Likita Linene
Bokokisi ya Lisakoli
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Bokokisi ya Lisakoli

Masakoli oyo ekokisamaki na Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, ezali ebele.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, napesami lokumu ya kolobela bino na likita linene oyo ya lisitwale ya bokundoli Limoni ya Yambo ya Joseph Smith ya Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, na oyo ezali, na bozangi ntembe, Zamba ya Bule. Limoni wana ezalaki ebandeli monene ya Bozongisi ya nsango malamu mpe nyonso oyo elandaki, uta na Buku ya Mormon kino na bozongisi ya likoki ya bonganganzambe mpe bafungola, lingomba ya Eklezia ya Nkolo, batempelo ya Nzambe mpe baprofeta mpe bapostolo oyo bakambi mosala na mikolo ya nsuka oyo.

Na moango ya bonzambe, baprofeta ya kala ya Nzambe, ntango bamemamaki na Molimo Mosantu, basakolaki Bozongisi mpe oyo esengelaki koya nsima na mikolo na biso, eleko ya nsuka mpe litondi ya bantango. Mosala oyo kaka “etutaki milimo” ya bamoni ya yambo. 1 Na nzela ya bikeke ya ntango, balobelaki yambo, balotaki, bamonaki mpe basakolaki na ntina ya bokonzi ya lobi ezali koya ya Nzambe na mabele, oyo Yisaya abengaki “mosala kitoko mpe malamu koleka.” 2

Masakoli oyo ekokisamaki na Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, na ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikokolo mya Nsuka ezali ebele. Lelo, na yango, nakobeta nsete kaka na mwa ndambo oyo nalingaka. Yango eteyamaki epai na ngai na batei na ngai ya Eteyelo ya bana mpe epai ya mama na ngai.

Elilingi
Danyele kati na Libulu na Bankosi

Daniel, oyo alongaki bankosi na bondimi na ye epai ya Nkolo Yesu Klisto mpe na losambo ya mosala ya banjelu ya Nzambe, azalaki kaka moko oyo amonaki mokolo na biso na limoni. Kobongolaka ndoto ya Mokonzi ya Babilona, Nabukadenazalo, Daniele asakolaki Eklezia ya Nkolo ekotelema na mikolo ya nsuka lokola libanga ya muke “ekatami na ngomba na bozangi maboko.” 3 “Bozangi maboko,” elingi koloba na nguya ya bonzambe, Eklezia ya Nkolo ekotombwama na bonene kino ekotonda na mabele mobimba, “ata moke te [ekoki] kobebisama … [kasi] ekotelema libela.” 4

Elilingi
Daniele azali kolimbola ndoto

Litatoli ya nguya oyo ya maloba ya Daniele ezali kokokisama ntango bandimi nyonso ya Eklezia na mokili mobimba bazali kotala mpe koyoka likita oyo lelo.

Apostolo ya boyengebene Petelo atalisaki “bantango ya bozongisi makambo nyonso … uta mokili ebandaki.” 5 Apostolo Paul akomaki ete na litondi ya bantango, Nzambe “akosangisa … na bomoko makambo nyonso kati na Klisto,” 6 “Yesu Klisto ye moko libanga lisimbi likonzi.” 7 Nayokaki masakoli oyo makasi mpenza ntango nazalaki na bokulisi ya Tempelo ya Rome na Italie. Baprofeta mpe Bapostolo nyonso basakolaki Yesu Klisto, Mosikoli ya mokili, lokola Petelo mpe Paul basakolaki. Eklezia ezali ndakisa ya bomoi ya bozongisi oyo, bandeko mibali mpe basi mpe bandeko na biso bazali kotatola na ntina ya masakoli oyo ya bonzambe uta kala.

Elilingi
Baprofeta mpe Bapostolo na Tempelo ya Roma Itali

Joseph ya Ejipito asakolaki ete na mikolo ya nsuka: “Momoni akolamusa Nkolo Nzambe na ngai, oyo akozala momoni ya liponi mpo na mbuma ya nketo na ngai.” 8 “Mpo akosala [mosala] ya Nkolo.” 9 Joseph Smith, profeta ya Bozongisi, azalaki momoni wana.

Yoane Mobimisi asakolaki na ntina ya anjelu ya bokasi nyonso oyo azalaki kosangisa biloko nyonso ya ntina ya Bozongisi na maloba oyo: “Mpe namonaki anjelu mosusu kopumbwa na kati kati ya lola, azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola epai na bango oyo bazalaki kofanda na mabele, mpe na bikolo nyonso mpe bato mpe nkota mpe mangomba ya bato.” 10 Moroni azalaki anjelu wana. Amonaki mokolo na biso lokola ekomami na Buku ya Mormon. Mbala na mbala, alengelaki Joseph Smith mpo na mosala na ye, mpe lisusu bobongoli ya Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto.

