Mwango Monene
Biso baye toyebi mwango ya Nzambe mpe baye tosali mayokani mpo na kosala elongo, tozali na mokumba ya polele ya koteya bosolo oyo.
Ata tozingami na mimemekano mpe mikakatano moko, tozali solo ya kopambolama! Likita linene oyo epesi biso bosopani ya bosolo mpe esengo ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Tosepeli na limoni ya Tata mpe Mwana oyo ebandaki Bozongisi. Tokundolisami bobimisi ya kokamwa ya Buku ya Mormon, oyo ya yango ntina ya motuya ezali kotatola Yesu Klisto mpe malongi na Ye. Tozongisami sika na esengo ya koyeba ete emoniseli ezali solo—epai ya baprofeta mpe epai na biso moko. Toyoki matatoli ya motuya ya Bomikabi ezanga ndelo ya Yesu Klisto mpe Bosekwi na Ye na nzoto. Mpe toteyami bosolo makambo mosusu ya solo ya litondi ya nsango malamu na Ye oyo emonisamaki epai ya Joseph Smith nsima ya koloba ya Nzambe Tata epai ya profeta wana abiangamaki sika: “Oyo azali Mwana na Ngai wa Bolingo. Yokela Ye!” (Joseph Smith—Mambi ya kala 1:17).
Tolendisami kati na boyebi na biso ya bozongisi ya bonganganzambe mpe bafungola na yango. Tozongisami sika na mokano na biso ete Eklezia ezongisama ya nkolo eyebana na nkombo na yango malamu mpe edimama, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Mpe tobengisami tosangana kati na bokili bilei mpe losambo mpo na kokitisa mbano ya sikawa mpe oyo ekoya ya bolozi moko ya bobomibomi na mokili mobimba. Na ntongo ya lelo tofulami na profetaya bomoi ya Nkolo kolobaka Esakola moko ya Bozongisi. Tondimi esakola na ye ete “baoyo bazali koyekola na losambo nsango ya Bozongisi mpe kosala na bondimi bakopambolama mpo na kozwa litatoli ya bangomei ya bonzambe mpe ya ntina na ye ya kolengela mokili mpo na Boyei ya Mibale elekama ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.” 1
Mwango
Nyonso oyo ezali eteni ya mwango ya bonzambe oyo na yango ntina ezali mpo na kopesa nzela na bana ya Nzambe banetolama mpe bakoma lokola Ye. Elobelami na Makomi lokola “mwango ya esengo,” “mwango ya bosikoli,” mpe “… mwango ya lobiko” (Alma 42:8, 11, 5), mwango wana—oyo emonisamaki na bozongisi—ebandaki na Likita moko na Lola. Lokola milimo, tozalaki na mposa ya kokokisa bomoi ya seko oyo ezali na baboti na biso ya lola. Na ntango wana tokolaki mosika bo ekokaki biso kozangaka nzoto ya mosuni. Mpo na kopesa boyebi wana, Nzambe Tata asalaki mwango ya kokela mabele oyo. Na bomoi ya kufa oyo asalaki, tokobebisama na lisumu ntango tokutani na botelemeli oyo esengeli mpo na bokoli na biso ya molimo. Tokokoma lisusu bato ya liwa na nzoto. Mpo na kobikisa biso na liwa mpe lisumu, mwango ya Tata na biso na Lola ekopesa Mobikisi. Bosekwi na Ye ekosikola banso na liwa, mpe libonza na ya komikaba ekofuta ntalo esengeli mpo ete banso topetolama na masumu soki tokokisi masengeli mpo na kosunga bokoli na biso. Bomikabi ya Yesu Klisto azali motuya na mwango ya Nzambe.
