Bokoki Kosala Yango Sikoyo!
Lokola tozali na bolingi ya kotelema mpe kokoba kolanda nzela, ...tokoki koyekola uta na kokweya na biso mpe kokoma malamu mpe bato ya esengo koleka.
Ntango na zalaki elenge, na kweyisamaki mpe na tikaki mabe kasi bomoi na ngai ezalaki kaka se lolenge moko. Ntango bamvula ebele elekaki, nayango, nayaki komona na mwa bobangi ete mibeko ya mokili ebongwanaki— kasi mpo na bolamu na ngai te.
Kasi sima mwa ntango moke te Nazalaki kosala sky na nkoko na ngai ya mvula zomi na mibale. Tobandaki kolekisa ngonga na biso elongo ntango Natuti libanga ya galase mpe nasukaki na kokweya na esengo nabokiti na ngomba ya moselu.
Namekaki kosala nyonso mpo natelema, kasi nakokaki te—Nakweyaki, mpe Nakokaki kotelema te.
Nayokaki nzoto malamu, kasi bamvula na ngai epusanaki ndambo. Nabongo Nazalaki na elikia ete ekoti na ngai mpe maneti na ngai ezalalaki na esika na yango, mpo Nazalaki kolinga mingi ete babeti lisano mosusu bayeba ngai te. Nakamwaki ngai moko esika nazalaki nazangaki lisalisi lokola bazalaki kosakana kitoko, na kongangaka na esengo, “mbote, Ndeko Uchtdorf!”
Nabandaki komituna mingi eloko nini ekobikisa ngai. Ezalaki ntango koko na ngai ayaki penepene na ngai. Nayebisaki ye, nini esalemaki, kasi maye ngai nayebisaki ye azwaki yango na tina te ntango nalobaki mpo na nini nakokaki kotelema te. Atalaki ngai na miso, atandaki loboko, asimbi ngai na loboko mpe alobi na mongongo makasi “Koko, okoki kosala yango sikoyo!”
Na mbala moko, Natelemaki.
Natikalaki kaka koningisa motu na ngai na likambo yango. Oyo emonanaki lokola ete ekokaki kosalema te na ebandeli ekomaki ya solo na mbala moko kaka mpo mwana ya mibu zomi na mibale atandelaki ngai loboko mpe alobi, “Okoki kosala yango sikoyo!”mpo na ngai, ezalaki bomipesi ya elikia, nsai, mpe bokasi.
Bandeko, ekoki kozala na bantango mosusu na bomoi na biso wapi kotelema mpe kokoba kokende liboso ekoki komonana se lokola eleki makoki na biso. Mokolo oyo londende ezipi ngomba, Nayekolaki eloko moko. Atako tokanisi ete tokoki kotelema te, elikia ezali naino. Mpe bantango mosusu tozalaka na bosenga moto atala biso na miso, asimba loboko na biso, mpe aloba, “Okoki kosala yango sikoyo!”
Likanisi ya Mpasi
Tokoki kozala na makanisi ete basi bazali lolenge moko na mibali nakomimonaka neti bokoki ezangi mpe kosiswa—ete mposa yango elata bango mingi koleka biso. Nandimi te ete ezali ya solo. Mibali mpe bamiyokaka na ngambo, balembeke nzoto mpe bakweyaka. Tokoki kokanisa ete mayoki maye ekoki kotungisa biso te kasi matungisaka. Tokoki koyoka mitungisi mingi na ntina ya bokweyi mpe bozangi kati na biso nde tobandi kokanisa ete biso tokokoka kolonga te. Tokoki kutu kokanisa ete mpo tokweyisami liboso, kokweyisama ezali nsuka oyo balakeli biso. Ndenge mokomi moko akomi, “Tokobaki kokende, bwatu na mbonge makasi, kozongaka ntango nionso na ebandeli. ”1
Natalaki bato batonda na makoki mpe ngolu kotika misala ya makasi ya kotonga bokonzi ya Nzambe mpo bakweyisamaki mbala moko to mibale. Nzokande ezali bato na elaka oyo bakokaki kozala bamemi ya bonganganzambe ya malonga mpe basali ya Nzambe. Kasi mpo ete babatelaki mabaku mpe bayikaki mpiko te, babendanaki uta na mokano na bango ya bonganganzambe mpe balandi misala oyo ezali ya pete kasi elongobana te.
Mpe boye, bakokende liboso, mpe bakotambwisaka bobele elili ya bomoi basengelaki kotambwisa, bakokoka soki moke te komitombwama na makoki na bango ya mbotama. Lokola poeti alelaki, ete ezali o ntei ya milimo miye ya mawa oyo “bakufaka na [ebele yaba] nzembo[kino] kati nabango.”2
Moto moko te alingaka kozanga. Mpe, tolingaka yango te ntango basusu—mingi baye tolingaka—komona biso kozanga. mpe lokola tolingaka te ntango basusu biso limemia mpe bato basepela na biso. Tolingi kozala balongi. Kasi biso bakufi tokokoma balongi te na kozangaka kosala makasi mpe botosi to na kozangaka kosala mabunga.
