Tozali natina ya kosepela makasi
Tango olingi, osenzeli, mmpe osaleli basusu na boke mmpe na nzela ya bompete, ozali kozala elongo na mosala ya lobiko.
Tango bokilo na ngai ya mobali akufaki, libota na biso tosanganaki mmpe tobandaki kompesa baye bayaki matanga mbote. Pokwa nionso, lokola ngai na libota mmpe baninga mosusu totalaki, nabandaki komona mingi ete koko nabiso ya mibu zomi, Porter, atelemaki na sima mpembeni ya mama bokilo na ngai—koko na ye. ”Tango mosusu abandaki kotelema na sima na ye, kokengelaka ye. Mbala moko na moni eloko moko tango loboko naye etutani na ya ye. Namoni abandi kobeta maboko, mmpe asimbi ye, mpe afandaki mpembeni na ye.
Na sima mwa mikolo mingi elekaki, na bosanaki makambo mana te. Nazwaki mbala moko likanisi ya kotindela Poter mokanda, mpe nakomaki maye nabombaki. Na komelaki ye na nzela ya eteneti mpe nayebisaki ye maye na monaki mpe na maye na yokaki kati na ngai. Mpe nakundolisaki Poter maye matali liyokani na ye tango azwaki libatisi, kotanga maloba ya Alma na mokapo ya Mozia18:
“Mpe sikoyo, lokola bozwi posa ya kokota na kati ya etonga ya Nzambe, mpe ya kobiangema bato na ye, mpe bolingi ya komemana mikumba ya moko na moko ete mikoma pepele;
“Iyo, mpe bolingi kolela na baye bazali kolela, iyo, mpe kolendisa baye bazali na mposa ya bolendisi, mpe kotelema lokola batatoli ya Nzambe na ngonga nionso mpe na biloko nionso, mpe na bisika binso oyo bino bozwami, kutu kino liwa, … ete bokoka kozwa bomoyi ya seko—
“…Soki ezalaki mposa ya mitema na bino, ntina nini ekopekisa bino kobatisama na kombo ya Nkolo, lokola motatoli liboso na ye ete bokobatela liyokani na ye, ete bokosalela ye mpe kobatela mibeko na ye, mpo ete atondisa molimo na ye likolo na bino?”1
Nalimbolelaki Poter maye Alama ateyaki baye balingi kozwa libatisi basengeli na mposa ya kosalela Nzambe na kosalelaka basusu—mpo na bomoyi na bino mobimba! Na lobaki: “nayebi te soki ozali komona yango, kasi lolenge olakisaki bolingo na ntina ya nkoko ezalaki bobateli mayokani nayo, tobatelaka mayokani nabiso mikolo minso lokola tozali boboto, kolakisaka bolingo, kobanzaka basusu. Nalingi oyeba ete, nasepeli na yo na ndenge ozali kobatela mayokani nayo! Lokola ozali kobatelaka mayokani ozwaki mokolo ya libatisi, komilengelaka mpo na kokula Bonganganzambe. Liyokani liye libakisami ekopesa yo mabaku ebele mpo ya kopambola mpe kosalisa basusu mpe komilengelaka mpo ya mayokani okosala na Tempelo. Natondi yo botondi mpo ya kozala ndakisa malamu mpo na ngai! Botondi mpo ya kolakisa lolenge kani mobateli liyokani asengeli kozala!”
Poter ayanolaki: “Nkoko, botondi mpo na liteya. Tango nazalaki tango nionso koyamba nkoko, nayebaki te ete nazalaki kobatela mayokani na ngai, motenma na ngai etutisamaki nasepelaki mingi koleka. Nayebi sikoyo ete ezalaki molimo mosantu kati ya motema na ngai.”
Nayokaki lisusu mwa moto kati ya motema ntango na monaki ete Poter asosolaki mayokani ma ye na elaka mpo ete “ntango nionso molimo na ye ezala na [biso]”2—elaka eye ezali mpo biso tozwa likabo ya molimo mosantu.
