2010–2019
Molimo na Ye mpo na Kozala elongo na Bino
Sanza ya Minei 2018


2:3

Molimo na Ye mpo na Kozala elongo na Bino

Nasambeli na motema na ngai mobimba ete bokoyoka mongongo ya Molimo, oyo etindami epai na bino na bosembo.

Bandeko mibali mpe Bandeko basi, nazali na botondi mpo na libaku lelo ya koloba na bino etali Saba ya Nkolo, na likita linene ya Eklezia na Ye, na eleko oyo ya Pasika. Natondi Tata na biso ya Lola mpo na likabo ya Mwana na Ye ya Mobali ya bolingo, oyo ayaki na bolingi na mabele mpo na kozala Mosikoli na biso. Nazali na botondi na koyeba ete Ye amikabaki mpo na masumu na biso mpe alamukaki na Lisekwa. Mikolo nionso napambolami na koyeba ete, na ntina ya Bomikabi na Ye, nakoki mokolo moko kosekwa mpo na kozala libela na libota moko ya bolingo.

Nayebi makambo wana na nzela moko kaka biso banso tokoki koyeba yango. Molimo Mosantu akolobaka na mayele mpe motema na ngai ete yango ezali ya solo—mbala moko kaka te kasi mbala mingi. Nazalaki na mposa ya libondi wana ya kokoba. Banso tokozwaka makama na yango tokozalaka na mposa ya bondimisi lisusu ya Molimo. Nayokaki yango mokolo moko ntango natelemaki na lopitalo moko na Tata na ngai. Totalaki mama na ngai kozwa mwa mpema likololikolo—mpe nsima lisusu. Ntango totalaki na elongi na ye, azalaki koseka ntango mpasi elongwaki. Nsima ya mwa ngonga, tata na ngai alobaki liboso, alobaki, “Mwana ya mwasi moko ya moke azongi ndako.”

Alobaki yango na kimia. Azalaki lokola na kimia. Azalaki kolobela likambo moko ezalaki ya solo. Abandaki na kimia kosangisa biloko ya Mama ye moko. Akendeki na lopitalo mobimba mpo na kotonda moko na moko ya mifulume mpe na badokotolo oyo basalisaki ye mikolo mingi.

Tata na ngai azalaki na moninga Molimo Mosantu na ngonga wana mpo na koyoka, koyeba, mpe kosala oyo asalaki mokolo wana. Azwaka elaka lokola mingi bazwi: “Ete bakoka kozala na Molimo na ye elongo na bango” (D&A 20:79).

Elikia na ngai lelo ezali ya kokolisa mposa na bino mpe bokoki na bino ya kozwa Molimo Mosantu. Bomikundola, Ye azali moko ya monsato na Bonzambe. Tata mpe Mwana Mobali bazali bato basekwa. Molimo Mosantu azali moto ya molimo. (Tala D&A 130:22.) Ezali boponi na bino mpo na kozwa Ye mpe koyamba Ye malamu na kati ya motema mpe mayele na bino.

Masengeli na yango tokoki kozwa lipamboli wana eluti ezali polele na maloba oyo ekolobamaka poso nionso kaka ntango mosusu ekokotaka ntango nionso te na kati ya mitema mpe mayele na biso. Mpo na kozala na Molimo etindamela biso tosengeli “komikundola ntango nionso” Mobikisi mpe “kobatela mitindo na Ye” (D&A 20:77).

Eleko oyo ya mobu ekosalisa biso komikundola libonza ya Mobikisi mpe bobimi na Ye na kunda lokola moto asekwa. Mingi na biso basimbi elili ya makambo wana na makundoli na bango. Natelemaki mbala moko na mwasi na ngai libanda ya kunda moko na Yelusaleme. Mingi bakokanisaka ete ezalaki kunda uta wapi Mobikisi mosekwi abimaki Nzambe moko asekwa mpe ya bomoi.

Mokambi ya limemia mokolo wana asalaki elembo na loboko na ye mpe alobaki na biso, “Ya, tala kunda ya mpamba.”