Bandeko, nsuka na biso etangami te na motango ya ngonga oyo tozali kobeta mabaku kasi na lolenge tozali kotelema, kopupula mputulu, mpe kokende liboso.
Mawa ya Bonzambe
Toyebi ete bomoi na biso ya bakufi awa na nse ezali momekano. Kasi lokola Tata na biso na Lola alingi biso na bolingo ya sembo, Ye nde alakisaka biso wapi kozwa biyano. Apesi biso kalati ya kotambola atako na mabele oyo biso toyebi te na mimekano oyo moko na moko akutanaka nayango na bomoi. Maloba ya baprofeta ezali ndambo ya kalati yango.
Ntango tozali mosika—ntango tokweyisami to tobungi nzela ya Tata na biso na Lola—maloba ya baprofeta elakisi biso lolenge nini tokoki kotelema lisusu mpe kozonga lisusu na motuka.
Mibeko nyonso oyo ba profeta batangisi biso uta ebandeli, oyo babeteli sete mbala na mbala ezali maloba ya elikia mpe mpiko ete bato malamu bakoki kotubela masumu, mpe babongola etamboli, mpe bazongela nzela ya solo ya boyekoli.
Elakisi te ete tosengeli kozala kimia liboso ya botau na biso, libunga, to masumu. Kasi ezali na bokeseni monene liboso ya mpasi ya masumu oyo etindaka na kotubela mpe mpasi eye ekumbaka na bobwaki elikya.
Apostolo Polo atangisaki ete “mpasi ya bonzambe epesaka botubeli masumu na lobiko… kasi mpasi ya mokili epesaka liwa.”3 Mpasi ya bonzambe epesaka mbongwana mpe elikia natina ya bokabi ya Yesu Klisto. Mpasi ya mokili ekitisaka biso, ebungisaka elikya mpe kondimisa biso na mimekano koleka.
Mawa ya Nzambe etindaka biso na mbonguana 4mpe kobongola motema.5. Eyinisaka biso masumu mpe tolinga bolamu. 6 Elendisaka biso kotelema mpe kotambola na pole ya bolingo ya Klisto. Boyamboli ya solo ezali mpo na kobongola, yango ezali komonisa mpasi to konyokola biso te. Iyo, motema eyoki mawa mpe mitungisi mpo na bozangi botosi esalaka mbala mingi mpasi. Kasi ezali na matambe ya motuya mingi mpo na nzela ya bule ya boyamboli. Kasi soki elindo ezali kotinda biso na likunya na biso moko to epekisi biso kotelema lisusu, ezali kopekisa biso esika ya kokolisa boyamboli.
Bandeko na ngai ya mibali, nzela malamu ezali. Tika ete totelema mpe tokoma mibali ya Nzambe. Tozali na molongi, mobikisi, oyo atambolaki na libulu ya molili ya nkufa mpo na bizaleli na biso. Ye Amibonzaki lokola mbeka mpo na mabe na biso. Moko te na mokili azali na bolingo ya monene boye—Yesu Klisto, mwana na mpate azanga lisumu, Amibonzaki na bolingo nyoso na ekulusu mpe afuti nyongo ya masumu na biso “kino na nsuka mpenza.”7Azwaki likolo na ye mpasi na biso. Azwaki mokumba, mpe mitungisi likolo ya mapeka Na ye. Baninga, balingami na ngai, ntango tozwi mokano ya koya epai na Ye, ntango tozwi nkombo na Ye, mpe na mpiko totamboli nzela ya bayekoli, na ntina ya Libonza liye lilakelami mpo na biso ezali kaka te mpo na bolamu mpe “kimia na mokili oyo” kasi lisusu “bomoi ya seko na mokili ekoya.”8
Ntango tozali kosala mabe, ntango tozali kosumuka mpe kokweya, tika tokanisa na ntina na yango nini ezali koyambola ya solo. Elakisi kobongola mitema nabiso mpe bolingi nabiso epai ya Nzambe mpe kosundola masumu. Koyambola ya solo uta na motema ememeka elongo na yango bosolo ya likolo ete “tokoki kosala yango sikoyo.”
Yo Ozali Nani?
Moko motindo ya monguna ezali kopekisa biso kokende liboso ezali kotiya potopoto kati ya makanisi na biso mpe na lolenge biso tozali ya solosolo mpe oyo tolingi solosolo.
Tolingaka mingi kolekisa ngonga na bana na biso, kasi mpe lokola tolingi komipesa na misala ya biso tolingaka mingi. Tolingi mpe kokonda mwa moke, mpe tolingi kolia biloko oyo tolingaka mingi. Tolingi kokoma lokola Klisto, kasi tolingaka mpe koteya mwana mobali oyo apekisaka biso kokatisa nzela ya mituka.
Mposa ya satana ezali kosenginya biso tosombitinia libanga motuya ya esengo ya solo mpe ya makambo ya motuya mpo na akomisa yango eloko moko ezanga ntina mpo tobungisa esengo mpe bosepeli.
