Na Bomoko na Kokokisaka Mosala ya Nzambe
Lolenge malamu mpenza mpo na kokokisa makoki na biso ya bonzambe ezali kosala elongo, ya kopamboli na nguya mpe likoki ya Bonganganzambe na Ye na misala na biso ya kokesana kasi ya koyokana.
Bandeko balingami Mibali mpe basi, ezali esengo kozala na bino. Bisika nyonso bozali koyoka, napesi mbote na bandeko na ngai basi mpe mbote ya loboko ewuti na motema na bandeko mibali brothers. Tozali na bomoko na mosala ya Nkolo.
Ntango tokanisi Adama mpe Ewa, mbala mingi, likanisi na biso ya yambo ezali oyo ya bomoi na bango ya esengo mpenza kati na Elanga ya Edene. Nabanzi ete eleko ezalaki ntango nyonso malamu—molunge mingi te mpe malili mingi te—mpe ete kotondisama ya bambuma mpe ndunda, elengi na kolia ezalaki kokola mpembeni mpo ete bakoka kolia ntango nyonso balingaki. Lokola oyo ezalaki mokili ya sika mpo na bango, ezalaki na mingi ya komona, yango wana mikolo nyonso ezalaki malamu lokola ezalaki bango kosolola na baniama mpe kotambola mpo na koyeba banzinganzinga na bango ya kitoko. Bapesamaki lisusu mitindo ya kotosa mpe bazalaki na ndenge ekeseni ya komonela malako wana, oyo esalaki mwa bobangi mpe mobulungano na ebandeli. 1 Kasi ntango bazwaki mokano oyo ebongolaki bomoi na bango libela, bayekolaki kosala elongo mpe bakomaki na bomoko na kokokisaka bantina Nzambe azalaki na yango mpo na bango—mpe mpo na bana na Ye banso.
Sikawa kanisa bato mibale kaka oyo na bokufi. Basengelaki kosala mpo na bilei na bango, baniama mosusu bakanisaki bango bazalaki bilei, mpe ezalaki na mikakatano ya mpasi oyo ekokaki kolongama bobele ntango basanganaki mpe basambelaki elongo. Kanisa ezalaki pene na mwa bangonga oyo bazalaki na makanisi ya kokesana etali lolenge nini kolobela mikakatano wana. Nzokande, na nzela ya Bokwei, bayekolaka ete ezalaki motuya kosala na bomoko mpe bolingo. Na mateya bazwaki uta na banzela ya bonzambe, bateyamaki mwango ya lobiko mpe mibeko ya nsango malamu ya Yesu Klisto oyo esalaki ete mwango esala. Lokola basosolaki ete ntina na bango na mabele mpe ntina ya seko ezalaki ya kokokana, bazwaki esengo mpe elonga na koyekolaka kosala na bolingo mpe bosembo elongo.
Ntango bana babotamaki, Adama mpe Eva bateyaki libota na bango maye bayekolaka uta na batindami ya lola. Bamipesaki na kosungaka bana na bango lisusu basosola mpe bayamba mibeko wana oyo ekosala bango bayoka esengo na bomoi na bango, lokola mpe bamilengela mpo na kozonga epai ya baboti na bango ya lola nsima ya kokolisaka makoki na bango mpe kolakisa botosi na bango epai ya Nzambe. Na lolenge wana, Adama mpe Eva bayekolaki kosepela na bokasi na bango ekesana mpe basunganaki moko na mosusu na mosala mwa bango ya motuya ya seko. 2
Ntango bikeke mpe bankoto ya mibu milekaki, polele ya misala efulama mpe ya koyekama na moko na mosusu ya mibali mpe basi ebebisamaki na bansango ya lokuta mpe boyokani malamu te. Na ntango katikati ya ebandeli kitoko wana na Elanga ya Edene mpe sikawa, monguna alongi ntina na ye ya kokabola mibali mpe basi na babomeki na ye ya kolonga milimo na biso. Lusifelo ayebi ete soki akoki kobebisa bomoko ya mibali mpe basi bayokaka, soki akoki kobulunganisa biso na yo etali motuya na biso ya bonzambe mpe mikumba ya mayokani, akolonga na kobebisaka mabota, oyo ezali ebandeli ya bitonga ya boseko.
Satana atindikaka bomekiseli lokola esalelo ya kokela mayoki ya kozalaka likolo to na nse, kobombaka bosolo ya seko ete babokeseni ya kobotama ya mibali mpe basi epesami na nzambe mpe etiami motuya lolenge moko. Ameki kokitisa misala ya basi na libota mpe lingomba ya bana mboka, na bongo kokitisaka nguya na bango ya kotombuamaa mpo na bolamu. Ntina na ye ezali ya kolendisa etumba mpo na nguya esika ete bokembeli ya misala se moko mpamba ya mibali mpe basi oyo bazali kosungana mpe kosala elongo na bomoko.
Yango wana, mibu mileki mingi mpe na mokili mobimba, bososoli mobimba ya misala mpe mikumba ya koyekama na moko na mosusu na bonzambe kasi ya kokesana ya basi mpe mibali ebungaki mpenza. Basi na mangomba mingi bakomaki bopika (baombo) ya mibali esika ete bazala baninga ya mipanzi, misala na bango ezali kokende mosika te. Bokoli ya molimo ekitaki mpenza na bantango ya molili wana; Solo, pole ya molimo moke ekokaki kokota na makanisi mpe mitema etondana mimesano ya kokonza.
Mpe nsima pole ya nsango malamu ezongisama engengaki “koleka bongengi ya moi” 3 ntango Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, babimelaki elenge mobali Joseph Smith na ebandeli ya eleko ekobanda molunge ya 1820 na esika ya banzete esantu wana na nodi ya New York. Likambo wana ebandaki bosopani ya sikawa ya emoniseli ewuti na lola. Moko ya biloko ya yambo ya Eklezia ya ebandeli ya Klisto ezongisama ezalaki likoki ya bonganga ya nzambe. Lokola Bozongisi ekobaki kokola, mibali mpe basi babandaki kososola lisusu motuya mpe makoki ya kosalaka lokola baninga, bapesami ndingisa mpe bakambami na mosala ya bule oyo na Ye.
Na 1842, ntango basi ya Eklezia ya sika balingaki kosala liboke eyebani na bakambi mpo na kosunga na mosala, Mokambi Joseph Smith amiyokaki ya kofulama mpo na kobongisa bango “na nse ya bonganganzambe nsima ya ndakisa ya bonganganzambe.” 4 Alobaki, “Napesi bino fungola sikawa na nkombo ya Nzambe …—oyo ezali ebandeli ya mikolo malamu koleka.” 5 Mpe uta fungola wana epesamaki, mabaku ya bobokoli, politiki, mpe nkita mpo na basi ebandaki kobuta mokemoke na mokili mobimba. 6
Libongisi ya Eklezia ya sika oyo mpo na basi, babengi Lingomba ya Bamama Basungi, ekokanaki te na mangomba mosusu ya basi ya mikolo yango mpo ete ebandaki na profeta oyo asalaki na likoki ya bonganganzambe mpo na kopesa basi likoki, mikumba ebulisama, mpe bibonga ya kokonza kati na ndako ya Eklezia, kasi libanda na yango te. 7
Uta Mikolo ya Profeta Joseph Smith tii na oyo ya biso, bozongisi ya bokobi yango ya makambo manso ememi bongengi likolo ya bosenga ya likoki mpe nguya ya bonganganzambe na kosungaka mibali mpe basi lokola bakokisa mikumba epesamela bango na bonzambe. Kala te toteyamaki ete basi oyo batiami mpembeni na nse ya bokambami ya moko kosimbaka bafungola ya bonganganzambe asali na likoki ya bonganganzambe na mabiangi na bango. 8
Na sanza ya zomi 2019, Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete basi oyo bazwi dotasio na tempelo bazali na nguya ya bonganzambe na bomoi na bango mpe na bandako na bango ntango babateli mayokani wana ya bule oyo basalaki elongo na nzambe. 9 Alimbolaki ete “balola ezali lokola ya kofungwama mpo na basi oyo basalaki dotasio elongo na nguya ya Nzambe kosopanaka uta na mayokani ya bonganganzambe lokola yango mpe ezali epai ya mibali oyo bazali bamemi ya bonganganzambe.” Mpe alendisaki bandeko basi nyonso mpo na “koyekama likolo ya nguya ya Mobikisi mpo na kosunga libota na bino mpe basusu oyo bolingaka.” 10
Boye eye elingi koloba nini mpo na yo mpe ngai? Lolenge nini kososolaka likoki mpe nguya ya bonganganzambe ebongoli bomoi na biso? Moko ya bafungola ezali kososola ete ntango basi mpe mibali bazali kosala elongo, tozali kokokisa mingi mpenza koleka oyo tozali kokokisa kosalaka na bokabwani. 11 Misala na biso ezali ya koyokana kasi ya komekana te. Atako basi bakulisami te na mosala ya bongangannzambe, lokola elobelamaki liboso basi bapambolami na nguya ya bonganganzambe ntango bazali kobatela mayokani na bango, mpe bazali kosala na likoki ya bonganganzambe ntango batiami mpembeni na libiangi moko.
Na mokolo kitoko ya sanza ya mwambe, nazalaki na litomba ya kofanda elongo na Mokambi Russell M. Nelson na ndako etongama lisusu ya Joseph mpe Emma Smith na Harmony, Pennsylvania, mpembeni wapi Bonganganzambe ya Alona ezongisamaki na mikolo ya nsuka oyo. Na lisolo na biso, Mokambi Nelson alobelaki mosala monene basi basalaki kati na Bozongisi.
Mokambi Nelson: Moko ya lolenge ya motuya mpenza oyo nazali kokundolisama ntango nayei na esika ya bozongisi ya bonganganzambe ezali mosala ya motuya oyo basi basalaki na Bozongisi yango.
“Ntango Joseph abandaki yambo mpo na kobongola Buku ya Mormon, nani azalaki kokoma? Malamu, akomaki moke, kasi mingi te. Emma akotaki.
“Mpe nsima nakanisi lolenge nini Joseph akendaki na zamba mpo na kosambela mpembeni ya ndako na bango na Palmyra, New York. Akendaki wapi ? Akendaki na Zamba ya Bule. Mpo na nini akendeki kuna? Mpo ezali kuna nde Mama na ngai azalaki kokende ntango alingaki kosambela.
“Baye bazali mibale kaka na basi oyo bazalaki na mosala ya motuya na bozongisi ya bonganganzambe mpe na Bozongisi ya Eklezia. Na ntembe te, tokoki koloba ete basi na biso bazali mpe motuya lelo lokola bazalaki ntango wana. Ya solo bazali.”
Lokola Emma mpe Lucy mpe Joseph, tozali makasi mpenza ntango tozali na bolingi ya koyekola uta na moko na mosusu mpe tozali bomoko na ntina na biso ya kokoma bayekoli ya Yesu Klisto mpe kosunga basusu na nzela wana.
Toteyami ete “bonganganzambe epambolaka bomoi ya bana ya Nzambe na ndenge ekoki ebele. … Na mabiangi ya [Eklezia], makuli ya tempelo, mikangano ya mabota, mpe mosala ya kimia, ya moto na moto, basi mpe mibali ya Basantu ba mikolo mya Nsuka bakei liboso na nguya mpe likoki ya bonganganzambe. Boyekami na moko na mosusu oyo ya mibali mpe basi na kokokisaka mosala ya nzambe na nzela ya nguya na Ye ezali motuya mpo na nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisama na nzela ya Profeta Joseph Smith.” 12
Bomoko ezali ebandeli ya mosala ya bonzambe oyo tozaleli na litomba mpe tobiangameli kosala, kasi ezali kosalama na pete te. Esengaka bokasi mpe ntango mpo na kosangana solosolo elongo—koyokela moko na mosusu, kososola makanisi ya misusu, mpe kokabola boyebi—kasi nzela yango esukaka kati na mikano efulama. Atako na ndako to na mikumba na biso ya Eklezia, lolenge malamu mpenza mpo na kokokisa makoki na biso ya bonzambe ezali kosala elongo, ya kopamboli na nguya mpe likoki ya bonganganzambe na misala na biso ya kokesana kasi ya koyokana.
Kimoninga ezali lokola nini na bomoi ya basi ya boyokani lelo? Tika nakabola ndakisa moko.
Alison mpe John bazalaki na kimoninga oyo ezalaki se moko mpamba. Bazalaki kokumba velo ya bato mibale na masano ya mbangu ya mikuse mpe milai. Mpo na kolonga momekano na lokalo wana bakumbi mibale yango basengelaki kozala na boyokani. Basengelaki kotengama epai moko na ngonga malamu. Moko akoki kokonza mosusu te, kasi esengeli basolola polele mpe moko na moko asala eteni na ye. Kapiteni, na liboso, azali kotala ntango nini koniata fele mpe ntango nini kotelema. Mokumbi, na nsima, asengeli kosala keba na maye mazali koleka mpe kobelema mpo na kobakisa nguya soki bazali kotikala moke nsima to mpo na kolembisa soki bazali kopusana mpembeni mpenza ya bakumbi velo misusu. Basengeli kosungana mpo na kokende liboso mpe kokokisa ntina na bango.
Alison alimbolaki: mpo na mbala ya yambo, moto oyo azalaki na ebonga ya kapiteni azalaki koloba ‘telema’ ntango tosengelaki kotelema mpe ‘Niata fele’ ntango tosengelaki kotika koluka velo. nsima ya mwa ntango, moto oyo azali mokumbi na nsima ayekolaki koyeba ntango nini kapiteni azalaki penepene ya kotelema to koniata fele, mpe maloba moko te esengelaki kolobama. Toyekolaki kozala na boyokani ya lolenge moko na moko azalaki kosala mpe akokaki koyeba ntango nini moko azalaki na mikakatano mpe [nsima] mosusu azalaki komeka kozwa ngala. Ezali mpenza likambo ya kondima mpe bosali elongo.” 13
John mpe Alison bazalaki bomoko kaka te ntango bazalaki kopedalé velo na bango, kasi bazalaki bomoko na libala na bango mpe. Moko na moko azalaki na mposa ya esengo ya mosusu mingi koleka ya ye moko, moko na moko azalaki koluka malamu kati na moko na mosusu mpe bazalaki kosala makasi mpo na kolonga oyo ezalaki makasi mpenza te kati na bango. Bazalaki kotitana kokambaka mpe mpo na kopesa mingi ntango moninga moko azalaki na mikakatano. Moko na moko azalaki kosepela na misala ya mosusu mpe azalaki komona biyano malamu mpo na mikakatano na bango ntango bazalaki kosangisa batalanta mpe makasi na bango. Bazali solo ya kokangana na moko na mosusu na nzela ya bolingo ya Boklisto.
Kokomaka mingi na boyokani na ndakisa ya bonzambe ya kosalaka elongo na bomoko ezali nguya na mokolo oyo ya nsango ya “ngai liboso” oyo ezingi biso mpembeni. Basi bazali na makabo ya kokesana, ya bonzambe 14 mpe bapesami mikumba se moko mpamba, kasi wana ezali motuya mingi—to moke—ekoleka makabo mpe mikumba ya mibali. Banso bakelami mpe basengeli mpo na kosala mwango ya bonzambe ya Tata ya Lola mpo na kopesa moko na moko ya bana na Ye libaku malamu mpo na kokokisa makoki na ye ya bonzambe.
Lelo, “tosengeli na basi oyo bazali na bokasi mpe limoni ya Mama na biso Ewa” 15 mpo na kosangana elongo na bandeko na bango mibali na komemaka milimo epai ya Klisto. 16 Mibali basengeli kokoma baninga ya solo kasi kokanisa te ete bazali se bango moko bayanoli to basala lokola baninga ya “lokuta” ntango basi bazali kosala eteni mingi ya mosala. Basi basengeli kozala na bolingi ya “kokende liboso [mpe] kozwa [ya bango] esika ya sembo mpe oyo esengeli” 17 lokola baninga kasi kokanisaka te ete basengeli kosala nyonso na bango moko to kozela bayebisa bango nini kosala. 18
Komonaka basi lokola basali elongo ya ntina ezali na ntina ya koyeba kokabola mikumba kati na mibali mpe basi te kasi kososola bosolo ya malongi. Esika ete kotiaka pologalami mpo na kosala yango, tokoki kosala na bokasi mpo na kopesa basi motuya lokola nzambe asalaka: lokola baninga ya ntina kati na mosala ya lobiko mpe bonetoli.
Tobelemi? Ekosala biso makasi ya kolonga makanisi ya lokuta ya bonkoko mpe na esika wana koyamba bandakisa ya bonzambe mpe mimesano efandisami na malongi ya ntina? Mokambi Russell M. Nelson abengisi biso totambola loboko na loboko na mosala ya bule oyo … [mpo na] kosunga kolengela mokili mpo na Boyei ya Bibale ya Nkolo.” 19 Ntango tosali, tokoyekola kosepela na misala ya moto moko na moko mpe kokolisa bokasi na yango tozali kokokisa misala na biso ya bonzambe. Tokoyoka esengo monene koleka oyo toyoka naino te.
Tika moko na moko na biso apona kokoma ya bomoko na lolenge efulama ya Nkolo mpo na kosunga mosala na Ye ekende liboso. Na nkombo ya Mobikisi na biso ya bolingo, Yesu Klisto, amene.