokuse boye? Mpo na ngai ezali mpenza polele: oyo ezali mosala ya Kombo, Ye akoki kosala mosala na Ye, (tala 2 Nephi 27:20), mpe Nkolo afulaka mpe akambaka basali na Ye ntango bazali kosalela bokambi ya ye mpe kosala na makambo na Ye.

Na likita ya yambo ya lisanga nasepelaki na pete ya mabongisi oyo ekambaki masolo ma biso mpe mikano na biso. Na misala ya mosolo ya Eklezia, mabongisi ya ntina mpe ekangama esalelami. Yambo, Eklezia azali na kati ya makoki na yango mpe ekofutaka te mingi koleka ezwi. Mibale, ndambo ya bozwi Ya mobu ebombami lokola ekozo mpo na makama mpe mpenza ekoya. Mpo na bankama ya mibu, Eklezia eteyaki bandimi libongisi ya kobomba bilei, mazuti mpe mosolo mpo na kolengela makama oyo ekoki koya.

Lokola likita ezalaki kokende liboso, namimonaki kotombalaka ete bandimi banso ya Eklezia bakoka kosalela pete, polele, molongo, mpe bolingani, mpe nguya ya lolenge ya Nkolo Yemei (tala D&C 104:16) mpo bokambi ya mambi ma ntango ya Eklezia, nazali sikawa kosala elongo na Kosalela Moko na Zomi uta mibu mingi. Botondi mpe limemia na ngai mpo na ndakisa ya Nkolo ekoli na mibu, mpe mateya mayekolami ekoki kutu ya mozindo mingi.

Motema mwa ngai motondi na bolingo mpe boluli mpo na bandimi ya botongono mpe botosi ya Eklezia eye ya bikolo, nkota mpe bato nyonso. Lokola nazali kotambola na mabele, nayekoli etali elikia mpe bandoto na bino, masengeli mpe ndenge ya kozala ya kilikili, mpe bitumba na bino. Bondimi na bino elendisi bondimi na ngai. Bomipesi na bino esala bomipesi na ngai. Mpe bolamu mpe bolingi na bino na kotosa mobeko ya moko na zomi efuli ngai kozala moto, molongani, tata, mpe moyangeli moko ya Eklezia ya malamu mingi koleka. Namikundoli mpe nakanisi na bino ntango inso nasali elongo na Lisanga ya Kosalela Moko na Zomi. Natondi bino mpo bolanu mpe botongono na bino lokola bozali kokumisa mayokani na bino.

Bayangeli ya Eklezia ya Nkolo ezongisami bayoki kabakata ya mokumba mpo na kolengela bo elongobani makabi mabonzambi ya bandimi ya Eklezia. Tozali mpenza na boyebi ya lolenge ya bule ya likuta ya mwasi akufela mobali.

“Afandi pembeni na ebombelo na makabo mpe atali motindo mozalaki ebele bato kobwaka mosolo kati na yango. Bazwi mingi babwaki mosolo mingi kati na yango. Nde mwasi moko, ye mobola mpe mwasi akufeli mobali, ayei abwaki ndisi mibale.

“Nde mwasi moko, ye mobola mpe mwasi akufeli mobeli, ayei abwaki ndisi mibale, oyo ekoki na likuta moko.

“Abingi bayekoli na ye epai na ye mpe alobi na bango ete, Nazali koloba na bino solo ete likabo ya mwasi oyo, mobola, eleki na monene makabo nyonso bato babwaki kati na ebombelo:

“Zambi bango bakabi ndambo moke na mokolo moleki na bango, kasi na bobola na ye asili kobwaka mosolo na ye nyonso, lilei na ye nyonso” (Malako 12:41–44).

Nayebi na boyebi ya yambo ete Lisanga ya Kosalela Moko na Zomi ezali miso ga na bolengeli likuta ya mwasi mokufeli mobali. Nalobi boluli na ngai na Mokambi Thomas S. Monson mpe basungi na ye mpo na bokambi na bango ya makasi na kosalaka mosala oyo ya bule. Mpe Nandimeli mongongo (tala D&C 120:1) mpe loboko ya Nkolo oyo esungi basali na Ye babulisama na kokokisa mokumba mpo na kozala bantoma na Ye.

Libengisi mpe Litatoli

Bofuti ya bosembo ya moko na zoki ezali mingi koleka mokumba; esali litambo moko ya motuya na nzela ya bosantisi ya moto na moto. Na baye ya bino oyo bakofuta moko na zomi na bino, nakumisi bino.

Na bino baoyo ya sika bazali kotosa te mobeko ya moko na zomi, nabengisi bino bokamanyola banzela na bino mpe boyambola. Natatoli ete na botosi na bino na mobeko ya Nkolo, maninisa ya lola ekofungwanela bino. Nasengi bino bozelisa mokolo ya boyamboli na bino te.

Natatoli mapamboli ya molimo mpe ya ntango ekoya na kati ya bomoyi na bino ntango bazali kosalela mobeko ya moko na zomi. Napesi litatoli ete mapamboli ya boye mbala mingi ezali ya ntina mpe ya kpokoso na kososola. Nasakoli lisusu ete pete ya lolenge ya Nkolo oyo ezali polele mpenza na mambi ma ntango ya Eklezia na ye epesi bandakisa oyo ekoki kokamba biso lokola bato mpe babota. Nasambeli mpo na moko na moko na bino bayekola litomba euti na mateya oyo ya motuya, na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.