Kosalisa Efulama
Nkolo asili kosala litambe monene ya kokende liboso na mwango na Ye mpo ete biso tokoma kutu ya kofulama mpe ya bolingo mingi koleka na mosala na biso ya kosalisa ya bonganganzambe.
Bandeko ba ngai babolingo, nazali na botondi mpo na libaku ya kolobelaka bino na likita linene eyebana. Tosungi Mokambi Russell M. Nelson lokola Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya Mbala ya 17. Wana ezwi ngai lipamboli ya kosalaka elongo na ye mokolo na mokolo, nayoki bondimami ya Molimo ete Mokambi abiangami na Nzambe mpo na kokamba Eklezia ya solo ya Nkolo.
Ezali lisusu litatoli na ngai ete Nkolo abiangi Mpaka ..... mpe Mpaka ...... mpo na kosala lokola bato ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. Nalingi mpe nasungi bango. Bango bako, na nzela ya mosala na bango, pambola bomoi na mokili mobimba.
Likita oyo ezala monene mpo na lisusu ntina mosusu. Mokambi Nelson asakoli litambe efulama moko ya kokende liboso na mwango ebongisama ya Nkolo mpo na Eklezia na Ye. Mwango wana ezali na mabongisi ya sika mpo na masanga makoki ya bonganganzambe kati na bapalwasi mpe makonzi mpo etet tokoka kokokisa malamu koleka mikumba na biso ya bonganganzambe. Mikumba wana nyonso etali bobateli na biso ya bonganganzambe ya bana ya Tata wa biso.
Mwanngo ya Nkolo mpo na Basantu na Ye kopesa bobateli ya bolingo ezwi ndenge ebele mibu mingi eleki. Na mikolo ya ebandeli ya Nauvoo, Profeta Joseph Smith azalaki na mposa ya nzela moko ebonga mpo na kobatela mpela ya babongwani ya babola ebele oyo bazalaki koya na engumba. Bankoko na ngai ya nkulutu minei bazalaki kati na bango—Ba Eyrings, ba Bennions, ba Romneys, mpe ba Smiths. Profeta abongisaki bobateli ya Basantu wana na mboka na mboka. Na Illinois bokaboli wana ya engumba ebengamaki “bapalwasi.”
Ntango Bawsantu bakatisaki bisobe, bobateli na bango ya moko na moko ebongisamaki na “bakompani.” Moko ya Bankoko na ngai ya nkulutu (ngambo ya tata) azalaki kozonga uta na misio na ye na oyo ezali sikawa Oklahoma ntango akutanaki na kompani moko na. Alembaki mpenza na bokono ete ye na moninga na ye ya nzela bazalaki na nsima na bango na mwa wago.
Mokambi ya kopani atindaki bilenge basi mibale mpo na kosalisa moto nyonso oyo akokaki kozala na wago wana. Moko na bango, elenge mwasi moko oyo abongwanaka na mboka Suisse, abwakaki liso na moko ya bamisionele mpe ayokaki mawa. Abikisamaki na kompani wana ya Basantu. Azongelaki makasi ekoka mpo na kotambola nzela etikalaki mpo na kokende na Salt Lake Valley elongo na elenge mobikisi na ngambo na ye. Balinganaki mpe babalanaki. Akomaki Nkoko na ngai ya mobali ya nkulutu Henry Eyring, mpe mwasi nkoko na ngai ya mwasi ya Maria Bommeli Eyring.
Mibu mingi nsima, ntango bato bamonaki pkokoso makasi ya kokatisaka mboka, alobaki, “O te, ezalaki mpasi te. Ntango tozalaki kotambola, tozalaki kosolola nzela mobimba na ntina ya likamwisi nini ezalaki ete tomonaki biso mibale nsango malamu ya solo ya Yesu Klissto. Ezalaki ngonga ya esengo koleka mingi oyo nakoki komikundola.”
Uta ntango wana, Nkolo asaleli banzela ebele mpo na kosalisa Basantu na Ye babatelala moko na mokoko. Sikawa apamboli biso na masanga makoki ya makasi mpe ya bomoko na bapalwasi mpe makonzi—masanga makoki oyo ezali kosala elongo na mabongisi nyonso ya palwasi.
Bapalwasi ya baengumba minene, bakompani, mpe masanga makoki ya makasi esengi nyonso pene biloko mibale mpo na kolonga na kosalaka mokano ya Nzambe kozwa Basantu na Ye babatelana moko na moko na lolenge Ye abatelaka bango. Balongaka ntango Basantu bayokaka bolingo ya Klisto mpo na moko na moko likolo ya litomba na bango ya moto yemei. Makomi ebengaka yango “bolingani … bolingo ya mpeto ya Klisto” (Moroni 7:47). Mpe balongaka ntango Molimo Mosantu akambaka mosungi koyeba nini Nkolo ayebi ezali malamu mpo na moto oyo azali komeka kosalisa.
Mbala ebele na baposo eleki, bandimi ya Eklezia basalaki na miso na ngai lokola soki babandaki kosala nini Nkolo alingaki kosala. Botika ngai napesa bino bandakisa mibale kaka. Moko, lisukulu ya liyangani ya elambo ya pete epesami na moteyi ya mibu 14 kati na Bonganganzambe ya Alona oyo asosoli nini basimbi bonganganzambe bakoki kokokisa na mosala na bango mpo na Nkolo.Ya mibale, mosimbi ya Bonganganzambe ya Melekisedeke oyo, na bolingo ya Klisto, bafulamaki mpo na kosalisa libota.
Yambo, tika napesa bino maloba ya elenge mobali kolobaka na liyangani ya elambo ya palwasi. Oyo nakendaki. Bomeka komikundola lolenge nini bozalaki ntano bozalaki na mibu 14 mpe botia matoyi mpo na koyoka ye koloba mingi koleka oyo elenge mobali ya boye akokaki mpenza koyeba:
“Nasepeli mpenza kozala moko ya lisanga likoki ya bateyi kati na palwasi na biso uta nakokisaki mibu 14 mobu eleki. Moteyi azali kokoba kozala na mikumba nyonso ya diakona kobakisa misusu ya sika.
“Lokola basusu kati na biso bazali bateyi, basusu bakozala mokolo mosusu, mpe moto nyonso kati na Eklezia apambolami na nzela ya bonganganzambe, yango wana ezali ntina mpo na banso na biso toyeba mingi oyo etali ntomo ya moteyi.
“Ya yambo, Doctrine et Alliances 20:53 elobi, ‘Lotomo ya moteyi ezali kokengela eklezia ntango nyonso, mpe kozala elongo mpe kolendisa bangom.’
“Nsima, Doctrine et Alliances 20:54–55 elobi:
“‘Mpe tala ete ezala na lisumu te na eklezia, moto makasi te na moko mpe na mosusu, lokuta te, bilobelalobela, mpe songisongi te;
“‘Mpe kotala ete bandimi ya eklezia bakutana mbala mingi, mpe lisusu kotala ete bandimi basala lotomo na bango.’”
Elenge mobali yango akobaki:
“Nkolo azali kolobela biso ete ezali mokumba na biso kaka te kobatela Eklezia kasi lisusu kobatela bato kati na Eklezia lolenge Klisto akokaki mpo ete oyo ezali Eklezia na Ye. Soki tozali komeka kobomba mibeko, tozala boboto na moko na mosusu, tozala bosembo, tozala baninga malamu, mpe tosepela kozala elongo, nsima tokozala na makoki ya kozala na Molimo elongo na biso mpe koyeba nini Tata na Lola alingi biso tosala. Soki te, nde tokoki te kokokisa libiangi na biso.”
Akokaki koloba:
“Ntango moteyi aponi kotia ndakisa malamu na kozalaka moteyi ya ndako ya malamu, kopesaka bandimi mbote na eklezia, kolengelaka elambo, kosalisaka na ndako, mpe kozalaka moto ya kimia, azali kopona kotosa bonganganzambe na ye mpe kokokisa libiangi na ye.
“Kozala moteyi malamu elingi bobele te koloba kozala moyanoli ntango tozali na eklezia to na milulu ya Eklezia. Apostolo Paulo ateyaki, ‘Opesa bandimi etaliseli na elobeli mpe na ezaleli mpe na bolingo mpe na kondima mpe na mpeto’ (1 Timote 4:12).”
Nde nsima elenge mobali alobaki:
“Likambo te bisika nini tozali to nini tozali kosala, tokoki kozaala ndakisa malamu ya bosembo na bangonga nyonso mpe na bisika nyonso.
“Tata na ngai mpe ngai tozali bateyi na libota ya ba Browns.1 Ntango nyonso tokedaka kotala bango, tosepelaka kosolola mpe koyeba bango. Eloko moko nalingaka oyo etali ba Browns ezali ntango nyonso tokendaka kuna, baszalaka na bolingi ya koyoka mpe bazalaka ntango nyonso na masolo kitoko ya kokabola.
“Ntango toyebi bato kati na palwasi malamu na nzela ya mateya na libota, ekomaka pete koleka mpo na kosala lotomo ya moteyi oyo elandi nsima, mpe yango ezali kopesa bandimi mbote na eklezia. Kosalisa bato bayoka boyei bolamu mpe ya komikotisa na eklezia esalisaka bandimi banso ya palwasi bamiyoka ya kolingama mpe ya kolengelama mpo na kozwa elambo.
“Nsima ya kopesa mbote na bandimi oyo bayei na eklezia, bateyi basalisaka eyenga moko na moko na kolengelaka elambo. Nasepelaka mpenza kolekisa mpe kolengela elambo kati na palwasi mpo ete moto nyonso azalaka na limemia mpenza. Nayokaka ntango nyonso Molimo ntango nalengelaka mpe nalekisaka elambo. Ezali lipamboli ya solo mpo na ngai ete nazalaka na makoki ya kosala yango eyenga nyonso.
“Misala mosusu lokola kolekisa elambo ezali likambo moko bato bamonaka mpe batondaka biso mpo na kosalaka yango, kasi misala mosusu lokola kolengela elambo esalamaka mbala mingi kozangaka bato bamona yango. Yango ezali tentina soki bato bamoni biso kosala; oyo ezali ntina ezali ete Nkolo ayebi tosaleli Ye.
“Lokola bateyi, tosengeli ntango nyonso komeka mpo na kolendisa Eklezia, baninga na biso, mpe libota na biso na kokokisaka mikumba na biso ya bonganganzambe. Ezali ntango nyonso pete te, kasi Nkolo akopesaka mitindo epai na biso te, Nkolo apesaka mitindo moko te epai ya bana ‘longola se soko ekolengele ye nzela mpo na [biso to] koka kokokisa likambo liye atindi’ (1 Nefi 3:7).”
Wana ezalaki elenge mobali kosukisa, nakobaki kokamwa kokomela mpe mbwania na ye. Alobaki na mokuse na kolobaka, “Nayebi ete tokokma malamu koleka soki toponi kolanda [Yesu Klisto].”
Lisolo mosusu ya mosala ya bonganganzambe ebetamaki sanza eleki na liyangani ya elambo ya palwasi moko. Lisusu nakendaki. Mosimbi ya bonganganzambe oyo amesana ayebaki te wana ezalaki ye koloba ete azalaki kolimbola mpenza nini Nkolo azalaki na mposa esalamela masanga makoki ya bonganganzambe elendisama. Tala lisolo na ye na mokuse:
Ye mpe moninga na ye moteyi na libota bapesamaki mokumba ya kosalisa mabota nsambo. Pene bango banso balingaki te bateyi na libota bakende kotala bango. Ntango bateyi na libota bakendaki na bandako na bango, baboyaki kofungola ekuke. Ntango babengaki na nzela ya singa, baszwaki eyano moko te. Ntango batikaki nsango, libiangi ezongisamaki te. Moninga ya nkulutu oyo na nsuka aponaki kosalisa na kokomaka mikanda. Kutu abandaki kosalela baenvelope ya langi ya mosaka ya kongenga na elikya ya kozwa eyano.
Moko ya mabota nsambo yango ezalaki ndeko mwasi monzemba ya mosala moke oyo alongwaka uta na poto. Azalaki na bilenge bana mibale.
Nsima ya komeka mbala ebele mpo na kozwa ye, ayambaki nkoma ya telephone. Ayebisaki ye na mbalakaka ete azalaki na makambo ebele ya kosala ete akokaki kokutana ten a bateyi na libota. Azalaki na misala mibale mpe azalaki na mapinga mpe lokola. Mosala na ye ya yambo ezalaki oyo ya kipulusu, mpe makanisi na ye ezalaki ya kokoma moluki mpe kozonga na ekolo na ye ya mbotama mpe kokoba kosala kuna.
Moteyi na libota mokolo moko te azalaki na makoki ya kokonde kotala ye na libota na ye. Azalaki kokomela ye na nzela ya telephone ntango mususu. Sanza nyonso azalaki kotinda mokanda ekomama na maboko, kobakisaka bakalati ya eyenga mpo na mwana moko na moko.
Azwaki eyano moko te. Kasi ayebaki banana bazalaki bateyi na ye na libota, lolenge nini ya kozwa bango, mpe ete bakolenda na mosala ya bonganganzambe.
Nsima mokolo moko azwaki motanda moko ya likama na nzela ya singa uta na ye. Azalaki na bonsenga ya mpenza ya lisalisi. Ayebaki te nani azalaki episikopo na ye kasi ayebaki ayebaki mpenza bateyi na ye na libota.
Na mwa mikolo, asengelaki kotika ekolo mpo na ngalasisi ya koyekola ya mapinga sanza moko. Akokaki te komema elongo na ye bana na ye. Mama na ye, oyo asengelaki kopatela bana na ye, awutaka kopumbwa mpo na kokende na poto mpo na kobatela mobali na ye, oyo azalaki na bokono makasi.
Ndeko mwasi oyo ya mosala moke azalaki na mosolo ekoka mpo na kosomba tike ya poto mpo na mwana na ye ya elenge mingi kasi mpo na mwana ye ya mobali ya mibu 12 te, Eric.2 Atunaki moteyi na ye na libota soki akokaki te komona libota ya LDS ya malamu moko mpo na kokamata Eric na ndako na bango mikolo 30 oyo ya nsima!
Moteyi na libota ayanolaki na nkoma ya nzela ya singa ete akosala nyonso oyo akoki kosala. Nsima asololaki na bakambi na ye ya bonganganzambe. Episikopo apesaki ye ndingisa ya komona bato ya lisanga ya palwasi, kobakisaka mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi.
Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi nokinoki bamonaki mabota ya LDS malamu minei, oyo ezalaki na bana pene na mibu ya Eric, oyo bakozwa ye kati na bandako na bango poso moko moko. Na sanza elandaki, mabota oyo baliesaki Eric, bamonaki esika mpo na ye kati na biteni ya ndako oyo esila kotonda to bandako mike na bango, bamemaki ye na milulu na bango ya libota ya eyenga oyo basalelaki mwango liboso, bamemaki ye na ndakonzambe, bakotisaki ye na Makita ya libota na mpokwa na bang, mpe bongo na bongo.
Mabota oyo ezalaki na bilenge mibali ya mibu ya Eric, ekotisaki ye na mayangani mpe milulu ya lisanga likoki ya badiakona na bango. Na eleko ya mikolo 30 oyo, Eric azalaki na eklezia eyenga nyonso mpo na mbala ya yambo.
Nsima ya kozonga ya mama na ye uta na boyekoli na ye, Eric akobaki kokende na eklezia mbala mingi elongo na moko ya mabota ya LDS ya mosala ezanga lifuta minei to basusu oyo bazalaki kozwa ye lokola moninga, kobakisaka bateyi na ndako ya mama na ye. Na nsuka, akulisamaki diakona mpe abandaki kolekisa elambo mbala na mbala.
Sikawa, tika totala kati na mikolo ekoya ya Eric. Tokamwa te soki akomi mokambi kati na Eklezia kati na ekolo ya mbotama ya mama na ye ntango libota na ye ekozonga kuna—nyonso mpo na Basantu oyo basalaki elongo na bomoko mpo na kosala na nse ya boyangeli ya Molimo Mosantu mpe mpo na bolingani kati na mitema na bango.
Toyebi ete bolingani ezali ntina mpo na biso ete tobikisama kati na bokonzi ya Nzambe. Moroni akomaki, “longola se soko bozali na bolingani bokoki ata moke te kobikisama o bokonzi bwa Nzambe; ” (Moroni 10:21; tala lisusu Etele 12:34).
Toyebi lisusu ete bolingani ezali likabo epesameli biso nsima ya nyonso oyo tokoki kosala. Tosengeli “Boambela epai ya Tata na makasi manso ya motema mwa bino, ete bokoka kotonda na bolingo boye, boye apesi epai ya baye banso bazali balandi ba solo ba Mwana i wa ye, Yesu Klisto” (Moroni 7:48).
Ezali komonana epai na ngai lokola ete tozwaka Molimo Mosantu malamu mpenza ntango tozali kotia makanisi na kosalisaka basusu. Oyo ezali ntina tozaleli na mokumba ya bonganganzambe mpo na kosala mpo na Mobikisi. Ntango tomipesi na mosala ya basusu, tokanisaka moke na oyo etali bisomei, mpe Molimo Mosantu akoki kobelema mingi mpo na koya epai na biso mpe kosalisa biso na bokasi na biso ya bomoi mobimba mpo ete likabo ya bolingani epesamela biso.
Napesi bino litatoli na ngai ete Nkolo asili kosala litambe monene yaa kokende liboso kati na mwango na Ye mpo ete biso tokoma kutu ya kofulama mpe kolingana mingi koleka na mosala na biso ya kosalisa ya bonganganzambe. Nazali na botondi mpo na bolingo na Ye, oyo Ye na bomikabi mpenza apesi biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.