Likita Linene
Kokabola Nsango ya Bozongisi mpe ya Bosekwi
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Kokabola Nsango ya Bozongisi mpe ya Bosekwi

Bozongisi ezali ya mokili mobimba mpe nsango na yango ekomi mpenza ya lombangu lelo oyo.

Na likita linene oyo tolobi mpe toyembi na esengo na ntina ya bokokisi ya oyo esakolamaki kala “bozongisi ya biloko binso,” 1 na ntina ya “kosangisaka na moko biloko biso kati na Klisto,” 2 na ntina ya bozongisi ya litondi ya nsango malamu, bonganganzambe, mpe Eklezia ya Yesu Klisto na mabele, nyonso oyo tokangisi yango kati na nkombo “Bozongisi.”

Kasi Bozongisi ezali kaka mpo na baye na biso oyo bazali kosepela kati na yango lelo te. Bimoniseli ya Limoni ya Yambo ezalaki mpo na Joseph Smith ye moko kaka te kasi epesamaki lokola pole mpo na oyo kani “azangi bwania.” 3 Buku ya Mormon ezali bomengo ya bato. Makuli ya bonganganzambe mpe bonetolami elengelami mpo na moto nyonso, kobakisaka baoyo bazali lisusu kati na bokufi te. Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe mapamboli na yango ezali mpo na banso oyo balingi yango. Likabo ya Molimo Mosantu ezali mpo na moto nyonso. Bozongisi ezali ya mokili mobimba mpe nsango na yango ekomi mpenza ya lombangu lelo oyo.

“Yango wana, ezali motuya monene koyebisa makambo maye epai ya bato ba mabele, ete bakoka koyeba ete ezali mosuni te mokoki kofanda o miso mya Nzambe, longola se soko ezali na matomba, mpe ngolu, mpe boboto bwa Masiya Mosantu, oyo atiki bomoi bwa ye engebene na mosuni, mpe akamati mwango lisusu na nguya ya Molimo, ete akoka kokokisa bosekwi bwa bakufi.” 4

Uta na mokolo oyo ndeko mobali ya Profeta, Samuel Smith, atondisaki saki ya libenga na ye na mikanda ekomama na masini ya sika ya Buku ya Mormon mpe abandaki mobembo na makolo mpo na kokabola makomi ya sika yango, Basantu basalaki na kotikaka te “mpo na kosala ete makambo oyo eyebana epai ya bato ya mabele.”

Na mobu 1920, ntango Mpaka David O. McKay azalaki moko ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale abandaki mobembo ya mobu moko ya bitinda ya Eklezia. Pene na sanza ya mitano 1921, atelemaki na lilita moke moko na Fagali‘i, Samoa, liboso ya malita ebatelema malamu ya bana mike misato, mwana mwasi moko mpe bana mibali mibala ya Thomas mpe Sarah Hilton. Bana mike oyo—ya mokolo mpenza azalaki na mibu mibale—akufaki na ntango Thomas mpe Sarah bazalaki kosala lokola bilenge misionele babalana na nsuka ya ekeke 1800.

Liboso batika Utah, Mpaka McKay alakaki Sarah, sikawa mokufeli mobali, ete akokende kotala malita ya bana na ye na Samoa lokola akokaki lisusu kozonga kuna te. Mpaka McKay akomelaki ye nsima, “Bana mike na yo miso, Ndeko Hilton, na monoko ekangama mpenza … bazali kokoba mosala na yo ya misionele ya lokumu ebandaki pene mibu ntuku misato eleki.” Nsima abakisaki molongo moko ya nkoma ya yemei:

Na nzela ya maboko ya bolingo miso na bango ya kokufa ekangisamaki,

Na nzela ya maboko ya bolingo maboko na makolo na bango ebongisamaki,

Na nzela ya maboko ya mopaya malita moke na bango ekembelamaki,

Na nzela ya bapaya bakumisamaki, mpe na nzela bapaya bakufelaki. 5

Lisolo oyo ezali mpenza moko ya bankoto, bankama ya bankoto, oyo elobeli ntango, bomengo, mpe bomoi ya ebonzami na mibu 200 eleki mpo na kokabola nsango ya bozongisi. Mposa na biso ya kokoma na bikolo, mabota, minoko, mpe bato nyonso ezali kokita te lelo, lokola etatolami na bazomi ya bamili ya bilenge mibali, basi, mpe babalani oyo bazali kosala na nse ya libiangi ya misio ya ntango mobimba, na nzela ya bandimi ya Ekllezia oyo bazali kozongela libiangi ya Filipo ya koya mpe komona, 6 mpe na nzela ya bamilio ya badollars oyo efutami mpo na kosunga mosala wana na mokili mobimba.