Togumbamaki mpo na kokota. Tomonaki etanda moko ekangama na efelo moko. Kasi na kati ya mayele na ngai eyaki elili mosusu, ya solo lokola oyo tomonaki mokolo wana. Ezalaki Malia, oyo Bapostolo batikaki na kunda. Wana ezali oyo Molimo amonisaki ngai mpe kutu eyokisaki ngai na mayele na ngai, polele lokola soki nazalaka kuna:

“Kasi Malia atelemaki libanda na lilita kolelaka: mpe ntango azalaki kolela, agumbamaki na nse, mpe atalaki na kati ya lilita,

“Mpe amoni banzelu mibale na mpembe ya kotelema, moko na moto, mpe mosusu na makolo, esika nzoto ya Yesu elalaka.

“Mpe balobi na ye, Mwasi, ntina nini ozali kolela? Alobaki na bango, Mpamba te balongoli Nkolo na ngai, mpe nayebi te wapi batie ye.

“Mpe ntango alobaki bongo, abalukaki yemei nsima, mpe amonaki Yesu atelemaki, mpe ayebaki te ete ezalaki Yesu.

“Yesu alobaki na ye, Mwasi, ntina nini ozali kolela? Nani ozali koluka? Ye, kobanzaka ye azali mokengeli, alobaki na ye, Tata, soki olongolaki ye awa, lobela ngai wapi otie ye, mpe nakokende kokamata ye kuna.

“Yesu alobaki na ye, Malia. Amibalukaki, mpe alobaki na ye, Rabbuni, oyo elingi koloba, Mokonzi.

“Yesu alobaki na ye, Kosimba ngai te; mpo nabuti naino te epai ya Tata: kasi kende na bandeko na ngai mibali, mpe loba na bango, nabuti epai na Tata na ngai, mpe Tata na bino, mpe na Nzambe na ngai, mpe Nzambe na bino” (Yoane 20:11–17).

Nasambelaki mpo na kopesamela ndingisa ya koyoka eloko moko ya oyo Malia ayokaki na kunda mpe oyo bayekoli mususu mibale bayokaki na nzela ya Emau ntango bazalaki kotambola na Mobikisi asekwa, kokanisaka Ye mompaya na Yelusaleme:

“Kasi bakangamaki na ye, kolobaka, Tikala na biso: mpo ezali kokoma mpokwa, mpe mokolo esili mpenza. Mpe akotaki mpo na kotikala na bango.

“Mpe esalemaki, ntango avandaki mpo na kolia na bango, akamataki lipa mpe apambolaki yango mpe akataki, mpe apesaki bango.

“Mpe miso na bango efungwanaki, mpe bayebaki ye; mpe alimwaki na miso na bango.

“Mpe bamilobelaki, Motema na biso epelaki te na kati na biso, ntango azalaki koloba na biso na nzela, mpe ntango afungolelaki biso makomi?” (Luka 24:29–32).

Boko ya maloba wana ebandelamaka na liyangani ya elambo nakendeki eleki mibu 70. Na mikolo wana mayangani ya elambo ezali na mpokwa. Ezalaki molili libanda. Lingomba eyebaki maloba oyo ya momesano. Nayoka yango mbala mingi. Kasi likundoli na ngai ya nsuka ezali ya liyoki moko na butu moko ya ndenge. Ebendaki ngai penepene na Mobikisi. Ntango mosusu soki natangi maloba ekozongela biso banso lisusu:

Tikala elongo na biso; ezali mpokwa.

Mokolo eleki mpe ekei;

Bilili ya mpokwa eyei;

Butu ezali koya.

Na kati ya motema na ngai mompaya moko ya malamu,

Na kati ya ndako na ngai avandi.

Tikala elongo na ngai; ezali mpokwa.

Kotambola na yo elongo na ngai lelo

Esali motema na ngai na kati na ngai epela,

Ntango nazali kosolola na yo.

Maloba na yo ya lokengo etondisi molimo na ngai

Mpe ebateli ngai na mopanzi na yo.

O Mobikisi, tikala butu ya lelo elongo na nai;

Tala, ezali mpokwa.

O Mobikisi, tikala butu oyo elongo na ngai;

Tala, ezali mpokwa, ezali mpokwa.1

Mingi koleka likundoli ya makambo ezali bokundoli ya Molimo Mosantu kosimbaka mitema na biso mpe bokotisi ya kokoba ya bosolo. Mingi koleka komona na miso na biso, to komikundola maloba elobama mpe ekomama, ezali kokundola mayoki oyo azali elongo na mongongo moko ya kimia ya Molimo. Mingimingi te, nayoki yango lolenge moko kaka na bato na mobembo na Emau basalaki—lokola bopeli moko ya kimia na motema. Mbala mingi mingi, ezali liyoki moko ya pete mpe bondimisi ya kimia.

Tozali na elaka ya Molimo Mosantu lokola moninga lokola tozali lususu na bokambi ya solo na boniboni kosenga makasi likabo wana. Maloba ekolobamaka na mosala na ndingisa ya Nkolo na maboko na ye likolo ya moto na biso: “Yamba Molimo Mosantu.” Na ngonga wana, yo mpe ngai tozali na bondimi Ye akotinda. Kasi lotomo na biso ezali kopona kofungola mitema na biso mpo na kozwa lisalisi ya Molimo, bomoi mobimba.

Mayele ya Profeta Joseph Smith epesi bokambi moko. Abandaki mpe akobaki mosala na ye ya mokano ete bwania na ye moko ekokaki te mpo na koyeba nzela nini asengelaki kolanda. Aponaki mozala na komikitisa liboso ya Nzambe.

Nsima, Joseph akanaki kotuna na Nzambe. Asambelaki na bondimi ete Nzambe akoka koyanola ye. Eyano eyaki ntango azalaki elenge mwana mobali. Bansango wana eyaki ntango azalaki na mposa ya koyeba boniboni Nzambe alingaki Eklezia na Ye esalema. Molimo Mosantu elendisaki mpe ekambaki ye na bomoi na ye mobimba.

Atosaki bofuli ntango azalaki na kpokoso. Na ndakisa, azwaki bokambi ya kotinda Bazomi na Mibale na Engletere ntango asengelaki na bango mingi koleka. Atindaki bango.

Andimaki bosemboli mpe libondisi ya Molimo ntango azalaki na boloko mpe Basantu bazalaki na moniokoli ya nsomo. Mpe atosaki ntango akitaki na nzela ya Carthage atako ayebaki azalaki liboso ya liwa.

Profeta Joseph apesaki ndakisa mpo na biso ya boniboni kozwa bokambi ya kokoba na molimo mpe libondisi na nzela ya Molimo Mosantu.

Boponi ya yambo asalaki ezalaki kozala na komikitisa liboso ya Nzambe.

Ya mibale ezalaki kosambela na bondimi na Nkolo Yesu Klisto.

Ya misato ezalaki kotosa na sikisiki. Botosi ekoki kolinga koloba kokende mbangu. Ekoki kolinga koloba komilengela. To ekoki kolinga koloba kozela na bompikiliki bofuli ya nsima..

Mpe ya minei ezali kosambela mpo nakoyeba bamposa mpe mitema ya basusu mpe boniboni kosalisa bango mpo na Nkolo. Nakozalaka na libaku ya kotala baprofeta ya Nzambe ntango bakosambelaka, bakosengaka bofuli, mpe bakozwaka bokambi, mpe bakosalelaka.

Nakomonaka boniboni mbala mingi nsambo na bango etali bato bakolingaka mpe bakosalelaka. Ntina na bango mpo na basusu ekozalaka lokola ya kofungwana mpo na kozwa bofuli. Yango ekoki kozala ya solo mpo na bino..

Bofuli ekosalisa biso kosalela basusu mpo na Nkolo. Bokomonaka yango na mayele na bino, lokola ngai. Episikopo na ngai mbala moko alobaki na ngai—ntango mosusu soki mwasi na ngai azalaki na nse ya bofini na bomoi na yemei—“Ntango nionso nakoyokaka moto moko na palwasi azali na mposa ya lisalisi, namonaka ete mwasi na ngai azalaki kuna liboso na ngai. Boniboni akosalaka yango?”

Azali lokola banso oyo bazali basali minene na bokonzi ya Nkolo. Ezali lokola makambo mibale bakosalaki. Basali minene bakomikokisaka mpo Molimo Mosantu azala penepene lokola moninga na bango ya ntango nionso. Mpe bakomikokisaka mpo na likabo ya bolingani, oyo ezali bolingo ya peto ya Klisto. Makabo wana ekokolaka na bango ntango bakosalaka yango uta na bolingo mpo na Nkolo.

Lolenge na yango losambo, bofuli, mpe bolingo ya Nkolo ekosalaka elongo na mosala na biso elimbolamaki malamu mpenza na maloba oyo:

“Soki okosenga likambo nionso na nkombo na ngai. Nakosala yango.

“Soki olingi ngai, batela mitindo na ngai.

“Mpe nakosambela Tata, mpe akopesa bino Mosungi mosusu, ete akoki kozala na bino libela;

“Kutu Molimo ya bosolo, oyo mokili ekoki te koyamba, mpamba te avandi na bino, mpe akozala na kati na bino.

“Nakotika bino te na kozanga libondisi: nakoya epai na bino.

“Lisusu mwa ntango, mpe mokili ekomona ngai lisusu te, kasi bino bokomona ngai: mpamba te nazali na bomoi, bokozala na bomoi lokola.

“Na mokolo wana bokoyeba ete nazali na kati ya Tata na ngai, mpe bino bozali na kati na ngai, mpe ngai na kati na bino.

“Ye oyo azali na mitindo na ngai, mpe abateli yango, ezali ye oyo alingi ngai: mpe ye oyo alingi ngai akolingama na Tata na ngai, mpe nakolinga ye, mpe nakomilakisa ngaimei epai na Ye” (Yoane 14:14–21).

Napesi litatoli ete Tata azali sikoyo na boyebi na bino, mayoki na bino, mpe bamposa ya molimo mpe ya nzoto ya banso nzinganzinga na bino. Napesi litatoli ete Tata mpe Mwana Mobali bazali kotinda Molimo Mosantu na bango oyo bazali na likabo wana, oyo bakosengaka lipamboli wana, mpe bakolukaka kolongobana na yango. Tata te, mpe Mwana Mobali te, mpe Molimo Mosantu te bakomikotisaka Bangomei na makasi na kati na bomoi na biso. Tozali na bonsomi na kopona. Nkolo alobaka na banso:

“Tala, natelemi na ekuke, mpe nazali kobeta: soki moto moko ayoki mongongo na ngai, mpe afungoli ekuke, nakokota na kati na ye, mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na ngai.

“Na ye oyo akolonga nakondima afanda elongo na ngai na ngdende na ngai, kaka lokola ngai nalongaki lokola, mpe navandi elongo na Tata na ngai na ngdende na ye.

“Ye oyo azali na litoyi, tika ye ayoka oyo Molimgo alobi” (Emoniseli 3:20–22).

Nasambeli na motema na ngai mobimba ete okoyoka mongongo ya Molimo, oyo etindameli yo na bokabi boye. Mpe nasambeli ete okofungola motema na yo mpo na koyamba Ye. Soki osengi na ntina mpe na bondimi ya solo na Yesu Klisto mpo na bofuli, okozwa yango na lolenge ya Nkolo mpe na ngonga na Ye. Nzambe asalaki yango mpo na elenge Joseph Smith. Azali kosala yango lelo mpo na profeta na biso ya bomoi, Mokambi Russell M. Nelson. Ye atii yo na nzela ya bana ya Nzambe misusu mpo na kosalisa bango. Nayebi yango kaka te na oyo namoni na miso na ngai kasi na nguya mingi koleka na oyo Molimo anungunungisi na motema na ngai.

Nayoki bolingo ya Tata mpe Mwana Mobali na Ye ya bolingo mpo na bana ya Nzambe na mokili mpe mpo na bana na Ye na mokili ya molimo. Nakoyokaka libondisi mpe bokambi ya Molimo Mosantu. Nasambeli ete bokoka kozala na esengo ya Molimo elongo na bino lokola moninga moko. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Abide with Me; ’Tis Eventide,” Hymns, no. 165.