Na Likita na Lola, bana ya milimo nyonso ya nzambe balakisamaki mwango ya tata, kokwaka mbano ya kufa mpe mikakatano na yango, masungi na yango ya lola, mpe ntina na yango ya nkembo. Tomonaki nsuka uta na ebandeli. Motango ebele nyonso ya bato na nkufa oyo babotami na mabele baponaki mwango ya Tata mpe babundaki mpo na yango na bitumba ya lola oyo elandaki. Mingi lisusu basalaki mayokani elongo na Tata na oyo etali maye bakosala na bokufi. Na ndenge oyo emonisami te, bikela na biso na mokili ya molimo etindikaki makambo na biso na bokufi.
Bokufi mpe Mokili mwa Molimo
Nakoloba na mokuse sikawa mwa biteni ya ntina monene ya mwango ya Tata, mpamba te ezali kobika yango na mibembo na biso na bokufi mpe na mokili ya Molimo oyo elandi.
Ntina ya bomoi na kufa mpe bokoli nsima na kufa oyo ekoki kolanda yango ezali mpo ete bana ya Nzambe bakoma lokola Ye azali. Oyo ezali mposa ya Tata na Lola mpo na bana na Ye. Mpo na kokokisa ntina ya esengo, mibeko ya seko esengi ete tosengeli bikelamu epetolama na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpo ete tokoka kofanda na miso ya Tata mpe Mwana mpe kosepela na mapamboli ya bonetoli. Lokola Buku ya Mormon eteyi, Ye abengisi “banso baya epai na ye mpe bakabola bolamu na ye; mpe akoboya moko te oyo akoya epai na ye, moyindo mpe mpembe, mowumbu mpe monsomi, mobali mpe mwasi; mpe akanisaka bapaganu; mpe bango banso bazali lolenge moko kaka epai ya Nzambe” (2 Nefi 26:33; tala lisusu Alma 5:49).
Mwango ya bonzambe mpo na biso tokoma oyo tokanami kokoma esengi biso kosala boponi ya koboya botelemeli mabe oyo emekaka bato na kufa basala kotelemelaka mitindo ya Nzambe mpe mwango na Ye. Esengaka lisusu ete tokutana na botelemeli ya kufa mosusu, lokola ya masumu ya basusu to ya mwa bambeba ya mbotama. Ntango mosusu bokoli na biso oyo tosengeli na yango ekokisami malamu na nzela ya mpasi mpe motungisi koleka na nzela ya libondi mpe kimia. Mpe moko te ya botelemeli na kufa oyo ekokaki kokokisa ntina na yango ya seko soki bokoti ya bonzambe mpo na kokangola biso na bambano mabe ya bokufi.
Mwango emonisi ntina na biso kati na boseko, ntina mpe bizalela ya mobembo kati na kufi, mpe masungi ya lola oyo tokozwa. Mitindo ya Nzambe ekebisaka biso na kopengwa kokotaka na bisika ya likama. Mateya ya bakambi bafulama ekambaka nzela na biso mpe epesaka bozangi kobanga oyo esungaka mobembo na biso ya seko.
Mwango ya Nzambe epesaka biso bozangi bobangi monene minei mpo na kosunga mobembo na biso na nzela ya bokufi. Nyonso epesameli biso na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, likambo ya motuya ya mwango yango. Ya yambo epesi biso elikya ete na nzela ya mpasi na Ye mpo na masumu oyo toyamboli, tokoki kopetolama na masumu wana. Nsima mosambisi ya nsuka atonda ngulu ako “mikundola yango lisusu te” (Malongi mpe Mayokani 58:42).
Ya mibale, lokola eteni ya Bomikabi ya Mobikisi na biso, Ye azwaki likolo na Ye maladi mosusu nyonso ya kufa. Oyo epesi biso nzela ya kozwa lisalisi mpe makasi ya komema mikumba tokoki kokima te ya bokufi, ya moto na moto moko moko mpe ya bato banso, lokola bitumba mpe bokono ya mabe. Buku ya Mormon epesaka bolimboli na biso ya makomi ya polele mpenza ya nguya ya ntina ya Bomikabi. Mobikisi akamataki likolo na Ye “mpasi mpe bokono [mpe maladi] ya bato na ye. … Ye akokamata likolo na ye bokono na bango, ete nsopo na ye ekoka kotonda na ngolu, engebene na mosuni, ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa bato na ye engebene na bokono na bango” (Alma 7:11–12).