Atako mabengisi na biso ezangi makasi, tolikii ete bato bakomona yango ya esengo. Mpo ete yango ezala bongo, nandimi ata na moke ete biloko misato bisengami: yambo, bolingo na bino; ya mibale, ndakisa na bino; mpe ya misato, kosalela na bino ya Buku ya Mormon.

Mabengisi na biso ekoki kozala likambo ya litomba ya bisomei te, kasi, esengeli kozala liloba moko ya bolingo ezanga kimoyimi. 7 Bolingo oyo, eyebani lokola bolingani, bolingo ya peto ya Klisto, ezali ya biso mpo na bosenga yango. Tobiangami, kutu totindami, “kosambela Tata na bokasi bonso ya motema, ete [biso] tokoka kotondisama na bolingo oyo.” 8

Lokola ndakisa, nakaboli lisolo moko babetaki na Ndeko mwasi Lanett Ho Ching, oyo azali sikoyo kosalaka elongo na mobali na ye, Mokambi Francis Ho Ching, oyo azali koyangela Misio ya Samoa Apia. Ndeko mwasi Ho Ching abeti lisolo:

“Mibu mileki, libota na biso ya sika ekendaki na mwa ndako na Laie, Hawaii. Ebombelo ya motuka ya ndako na biso ebongolamaki na kisuku esika wapi mobali moko na nkombo ya Jonathan azalaki kofanda. Jonathan azalaki moto ya penepene na biso na esika mosusu. Koyokaka lokola ete ezalaki bokutani ya libaku mpamba te ete Nkolo atiaka biso elongo, tozwaki mokano ya kozala ya kofungwama na ntina ya milulu mpe kimondimi na biso kati na Eklezia. Jonathan asepelaki na kozala moninga na biso mpe alingaki kolekisa ntango elongo na libota na biso. Alingaki koyekola nsango malamu, kasi litomba ezalaki te ya komipesa na Eklezia.

“Na ntango wana, babambaki Jonathan nkombo ya ‘Uncle Jonathan’ na bana na biso. Ntango libota na biso ekobaki kokola, bongo mpe esalaki litomba ya Jonathan mpo na makambo ya libota na biso. Mabengisi na biso mpo na bafeti ya bopemi, babokundoli mbotama, milulu ya eteyelo, mpe milulu ya Eklezia etandolamaki tii na makita ya libota na mpokwa mpe mabatisi ya bana.

“Mokolo moko nazwaki libiangi na telefone uta na Jonathan. Azalaki na mposa ya lisungi. Azalaki kobela bokono ya sukali mpe azalaki na mpota makasi na likolo oyo ezalaki kosenga bakata likolo mpo na kobikisa bomoi na ye. Libota na biso mpe bandimi ya palwasi ya penepene basungaki ye na ntango wana ya momekano . Tozalaki kolandisama kotala ye na lopitalo moko nsima ya mosusu, mpe mapamboli ya bonganngazambe epesamaki. Ntango Jonathan azalaki na bozongisi makoki ya nzoto, na lisungi ya bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi, tosokolaki ndako na ye. Bandeko mibali ya bonganganzambe batongaki rampi tii na nzela ya efelo mpe bisimbeli maboko tii na kisuku ya kolala. Ntango Jonathan azongaki ndako, atondisamaki na esengo.

“Jonathan abandaki kozwa mateya ya bamisionele lisusu. Poso liboso ya Mobu ya Sika, abengaki ngai mpe atunaki, ‘Ozali kosala nini na Butu yambo ya Mobu ya Sika?’ Nakundolisaki ye oyo etali feti na biso ya mobu. Kasi na esika na yango, ayanolaki, ‘Nalingi yo oya na libatisi na ngai! Nalingi kobanda mobu oyo malamu.’ Nsima ya mibu 20 ya ‘yaka mpe mona,’ ‘yaka mpe sunga,’ mpe ’yaka mpe fanda,’ molimo ya motuya oyo ebelemaki mpo na kozwa libatisi.