Bandeko basi lokola natali bino namokili mobimba, mpe namoni ete mingi kati na bino bazali lokola Poter. Bozali ya kotelema na bopete lokola batatoli ya Nzambe, bolela na baye bazali kolela, mpe bolendisa baye bazali na mposa ya bolendisi na boyebi ete bozali kobatela mayokani bosalaki kati ya mayi ya libatisi mpe na tempelo. Ntango bozali kolinga, kosenzela, mpe kosalisa basusu na boke mpe na nzela elongobani, bozali kosala kati ya mosala ya lobiko, mosala ya Nzambe “ezali komema na bobungi te kasi kopesa bomoyi ya seko ya moto.”3
Lokola bana basi kati na Bokonzi ya Nzambe tozali,”4tosalaki mayokani masantu. Tozali kotambola na oyo Nefi abengaki “Nzela ya eke mpe ya nkaka oyo ezali komema kino na bomoyi ya seko.”5tozali banso bisika ekeseni na kati ya nzela. Kasi tokoki kotambola elongo kosalisana“nakotambola na bokasi nalolenge ya klisto, na kozalaka na elikia ya pole, mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato banso.”6
Jeanne azali kosala lokola mosungi ya basi bilenge. Sima ya sanza mingi atangaki mpo ya kosalisa milulu oyo esengelaki koya mpo na bilenge ya palwasi: atelemi na ngomba na esika oyo ebengami Malan peak. Azalaki na esengo mpo ya bomati ngomba yango.
Ntango akomaki na ebandeli ya esika esengelaki, moninga na ye na nkombo ya Alshley apusanaki mpembeni na ye. Apesi ye loboko na Jeannne, bakendaki, mpe alobi nakokende na yo, ”Ashler azalaki na mibu zomi na motoba na ntango wana, ezalaki mbinga na makasi mpo na komata ngomba na lombamgo . Ye na Jeanne batambolaki malembe, nakotalaka bikelamu ya Tata ya likolo: mabanga na likolo ya ngomba esika bazalaki, bafololo, mpe nionso mpenempene na bango. Kala mingi te Jenane alobiki, “ezwi ngai ntango mingi te mpo ya kobosana komata na ngomba, kala mingi te ekokoma libakuya lolenge mosusu— libaku ya kotala kitoko ya nzela, ebele nalingaki kozanga ezalaki bokomi na likolo ya ngobma ya Mala. Peak”
Lokola Jeanne mpe Ashler bazalaki komata ngomba, mosika ya lisanga, Emma alandaki bango elenge mosusu ya mwasi ya palwasi, oyo azwaki mokano ya kozela mpe kokende nabango nzela moko. Emma abakisaki esengo na bango na boyei na ye. Alakisaki bango loyembo moko mpe asungaki bango mingi mpe alendisaki bango. Jeanne akanisaki: “tofandaki mpe topemaki, toyembaki, tosololaki, mpe tosekaki. Nasalaki liyebani na Ashler na Emma na nzela oyo ngai na tokokaki kosala na ndenge mosusu te. Ezalaki pona ngomba te na butu wana— Ezalaki mingi, kosalisana na nzela mobimba, lokolo moko liboso.
Lokola jeanne, Ashley, mpe Emma bamataki ngomba mpe bayembaki bapemaki mpe basekaki elongo, bango bazalaki na makanisi te, “tozali kobatela mayokani na biso sikoyo.”kasi bazalaki kobatela mayokani na bango. Bazalaki kosalisana bolingo, mawa, bomipesi, bazalaki kolendisa bondimi na bango moko na moko lokola bazalaki kolendisa mitema, mpe koyangelana moko na moko.
Mpaka Russell M. Nelson ateyaki: “Tango tomoni ete tozali bana ya liyokani, toyebi banani biso tozali mpe nini Nzambe azali kozela biso tosala. Mibeko na ye ekomami kati ya mitema na biso.”7
Maria Kuzina azali mwana mwasi ya liyokani ya Nzambe oyo ayebi nani ye azali mpe maye Nzambe azali kozela mpo na ye. Ntango ayambaki ngai na ndako na ye na Omsk, na Russie nakanisaki ete nayaki mpo na koteya ye, kasi namonaki sima ete nazalaki kuna mpo na koteyama uta na ye. Abongola motema na Eklezia, Maria azali kozala lokola naLuka 22: “Tango obongoli matema, lendisa ba ndeko na yo.”8azali na kondima na maloba ya profeta na biso ya bomoyi, Mokambi Thomas S. Monson, oyo alobaki:
“sikoyo ezali tango poya bandimi nioso mpe bamisionele kosangana, mpo ya kosala elongo, kosala na elanga ya vino ya Nkolo mpo ya komema milimo epayi na ye….
“…Ntango tozali kosala na kondima Nkolo akolakisa biso lolenge kani tokoki kokomisa Eklezia na ye makasi na Papalwasi mpe Bitapi oyo tozali. Ye akozala na biso mpe akoya kosalisa biso na mosala ya elanga ya misio.
