2010–2019
Bozala ya Kobongwana
Sánzá ya Zómi 2013


11:31

Bozala ya Kobongwana

Mbongwana ya solo esalamaka wana bozokoba kosalela malongi oyo boyebi ezali solo mpe kobatela mitindo, mokolo na mokolo, sanza na sanza. 

Ba ndeko mibali mpe basi, liteya ya komikitisa ezali kotelema na elobelo eye esika wapi ebele ya bilombe ya bomoi na ngai bavandi. Nakolinga kokabola na bino mwa ndambo ya mayoki ya motema na ngai mpe nalobebi yango mingimingi epai ya bilenge.

Moko ya bilembo minene oyo ya Kondimana ya Kala oyo azalaki mosakoli-mobundi Yoshua. Atindaki bobiangi oyo na bana ya Yisaele, baye akambaki: “Bopoma mokolo oyo nani bokosalelaka; … kasi mpo na ngai na ndako na ngai, tokosalela Nkolo.”1 Maloba ya Yoshua etalisi mbongwana ya solo na nsango malamu. Mpo na Yosua mpe mpo na biso banso, mbonguana na biso na mabongissi ya nsango malamu ekoleka na nzela ya kobika na sembo mabongisi ya nsango malamu mpe komipesaka na mayokani na biso na Nkolo.

Nakolinga kokabola na bino lisolo ya bonguana ewuti na mambi ma kala ya libota na ngai na ntina ya mosusu ya bilembo na ngai. Nkombo na ye ezali Agnes Hoggan, ye na mobali na ye basanganaki na Eklezia na Ecosse na 1861. Mpasi makasi ya boniokuami na mboka na bango ya kobotama, bakimaki na mboka Amerika elongo na bana na bango. Nsima ya mibu ebele Agnes akomaki mokufeli mobali na bana muambe ya kosunga mpe asalaka mosala makasi mpo na kopesa bango ya kolia mpe ya kolata. Muana na ye ya muasi ya mibu 12, Isabelle, azalaki na makila malamu ya kozua mosala lokola moombo na libota moko ya bandimi ya LDS te ya bozui.

Isabelle avandaki na ndako na bango ya monene mpe asungaki na kotala bana na bango ya mike. Nakozongisa ya misala na ye, mua lifuta ya moke ezalaki kofutama epai ya mama na ye na mposo moko na moko. Nokinoki Isabellle andimamaki lokola moko ya libota wana mpe abandaki kosepela na mingi ya matomba moko kaka nyonso mpe ndenge moko na basusu, lokola koyekolaka mateya ya mabina, kolataka bilamba kitoko, mpe kokende na maboke. Boyokani eye ekobaki mibu minei, tii na tango libota eye esika Isabele azalaki kosala batindamaki na mboka mosusu. Banso balingaki Isabelle makasi boye bapusanaki epai ya mama na ye Agnes, mpe basengaki ndingisa ya kokomisa ye muana na bango engebene na mobeko. Balakaki ete bakopesa ye bobokoli ya malamu, bakotala ete abala malamu, bakotia ye azua biloko na bango lokola bana na bango moko pe bakokoba lisusu kofuta Agnes.

Mokufeli mobali oyo ya makasi mpe mama esengelaki kozua mokano ya makasi kasi atiaki tembe te. Boyoka makomi ya muana nkoko na ye ya muasi ya mokolo, akomelaki ye sima na ba mbula ebele: “soki bolingo na ye esengaka ye te ete aboya, azalaki na ntina kutu malamu koleka— Awutaka na Ecosse, alekaki na kati ya mikakatano mpe mimekano mpo na nsango malamu, mpe azelaka te soki na ndenge ya kibomoto nyonso, kotika muana moko ya bango azanga oyo awutelaka mosika mpenza mpo na kozua.”2 Libota ya bozui basalelaki maloba nyonso oyo bakokaki, mpe Isabelle ye moko alelaki mpe asengaki bapesa ye nzela ya kokende, kasi Agnes atikalaki ngwi. Lokola okoki kokanisa, na mibu 16 Isabelle amonaki lokola bomoi na ye ebebisamaki.

Isabelle Hoggan azali nkokoloko na ngai ya muasi, mpe natondi ye makasi mpo na litatoli mpe kondimisama oyo epelaki makasi na kati ya motema ya mama na ye, oyo apesaki ye nzela te ya koteka kimondimi ya Eklezia muana na ye ya muasi mpo na bilaka ya mokili. Lelo oyo, bankama ya bakitani oyo bazosepela na mapamboli ya bandimi na Eklezia bazui litomba kowuta na bondimi makasi mpe mbonguana ya Agnes na nsango malamu.

Baninga bilenge, tozali na bangonga moko ya mpasi, mpe mikano oyo bobengami kozua na mokolo na mokolo, to kutu ngonga na ngonga, ezali na mbano ya seko. Mikano oyo okozua na bomoi na yo ya mokolo na mokolo ekolaka maye makoyela yo sima. Soki oyebi naino te kozala na litatoli oyo evandi makasi mpe bondimi ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bokonzi ya Nzambe awa na nse, sik’oyo eza tango ya kosala ete ozua bondimi wana. Kozelisa kosala bokasi esengelami mpo na kozua lolenge wana ya bondimi ekoki kozala likama mpo na molimo na yo.

Bongwana ya solo ezali mingi koleka kaka kozalaka na boyebi ya nsango malamu mpe ezali kolakisa kutu mingi koleka kaka kozalaka na litatoli ya mabongisi wana. Ekoki kosalema ozali na litatoli ya nsango malamu kasi kosalela yango te. Kozala mobonguani ya solo elingi koloba ete tozosala na maye tondimeli mpe kopesa yango ekela “mbongwana ya makasi na kati na biso to na mitema na biso.”3 Na mwa buku True to the Faith, totangi ete “mbongwana ezali kolanda na malembe malembe, kasi likambo te. Okokoma mobongwani lokola mbano ya … makasi ya solo mpo na kolanda Mobikisi.”4 Ezuaka tango, makasi, mpe mosala. Nkokoloko na ngai ya muasi azuaka bondimi makasi ete nsango malamu ezalaki na ntina monene mpona bana na ye koleka nyonso oyo mokili esengelaki kopesa na nzela ya bozui mpe bomengo mpamba te amibonzaki, anyokuamaki mpe abikaka sango malamu. Bondimi eyaka na nzela ya kobika mabongisi ya nsango malamu mpe komibonza mpo na yango.

Tosengeli kokende na nzela ya esalameli moko wana soki tolingi tozwa lolenge moko ya bomipesi. Mobikisi alobaki, “soki moto nani akosala mokano na ye, akoyeba ete mateya na nga ezali ya Nzambe to maloba na nga moko.”5 Ntango mosusu tomekaka kosala yango kozongaka nsima. Ndakisa tokoki kozwa lolenge oyo: nakozala na esengo kobika mobeko ya moko na zomi kasi yambo nazali na bosenga ya koyeba soki ezali ya solo. Ntango mosusu tosambelaka kutu pona kozua litatoli mpona mobeko ya moko na zomi mpe kolikia ete Nkolo akopambola biso na litatoli wana liboso tokoma na lokasa na biso ya moko na zomi. Ezali boye te nde etambolaka. Nkolo azozela biso tosala ngalasise ya bondimi. Tosengeli ntango nyonso kofuta moko na zomi mobimba mpe na sembo mpo ete tozua litatoli ya kofutaka moko na zomi. Nzela kaka moko oyo esalelamaka mpo na mabongisi nyonso ya nsango malamu ata soki ezali mobeko ya bompeto, mobeko ya lolendo te, Liloba ya Bwania to mobeko ya kokila.

Nakolinga kokabola ndakisa moko ya ndenge nini kobika libongisi moko esalisaka biso kokoma babongwani na libongisi wana. Nazalaki elenge muasi kati na mibu 60 mpe ngai moko kaka elenge muasi Mosantu ya Mikolo mya Nsuka na eteyelo na biso ya humanite. Ezalaki na eleko ya mobulu etalisami mingi na kobuakama ya ezalela ya bonkoko, kosalela makaya ya makasi, mpebizaleli ya “sala nyonso”. Mingi ya baninga na ngai bazalaki bato malamu kasi bazalaki kokueya na bopete na nsai ya bizalela oyo ya sika, oyo solo ezalaki se ezalela ya mabe ya kala. Baboti na ngai mpe balakisi na ngai na eklezia bakotisaki na ngai motuya ya kosalela nzoto na ngai na botosi, kombombaka makanisi mpembe, mpe ya mingi koleka nyonso, koyekolaka kotia elikya na Mitindo ya Nkolo. Nazuaki mokano mpo na kokima bisika wapi nayebaki ete masanga ekozala mpe kozala mosika na makaya mpe lopipi. Ezalaki mingimingi kolakisaka ete nazalaki kokende na bafeti te, mpe nazali kobima na mibali mingimingi te. Bosaleli lopipi ezalaki kokoma mingimingi koleka momesano na kati ya bilenge, mpe makama na yango eyebanaki malamu te ndenge eyebani lelo. Mingi ya baninga na ngai baniokuamaki ntango nyonso na maladi epasamaki na bankisi to bakangamaki na bokakemi ya makasi. Nazalaki na botondi ya koteyama kobika Liloba ya Bwana na ndako ngai, mpe nazuaki litatoli ya mozindo ya mlibongisi ya nsango malamu lokola nasalelaki bondimi mpe nabikaki yango. Liyoki ya malamu eyelaki ngai kowuta na kobika libongisi ya solo ya nsango malamu ezalaki Molimo ya Molimo Mosantu koyebisaka ngai ete libongisi ezalaki ya solo. Wana ezali tango mbongwana ya solo ebandi kozua esika.

