Tika Ete Ndako Oyo Etongama na Nkombo na Ngai
Kasi, mayokani tozwaka mpe makuli tosalaka na kati ya tempelo ezali ntina na bosantisi ya mitema na biso mpe mpo na bonetoli ya nsuka ya bana ya Nzambe ya mibali mpe basi.
Na zamba ya bule mibu 200 eleki, elenge Joseph Smith amonaki mpe asololaki na Nzambe, Tata ya Seko, mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Uta na bango, Joseph ayekolaki na ntina ya bosolo ya lolenge ya Bonzambe mpe emoniseli oyo ezali se kokoba lokola limoni ya Nzambe oyo eyingisaki na mikolo oyo ya nsuka “eleko ya litondi ya bantango.” 1
Pene ya mibu misato nsima, lokola eyano ya losambo ya motema na mpokwa ya Sanza ya libwa mokolo 21, 1823, kisuku ya Joseph etondisamaki na pole kino “engengisamaki mingi koleka moi ya midi.” 2 Moto abimelaki ye pene ya mbeto na ye, abengaki elenge mobali yango na nkombo na ye mpe alobaki “azalaki motindami uta na Nzambe … mpe ete nkombo na ye ezalaki Moroni.” 3 Ateyaki Joseph na ntina ya bobimisi ya Buku ya Mormon.
Mpe nsima Moroni atangaki uta na buku ya Malaki na kati ya Boyokani ya Kala, na mwa bokeseni uta na lokota oyo esalelamaki na kati ya bobongoli ya King James:
“Tala, nakobimisela yo Bonganganzambe, na nzela ya loboko ya Elija profeta, yambo ya boyei ya mokolo monene mpe mokolo ya nsomo ya Nkolo. …
Mpe akotiya na kati ya mitema ya bana bilaka oyo bipesamaki na batata, mpe mitema ya bana ekobaluka na batata na bango. Soki ezalaki bongo te, mabele mobimba ekobebisama na boyei na ye.” 4
Likambo ya ntina monene, makebisi ya Moroni epai ya Joseph Smith na ntina ya etinda ya Elija ebandaki mosala ya tempelo mpe mambi ma kala ya libota na mikolo ya nsuka mpe ezalaki likambo ya motuya kati ya bozongisi “makambo nyonso, oyo Nzambe alobaki na monoko ya basakoli na ye nyonso basantu uta na ebandeli ya mokili.” 5
Nasambeli mpo na lisungi ya Molimo Mosantu awa tozali koyekola elongo na ntina ya mayokani, makuli mpe mapamboli oyo epesameli biso na kati ya batempelo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya mikolo mya Nsuka.
Bozongi ya Elija
Nazali kobanda na kotunaka motuna ya ntina: Mpo na nini bozongi ya Elija ezalaki ntina?
“Toyekoli uta na emoniseli ya mikolo ya nsuka ete Elija azalaki na nguya ya bokangisi ya Bonganganzambe ya Melekisedeke” 6 mpe azalaki profeta ya nsuka oyo asalaki bongo liboso ya ntango ya Yesu Klisto.” 7
Profeta Joseph Smith alimbolaki, “Molimo, nguya mpe libiangi ya Elija ezali, ete ozali na nguya ya kosimba fungola ya … litondii ya Bonganganzambe ya Melekisedeke … ; mpe mpo na … kozwa … makuli nyonso oyo ezali na bokonzi ya Nzambe, kutu kino na koobalusa mitema ya batata epai ya bana na bango, mpe mitema ya bana epai ya batata na bango, kutu na baoyo bazali lola.” 8
Likoki ya bokangisi ya bule oyo ezali ntina mpo ete “nyonso oyo okokanga na mabele ekokangama mpe na lola mpe nyonso okokangola na mabele ekokangolama na lola.” 9
Joseph abakisaki, “Lolenge nini Nzambe akoya kobikisa nkola oyo? Akotinda Elija profeta. … Elija akobimisa mayokani mpo na kokangisa mitema ya batata epai ya bana, mpe bana epai ya batata na bango.” 10
Elija abimaki elongo na Mose likolo ya ngomba ya mbongwana mpe apesaki likoki likolo ya Petelo, Yakobo mpe Yoane. 11 Elija abimaki lisusu na Mose mpe Eliasi na Sanza ya minei 3, 1836, na kati ya Tempelo ya Kirtland mpe apesaki bafungola ya bonganganzambe moko oyo epai ya Joseph Smith mpe Oliver Cowdery. 12
Bozongisi ya likoki ya bokangisi na Elija na 1836 ezalaki na ntina ya kolengela mokili mpo na boyei ya mibale ya Mobikisi mpe ebandisaki litomba ya koyikana mingi mpe ya mokili mobimba na mosala ya boluki mambi ma kala ya libota.
Kobongolaka, Kozongisaka, mpe Kopetolaka Mitema
Liloba motema esalelami koleka mbala 1,000 na kati ya makomi masantu. Liloba ya pete kasi motuya oyo elimboli mbala mingi mayoki ya kati ya moto ye moko. Mitema na biso—motango nyonso ya bamposa na biso, makanisi, mabanzo, bitinda, mpe bizalela—elimbolaka nani tozali mpe etalisaka oyo tokokoma. Mpe ntina ya mosala ya Nkolo ezali kobongola, kobalola, mpe kopetola mitema na nzela ya mayokani ya nsango malamu mpe makuli ya bonganganzambe.
Totongaka to tokotaka na batempelo ya bule kaka mpo na kozwa boyebi na biso moko to boyebi ya libota malamu mpenza te. Kasi, mayokani tozwaka mpe makuli tosalaka na kati ya tempelo ezali ntina na bosantisi ya mitema na biso mpe mpo na bonetoli ya nsuka ya bana ya Nzambe ya mibali mpe basi.
Kotiaka na kati ya mitema ya bana bilaka bipesamaki na batata—kutu Abalayama, Isaka, mpe Yakobo—kozongisaka mitema ya bana epai ya batata na bango moko, kokambaka boluki ya mambi ya kala ya libota, mpe kosalelaka makuli ya bozweli na tempelo ezali misala oyo epambolaka bato na bangambo mibale ya elamba. Ntango tokomi ya komipesa na motema likolo na mosala ya bule, tozali kotosa mitindo ya kolinga mpe kosalisa Nzambe mpe bato bazali nzinganzinga na biso. 13 Mpe mosala na yo moko ya boye esungaka biso mpenza mpo na “Koyoka Ye!” 14 mpe boya epai ya Mobikisi. 15
Mayokani mpe makuli ya bonganganzambe ya bule koleka manso mpenza esalemaka bobele na kati ya tempelo—Ndako ya Nkolo. Eloko nyonso oyo eyekolami mpe oyo esalemi na kati ya tempelo ebetami nsete na bonzambe ya Yesu Klisto mpe mosala na Ye na moango monene ya esengo ya Tata na Lola.
Uta Kati kino Libanda
Mokambi Ezra Taft Benson alimbolaki ndakisa ya motuya Mosikoli asalelaka mpo na komema “bozangi nkufa mpe bomoi ya seko na moto.” 16 Alobaki, “Nkolo asalaka uta kati kino libanda. Mokili esalaka uta libanda kino kati. Mokili ekoki kozwa bato libanda ya bisia ya bobola. Klisto abimisaka bato uta na bisika ya bobola ya bato, mpe nsima bamibimisaka bango moko libanda ya bisika ya bobola. Mokili ekosala bato na kobongolaka nzinganzinga na bango. Klisto abongolaka bato, oyo nsima babongolaka nzinganzinga na bango. Mokili ebongolaka bizaleli ya bato, kasi Klisto akoki kobongola lolenge ya bato.” 17
Mayokani mpe makuli ya bonganganzambe ezali moboko na mosala kosalemaka sikawa ya kobotama lisusu na molimo mpe ya mbongwana; ezali banzela oyo wapi Nkolo asalaka elongo na moko na moko kati na biso uta kati kobima libanda. Mayokani oyo etosami na mokano, ekundolami ntango nyonso, mpe ekomami “na Molimo ya Nzambe na bomoi … na kati ya bitando ya mosuni ya motema” 18 epesaka ntina mpe elikya ya mapamboli tokozwa na mokili oyo ya kufa mpe mpo na bomoi ya seko. Makuli oyo tozwaka ntango tolongobani mpe oyo tomikundolaka ntango nyonso efungolaka banzela ya lola na yango nguya ya bonzambe ekoki kotiolela na bomoi na biso.
Toyaka te na tempelo mpo na komibomba to kokima mabe ya mokili. Kasi, toyaka na tempelo mpo na kolonga mabe ya mokili. Ntango tozali kobengisa kati na bomoi na biso “nguya ya bonzambe” 19 na kozwaka makuli ya bonganganzambe mpe kosalaka mpe kobatela mayokani ya bule, topambolami na kozwaka bokasi likolo na oyo ya biso moko 20 mpo na kolonga masenginya mpe mikakatano ya bomoi oyo ya kufa mpe kosala mpe kokoma malamu.
Nkembo ya Ndako Oyo Ekopalanganisama
Tempelo ya yambo ya eleko oyo etongamaki na Kirtland, Ohio mpe ekulisamaki na Sanza ya misato 27, 1836.
Na emoniseli epesamaki na Profeta Joseph Smith poso moko nsima ya bokulisi, Nkolo asakolaki:
“Tika ete mitema ya bato na ngai esepela, oyo bazali, na bokasi na bango, batonga ndako oyo na nkombo na ngai.
“Iyo mitema ya bankoto mpe bazomi ya bankoto ekosepela makasi na libaku ya mapamboli oyo ekosopana, mpe bakopesama nguya oyo basali na ngai balatisamaki na yango na kati ya ndako oyo.
“Mpe nsima nkembo ya ndako oyo ekopalanganisama na mabele ya bapaya; mpe oyo ezali ebandeli ya lipamboli oyo ekosopana likolo ya mito ya bato na ngai.” 21
Tosengi bokoma maloba, mitema ya bankoto mpe zomi ya bankoto bakosepela makasi, mpe nkembo ya ndako oyo ekopalanganisama na mabele ya bampaya. Oyo ezalaki masakoli ya kokamwa ona Sanza ya minei 1836 ntango Eklezia ezalaki na bandimi moke mpe tempelo moko kaka.
Lelo na 2020, tozali na batempelo 168 oyo ezali kosala. Batempelo mosusu ntuku minei na libwa ezali kotongama to esakolamaki. Bandako ya Nkolo ezali kotongama na “binsanga ya mbu” 21 mpe na bamboka mpe bisika oyo bato basusu bakanisaki kozala malamu te mpo na kotonga tempelo.
Molulu ya dotasio sikawa etalisami na nkota 88 mpe ekosalema na nkota mingi ya kobakisama lokola batempelo ezali kotongama mpo na kopambola bana mingi koleka ya Nzambe. Na mibu 15 oyo ezali koya, motango ya nkota na oyo makuli ya tempelo ekosalema ekobakisama mbala mibale koleka.
Mobu oyo tokosala molulu ya kopasalo mabele mpe kobanda botongami ya batempelo 18. Na bokeseni, ezwaki mibu 150 mpo na kotonga batempelo 18 ya yambo, uta na ebandeli ya lingomba ya Eklezia na 1830 kino na bokulisi ya Tempelo na Tokyo Japon na Mokambi Spencer W. Kimball na 1980.
Tala lombango ya mosala ya tempelo oyo esalemi bobele na ntango ya Mokambi Russell M. Nelson. Ntango Mokambi Nelson abotamaki na Sanza ya libwa 9, 1924, Eklezia ezalaki na batempelo bobele motoba oyo ezalai kosala.
Ntango akulisamaki lokola Apostolo na Sanza ya minei 7, 1984, mibu 60 nsima, batempelo 26 ezalaki osala, bomatisi ya batempelo 20 na mibu 60.