Lolenge mosusu monguna asalelaka ezali ya kolembisa biso mpona kokende liboso ezali komona mibeko eloko moko ya mpasi lokola batie biso likolo na makasi. Nakanisi ete esengeli na moto ko ika mpiko tobungisa te makanisi na biso moko na esika ya liboso.
Soki totosi bileyi esantu mpe tosaleli lokola eloko moko bobele monganga azozela mpona biso ndingisa. Tokokweya solo mpenza. Soki tomoni maponi maye lokola lolenge tozali mpe nani tolingi kokoma, tozali na nkonzo enene ya kotelema mpe kolonga.
Soki totali mateya na mabota lokola kaka ntina ya mokambi ya likonzi, tokoki kopesa yango motuya moke ya kosala yango. Kasi soki topesi tina na maloba maye—ntango mosusu tozalaka na mposa ya kosala mpo na kokoma mingi koleka lokola Klisto mpe kosalisa basusu—tokokokisa bobele mikano na biso te kasi tokokokisa yango na lolenge oyo ekopambola ya solo mabota oyo biso totalaka mpe ya bisomei lokola.
Mbala mini, tozali baoyo nde baninga mpe mabota bazali kosalisa. Kasi soki totali nzinganzinga na miso ezali komona mpe nini ezali kosalema mpe tozali na mposa ya kosalisa, tokoyeba mabaku oyo Nkolo atii liboso na biso mpo na kosalisa basusu ete batelema mpe basalela makoki na bango ya solo. Makomi mapesi likanisi ete, “Nyonso oyo bosalaka, bosala yango na motema mobimba, lokola nde bozali kosala mpo na Nkolo, mpe mpo na bato te.”9
Ezali eziba enene ya bokasi ya molimo mpo na bomoi ya malonga mpe ya bosembo mpe mpo na miso na biso etala kaka epayi bomoi ya seko esengeli mpo na biso. Atako tokoki kotala esika oyo ya bonzambe ya nsuka bobele na miso ya bondimi, ekosalisa biso kotikala na nzela.
Ntango bokebi na biso ekangami na elongo to bokwei na biso ya mokolo na mokolo, tokoki kobunga nzela na biso, kowayawaya mpe kokweya. Kotiaka miso na biso likolo ya ntina eye, ekosalisa biso tokoma bana mibali, bandeko mibali, batata, mpe mibali ya bolingi koleka.
Ata baye batie mitema na bango likolo ya ntina ya bonzambe bakoki lisusu kobeta libaku, kasi bakokweyisama te. Bakolikia mpe bakoyekama na bilaka ya Nzambe. Bakotelema lisusu na elikya ya kongenga ya bosembo ya Nzambe mpe bomoni efulama ya nkembo ekoya. Bayebi ete bakoki kosala yango sikoyo.
Bokoki Kosala Yango Sikoyo.
Moto na moto, elenge mpe mukolo, bazali na mayele na bangomei ya kokweya. Kokweya ezali nini biso bakufi tosalaka. Kasi mbala inso tozali kolinga kotelema mpe kokoba liboso epai ya bantina wana ya molimo Nzambe apesi biso, tokoki koyekola yoko likambo na kokweya mpe kokoma malamu mingi koleka lokola mbano.
Bandeko nangai ya mibali, baninga nangai, ekozala na ngonga mosusu tango boko kanisa te kokoba liboso. Bolikia na Mobikisi mpe bolingo na Ye. Na bondimi na Nkolo Yesu Klisto mpe elikia ya nsango malamu ezongisami, boko koka kotambola ya kotelema mpe kokoba liboko.
Bandeko mibali, tolingi bino. Tozali kosambela mpo na bino. Nakolikia ete bozali koyoka Mokambi Monson kosambelaka mpona bino, Atako ozali Tata elenge, momemi ya bonganganzambe ya kala, to diakono akulisami sika, makanisi na biso ezali epayi na bino. Nzambe azali makanisi na bino!
Toyebi ete nzela na bino ekozala ntango mususu ya mpasi. Kasi napesi bino elaka na nkombo ya Nkolo: botelema mpe bolanda matambe ya Mosikoli mpe Mobikisi na biso, mpe mokolo moko bokotala sima mpe bokotondisama na botondi ya seko ete boponaki kondimela Bomikabi mpe nguya mpo na kotelemisa bino mpe kopesa bino mpiko.
Baninga na ngai mpe bandeko na ngai ya bolingo, ezala boniboni mbala mingi bosielumukaki to bokweyaki, Botelema! Atandele na biso ezali ya nkembo! Botelema mpenza mpe botambola na pole ya nsango elamu ezongisami ya Yesu Klisto! Bozali makasi mingi koleka boyebi. Bozali makasi mingi koleka bokoki kokanisa. Bokoki kosala yango sikoyo! Nayango Natatoli na nkombo mosantu ya molakisi mpe mosikoli, Yesu Klisto, Amene.