Profeta Moroni, na Buku ya Mormon, ateyaki, “nalingaki kolakisa na mokili mobimba ete bondimi ezali biloko oyo elikiami mpe emnani te; bowelani te mpo ete bomoni te, mpo ete bokozua litatoli moko te nsima ya momekano ya bondimi na yo.”6 Na mokili na biso esika oyo kopesama na lombango ezali kozelama, tozali na mbeba mbala mingi ya kozelaka lifuti kozangaka kosala mpo na yango. Nandimi Moroni azoloba na biso ete tosengeli kosala liboso mpe tosaleli bondima na kobikaka nsango malamu, mpe nde tokozua litatoli ete ezali ya solo. Mbongwana ya solo ezosalama wana bozokoba kosalela malongi oyo boyebi ezali solo mpe kobatela mitindo, mokolo na mokolo, sanza na sanza.

Ezali tango na nkembo kozala elenge na Eklezia. Ozali ya yambo ya kosala elongo kati na pologalemi ya bilenge Come, Follow Me, oyo ezali na lokola moko ya bantina momeme mbongwana na yo epai ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ezali malamu komikundola ete na likambo te ndenge nini baboti na yo mpe bakambi na yo bafulami bokoki kozala “ozali na mokumba ya yambo mpo na mbongwana na yomei. Moko te akoki kobongwana mpo na yo, mpe moko te akoki kobonwanisa yo na makasi.”7 Mbongwana ezui esika wana tozali na etingia na kolobaka nsambo na biso, na kotangaka makomi, kokendaka na eklezia, mpe kozalaka ya kolongobana mpo na kosala elongo makuli ya tempelo. Mbongwana ekomi wana tozosala na mabongisi ya bosembo toyekoli na kati ya bandako na biso mpe na eteyelo. Mbongwana ekomi wana ezali biso kobika bomoi ya mpeto mpe ya malanu mpe tosepeli na bozali ya Molimo Mosantu. Mbongwana ekomi wana tososoli Bomikabi ya Yesu Klisto, tondimi Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso, mpe topesi nzela na Bomikabi ezwa esika na bomoi na biso.

Bonguwana na yo ekosalisa yo wana okomilengela mpona kosala mayokani na tempelo, kosala bamisio, mpe kotia bandako na yo ya lobi ekoya. wana obongwani okozala na mposa ya kokabola na basusu maye yo oyekoli, mpe bolikii na yo mpe likoki na yo ya kotatola epai ya basusu na bondimi mpe nguya ekomata. Mposa oyo ya kokabola nsango malamu na basusu mpe bolikii ya kotatola na mpiko azali mbano ya momesano ya mbongwana ya solo. Mobikisi ateyaki Petelo, “Soki yo obongwani, lendisa bandeko na yo.”8

Kanisa Yosua, profeta-mobundi? Azalaki bobele ya kobongwana yemei te, kasi asalaki na kotika te tii na suka ya bomoi na ye komema bana ya Yisalaele epai ya Nzambe. Totangi na Boyokani bwa Kala: “Mpe Yisalaele asalelaki Nkolo na mikolo nyonso ya Yoshua.”9 Moto oyo asali mbongwana ya solo ayemi likolo nguya ya Bomikabi mpe azui lobiko mpo na molimo na yemei, nsima abimi mpo na kopanza nguya ya makasi likolo ya baoyo bayebi ye.

Kobika nsango malamu mpe kotelemaka na bisika esantu, ezali ntango nyonso pete to elengi te, kasi natatoli ete ezali motuya! Nkolo apesaki toli na Emma Smith “akende mosika na biloko oyo ya mokili, mpe aluka biloko oyo ya malamu.”10 Namoni lokola tokoki kobanda kokanisa te se boni kitoko “biloko wana ya malamu” ya mokili!

Natatoli ete tozali na Tata na Lola ya bolingo oyo mposa na ye monene ezali kokosalisa mpe kopambola biso na bokasi na biso ya koalela nsango malamu mpe kobongwama. Alobaki na polele ete likambo ya ntina monene mpe mosala na Ye ezali “bozangi kufa mpe bomoi ya seko.”11 Alingi komema biso na ndako na miso na Ye. Natatoli ete wana ezosala biso likolo ya malongi ya nsango malamu mpe totie yango na misala mokolo na mokolo, tokokoma babongwami mpe tokokoma banzela ya kokokisa malamu mingi na mabota na biso mpe na mokili. Tika ete topambolama na makasi na biso ya mokolo na na mokolo mpo na kozua ntina ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.