2010–2019
Kosala na Nguya mpe Likoki ya Nzambe
Sanza ya Minei 2018


2:3

Kosala na Nguya mpe Likoki ya Nzambe

Tokosala na nkombo na Ye, na nguya mpe likoki na Ye, mpe elongo na bolingo na Ye ya sembo.

Bandeko na ngai ya bolingo, natondi bino mpo na bomipesi na bino na Nkolo mpe na Mosala na Ye esantu. Ezali ya solo esengo kozala na bino. Lokola Bokambi ya Yambo ya sika, natondi bino mpo na nsambo na bino mpe bokasi na bino ya bosungi. Tozali na botondi mpo na bomoi na bino mpe mosala na bino na Nkolo. Bomipesi na bino na mokumba mpe mosala ya moyomi te ezali na motuya na mabiangi na bino lokola biso na mabiangi na biso. Na bomoi moko mobimba ya mosala na Eklezia oyo, nayekoli ete ezali mpenza likambo te wapi moto azali kosala. Oyo Nkolo atalelaka boniboni moto asalelaka.

Napesi botondi ya mozindo mpo na Mokambi Thomas S. Monson, oyo azalaki ndakisa na ngai mibu koleka 50. Mpe mpo na bapesi toli na Ye, Mokambi Henry B. Eyring mpe Mokambi Dieter F. Uchtdorf, napesi boluli na ngai ya mozindo. Nakumisi bango mpo na mosala na bango na Nkolo mpe baprofeta na Ye. Basali banso oyo bamipesa bazeli bitinda ya sika. Bakobi kosala na makasi mpe bomipesi. Nakumisi mpe nalingi bango banso.

Ezali lipamboli ya kokamwa kosala na Eklezia ya solo mpe ya bomoi na likoki mpe nguya. Bozongisi ya bonganganzambe ya Nzambe, lokola bafungola ya bonganganzambe, ekofungolaka na Basantu ya Mikolo mya Nsuka balongobani minene koleka ya mapamboli ya molimo nionso. Tomoni mapamboli wana kosopana na baso, mibali, mpe bana na mokili mobimba.

Nakomonaka basi ya bondimi oyo basospli nguya ya kati ya mabiangi na bango mpe na botasio mpe makuli misusu ya tempelo. Basi oyo bayebi boniboni kobelela nguya ya lola mpo na kobatela mpe kolendisa mibali na bango, bana, basusu bango bakolingaka. Baye bazali basi ya makasi na molimo oyo bakokambaka, bakoteyaka, mpe bakosalaka na kobanga te na mabiangi na bango na nguya mpe likoki ya Nzambe!1 Botondi kani nazali na yango mpo na bango!

Lolenge moko, tokomonaka mibali ya bondimi oyo bazali kokoka matomba na bango lokola mamemi ya bonganganzambe. Bakokambaka mpe bakosalaka na libonza na lolenge ya Nkolo na bolingo, boboto, mpe bompikiliki. Bakopambolaka, bakokambaka, bakobatelaka, mpe bakolendisaka basusu na nguya ya bonganganzambe basimbi. Bakomemaka makamwisi nab aye bango bakosalisaka ntango bazali kobatela mabala mpe maboti na bangomei. Bakokimaka bobe mpe bazali bampaki ya makasi na Yisaleale.2 Nazali na botondi mingi koleka mpo na bango!

Sikoyo, ekoki ngai kolobela litungisi moko? Ezalli oyo: Mingi mpensa ya bandeko mibali mpe bandeko basi na biso basosoli mpenza te likanisi ya nguya mpe likoki ya bonganganzambe. Bakosalaka lokola soki balingi kosepelisa mingi bamposa mpe banzala na bango ya moyimi koleka kosalela nguya ya Nzambe mpo na kopambola bana na Ye.

Nakobanga ete mingi mpenza ya bandeko mibali mpe bandeko basi na biso basimbi te matomba oyo ekoki kozala ya bango.3 Boko ya bandeko na biso, na ndakisa, bakosalaka lokola bazali kososola te nini bonganganzambe ezali mpe nini ekokisa bango kosala. Tika napesa bino mwa ndakisa.

Kala te, nazalaki na liyangani moko ya elambo na yango bebe moko ya sika asengelaki kopesama nkombo mpe lipamboli ya tata. Elenge mobali asimbaki mwa mwana ya ye na maboko na ye, apesaki ye nkombo, mpe apesaki losambo moko ya kitoko. kasi apesaki te mwana wana lipamboli. Bebe wana ya mwasi azwaki nkombo kasi lipamboli te! Mpaka wana ya bolingo ayebaki te bokesani katikati ya lisambo mpe lipamboli ya bonganganambe. Na likoki mpe nguya na ye ya bonganganzambe, akokaki kopambola mwana oyo, kasi asalaki yango te. Libaki kani bazangaki!

