Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe Bafungola
Na kati ya Eklezia likoki ya bonganganzambe esalameli na nse ya bokambami ya bonganganzambe na mokambi oyo asimbi bafungola ya bonganganzambe yango.
Naponi kolobela bino lisusu mpo na oyo etali bonganganzambe ya Nzambe, liteya oyo esili kolobelama na bateyi misato oyo bateyaki biso na ntina ya lolenge nini bonganganzambe epambolaka nbamama, bilenge basi, bilenge mibali.
Bonganganzambe ezali nguya mpe likoki ya bonzambe oyo esimbami na bondimami oyo esengeli kosalema na mosala ya Nzambe mpo na litomba ya bana na Ye nyonso. Bonganganzambe ezali te baoyo bakulisami na likoki songolo to baoyo basalelaka makoki na yango. Mibali basimbi bonganganzambe bazali bonganganzambe te. Ntango tosengeli kokokanisa te kokulisa mibali lokola bonganganzambe, ezali malamu kotanga bango lokola bamemi ya bonganganzambe.
Nguya ya bonganganzambe ezali nyonso mibale na kati ya Eklezia mpe na kati ya lisanga ya libota. Kasi nguya ya bonganganzambe mpe likoki ya bonganganzambe esalaka na bokeseni kati ya Eklezia na lolenge esalaka na libota. Nyonso oyo ezali engebene na mabongi Nkolo atiaki. Ntina ya moango ya Nzambe ezali ya kokamba bana na Ye na bomoi ya seko. Mabota ya bomoi oyo ya kufa ezali na ntina monene na moango yango. Eklezia ezali wana mpo na kopesa malongi, likoki mpe makuli ya ntina mpo na kokomisa mikangano ya libala na bomoi ya seko na seko. Boye, lingomba ya libota mpe Eklezia ya Yesu Klisto bazali na mokangano ya kolendisama. Mapamboli ya bonganganzambe—lokola litondi ya nsango malamu, mpe makuli lokola libatisi, nkotisa mpe kozwa Molimo Mosantu, dotasio ya tempelo mpe libala ya seko—elongobani mpo na mibali mpe basi lokola. 1
Bonganganzambe oyo tozali kolobela awa ezali Bonganganzambe ya Melekisedeke, ezongisamaki liboso ya Bozongisi ya nsango malamu. Joseph Smith mpe Oliver Cowdery bakulisamaki na Petelo, Yakobo, mpe Yoane, oyo basakolaki bango moko “lokola kozalaka na bafungola ya bokonzi, mpe ya eleko ya litondi ya ntango” (Doctrine et Alliances 128:20). Bapostolo oyo ya bakulutu bazwaki likoki uta na Mobikisi Ye moko. Makoki mosusu nyonso to misala kati ya bonganganzambe ezali mabakisi na Bonganganzambe ya Melekisedeke (tala Doctrine et Alliances 107:5), mpo yango “ezali na ndingisa ya bokambi, mpe ezali na nguya mpe likoki likolo ya misala nyonso na kati ya Eklezia na mibu nyonso ya mokili” (Doctrine et Alliances 107:8).
Na kati ya Eklezia likoki ya bonganganzambe monene, Bonganganzambe ya Melekisede, mpe ya Bonganganzambe moke ya Alona esalemi na nse ya bokambi ya mokambi ya bonganganzambe, lokola episikopo to mokambi oyo asimbi bafungola ya bonganganzambe yango. Mpo na kososola mosala ya bonganganzambe yango na kati ya Eklezia, tosengeli kososola libongi ya bafungola ya bonganganzambe.
Bafungola ya Bonganganzambe ya Melekisedeke ya bokonzi epesamelaki na Petelo, Yakobo, mpe Yoane, kasi ekokisaki te bozongisi ya bafungola ya bonganganzambe. Bafungola mosusu ya bonganganzambe eyaki nsima. Nsima ya bokulisi ya tempelo ya yambo na eleko oyo na Kirtland, Ohio, baprofeta misato—Mose, Eliase, mpe Eliya—bazongisaki “bafungola ya eleko oyo,” mpe lisusu na oyo etalaki bosangisi ya Yisalayele mpe mosala ya batempelo ya Nkolo (tala Doctrine et Alliances 110), lokola Mokambi Eyring awuti kotalisa na lolenge ya kondimisa mpenza.
Ndakisa oyo eyebana koleka ya mosala ya bafungola ezali na kati ya kosalela makuli ya bonganganzambe. Bokuli ezali mosala elongobana elimboli bosukisi ya mayokani mpe elaka ya mapamboli. Na kati ya Eklezia makuli nyonso esalemaka na nse ya likoki ya mokambi ya bonganganzambe oyo asimbi bafungola ya bokuli yango.
Bokuli esalemi mingi mingi na bato oyo bakulisama na mosala ya bonganganzambe kosalaka na nse ya bokambi ya moto oyo asimbi bafungola ya bonganganzambe. Ndakisa, basimbi bonganganzambe ya misala ya ndenge na ndenge ya Bonganganzambe ya Alona basalaka bokuli ya elambo na nse ya bafungola ya episikopo, oyo asimbi Bonganganzambe ya Alona. Libongi kaka moko oyo esalemaka na makuli ya bonganganzambe na oyo basi basalelaka na kati ya tempelo. Atako basi bazali na bonganganzambe te, basalaka makuli ya bule ya tempelo, na nse ya likoki ya mokambi ya tempelo, oyo azali na bafungola mpo na makuli ya tempelo.
Ndakisa mosusu ya likoki ya bonganganzambe na nse ya bokambi ya moto oyo asimbi bafungola ezali mateya ya mibali mpe basi babiangemi mpo na koteya nsango malamu, ezala na bakelasi na mabota na bango na bapalwasi to na elanga ya misio. Bandakisa mosusu ezali ya baoyo basimbi bibonga ya boyangeli na palwasi mpe bazali kosalela likoki ya bonganganzambe na boyangeli na bango na ntina ya mabiangi na bango mpe na nse ya kotiama mpembeni mpe bokambi ya mokambi ya bonganganzambe oyo basimbi bafungola na palwasi to likonzi. Oyo ezali lolenge nini bato basalelaka mpe basepelaka na likoki mpe nguya ya bonganganzambe na kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. 2
Likoki ya Bonganganzambe esalemi lisusu mpe mapamboli na yango ekokisamaka na kati ya mabota ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Na nzela ya mabota nalingi koloba mobali oyo asimbi bonganganzambe mpe mwasi oyo abala mpe bana na bango. Nabakisi lisusu mikangano ya nde na ndenge uta na mikangano ya ntina lokola esalemaki na nkufa to bokabwani.
Libongi oyo ete likoki ya bonganganzambe ekoki kosalema na nse ya bokambami ya moto oyo asimbi bafungola mpo na mosala wana ezali ya ntina koleka na kati ya Eklezia, kasi yango ezali kosalema na kati ya libota te. Ndakisa, tata akambaka mpe asalelaka bonganganzambe na kati ya libota na ye na likoki ya bonganganzambe azali na yango. Ye azali na ntina te ya kozala na boyangeli to ya kosenga ndingisa ya kosimba bafungola ya bonganganzambe ya moto mosusu na ntina ete asala misala ya ndenge na ndenge ya libota na ye. Kati na oyo totangi kozwana na bokutani to conseil na bato ya libota na ye, kosala makita ya libota, kopesaka mapamboli epai ya mwasi na ye mpe bana, to kopesaka mapamboli ya libiki na bato ya libota to bato basusu. 3 Bakambi ya eklezia bateyaka bandeko ya libota kasi basalelakaa bokambi te ya kozwa likoki ya bonganganza te kati ya libota.
Libongi se moko oyo eselemaka ntango tata azali te mpe mama azali mokambi ya libota. Akokamba na kati ya libota na ye mpe azali esaleli na komemaka nguya mpe mapamboli ya bonganganzambe na kati ya ndako na ye na nzela ya dotasio mpe bokangisi na ye na kati ya tempelo. Ntango apesami te ndingisa ya kopesa mapamboli ya bonganganzambe oyo ekoki bobele kopesama na moto oyo azali na mosala songolo na kati ya bonganganzambe, akoki kosala nyonso ya misala mosusu ya bokambi ya libota. Na kosalaka bongo, asaleli nguya ya bonganganzambe mpo na litomba ya bana oyo ye azali kokamba na mokumba na ye ya bokambi na kati ya libota. 4
Soki batata bakumisi bonganganzambe na bango na kati ya mabota, ekozala lisusu bolembisi ya mokumba ya Eklezia lokola eloko mosusu basengeli kosala. Batata oyo basimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke basengeli kosalela likoki na bango “na bondimisi, na bompikiliki, na boboto, na bosembo, mpe bolingo ezanga nsuka” (Doctrine et Alliances 121:41). Ndakisa wana ya likolo mpo na kosalela likoki nyonso ya bonganganzambe ezali ntina koleka na kati ya libota. Basimbi bonganganzambe basengeli lisusu kobatela mitindo na ntina ete bakozwa nguya ya bonganganzambe mpo na kopesa mapamboli epai ya bandeko na bango ya libota. Basengeli kolona mikangano ya bolingo na libota boye ete bandeko ya libota bakolinga kosenga bango mapamboli. Mpe baboti basengeli kolendisa mingi mapamboli ya bonganganzambe na kati ya libota. 5
Na kati ya liyangani ya likita oyo, lokola tozali koluka mwa ekimelo uta na makambo na biso ya bomoi oyo ya kufa na bokono oyo epanzani mokili mobimbampe oyo ezali koboma, biso toyemaki mabongi minene ya seko. Nalendisi moko na moko kati na biso kozala miso na biso etalela “bobele” mpo na kozwa babosolo oyo ya seko na ntina ete banzoto na biso “ekoka kotondisama na pole” (3 Nefi 13:22).
Na esakola na Ye epai ya ebele ya bato lokola ekomami na kati ya Biblia mpe na kati ya Buku ya Mormon, Mobikisi ateyaki ete banzoto ya bomoi oyo ya kufa ekoki kotondisama na pole to kotondisama na molili. Biso, ya solo, tolingaka kotondisama na pole, mpe Mobikisi na biso ateyaki biso lolenge nini tokoki kokokisa yango. Tosengeli koyoka bansango na ntina ya makambo ya bosolo ya seko. Ye asalelaki ndakisa ya lisu na biso, na nzela ya oyo tozwaka pole na kati ya banzoto na biso. Soki lisu na biso “ezali moko”—na maloba mosusu, soki totaleli kozwaka pole ya seko mpe bososoli—Alimbolaki, “nzoto na yo nyonso ekotondisama na pole” (Matai 6:22; 3 Nefi 13:22). Kasi soki “lisu na biso ezali mabe”—elimboli ete, soki tozali koluka mabe mpe kozwa yango kati ya banzoto na biso—Akebisi biso, “nzoto na yo nyonso ekotondisama kati ya molili” (molongo 23). Na maloba mosusu, pole na kati ya banzoto na biso etalaka lolenge nini tomonaka—to tozwaka—babosolo ya seko oyo batei biso.
Tosengeli kolanda libiangi ya Mobikisi mpo na koluka mpe kosenga bososoli ya makambo ya bosolo ya seko. Ye alaki ete Tata na Lola azali na bolingi ya koteya bato nyonso makambo ya bosolo oyo balukaka (tala 3 Nefi 14:8). Soki tosengeli na yango mpe tozali na lisu moko mpo na kozwa, bilaka ya Mobikisi ete babosolo ya seko “ekofungwamela” biso (tala 3 Nefi 14:7–8).
Na ngambo mosusu, Satana azali na nkele ya kobosanisa makanisi na biso to kokamba biso mosika na makambo oyo ezali ntina lokola mikumba ya bonganganzambe ya Nzambe. Mobikisi akebisi na ntina ya likambo ya boye “baprofeta ya lokuta, oyo bayaka epai na bino na mposo ya meme, kasi na kati na bango bazali bambwa ya zamba” (3 Nefi 14:15). Ye apesaki biso momekano mpo na kosunga biso topona bosolo na kati ya mateya ya bokeseni oyo ekoki kobungisa biso: “Bokoyeba bango na bambuma na bango,” Ateyaki (3 Nefi 14:16). “Nzete malamu ekoki kobota mbuma mabe te, to nzete oyo ekosama ekoki kobota te bambuma ya malamu” (molongo 18). Na yango, tosengeli kotala na biyano—“bambuma”—ya mabongi oyo eteyami mpe baprofeta oyo bazali koteya yango. Oyo ezali eyano malamu mingi na makambo oyo toyokaka na banguna ya Eklezia mpe malongi na yango mpe bandenge mpe bokambi. Kolanda momekano ya liteya ya Mobikisi. Tala na bambuma—biyano.
Ntango tokanisi bambuma ya nsango malamu mpe Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto, tosepelaka na lolenge nini Eklezia, na ntango ya bomoi mobimba ya bandimi na yango, epalangani uta na mangomba ya bituka na bangomba ya bikolo nyonso ya Westi kino na esika ya wapi ebele ya bamilio 16 ya bandimi bafandi na bamboka mosusu koleka Etazini. Na bokoli wana, toyoki nguya ya bokoli mpo na kosunga bandimi na yango. Tosungaka na kobatelaka mitindo, na kokokisaka mikumba ya kosakola nsango malamu ezongisama, na kosangisaka Yisalaele, mpe na kotongaka batempelo na mokili mobimba.
Biso tokambami na profeta, Mokambi Russell M. Nelson, oyo ya ye bokambi Nkolo asaleli mpo na kokokisa bokobi oyo toyoki uta mibu mibale koleka ya bokambi na ye. Sikawa tokopambolama mpo na koyoka uta na Mokambi Nelson, oyo akoteya biso lolenge ya kobakisa matambe ya kokende liboso na kati ya Eklezia oyo ezongisama ya Yesu Klisto na bantango oyo ya mikakatano.
Natatoli na ntina ya bosolo ya makambo oyo mpe nasangani na bino na kosambelaka na ntina ya profeta na biso uta na ye tokoyoka, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.