“…Bosalela bondimi nabino…lokola bozali kosambela mingi bobenga boko ya mabota na bino, baninga na bino, epai ya bamisionele, baya bakoyoka sango ya bozongisi. ”9
Maria alandi lilako liye na kobatela mpe kosalisa bandeko basi abengamaki poya kotala, kotangisa mpe lisusu koleka misio eye. Azalaki na baninga ebele baye bazalaki na bondimi moke mpe baye bayokaki nano sango malamu ya bozongisi te ya Yesu klisto. Mikolo minso abandaki kosalela bondimi naye mpe kosambela poya koyeba nani azali na posa ya lisungi naye, mpe asaleli nalombango azwi. Abengaki na nzela ya singa, nakotalisa bolingo naye, mpe ayebisaki baninga naye, “tozali na posa na bino.” Akutanaka na poso nioso na pokwa na libota naye mpe abengaka bato bapenepene naye, bandimi, mpe bamisionele poya koya—mpe kolesa bango. Abengaki bango koya na Eklezia, kotala bango, mpe kofanda mpembeni nabango tango bazali kokoma.
Maria akanisaki mbalamoko maye Mpaka Elder Jeffrey R. Holland alobaki ete “libengami liye libotami na bolingo na biso mpo ya basusu mmpe mpo ya Nkolo Yesu Klisto … ekozala lokola kotuka te to kosambisama.”10 Azalaki na bakombo ya bato balobaki ete batukamaki, mpe abandaki kosala mpo ya bango. Mpo bayebi ete alingaka bango mingi, ayebisaki bango, “Botukama te. Yango ezali soni!”
Maria azali moyekoli ya Yesu Klisto ya mobateli liyokani. Atako azali na Bonganga Nzambe te na ndako na ye, ayokaki nguya ya Nzambe mikolo minso na bokokisi mayokani na ye ya tempelo nabotosi na ye, na boyiki mpiko kino na suka na kosalisa basusu kosala mosala ya lobiko na nzela na bango.
Lokola nakaboli boyebi oyo,bokomona binomei mosala ya bosikoli. Kozwa ntango ya kokanisa mwana mwasi mosusu ya Nzambe oyo azali na mposa ya malendisi mpo ya kozanga na liyokani, to oyo azali na mposa ya ndambo ya bosalisi mpo ya kotikala kaka na nzela. Tuna Tata wa Lola na ntina na ye. Azali Mwana na ye. Ayebi kombo na ye. Ayebi yo, mpe akotalisa yo oyo ye alingi. Zala na kimia mpe koba na losambo mpo na ye, mpe salela na bowumeli te oyo bino bozwi. Lokola bozali kosala na lombango eye, molimo ekotatola ete likabo nabino endimami na Nkolo.
“Ndeko Eliza R. Snow…natondi bokasi ya ndeko mwasi mpoya bolendisi ya basusu…. Ayebisaki bango ete atako Eklezia ezalaki makomi ya likabo nionso te bango basalaki mpona kosalisa bazangi, Nkolo azali na makomi malamu mpoya mosala nabango ya lobiko:
“‘…Mokambi Joseph Smith alobaki lingomba liye lizalaki ebongisama mpona kobikisa milimo. Nini [tozali kosala] mpoya kozongisa baye bapengwa?—kozangisa bondimi nab aye bakoma piyo na sango malamu?—buku mosusu ebatelami mpoya kondima nayo, bosembo, misala nayo kitoko, mpe[nayo] maloba. Makomi mosusu ebatelami. Eloko moko ezali yakobunga.’”11
Na buku ya Mormon, Amona alobi na ntina ya bwanya ya monene tosengeli kosepela. Alobi: mpe sikoyo, nazali kosenga, boniboni mapamboli [Nzambe] epesameli biso? Bokoki koloba yango?”
Na esengo na ye, Amona, azali kozela eyano moko te, alobi, “ Botala nazali koyanola mpo na bino; … oyo ezali mapamboli epesameli mpo na biso, oyo biso tozali bisaleli na maboko ya Nzambe mpo ya komema mosala makasi na ye.”12
Tozali bana basi babateli mayokani na Bokonzi ya Nzambe, mpe tozali na libaku ya kozala bisaleli kati ya maboko na ye. Lokola tozali kozala kati na mosala ya lobiko mikolo minso na boke mpe na nzela ya pasi te—kotala, bokasi, mpe bomitangisi—tokokende elongo na Amona, oyo alobi:
Botala, esengo na ngai etondi meke, iyo, motema na ngai etondi na esengo, mpe nakosepela na Nzambe nangai.
Iyo, nayebi ete nazali pamba; na bokasi na ngai nazali pete, na yango namilakisi te, kasi nakomilakisa mpo ya Nzambe, mpo ete na bokasi na ye nakoki kosala biloko nionso.”13
Na yango natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, Amene.