Ya misato, Mobikisi, na nzela ya Bomikabi na Ye ezanga ndelo, alongoli nsuka ya liwa mpe apesi biso bozangi kobanga ya esengo ete banso na biso tokosekwisama. Buku ya Mormon eteyi, “Bozongisi oyo ekoya epai ya baso, babale mokolo mpe elenge, babale moto ya bolembo mpe ya bosembo; mpe kutu yango ekobunga koleka lokola nsuki moko ya mitu na bango; kasi eloko nyonso ekozonga na bobongi nie na yango lokola ezali sikawa” (Alma 11:44).
Tozali kokembela bozali solo ya Bosekwi na eleko oyo ya Pasika. Oyo ezali kopesa biso emoneli mpe bokasi ya komema mikakatano ya kufa oyo ekutami na moko moko na biso mpe na baye tolingaka, makambo lokola bozangi na nzoto, na moto, to na mayoki oyo tozwaka na mbotama to tokutanaka na yango na bomoi na biso ya kufa. Na nzela ya Bosekwi , toyebi ete bozangi ya kufa oyo ezali kaka ya ntango!
Nsango malamu ezongisama epesi biso elikia ete kati na Bosekwi libaku ezali ya kozala elongo na bato ya libota na biso—mobali, mwasi, bana, mpe baboti. Oyo ezali bolendisi ya nguya mpo ete biso tokokisa mikumba na biso ya libota na bokufi. Esungi biso tozala na bomoi elongo kati na bolingo na bomoi oyo na boluki ya bokutani ya esengo mpe bosangani na oyo ya nsima.
Ya minei mpe na nsuka, emoniseli ya sikawa eteyi biso ete bokoli na biso esengeli kosuka na nsuka ya bokufi. Moke emonisami etali elikia ya motuya oyo. Tolobelami ete bomoi oyo ezali ntango ya komilengela mpo na kokutana na na Nzambe mpe ete tosengeli kozongisa nsima te boyamboli na biso (tala Alma 34:32–33). Nzokande, toteyami ete na mikili ya milimo nsango malamu esakolami kutu na “bato mabe mpe bazangi botosi oyo baboyaki bosolo” (Doctrine et Alliances 138:29) mpe ete baye bateyami kuna bazali na makoki ya boyamboli liboso ya Bosambi ya Nsuka (tala milongo 31–34, 57–59).
Tala mwa bosolo ya ebandeli mosusu ya mwango ya Tata na biso na Lola:
Nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto epesi biso emoneli se moko etali makambo ya bopeto bwa nzoto, libala, mpe boboti bana. Eteyi ete libala engebene na mwango ya Nzambe ezali na ntina mpo na kokokisa mwango ya Nzambe, mpo na kopesa solo esika eponama na bonzambe mpo na mbotama na bomoi ya kufa mpe kolengela bato ya libota mpo na bomoi ya seko. “Libala etindami na Nzambe mpo na moto,“… Nkolo alobaki, “ete mabele makoka kokokisa ntina ya bokeli na yango” (Doctrine et Alliancess 49:15 Na yango, mwango na Ye, solo, ezali kotelemela banguya ya mokili ya makasi mosusu na mobeko mpe bonkoko.
Nguya ya kokela bomoi ezali nguya ya konetolama mpenza Nzambe apesi bana na Ye. Bosaleli na yango etindamaki na motindo ya yambo epai ya Adama mpe Eva, kasi mitindo mosusu ya motuya epesamaki mpo na kopekisa bosaleli na yango ya mabe. Libanda na mikangano ya libala, bosaleli nyonso ya nguya ya kobota ekoki kozala na ndelo ekeseni mingi na makasi bokitisi mpe bobebisi moko ya lisumu mosusu ya libongi ya bonzambe mpenza ya mibali mpe basi. Nsete nsango malamu ezongisami ebeti na mobeko ya bopeto ezali mpo na ntina ya banguya na biso ya kokela elimbolami na bososoli na biso ya ntina ya nguya ya kobota na bokokisi ya mwango ya Nzambe.
Nini elandi nsima?
Na ntango ya bokundoli mibu ya mbala 200 oyo ya Limoni ya Yambo oyo ebandaki Bozongisi, toyebi mwango ya Nkolo mpe tolendisami na bikeke mibale ya mapamboli na yango na nzela ya Eklezia na Ye ezongisama . Na mobu oyo ya 2020, tozali na oyo ebengami na bato ebele limoni ya 20/20 mpo na makambo ya kala.
Nzokande, tango tozali kotala na mikolo ekoya, limoni na biso ezali polele te. Toyebi ete bikeke mibale nsima ya bozongisi , mokili milimo sikawa ekwi basali ya boyebi na bokufi mingi mpo na kokokisa bosakoli oyo ezali kosalama kuna. Toyebi lisusu ete tozali sikawa na batempelo mingi koleka mpo na kosala makuli ya boseko mpo na baoyo bayamboli mpe bayambi nsango malamu ya Nkolo na ngambo mosusu ya elamba ya liwa. Nyonso oyo ezali kopusa mwango ya Tata na biso na Lola. Bolingo ya Nzambe ezali monene mpenza ete, longola mpo na moke oyo na motema moko bakomi bana ya libunga, Ye apesi ntina ya nkembo mpo na banso ya bana na Ye (tala Malongi mpe Mayokani 76:43).
Toyebi ete Mobikisi akozonga mpe ete ekozala na nkoto ya mibu ya boyangeli ya kimia mpo na kosukisa eteni ya kufa ya mwango ya Nzambe. Toyebi lisusu ete ekozala babosekwi ekeseni, ya bayengebene mpe ya bazangi bozangi boyengebeni, na bosambisi ya nsuka ya moto moko na moko ntango nyonso kolandaka bosekwi na ye.
Tokosambisama na kotalaka misala na biso, bamposa ya mitema na biso, mpe lolenge ya moto tosili kokoma. Bosambisi oyo ekosala ete bana banso ya Nzambe bakende epai ya bokonzi moko ya kembo mpo na oyo botosi na bango elongisaki bango mpe epai wapi bazala malamu. Mosambisi ya manso oyo azali Mobikisi na biso, Yesu Klisto (tala Joane 5:22; 2 Nefi 9:41). Boyebi na Ye ya makambo nyonso epesaka Ye boyebi ebonga nie ya nyonso ya bikela mpe bamposa na biso, oyo eyambolami te to ebongolami te mpe oyo eyambolami to ya bosembo. Yango wana, nsima ya bosambisi na Ye tokondima “ete masambisi na ye mazali sembo” (Moziya 16:1).
Na kosukisa, nakaboli bondimi ya sikisiki oyo eyeli ngai kati na mikanda mingi mpe na kotalaka bosenga mingi ya kozongela Eklezia nsima ya bobekoli to bopengwi. Mingi ya bandimi na biso bayebaka mpenza te mwango ya lobiko oyo, oyo eyanolaka mituna mingi mpenza na ntina ya malongi mpe banzela ya kosala misala efulama ya Eklezia ezongisama. Biso oyo toyebi mwango ya Nzambe mpe oyo toyokani mpo na kosala elongo, tozali na mokumba ya koteya bosolo oyo mpe kosala manso tokoki mpo na kolandisa yango mpo na basusu mpe kati na makambo na biso moko na bomoi ya kufa. Natatoli na ntina ya Yesu Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli na biso, oyo azali kosala ete nyonso esalama, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.