Ntango Mokambi Nelson asungamaki lokola Mokambi ya Eklezia, batempelo 159 ezalaki kosala, bomatisi moko ya batempelo 133 na mibu 34 na ntango oyo asalaki lokola moko ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale.
Uta akomi Mokambi ya Eklezia na Sanza ya yambo 14, 2018, Mokambi Nelson asakoli batempelo 35 ya sika.
Ntuku libwa na motoba likolo na mokama ya batempelo oyo esalema ebulisamaki na ntango ya Mokambi Nelson; ntuku moambe na minei na monkama ebulisamaki uta ye akulisamaki lokola Apostolo.
Ntango nyonso Komipesaka na Makambo Oyo Ezali Ntina Koleka
Lokola bandimi ya Eklezia ezongisama ya Nkolo, totelemi banso na esengo na kotalaka lombango ya botamboli ya mosala na Ye na mikolo ya nsuka. Mpe batempelo mingi ezali koya.
Brigham Young asakolaki, “Mpo na kokokisa mosala oyo ekozala bobele tempelo moko te kasi nkoto, mpe nkoto ya zomi ya bankoto ya mibali mpe basi bakokende na batempelo wana mpe bakosala mpo na bato oyo bazalaki na bomoi na kala koleka lokola Nkolo akobimisa.” 23
Na lolenge ya moto, bosakoli ya moko na moko ya tempelo ya sika ezali ntina ya esengo monene mpe ntina mpo na kopesa matondi epai ya Nkolo. Nzokande, ntina na biso ya yambo esengeli kozala mayokani mpe makuli oyo ekoki kobongola mitema na biso mpe kolendisa bomipesi na biso epai ya Mobikisi mpe bobele kaka te na esika to kitoko ya ndako.
Mikumba ya ntina oyo etikali likolo na biso lokola bandimi ya Eklezia ezongisama ya Nkolo ezali (1) ya “Koyokela Ye!” 24 mpe kobongola mitema na biso na nzela ya mayokani, mpe (2) ya kokokisa na esengo mokumba ya kopesa mapamboli ya tempelo na boto nyonso ya libota na bangambo mibale ya elamba. Na bokambami mpe lisungi ya Nkolo, ya solo tokokokisa mikumba miye ya bule.
Botongami ya Siona
Profeta Joseph Smith asakolaki:
“Botongami ya Siona ezali ntina oyo etalaki bato ya Nzambe na nkola nyonso; ezali mama na likambo oyo baprofeta, banganganzambe mpe bakonzi babetelaka nsete; batalaki liboso na esengo na mokolo oyo tozali na yango; mpe bangengisamaki na pole ya lola mpe esengo oyo bayembaki mpe bakomaki mpe basakolaki na ntina ya mokolo na biso; kasi bakufaki na bozangi komona yango; … etikali mpo na biso komona, kozala na kati mpe kosunga mpo na kotambwisa liboso nkembo ya Mokolo ya nsuka.” 25
“Bonganganzambe ya lola ekosangana ya mabele, mpo na komema pene bantina oyo ya motuya; … mosala oyo Nzambe mpe banjelu basepelaki na esengo mpo na bikeke eleki; mosala oyo lobi etindamaki mpo na komema pene bobebisi ya nguya ya molili, kokomisa mabele sika, nkembo ya Nzambe, mpe lobiko ya libota ya moto.” 26
Natatoli ete Tata mpe Mwana babimelaki Joseph Smith, mpe Elija bazongisaki likoki ya bokangisi. Makuli mpe Mayokani ya tempelo ya bule ekoki kolendisa biso mpe kopetola mitema na biso ntango tozali “Koyokela Ye!” 27 mpe kozwa nguya ya bonzambe na bomoi na biso. Mpe natatoli ete mosala ya mikolo ya nsuka oyo ekobebisa banguya ya molili mpe ekokokisa lobiko ya libota ya bato. Na ntina ya bosolo oyo natatoli na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.