Likita Linene
Bokende Liboso na Bondimi
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Bokende Liboso na Bondimi

Napamboli bino na kimia mpe bondimi ya kobakisama. kati na Nkolo.

Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, lokola tokomi na nsuka ya likita oyo ya kobosana te, tozongisi matondi na biso na Nkolo. Miziki ezalaki kitoko koleka mpenza mpe mateya efulama.

Na likita oyo, tozwaki mateya ya ntina mingi. Na bosakoli na biso ya nkama mibale ya mibu, tokotisaki lisakola na mokili kolobelaka bosolo ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto na litondi na yango.

Tomikundolaki Bozongisi na Kogangaka Ozana.

Tobimisi elembo moko ya sika kolimbolaka bondimi na biso na Yesu Klisto mpe mpo na koyeba na miso nsango mpe bisaleli ya Eklezia.

Tobengisaki bato nyonso ya mokili mpo na mokolo moko ya kokila bilei mpe losambo, ete bokono ya sikawa ekoka kolongama, baminganga babatelama, nkita elendisama, mpe bomoi ezonga malamu. Kokila bilei oyo ekosalama na Mokolo ya mitano Malamu, Sanza ya minei 10 Mpe mokolo ya Mitano monene nini yango ekozala!

Eyenga ekoya ezali Eyenga ya Pasika, ntango tokosepela lisusu na Bomikabi mpe Lisekwa ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Na ntina ya Bomikabi na Ye, likabo na Ye ya lisekwa ekoya na baye nyonso oyo batikala kozala na bomoi na mabele. Mpe likabo na Ye ya bomoi ya seko ekoya na oyo nyonso alongobani na nzela ya bosembo na makuli mpe mayokani esalamaki na batempelo na Ye esantu.

Maloba mingi mafulami ya likita linene ya sanza ya minei 2020 oyo—mpe poso ya bule oyo tobandi sikwa—ekoki kolobama na mokuse na maloba ya makasi oyo mibale: “Boyokela Ye.”1 Tosambeli ete botia makanisi na bino na Tata ya Lola, oyo alobaki maloba yango, mpe na Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, ekokomisama monene mpenza na makanisi na bino mpo na oyo nyonso ebimisamaki. Tosambeli ete bokobanda lisusu solo koyoka, kotosa, mpe kotia bokebi na maloba ya Nkolo2 Nalaki ete bobangi ekokita mpe bondimi ya komata ekolanda.

Totondi bino mpo na bolingi na bino ya kokomisa bandako na bino ndakonzambe ya bondimi , epai wapi Molimo na Nkolo ekoki kofanda. Manakai ya boyekoli na biso ya nsango malamu; Yaka, Landa Ngai, ekokoba kopambola bomoi na bino. Bokasi na bino ya ntango nyonso na mosala oyo—kutu na katikati ya bangonga wana ntango bokoki komiyoka ete bozali kolonga te—ekobongola bomoi na bino, ya libota na bino, mpe ya mokili. Tokolendisama ntango tokokoma kutu bilombe bayekoli mingi ya Nkolo, kotelemaka mpe kolobelaka Ye, esika nyonso tozali.

Sikoyo tika tolobela Tempelo. Sikawa tozali na batempelo 168 ekulisama na mokili mobimba. Misusu ezali na biteni ya ndenge na ndenge ya misala mpe botongi na yango. Ntango miango esakolami mpo na kotonga tempelo moko ya sika, yango ekomaka eteni ya lisitwale na biso ya bule.

Ekoki komonana lokola eloko oyo ezalaka te ya kosakola batempelo ya sika ntango batempelo nyonso ekangami mpo na mwa ntango moke.

Ntango mingi koleka ekeke moko eleki, Mokambi Wilford Woodruff amonaki na mosika bizalela ya bomoi lokola ya biso, lokola ekomami na libondeli na ye ya kobulisa Tempelo ya Salt Lake, oyo epesamaki na 1893. Basusu kati na bino bakokaki kala mingi te komona biteni ya losambo ya kafukafu na media social.

Koyoka malombo oyo uta na profeta moko ya Nzambe: “Ntango bato na Yo bakokoka te kozala na libaku ya kokota na ndako esantu oyo … mpe bazali koniokwama mpe na mawa, bazingami na mpasi … mpe bakobalola bilongi na bango epai ya ndako ya bule na Yo mpe kosenga Yo bokangolami, mpo na lisungi, mpo na nguya na Yo etandolama mpo na bango, tobondeli Yo, kotala na nse uta na Yo efandelo esantu na ngolu … mpe koyoka bileli na bango. To ntango bana ya bato na Yo, na mibu ekoya, bakokabwanama, na nzela ya ntina kani, uta na esika oyo, … mpe bakolela epai na Yo uta na bozindo ya mitema mpasi mpe mawa na bango ete otandola lisungi mpe bokangoli epai na bango, tobondeli Yo na komikitisa ete … oyoka bileli na bango, mpe opesa likolo na bango mapamboli na oyo basengi.”3

Bandeko mibali mpe basi, na bantango ya biso ya mawa ntango batempelo ezali ya kokangama, bokoki ntango nyonso kosalela nguya ya mayokani mpe dotasio na bino ya tempelo ntango botosi mayokani. Nasengi bosalela ngonga oyo ntango batempelo ekangami mpo na kokoba kozala na bomoi elongobani-ya tempelo to kokoma ya kolongobana mpo na tempelo.

Bosolola na ntina ya tempelo elongo na libota mpe baninga na bino. Mpo ete Yesu Klisto azali katikati ya makambo nyonso tozali kosala kati ya tempelo, ntango bozali kokanisa mingi koleka na ntina ya tempelo bokobanda kokanisa na ntina na Ye. Boyekola mpe bosambela mpo na koyeba mingi oleka na ntina ya nguya mpe boyebi oyo bozwaki na dotasio—to oyo bokozwa na dotasio.

Lelo tozali na esengo ya kosakola mwango ya kotonga batempelo ya sika mwambe na bisika oyo elandi: Bahía Blanca, Argentina; Tallahassee, Florida; Lubumbashi, Replubiki Democratiki ya Congo; Pittsburgh, Pennsylvania; Benin City, Nigeria; Syracuse, Utah; Dubai, United Arab Emirates; mpe Shanghai, Republique Populaire de Chine.

Na bisika nionso mwambi, batongi ya Eklezia bakosalaka elongo bakambi ya esika boye ete batempelo ekokokana mpe kozala kobakisama ya kitoko ya mbika moko na moko.

Mwango mpo na tempelo ya Dubai eyei na eyano ya mbela na bango ya motuya, oyo toyebi na botondi.

Likambo mpo na mwango mpo na Shanghai ezali motuya mingi. Mpo mingi koleka decennie mibale, bandimi ya tempelo-balongobani ya Bato ya Republique ya Chine bazalaki kokota na Tempelo ya Hong Kong ya Chine. Kasi na sanza ya Sambo 2019, tempelo yango ekangamaki mpo na bobongisi-ya molai mpe bosenga-ekoki ya kobongisa.

Na Shanghai, esika kitoko ya liyangani ndenge na ndenge ekopesa nzela mpo na bandimi na Chine kokoba kosangana na makuli ya tempelo—na kati na Bato ya Republique ya Chine—po na bango mpe bakoko na bango.4

Na mboka nionso, Eklezia oyo eteyi bandimi na yango kopesa lokumu, kotosa, mpe kosunga mobeko.5 Toteyi ntina ya libota, mpo na kozalaka baboti malamu mpe bavandi mboka ya ndakisa. Mpo ete totosi mibeko ya leta mpe bobongisi ya Bato ya Repulique ya Chine, Eklezia esalaka te kotinda bamisionele koteyaka kuna; sikawa tokosala bongo lisusu te.

Bapaya mpe mangomba ya Chine bakokoba kokutana ya kokabwana. Lolenge ya mibeko mpo na Eklezia kuna ekobi ya kobonguana te. Na eteni ya yango mpo na kolembisa esaleli, bokoti ekozala na nzela ya boyokani kaka. Ndako ya Nkolo na Shangai ekozala te epai wapi batali ya lolenge ya mokili to batouriste uta na bikolo mosusu bakokende.

Batempelo mwambe ya sika oyo ekopambola bomoi ya bato mingi na ngambo nyonso mibale ya elamba ya liwa. Batempelo ezali eteni ya motole moko ya Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Na bolamu mpe motema ya bokabi ya Nzambe, Azali komema mapamboli ya tempelo mpembeni ya bana na Ye na bisika nyonso.

Lokola Bozongisi ezali kokoba, nayebi ete Nzambe akokoba komonisa makambo minene mingi mpe ya motuya na ntina ya bokonzi na Ye awa na mabele.6 Bokonzi wana ezali Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Bandeko balingami mibali mpe basi, nalakisi bolingo na ngai epai na bino. Na ngonga oyo ya motema likolo mpe bozangi elikya, mpe kobengaka likoi epesami liolo na ngai, nakolinga kopesa bino lipamboli ya apostolo.

Napamboli bino na kimia mpe bondimi ya kobakisama kati na Nkolo.7

Napamboli bino na mposa ya koyambola mpe kokoma mingi koleka lokola Ye na mokolo moko na moko oyo ezali koleka.8

Napamboli bino boyeba ete Profeta Joseph Smith azali profeta ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto na litondi na yango.

Soki ezali na bokono kati na bino to na balingami na bino, natiki lipamboli ya lobiko, engebene na bolingi ya Nkolo.

Napamboli bino boye, kobakisaka mbala moko lisusu liyebisi na ngai ya bolingo mpo na moko na moko na bino, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa