2010–2019
Masanga makoki ya Bampaka
Sanza ya Minei 2018


2:3

Ba Mpaka ya Lisanga Likoki

Kozalaka na lisanga likoki ya Bonganganzambe moko ya Melekisedeke na palwase esangisi basimbi bonganganzambe kokokisa bandenge nyonso ya mosala ya lobiko.

Kala mingi te nsima ya Eklezia kobongisama na eleko oyo ya nsuka, Nkolo alobaki na emoniseli moko, “Mpe na nzela ya losambo ya bondimi na bino bokozwa mobeko na ngai, ete bokoka koyeba lolenge nini kokamba eklezia na ngai mpe bozwa makambo nyonso kouta na ngai.”1 Mobeko oyo elandamaka na Eklezia—mpe elaka yango ekokisamaki na Nkolo—uta ntango wana. Balolenge mpo na lisanga mpe mosala ya bonganganzambe ebimisamaki ba mbala na mbala, kobandaka na Profeta Joseph Smith ntango misala mpe masanga makoki ya bonganganzambe etiamaki mbala ya yambo. Bobongisi ya ntina ebimisamaki mpe esalemelaki na bantango ya baboyangeli ya Bakambi Brigham Young, John Taylor, Spencer W. Kimball, mpe Ezra Taft Benson na botosi na Lisanga Likoki ya Bazomi na Mibale, Bantuku Nsambo, banganganzambe minene, mpe misala mpe masanga makoki misusu na nyonso mibale ya bonganganzambe ya Melekisedeke mpe ya Alona.2 Sikawa, liloba moko kitoko kaka kala te, Mokambi Russell M. Nelson asakolaki kobongisama moko ya motuya koleka mosika.

Soki nakoki kobandela liloba na ye: “Butu ya lelo, tosakoli kobongiaama ya motuya na masanga makoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpo na kokokisa liloba ya Nkolo ndenge esengeli mpenza. Na palwase moko na moko, banganganzambe minene mpe bampaka bakosangana sikawa na lisanga likoki moko ya bampaka …[mpe] bokelami ya masanga makoki ya [banganganzambe minene ya likonzi] ekosalama likolo ya mabiangi ya bonganganzambe ya sika.”

Mokambi Nelson abakisaki:

“Babongoli oyo esalami na nse ya boyekoli bansanza ebele. Toyoki bosenga moko ya mbangumbangu ya kobongisa lolenge tozali kobatela bandimi na biso. … Mpo na kosala yango malamu koleko, tosengeli kolendisa masanga makoki ya bonganganzambe na biso mpo na kopesa nzela monene koleka na mosala ya bolingo mpe kosunga oyo Nkolo azali kozela na Bansantu na Ye.

Mbongwana yango efulami na Nkolo. Soki tosaleli yango, tokozala kutu makasi koleka lolenge tozalaki liboso.”3

Na malako ya Bokambi ya Yambo, Mpaka Elder Ronald A. Rasband mpe ngai tokobakisa makambo mosusu oyo tolikii ekoyanola mituna bozali na yango.

Masanga makoki ya Bampaka mpe ya Banganganzambe Minene

Yambo, mpo na kozongela, nini ezali bobongisi mpo na masanga ya banganganzambe minene mpe masanga makoki ya bampaka? Na bapalwase, bato ya masanga makoki ya bampaka mpe masanga ya banganganzambe minene bakosangana sikawa kati na lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke moko na bokambi moko. Lisanga likoki oyo, ebuti na mitango mpe bomoko, ekobiangama “lisanga likoki ya bampaka.” Masanga ya banganganzambe minene ekokoba lisusu te. Lisanga likoki ya bampaka esangisi bampaka nyonso mpe baye bakokoma bampaka na palwase lokola mpe banganganzambe minene oyo bazali te kosalaka na sikoyo na boepisikopo, na bokambi ya likonzi, na lisanga linene ya bapesi toli, to lokola bapesi lipamboli ya botata oyo bazali kosala. Lisanga likoki ya banganganzambe minene na kati ya likonzi ekozala na banganganzambe minene oyo bazali kosalaka na bokambi ya likonzi, na boepisikopo, na lisanga linene ya bapesi toli, mpe lokolo bapesi lipamboli ya botata oyo bazali kosala.

