“3. Mabongisi ya Bonganganzambe,” Maponi uta na Buku Monene (2023).
“3. Mabongisi ya Bonganganzambe,” Maponi uta na Buku Monene
3.
Mabongisi ya Bonganganzambe
3.0
Boyingisi
Bonganganzambe ezali likoki mpe nguya ya nzambe. Na nzela ya bonganganzambe, Tata ya Lola akokisaka mosala na Ye ezali “kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto” (Mose 1:39). Nzambe apesaka likoki mpe nguya epai ya bana na Ye ya mibali mpe basi na mabele mpo na kosalisa kotambwisa malamu mosala oyo (tala mokapo 1).
3.2
Mapamboli ya Bonganganzambe
Na nzela ya mayokani mpe makuli ya bonganganzambe, Nzambe asalaka mapamboli minene ezwama na bana na Ye nyonso. Mapamboli oyo ezali na:
-
Libatisi mpe kImondimi kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka
-
Likabo ya Molimo Mosantu
-
Kolia elambo
-
Likoki mpe nguya ya kosalela Nzambe kati na mabiangi ya Eklezia mpe mikumba.
-
Kozwa mapamboli ya Nkoko mpe mapamboli mosusu ya bonganganzambe ya kobikisa, kolendisa, mpe bokambi.
-
Kozwa dotasio na nguya ya Nzambe kati na tempelo.
-
Kokangisama na moko ya bato ya libota mpo na seko.
-
Elaka ya bomoi ya seko.
3.3
Bonganganzambe ya Melekisedeki mpe Bonganganzambe ya Alona
Kati na Eklezia, Bonganganzambe ezali na biteni mibale: Bonganganzambe ya Melekisedeki mpe Bonganganzambe ya Alona (tala Malongi mpe Mayokani 107:1).
3.3.1
Bonganganzambe ya Melekisedeki
Bonganganzambe bosantu, na Molongo ya Mwana ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 107:3). Ezali nguya na nzela na yango bana mibali mpe bana basi ya Nzambe bakomaka lokola Ye (tala Malongi mpe Mayokani 84:19–21; 132:19–20).
Na nzela ya likoki oyo, bakambi ya Eklezia bayangelaka mpe basalaka mosala ya molimo nyonso ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 107:18).
Mokambi ya likonzi azali nganganzambe monene mokonzi kati na likonzi (tala Malongi mpe Mayokani 107:18, 10; tala lisusu mokapo 6 na buku oyo). Episikopo azali nganganzambe monene mokonzi kati na palwasi (tala Malongi mpe Mayokani 107:17; tala lisusu mokapo 7 na buku oyo).
Mpo na nsango etali misala yango mpe mikumba ya Bonganganzambe ya Melekisedeki, tala 8.1.
3.3.2
Bonganzambe ya Alona
Bonganganzambe ya Alona ezali “yoko eteni ya … Bonganganzambe ya Melikisedeki” (Malongi mpe Mayokani 107:14). Ezali na bafungola ya:
-
Mosala ya banjelu.
-
Nsango malamu ya boyamboli.
-
Kosalaka na kati makuli ya libanda, oyo ezali na libatisi mpo na bolimbisi ya masumu.
(Tala Malongi mpe Mayokani 13:1; 84:26–27; 107:20.)
Episikopo azali mokambi ya Bonganganzambe kati na palwasi (tala Malongi mpe Mayokani 107:15).
Mpo na nsango etali misala mpe mikumba ya Bonganganzambe ya Alona, tala 10.1.3.
3.4
Likoki ya Bonganganzambe
Likoki ya bonganganzambe ezali bopesi ndingisa ya kozala ntoma ya Nzambe mpe kosala na nkombo na Ye. Na Eklezia, likoki nyonso ya bonganganzambe esalelamaka na nse ya boyangeli ya baoyo bazali na bafungola ya bonganganzambe.
3.4. 1
Bafungola ya Bonganganzambe
Bafungola ya bonganzambe ezali likoki ya koyangela bosaleli ya bonganzambe na nkombo ya bana ya Nzambe.