Elilingi
Moroni kobimelaka Joseph Smith

Baprofeta misusu esi balobelaki na ntina ya mikolo na biso. Malaki alobaki na ntina ya Eliya kozongisaka “mitema ya batata epai ya bana, mpe ya bana epai ya batata na bango.” 11 Eliya ayaki, lokola mbano, lelo, tozali na batempelo 168 efungwama oyo ezali kotiama na mabele. Tempelo moko na moko etondisami na bandimi oyo balongobani bazali kosala mayokani ya bule mpe kozwaka makuli epambolama na ezalela na bango moko mpe bankoko na bango bakufa. Mosala ya bule oyo etalisami na Malaki ezali “na kati kati ya moango ya Mokeli mpo na lobi ya seko ya bana na Ye.” 12

Tozali kobika na ntango oyo esakolamaki; tozali bato oyo bazali na mokumba ya kokokisa Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto; tosengeli kosangisa bana ya Nzambe, baoyo bakoyoka mpe koyamba babosolo, mayokani mpe bilaka ya nsango malamu ya seko. Mokambi Nelson abiangi yango “momekano monene, ntina monene, mpe mosala monene [na] mabele lelo.” 13 Na ntina na likamwisi yango natatoli.

Elilingi
Bokulisi ya Tempelo ya Durban na Afrique du Sud

Na etinda oyo epesamelaki ngai uta Mokambi Russell M. Nelson, na Sanza ya mibale ya mobu oyo, nakulisaki Tempelo ya Durban South Africa. Ezali mokolo oyo nakomikundola bomoi na ngai mobimba. Nazalaki na bandimi oyo bayaki na nsango elamu lokola Yelimia asakolaki kala—“moko ya engumba, mpe mibale ya libota.” 14 Malongi ya Yesu Klisto esangisaka banso kati na biso—na mokili mobimba—lokola bana mibali mpe bana basi ya Nzambe, lokola bandeko mibali mpe basi kati ya nsango malamu. Kotala te lolenge tozali to lolenge tolati, tozali bato moko elongo na Tata na Lola oyo alengelaki uta na ebandela mpe ezali mpo na libota na Ye esangana na kosalaka mpe kobatelaka mayokani ya tempelo.

Na bosangani moke ya banganganzambe na ndako ya eteyelo na Kirtland, Ohio, na 1834, Profeta Joseph asakolaki, “ezali bobele mwa ndambu ya Banganganzambe bamonani na mpokwa oyo, kasi Eklezia oyo ekotondisama na Nordi mpe Sudi ya Amerika—ekotondisama na mokili.” 15

Na mibu miye mileki kala te nakendaki mobembo na mokili mobimba mpo na kokutana na bandimi ya Eklezia. Bandeko na ngai ya mibali kati ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale bazwaki etinda ya lolenge moko. Nzoka nde, nani akoki kolanda moango ya Profeta na biso ya bolingo, Nelson, oyo akei mobembo na mibu na ye mibale ya yambo lokola Mokambi ya Eklezia oyo ememi ye kokutana na Basantu na “bamboka ntuku misato na mibale mpe bituka ya Etazini” 16 mpo na kotatola na ntina ya Klisto ya bomoi.

Namikundoli ntango nazwaki etinda na ngai ya libiangi lokola elenge mobali. Nalingaki kosalisa na Allemagne, lokola tata na ngai, ndeko mobali mpe semeki. Kozelaka moto moko te mpo na kozonga ndako, nakendaki na lombango na esika mikanda eyaka mpe nafungolaki libiangi. Natangi ete ngai na biangemaki na Bamboka ya Misio ya Esiti oyo efandelo na yango ezalaki na New York City. Nayokisamaki motema mpasi, nakendaki mpe nafongolaki makomi na ngai mpo na bolendisi. Nabandaki kotanga na Doctrine et Alliances: “Tala, mpe nazali na bato ebele awa, na engumba nzinga nzinga, mpe ekuke ya makasi ekofungwama na bingumba ya mabele ya Esiti oyo.” 17 Esakoli oyo epesamaki na Profeta Joseph Smith na 1833, ezalaki emoniseli epai na ngai. Nayebaki nsima ete, nabiangemaki na etinda ya solo oyo Nkolo alingaki ngai nasalisa. Nakanisaki Bozongisi mpe bakamwi na ngayo na ebandeli ntango Tata na biso na Lola alobaki epai ya Joseph Smith mpe alobaki, “Oyo azali mwana na Ngai ya Mobali Molingami. Yokela Ye!” 18

Na ntina monene mpo na Eklezia mobimba ezali esakoli ya Yisaya, koleka mibu 700 yambo ya mbotama ya Yesu Klisto: “Mpe ekokokisama na mikolo ya nsuka, ete ngomba ya ndako ya Nkolo ekotiama na nsonge ya bangomba, … mpe bikolo nionso ekokweisama na yango.” 19

Na makanisi na ngai lelo, namoni bankoto ya bandimi mpe baninga basangani na kotalaka na nzela ya televizio, interneti, to bisalelo misusu. Tosangani lokola tozalaki elongo “na bansonge ya ngomba.” 20 Ezalaki Brigham Young nde alobaki maloba ya esakoli “oyo ezali esika elongobani.” 21 Basantu, ndambo kati na bango bapionie ya bankoko na ngai moko, basalaki mpo na kotia Siona na Bangomba ya Mabanga “na nzela bolingi mpe mposa na ye oyo alengelaka bikolo ya mabele.” 22

Elilingi
Tempelo ya Salt Lake na ntango ya lisano ya Olympic.