Bokambi ya Lisanga Likoki ya Bampaka

Lolenge nini bokambi ya lisanga likoki ya bampaka ebongisami? Bakambi ya likonzi bakopemisa babokambi ya lisanga ya banganganzambe minene mpe babokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe bakobianga mokambi ya lisanga likoki ya bampaka ya sika mpe bapesi toli na palwase mpe etape moko na moko. Bokambi ya sika ya lisanga likoki ya bampaka ekoki kozala na bampaka mpe banganganzambe minene, ya mibu mpe mayele ya mosala ya ndenge na ndenge, kosalaka elongo na bokambi ya lisanga likoki moko. Ata mpaka to nganganzambe monene akoki kosala lokola mokambi ya lisanga likoki to mopesi toli na bokambi. Oyo ezali te “kokonza” ya masanga makoki ya bampaka na banganganzambe minene. Tolikii ete bampaka mpe banganganzambe minene kosala elongo na bosangani nyoso na bokambi ya lisanga likoki mpe na mosala na lisanga likoki. Bobongisi wana ya lisanga likoki esengeli esalema na lombango ekoki.

Misala ya Bonganganzambe na Lisanga Likoki ya Bampaka

Mbongwana oyo na libongisi ya lisanga likoki ebongoli mosala ya bonganganzambe esimbami na bato ya lisanga likoki? Te, mosala oyo elongoli te mosala moko ya bonganganzambe na yango modimi ya lisanga likoki akoki kokulisama ya kala. Lokola boyebi, mobali akoki kokulisama na misala ya bonganganzambe ekeseni na bomoi na ye, mpe ye akobungisa te to kobebisa te makuli ya ebandeli ntango soki ayambi moko mosusu ya sika. Ntango na bandakisa mosusu momemi bonganganzambe moko akoki kosala na mingi koleka mosala moko na ntango, lokola ntango nganganzambe moko monene lisusu azali kosala lokola mopesi libampoli ya botata to lokola episikopo, ye akoki mpenza te nakoloba kosala na misala ya bonganganzambe na ye nyonso na ngonga moko. Baepisikopo mpe Bantuku nsambo, na ndakisa, basalaka mingi mingi te na misala wana ntango bango bapemisami to batiami na pembeni. Boye, atako mosala ya bonganganzambe mosusu kani to misala mobali moko akoki kozala na yango, ntango ye azali moto moko ya lisanga likoki ya bampaka, ye azali kosala lokola mpaka.

Mibu eleki, President Boyd K. Packer amonaki ete “bonganganzambe ezali monene koleka misala mosusu na yango. … bonganganzambe ekabolami te. Mpaka azali na bonganganzambe ndenge moko lokola Apostolo. (Tala D&C 20:38.) Ntango mobali moko [azali na bonganganzambi etiami likolo na ye], ayambi nyonso na yango. Nzokande, ezali na misala na kati ya bonganganzambe—babokaboli ya likoki mpe mokumba. … Ntango mosusu mosala moko elobamaka lokola kozala ‘monene koleka’ to ‘moke koleka’ mosala mosusu. Atako ‘monene’ to ‘moke’ misala na Bonganganzambe ya Melekisedeke elakisi bokesene ya mosala.”4 Nalikii na bosolo mpenza ete tokolobela kala mingi te maloba ya kozalaka “kopusana” na mosala mosusu na Bonganganzambe ya Melekisedeke.

Bampaka bakokoba kokulisama na banganganzambe minene soki bango babiangami na bokanbi ya likonzi moko, lisanga linene ya bapesi toli, to boepisikopo—to na ntango mosusu lokola ekanami na mokambi ya likonzi na nzela ya botali mpe lifuli na losambo. Ntango bangonga na bango ya mosala na bokambi ya likonzi moko, lisanga linene ya bapesi toli, to boepisikopo ekokisami, banganganzambe minene bakozonga na lisanga likoki ya bampaka na palwasi na bango.

Malako mpo na Mokambi ya Lisanga Likoki ya Bampaka

Nani akotambolisaka mosala ya mokambi ya lisanga likoki ya bampaka? Mokambi ya likonzi akotambwisa Bonganganzambe ya Melekisedeke na likonzi na ye. Boye, mokambi ya lisanga likoki ya bampaka azali mbala moko na moyanoli na mokambi ya likonzi, oyo akopesa malongi mpe bokambami uta na bokambi ya likonzi na nzela ya lisanga linene ya bapesi toli. Episikopo, loyo azali nganganzambe monene mokonzicna palwase, lisusu akutani mingimingi na mokambi ya likita linene ya bampaka. Bapesi toli ya episikopo elongo na ye mpe bakopesa botambilisi etalaka lolenge nini ya malamu mingi ya kosala mpe kopambola bandimi ya palwase, kosalaka na boyokani elongo na masanga nyonso ya palwase.5

Ntina ya Mbongwana Oyo

Nini ezali bantina ya bobongisi na masanga makoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke? Kozalaka na lisanga likoki ya Bonganganzambe moko ya Melekisedeke na palwase esangisi basimbi bonganganzambe kokokisa bandenge nyonso ya mosala ya lobiko, kosangisaka ya mosala ya tempelo mpe ya mambi ya kala ya libota oyo na liboso ezalaki kotambwisama na lisanga ya banganganzambe minene. Yango epesi nzela na bandimi ya lisanga likoki ya mibu mpe botangi nyonso kozwa litomba uta na limoni mpe mayele ya mosala ya moko mpe mosusu mpe baoyo bazali na eleko ya ntango ya bomoi na bango ekeseni. Yango epesi lisusu mabaku ya kobakisa mpo ete basimbi ya bonganganzambe ya mayele bakamba basusu, kosangisaka bampaka ya mikolo ekoya, bandimi ya sika, bilenge bakoli, mpe baye bazongeli eklezia na makasi. Nakoki te koloba na ndenge esengeli lolenge nini nazali na bosepeli ya kokanisa mosala ya ntina oyo ezali kobuta oyo masanga makoki ya bampaka ekozala na yango na mikolo ekoya. Bwania, mayele, makoki, mpe nkonzo oyo ekokutama na masanga makoki oyo ekolimbola na libandeli moko ya sika mpe lolenge moko ya sika ya mosala ya bonganganzambe na Eklezia mobimba.

Mibu ntuku misato eleki na likita linene, nabetaki lisolo moko elobamaki yambo na Mpaka Vaughn J. Featherstone ya Bantuku Nsambo oyo nandimi ezali na motuya kobandela awa.

na 1918 Ndeko mobali George Goates azalaki mosali bilanga oyo alonaki mpe akolisaki mbala ya sukali na Lehi, Utah. Eleko ya malili eyaki mbangu na mobu wana mpe ekomisaki mabanga ya malili milona na ye na mabele.mpo na George mpe mwana na ye ya mobali Francis, milona ezalaki malembe mpe mabe. Na ntango yango, bokono ya gripi ekangaki batu ebele. Maladi wana ya mabe ememaki liwa ya Charles mwana mobali ya George mpe bana misato ya mike ya Charles—bana mike mibale ya basi mpe moko ya mobali. Na katikati ya kaka mikolo motoba, George Goates na mawa asalaki mibembo misato ekabwani na Ogden, Utah, komema banzoto na ndako mpo na bokundi. Na nsuka ya ntango yango ya mpasi, George Goates mpe Francis bamataki na wago na bango mpe bazongaki na elanga ya mbala.

“[Na kati ya nzela] bango balekaki wago mingi etonda na mbala ya sukali komemamaka na izine mpe ekumbamaki na basali bilanga ya pembeni. Na boleki, mokumbi moko na moko apesaki mbote: “ Mbote na yo, Noko George,’ ‘Ya solo penza tozali na mawa, George,’ ‘Bopemi ya pasi, George,’ ‘Ozali na baninga ebele, Geoge.’

“Na wago ya nsuka ezalaki … Jasper Rolfe elongi na bilembo ya motane. Ye apesaki mbote na esengo mpe agangaki: ‘Oyo ezali nyonso ya ’em, Noko George.’

“[Brother Goates] abalukaki epai ya Francis mpe alobaki: “nalikii yango ezalaki nyonso mpo na biso.’

“Ntango bakomaki na ekuke ya bilanga, Francis apumbukaki na nse ya wago ya motane ya mbala mpe afungolaki ekuke lokola [tata na ye] akumbaki na kati ya bilanga. [George] abendaki nsinga, atelemisaki lisanga. … mpe atalaki bilanga mobimba. … ezalaki ata na mbala moko te ya sukali na bilanga mobimba. Nsima asosolaki oyo Jasper Rolfe alingaki koloba ntango alobaki: : ‘Oyo eza nyonso ya ’em, Noko George!’

“[George] akendaki na nse ya wago, azwaki mwa liboke ya mabele kitoko, ya langi ya chocolat ye alingaki mingi koleka, mpe nsima … mbala ya likolo, mpe ye akangaki mpo mwa ntango na bilembo oyo ya mosala na ye, lokola soki ye akokaki te kondimela miso na ye.

“Nsima [ye] afandaki na liboke ya mbala ya sukali—moto oyo amemaki minei ya bato na ye alingaka na ndako mpo na bokundi na mikolo motoba kaka, asalaki basanduku, atimolaki mabulu, mpe asalisaki kutu na bilamba ya bokundi—mobali oyo ya kokamwisa oyo abetaka miso ata mokolo moko te, alengaki te, aninganaki te katikati ya likama ya kobomisa—afandaki na liboke ya mbala ya sukali mpe kolelaka ya bozito lokola mwana moko ya moke.

“Nsima ye atelemaki, apangusaki miso na ye. … atalaki likolo na mapata, mpe alobaki: ‘Matondi, Tata, mpo na bampaka ya palwase na biso.’”6

Iyo, matondi na Nzambe mpo na mibali ya bonganganzambe mpe mpo na mosala bango bakosala kala te ya koteyaka na bato bango moko mpe mabota mpe kobongisaka Siona.

Bokambi ya yambo, Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, mpe Bokambi ya Bantuku nsambo Batali bambogwana oyo likolo ya bolayi ya ntango. Elongo na nsambo ebele, botangi na bokebi ya miboko ya makomi ya masanga makoki ya bonganganzambe, mpe bondimisami ete oyo ezali bolingi ya Nkolo, tozali kokende liboso elongo na boyokani na oyo ezali na bosolo mbala moko lisusu na litambe ya kokobisa ya Bozongi. Botamboli ya Nkolo ezali komonana, mpe nasepeli na yango, ntango nazali kopesa litatoli ya Ye, bonganganzambe na Ye, mpe makuli na bino na bonganganzambe wana, na nkombo na Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Doctrine et Alliances 41:3.

  2. Tala, ndakisa, William G. Hartley, “The Priesthood Reorganization of 1877: Brigham Young’s Last Achievement,” in My Fellow Servants: Essays on the History of the Priesthood (2010), 227–64; “To the Seventies,” in James R. Clark, comp., Messages of the First Presidency of The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints (1965), 352–54; Hartley, “The Seventies in the 1880s: Revelations and Reorganizing,” in My Fellow Servants, 265–300; Edward L. Kimball, Lengthen Your Stride: The Presidency of Spencer W. Kimball (2005), 254–58; Susan Easton Black, “Early Quorums of the Seventies,” in David J. Whittaker and Arnold K. Garr, eds., A Firm Foundation: Church Organization and Administration (2011), 139–60; Richard O. Cowan, “The Seventies’ Role in the Worldwide Church Administration,” in A Firm Foundation, 573–93.

  3. Russell M. Nelson, “Makebisi ya Boyingisi,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 54.

  4. Boyd K. Packer, “What Every Elder Should Know—and Every Sister as Well: A Primer on Principles of Priesthood Government,” Tambuli, Nov. 1994, 17, 19.

  5. See Handbook 2: Administering the Church (2010), 7.3.1.

  6. D. Todd Christofferson, “The Priesthood Quorum,” Liahona, Jan. 1999, 47; see also Vaughn J. Featherstone, “Now Abideth Faith, Hope, and Charity,” Ensign, July 1973, 36–37.