3.4.1.1
Baoyo Bazali na Bafungola ya Bonganganzambe
Nkolo apesi na Bapostolo na Ye moko na moko bafungola nyonso oyo ezali ya bokonzi ya nzambe na mabele. Apostolo ya nkulutu na bomoi, mokambi ya Eklezia, azali bobele moto na mabele apesami ndingisa ya kosalela bafungola wana nyonso (tala Malongi mpe Mayokani 81:1–2; 107:64–67, 91–92; 132:7).
Na nse ya boyangeli ya Mokambi ya Eklezia, bakambi ya bonganganzambe bapesami bafungola mpo ete bakoko kokamba biteni na bango ya mokumba. Bakambi oyo bazali:
-
Bakambi ya makonzi mpe badisitiliki.
-
Baepisikopo mpe bakambi ya bitape.
-
Bakambi ya masanga makoki ya Bonganzambe ya Melekisedeki mpe ya Alona.
-
Bakambi ya batempelo
-
Bakambi ya bamisio mpe bakambi ya bandako ya boyekoli ya bamisionele.
Bakambi oyo bazwaka bafungola ya bonganganzambe ntango batiamaka pembeni mpo na mabiangi na bango.
Bafungola ya bonganzambe epesamaka na basusu te, mpe lisusu bapesi toli ya bakambi ya bonganganzambe ya bisika tofandi to bakambi ya mangomba ya Eklezia. Bakambi ya mangomba ya Eklezia bakambaka na nse ya boyangeli ya baoyo bazali na bafungola ya bonganganzambe (tala 4.2.4).
3.4.1.2
Alima ya Mosala ya Nkolo
Bafungola ya bonganganzambe ebatelaka ete mosala ya lobiko mpe bonetoli ekokisami na lolenge ya alima (tala Malongi mpe Mayokani 42:–16; 132:8). Baoyo bazali na bafungola ya bonganganzambe bayangelaka mosala ya Nkolo na kati na biteni na bango ya mokumba. Likoki ya bokambi oyo ezali na motuya bobele mpo na mikumba kaka ya libiangi ya mokambi yango. Ntango bakambi ya bonganganzambe bapemisami uta na mabiangi na bango, bazali lisusu na bafungola wana te.
3.4. 2
Bopesi mpe Bokulisi Bonganganzambe
Na nse ya boyangeli ya baoyo bazali na bafungola ya bonganganzambe, Bonganganganzambe ya Alona mpe Bonganganzambe ya Melekisedeki epesami na bandimi ya Eklezia balongobana ya mibale (tala Malongi mpe Mayokani 84:14–17). Nsima ya kopesama bonganganzambe esengeli, moto oyo akulisami na mosala moko kati na bonganganzambe, lokola diakono to mpaka. Nganganzambe asalelaka bonganganzambe engebene na masengeli mpe mikumba ya mosala wana (tala Malongi mpe Mayokani 107:99).
Mpo na nsango mingi etali bopesi mpe bokulisi bonganganzambe, tala 8.1.1 mpe 18.10.
3.4. 3
Bontoma ya Likoki ya Bonganganzambe mpo na Kosalela Nzambe na Eklezia
3.4.3.1
Kotia Pembeni
Ntango mibali mpe basi batiamaka pembeni na nse ya boyangeli ya baoyo bazali na bafungola ya bonganganzambe, bapesamaka likoki uta na Nzambe ya kosala kati ya libiangi wana. Ntango bapemisamaka uta na libiangi moko, bazalaka lisusu te na likoki oyo ekangani elongo na yango.
Bandimi nyonso oyo batiamaka pembeni bapesami mpo na kosalela Nzambe bapesamaka likoki ya Nzambe mpe mokumba ya kosala kati na mabiangi na bango. Ndakisa:
-
Mwasi oyo abiangami mpe atiami pembeni na episikopo lokola mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi apesami likoki ya koyangela mosala ya Lingomba ya Bamama Basungi kati na palwasi.
Banso oyo babiangamaka mpe batiamaka pembeni basalaka na nse ya boyangeli ya baoyo bakambaka bango (tala 3.4.1.2).
3.4.3.2
Lotomo
Bakambi Bakonzi ya Eklezia bakoki kotinda ntoma na likoki na nzela ya lotomo. Ntango mibali mpe basi bazwaka balotomo oyo, bapesamaka likoki uta na Nzambe mpo na kosala. Ndakisa:
-
Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale batindaka ntoma na likoki epai ya Bantuku Nsambo oyo bapesamaka lotomo ya koyangela bituka binene mpo na kokamba makita ya makonzi.
-
Likoki etindamaka na bantoma mpo na kosala lokola bandeko mibali mpe basi ya kosalisa.
Likoki oyo etindami na bantoma na nzela ya lotomo esukaka na mikumba eyebani mpe na boumeli ya lotomo.
3.4. 4
Kosalela Likoki ya Bonganganzambe na Bosembo
Likoki oyo ekoki kosalelama bobele kati na bosembo (tala Malongi mpe Mayokani 121:36). Esalelamaka na kondimisa, ya motema molai, ya bonkonde mpe bosokemi, bolingo, mpe ya boboto (tala Malongi mpe Mayokani 121:41–42).
Baoyo basalelaka likoki ya bonganzambe basalelaka bolingi na bango na makasi likolo ya basusu te. Basalelaka yango te mpo na bantina ya kimoyimi te.
3.5
Nguya ya Bonganganzambe
Nguya ya bonganganzambe ezali nguya na nzela na yango Nzambe apambolaka bana na Ye. Nguya ya bonganganzambe esopanaka epai ya bandimi ya Eklezia nyonso—basi mpe mibali—ntango bazali kobatela mayokani basalaki na Ye. Bandimi basalaka mayokani ntango bazwaka makuli ya bonganzambe. (Tala Malongi mpe Mayokani 84:19–20.)
Mapamboli ya nguya ya bonganganzambe oyo bandimi bakoki kozwa ezali:
-
Bokambi mpo na bomoi na bango.
-
Bofuli na molimo ya koyeba lolenge nini kosalisa bato ya libota mpe basusu.
-
Bokasi ya koyika mpiko mpe kolonga mikakatano.
-
Makabo ya Molimo ya koyesa minene makoki na bango.
-
Emoniseli ya koyeba lolenge nini kokokisa mosala bakulisalemi, batielami pembeni, to batindami kosala.
-
Kosalisa mpe kolendisa mpo na kokoma mingi lokola Yesu Klisto mpe Tata ya Lola.
3.5. 1
Mayokani
Liyokani ezali elaka ya bule katikati ya Nzambe mpe bana na Ye. Nzambe apesaka mitindo mpo na boyokani yango, mpe bana na Ye bandimaka kotosa mitindo wana. Nzambe alakaka kopambola bana na Ye ntango bazali kokokisa boyokani yango.
Banso oyo bayikaka mpiko kino na nsuka kati na kobatela mayokani na bango bakozwa bomoi ya seko (tala 2 Nefi 31:17–20; Malongi mpe Mayokani 14:7).
Mabota, bakambi ya Eklezia, mpe basusu basalisaka bato bamilengela mpo na kosala mayokani ntango bazwaka makuli ya nsango malamu. Basalaka ete moto yango asosola mayokani yango akosala. Soki moto asali boyokani nsima, basalisaka ye abatela yango. (Tala Mosiya 18:8–11, 23–26.)
3.5. 2
Makuli
Likuli ezali ekela moko ya bule esalami na likoki ya bonganganzambe.
Na makuli mingi, bato basalaka mayokani na Nzambe. Bandakisa ezali libatisi, elambo, dotasio, mpe likuli ya bokangisi libala.
Makuli ya lobiko mpe ya bonetoli ezali ntina mpo na bomoi ya seko. Mpo na nsango mingi, tala 18.1.
3.6
Bonganganzambe mpe Libota
Bandimi ya Eklezia nyonso oyo babatelaka mayokani na bango—basi, mibali, mpe bana—bapambolamaka na nguya ya bonganganzambe ya Nzambe kati na mabota na bango mpo na komilendisa bangomei mpe mabota na bango (tala 3.5). Nguya oyo ekosunga bandimi na kosalaka mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli na bomoi na bango se moko mpe mabota (tala 2.2).
Mibali oyo bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeki bakoki kopesa mapamboli ya bonganganzambe na bato ya libota mpo na kopesa boyangeli, libiki, mpe bolendisi. Ntango esengeli, bandimi ya Eklezia bakoki lisusu koluka mapamboli oyo uta na bato ya libota monene, bandeko mibali ya kosalisa, to bakambi ya Eklezia ya esika tofandi.