Natelemi lelo na mabele ya bule oyo etalisami na bankoto ya batali. Na 2002, Salt Lake City eyambaki masano ya Olympic ya eleko ya Malili. Lisanga ya Bayembi bayembaki na bofungoli milulu, mpe Eklezia eyembaki nzembo mpe miango mpo na bampaya mpe basano uta bipai na bipai, bikolo ebele. Nakomikundola ntango nyonso komonaka tempelo na televizio na nsango ya butu nyonso na mokili mobimba.

Elilingi
Eklezia mpe bakambi ya NAACP

Uta mibu ebele, Bakambi ya Etazini, bakonzi, bazuzi, bayangeli ya yambo, bantoma mpe bakambi uta bamboka ebele bayei na Salt Lake City mpe bakutanaki na bakambi na biso. Mokambi Nelson ayambaki bakambi ya Lingomba Nationale mpo na Advancement of Colored People, ezali lingomba ya Etazini etali bonsomi ya loposo ya langi ya bato. Namikundoli kotelemaka na mapeka na mapeka elongo na baninga oyo mpe bakambi lokola Mokambi Nelson azalaki na ango na libiangi mpo na “bomoto monene mpe lolenge ya langi ya loposo na mokili.” 23

Ebele bayaki na Temple Square mpe bakutanaki na lisanga ya bakambi ya Eklezia. Ndakisa, mobu oyo eleki, mpo na kolobela mwa ndambo, toyambaki Likita ya Lingomba ya Bato ya mbala ya 68 ya Bosangani ya Bikolo, bosangani ya mokili mobimba, mpe ya yambo na libanda ya New York City. Tokutanaki na Lingomba ya Vietname mpo na Mambi ya Boyambi, bantoma uta na Cuba, baye Philippine, Argentine, Romanie, Sudan, Qatar, mpe Arabia Saudite. Toyambaki lisusu sekeletele monene ya Mizilima ya World League.

Oyo nazali kolobela ezali bokokisi ya lisakoli ya Yisaya ete na mikolo ya nsuka, bikolo ekotelema na “ngomba ya ndako ya Nkolo.” 24 Tempelo monene ya Salt Lake etelemi na katikati na bonene mpe nkembo wana.

Elilingi
Likonga ya Tempelo ya Salt Lake

Ezali bonzenga na yango nde ebengisi bato batala yango te, atako esika na biso ezali kitoko; ezali ntina ya eyamba ya peto emonisami na kati ya molimo, bokoli, bolamu, mpe bosembo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka mpe bato; bolingo na biso lokola Nzambe alingaka mpe boyokani na biso na ntina ya likolo koleka, oyo Joseph Smith abiangaki, “ntina ya Klisto.” 25

Toyebi te mokolo nini Mobikisi akozonga, kasi oyo biso toyebi. Tosengeli komilengela na motema mpe makanisi, kolongobana mpo na koyamba Ye, mpe kobongisama mpo na kozala eteni ya oyo nyonso esakolamaki na kala.

Natatoli ete Mokambi Russell M. Nelson azali profeta ya Nkolo na mabele, mpe pembeni na ye ezali na Bapostolo babiangemi na Nzambe, basungamaki lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi. Mpe, balingami na ngai ya mibali mpe basi, Bozongisi ezali kokoba.

Nasukisi na lisakoli ya Joseph Smith, maloba oyo natatoli ezali solo: “Loboko moko te ya mbindo ekoki kopekisa bokobi ya mosala, mitungisi ekoki koya makasi, bato mabe bakoki kosala miango, banguna bakoki kosangana, kasi bosolo ya Nzambe ekokende liboso na mpiko, mpe na bonsomi kino ekokota na bikolo nyonso, kokota na bileko nyonso, ekokombola mboka nyonso, mpe ekoyokana na litoi nyonso, kino bantina ya Nzambe ekokokisama, mpe Yowa Monene akoloba mosala esalemi.” 26 Natatoli ete masakoli oyo ya Joseph Smith ezali kokokisama.

Nalaki lokola bozali kolanda toli efulama ya profeta molingami na biso, Mokambi Russell M. Nelson, Bapostolo mpe bayangeli misusu ya Eklezia, mpe lokola bozali kotia angele na baprofeta ya kala oyo balobaki na ntina ya mikolo na biso lelo, bokotondisama, bofuluki kati ya milimo na bino, na molimo mpe mosala ya Bozongisi. Nalaki bino bokomona loboko ya Nzambe na bomoi na bino, boyoka botindiki ya molimo na Ye, mpe boyoka bolingo na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, na botondi ya Bozongisi ya nsango malamu na Ye mpe Eklezia na Ye, na bosolo ya bolingo na Ye etondisama, amene.

Bimisa na lokasa