Tika nalobala ndakisa mosusu. Toyebi bandeko oyo batii bandeko basi mpembeni lokola bakambi mpe bayekoli ya Eteyeli ya Bana, Bilenge Basi, to Lingomba ya Bamama Basungi kasi bazangisi kopambola bango na nguya mpo na kokokisa mabiangi na bango. Bapesi kaka makbisi mpe mateya. Tomoni tata moko ya bolongobani oyo azangi kopesa mwasi na ye mpe bana na ye mapamboli ya bonganganzambe ntango yango ezali mpenza oyo bazali na yango mposa. Nguya ya bonganganzambe ezongisami na mabele oyo, mpe kasi bandeko mibali mpe bandeko basi mingi mpenza bakolekaka na mimekano ya nsomo na bomoi na kozanga ata kozwa lipamboli ya bonganganzambe. Libomi kani ezali! Libomibomi oyo tosengeli kobakola.

Bandeko, tosimbi bonganganzambe ya bule ya Nzambe! Tozali na likoki mpo na kopambola bato na Ye. Kaka kanisa bondimi ya kokamwa Nkolo apesaki bison tango alobaki, “Oyo nionso bokopambola nakopambola.”4 Ezali litomba kosala na nkomba ya Yesu Klisto mpo na kopambola bana ya Nzambe engebene na bolingi na Ye mpo na bango. Bakambi ya likonzi mpe baepisikopo, palado bosala keba ete mondimi nionso ya lisanga likoki na kati ya mokumba na bino basosola boniboni kopesa lipamboli ya bonganganzambe—lokola bolongobani ya moto na moto mpe bolengeli ya molimo esengeli kobenga mpenza nguya ya Nzambe.5

Na bandeko basimbi banganganzambe, nabengisi bini na kofulisa bandimi na kobatela bayokani, kokiga mpe kisambela, koyekola makomi, kokumbamela na tempelo, mpe kosala na bondimi lokola mibali mpe basi ya Nzambe. Tokoki kosalisa bango komona na miso ya bondimi ete bondimi mpe bosembo ekomema bango penepene mingi na Yesu Klisto, kopesa bango Nzela ya kosepela na kimoninga ya Molimo Mosantu, mpe koyeba esengo na bomoi!

Elembo ya Eklezia ya Nkolo ya solo mpe ya bomoi ekozala ntango nionso bokasi ebongisami mpe ekambemi mpo na kosalisa bana ya Nzambe mpe mabota na bango.6 Mpamba te ezali Eklezia na Ye, biso lokola basali na Ye tokosalisa moto, kaka lokola Ye asalaki.7 Tokosalisa na nkombo na Ye, na nguya na Ye mpe likoki na Ye, mpe boboto na Ye ya bolingo.

Mayele moko ya nazwaka koleka mibu 60 eliki na Boston eteyaki ngai kaka nguya kani ekoki kozala na kosalisaka moto moko na moko. Nazalaki ntango wana mopasoli na Lopitalo Monene ya Massachusetts—na mosala mokolo na mokolo, butu moko to butu mosusu, nsuka ya poso moko to mosusu. Nazalaki na ntango mokuse mpo na mwasi na ngai, bana na biso minei, mpe mosala ya Eklezia. Nzokande, mokambi ya etape na biso atindaki ngai na kotelaka ndako ya Wilbur mpe Leonora Cox na elikia ete Ndako Mobali Cox akoaki kozonga na makasi na Eklezia. Ye mpe Leonora bakangisamaka na Tempelo.8 Kasi, Wilbur asalaka na lingomba te mibu mingi.

Moninga na ngai mpe ngai tokendaka na ndako na bango. Ntango tokotaka, Ndeko Mwasi Cox ayambaki biso na esengo,9 kasi Ndeko Mobali Cox na mbalakaka akondeki kokota na kisuku mosusu mpe akangaki ekuke.

Nakendeki na ekuke ya kokangama mpe nabetaki. Nsima ya mwa ngonga, nayokaki mongongo ya moke “Kota.” Nafungolaki ekuke mpe nakutaki Ndeko Mobali ya kovande mpembeni ya masini ya radio ya kosakanela. Apelisaki sigaleti ya monene. Na polele, kotala na ngai eyambamaki malamu ata moke te.

Natalaki kisuku nzinganzinga na kokamwa mpe nalobaki, “Ndeko Mobali Cox, nazalaki ntango nionso na mposa ya koyekola mosala ya radio ya kosakanela. Okolinga koyekola ngai yango? Limbisa ngai nakoki te kovanda mingi mpokwa na lelo, kasi nakozonga ngonga mosusu?”

Atatabanaki mwa ngonga, mpe nsima andimaki. Wana ezalaki ebandela ya oyo ekomaki kimoning aya kitoko. Nazongaki mpe bateyaki ngai. Nabandaki kolinga mpe komemia ye. Na kotala elandaki, bonene ya moto oyo ebimaki. Tokomaki baninga malamu mingi, lokola esalaki bandinga na biso ya bolingo ya seko.nsima, na ntango koleka, libota na biso elongwaki wana. Bakambi ya esiki bakobaki koleisa libota Cox.10

Penepene na mibu mwambe nsima ya kotala wana ya yambo, Likonzi ya Boston ekelamaki.11 Bokoki kokanisa nani azalaki mokambi ya likonzi ya yambo? Ya solo! Ndeko Mobali Wilbur Cox! Mibu milandaki, ye asalaki lisusu lokola mokmbi ya misio mpe mokambi ya tempelo.

Mibu ya nsima, lokola moko ya Lisanga Likoki ya Bazomi na Mibale, natindamaki mpo na kokela likonsi moko ya sika na Sanpete County, Utah. Na bosololi na momesano, nasutukaki na esengo kokuta na lisusu moninga na ngai ya bolingo Ndeko Mobali Cox! Nayokaki liyoki ya kobianga ye lokola mopamboli ya batata ya likonzi ya sika. Nsima nabulisaki ye, toyambanaki mpe tolelaki. Bato na kisuku wana bamitunaki ntina nini bato bakola mibale bazalaki kolela. Kasi toyebaki. Ndeko Mwasi Cox ayebaki. Ya mpinzoli ezalaki ya esengo! Na kimia tomikundolaki mobembo wana ya kondima te ya bolingo mpe boyamboli oyo ebandaki mibu 30 mingi koleka, butu moko na ndako na bango.

Nsango oyo esukaki wana te. Libota ya Ndeko Mobali mpe Ndeko Mwasi Cox ekolaki na kobakisa bana 3, bankoko 20, mpe bankonkololo 54. Bakisa na yango mbano na bango na bamisionela minkama, na minkamba mosusu na tempelo, mpe minkama mingi oyo bazwaki mapamboli ya batata na maboko ya Wilbur Cox. Nguya na ye mpe Leonora ekokoba kolanda na bankola mingi na mokili.

Makambo lokola ya Wilbur mpe Leonora Cox ekosalemaka poso nionso—nakolikia, mokolo nionso—na kati ya Eklezia. Basaku ya komipesa ya Nkolo Yesu Klisto bakotamolisaka mosala na Ye, na nguya mpe likoki na Ye.

Bandeko, ezali na bikuke tokoki kofundola, mapamboli ya bonganganzambe tokoki kopesa, mitema tokoki kobikisa, mikumba tokoki komemisa, matatoli tokoki kolendisa, bomoi tokoki kosalisa, mpe esengo tokoki komema na kati ya bandako ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka—nionso mpamba te bosimbi bonganganzambe ya Nzambe. Tozali bato oyo “babiangemaka mpe balengelamaka uta ebandeli ya mokili engebene na boyebi ya kala ya Nzambe, na ntina ya [biso] bondimi boluti,” mpo na kosala mosala oyo.12

Mpokwa ya lelo nabengisi bino botelama ya solo elongo na ngai na bondeko oyo monene ya seko. Ntango nabengi nkombo ya mosala na bino na bonganganzambe, palado telema mpe tikala ya kotelama. Badiakona, palado botelema! Bateyi, botelema! Banganganzambe! Baepisikopo! Bampaka! Banganganzambe Minene! Bapamboli ya Batata! Bantuku Nsambo! Bapostolo!

Sikoyo, bandeko, ekoki bino palado kotikala ya kotelama mpe kosangana elongo na lisanga na biso na koyembaka nzela nionso misato ya “Rise Up, O Men of God”?13 Ntango bozali koyemba, bokanisa mokumba na bino lokola limpinga makasi ya Nzambe mpo na kosalisa kolengela mokili na Boyei ya Mibale ya Nkolo. Oyo ezali mokumba na biso. Oyo ezali litomba na biso. Natatoli boye na nkomba ya Yesu Klisto, amene.