“Na 2018, ntango tobiangamaki kozala mokambi ya misio mpe moninga, bokolongono ya Jonathan ezalaki ya kokita. Tosengaki ye atikala makasi kozelaka bozongi na biso. Akobaki pene mobu moko, kasi Nkolo azalaki kolengela ye mpo na kozonga ndako. Akufaki na kimia na sanza ya minei 2019. Bana na ngai ya basi bazalaki na matanga ya bango ‘Uncle Jonathan’ mpe bayembaki loyembo se moko toyembaki na libatisi na ye.”

Nabandaki lisengami ya mibale mpo na kokabola na elonga nsango ya Bozongisi na motuna oyo: nini ekosala ete libengisi na yo ebenda moto moko? Ezali yo te, ndakisa ya bomoi na yo? Mingi oyo bayoki mpe bayambi nsango ya Bozongisi babandaki liboso na kolinga maye bamonaki kati ya mondimi to bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto. Ekoki kozala lolenge bazali kozwa basusu, makambo balobaki to balobaki te, sikisiki balakisaki na ntango ya mpasi, to mobimba na bango. 9

Atako lolenge nini, tokoki kokima likambo te oyo tosengeli kososola mpe kotia kosalela mabongi ya nsango malamu ezongisama ekoki biso mpo ete mabengisi na biso ezala malamu. Ezali eloko moko mbala mingi elobelami lelo lokola bompenza. Soki bolingo ya Klisto efandi kat na biso, basusu bakoyeba ete bolingo na biso mpo na bango ezali ya solo. Soki pole ya Molimo Mosantu ezali kozika kati na biso, ekozonga kopelisa Pole ya Klisto kati na bango. 10 Oyo ozali epesaka bompenza na libengisi na yo ya koya kobika esengo ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto .

Lisengisi ya misato nakoki kotanga ezali esaleli ya mbala na mbala ya esalelo ya mbongwana oyo Nzambe asalaki mpo na eleko ya nsango malamu ya nsuka oyo, Buku ya Mormon. Ezali elembo emonani na miso ezali kosimbama ya libiangi ya boprofeta ya Joseph Smith mpe elembo emonani na miso ya kondimisa ya bonzambe mpe Bosekwi ya Yesu Klistto. Botalisi na yango ya moango ya Tata na biso ya Lola ya bosikoli ezangi bokokani. Nango ozali kokabola Buku ya Mormon, ozali kokabola Bozongisi.

Ntango Jason Olsen azalaki elenge ya mibu zomi, akebisamaki mbala na mbala na baye libota na ye mpe basusu akoma Moklisto te. Azalaki na baninga ya malamu mibale oyo bazalaki bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka, mpe bazalaki kokabola mbala na mbala mambi ya nzambe. Baninga na ye, Shea mpe Dave, na limemia mingimingi bazalaki kotelemela biyano oyo basusu bazalaka kopesa Jason koboya bondimi kati na Yesu Klisto. Na nsuka, bapesaki ye kopi moko ya Buku ya Mormon, kolobaka, “Buku oyo ekoyanola mituna na yo. Nasengi otanga yango.” Andimaki buku yango na ntembe mpe atiaki yango na saki na ye ya mokongo, wapi efandaki basanza ebele. Alingaki kotika yango na ndako te wapi libota na ye ekokaki komona yango, mpe alingaki koyokisa Shea mpe Dave mawa te na kozongisaka yango. Na nsuka, azwaki mokano ya kotumbaka buku yango.

Butu moko, na fofolo na loboko moko mpe Buku ya Mormon na mosusu, azalaki pene ya kotumba buku yango ntango ayokaki mongongo moko na moto na ye oyo elobaki, “Kotumba buku na ngai te.” Na kokamwa, atelemaki. Nsima, kokanisaka ete abanzaka mongongo yango, amekaki lisusu kopelisa fofolo yango. Lisusu, mongongo eyelaki ye na moto na ye: “Kende na kisuku na yo mpe tanga buku na ngai.” Jason atikaki fofolo, azongaki na kisuku na ye, afungoki Buku ya Mormon, mpe abandaki kotanga. Akobaki mokolo nsima na mokolo, mbala mingi na bangonga ya ebandeli ya ntongo. Ntango Jason akomaki na nsuka mpe asambelaki, akomaki, “Natondisamaki uta na montole ya moto na ngai tii na nse ya makolo na ngai na Molimo. … Namiyokaki ya kotonda na pole. … Ezalaki likambo ya esengo mpenza nazwa naino te na bomoi na ngai. Alukaki libatisi mpe nsima akomaki misionele ye moko.

Ntango mosusu ekoki kolobama ete atako bolingo ya solo mpe bosembo, mingi, soki nyonso mpenza te, mabengisi na biso ya kokabola nsango ya bozongisi ekoboyama. Kasi mikundola oyo: moto nyonso abongi na libengisi ya boye—“banso tokokani epai ya Nzambe”; 11 Nkolo asepelaka na bokasi nyonso tosalaka, likambo te nsuka na yango, libengesi moko eboyami ezali ntina moko te mpo na lingomba na biso esuka mpe bozangi bosepeli lelo ekokaki kobaluka na bosepeli na mikolo ekoya. Atako bongo, bolingo na biso ekobi se kokoba.

Tika tobosana mokolo moko te ete Bozongisi eyaki na nzela ya momekano mpe komibonzela makasi. Wana ezali moto ya masolo mpo na molo mosusu. Lelo tozali kosepela na mbuma ya Bozongisi, moko ya koleka nyonso kozalaka nguya ya kosangisa mbala moko lisusu na mabele mpe na lola. 12 Lokola ebimisamaki mibu mileki na Mokambi Gordon B. Hinckley, “Soki eloko mosusu ebimaki te uta na mawa nyonso mpe misala mpe mpasi ya bozongisi na esika ya nguya ya bokangisi ya bonganganzambe bosantu mpo na kokanga esika moko mabota mpo na libela, elingaki kozala motuya nyonso tofutaki.” 13

Elaka ya nsuka nsuka ya Bozongisi ezali bosikoli na nzela ya Yesu Klisto. Bosekwi ya Yesu Klisto ezali elembo emonani na miso ete Ye, solo, azali na nguya ya kosikola oyo akoya epai na Ye—kosikola bango uta mpasi, bozangi bosembo, mawa, lisumu, mpe kutu liwa. Lelo ezali Eyenga ya Mandalala; poso moko uta lelo ezali Pasika. Tomikundolaka, tomikundolaka ntango nyonso, mpasi mpe liwa ya Klisto mpo na kofuta masumu na biso, mpe tosepelaka Eyenga ya kafukafu mingi mpenza na baeyenga nyonso, mokolo ya nkolo, na yango Asekwakii uta na bawei. Na ntina ya Bosekwi ya Yesu Klisto, bozongisi ezali na ndimbola, bomoi na biso na kufa ezali ndimbola, mpe na nsuka bozali na biso mpenza ezali na ntina.

Joseph Smith, profeta monene ya Bozongisi, apesi litatoli ya yambo mpenza mpo na ntango na biso ya mosekwi Klisto: “Ete azali na bomoi! Mpo tomonaki ye, kutu na loboko ya mobali ya Nzambe.” 14 Na bomikitisi nabakisi litatoli na ngai na oyo ya Joseph mpe na oyo ya bapostolo mpe baprofeta liboso na ye mpe bapostolo mpe baprofeta oyo bakitani ye, ete Yesu ya Nazaleti azali Masiya oyo alakelama, Mwana Mobotami se Moko ya Nzambe, mpe mosekwi Mosikoli ya bato banso.

“Totatoli ete baoyo bakoyekola nsango malamu ya Bozongisi mpe bakosala na bondimi bakopambolama mpo na kozwa litatoli na bango moko ya bonzambe mpe ya ntina na ye ya kolengela mokili mpo na Boyei ya Mibale elekama ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.” 15 Bosekwi ya Klisto esali bilaka na Ye ezala solo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa