Makomi
1 Nefi 17


Mokapo 17

Nefi atindami kotonga masuwa—Bandeko na ye batelemeli ye—Alendisi bango na kobetaka lisusu lisolo ya misala ya Nzambe na Yisalaele—Nefi atondisami na nguya ya Nzambe—Bandeko na ye bapekisami kosimba ye, nakobangaka ete bakawuka lokola mokekele mokawuka. Penepene na mibu 592–591 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete tosalaki lisusu mobembo na biso na esobe; mpe tokendaki mobembo penepene na epayi na esti uta na ntango wana kokende liboso. Mpe tokendaki mobembo mpe tolekaki na nzela ya mitungisi mingi na esobe; mpe basi na biso babotaki bana na esobe.

2 Mpe mapamboli ya Nkolo likolo na biso ezalaki minene mpenza, ete ntango ezalaki biso kolia nyama ya mobesu na esobe, basi na biso bamelisaki bana na bango mabele matonda mekemeke, mpe bazalaki makasi, iyo, lokola mibali; mpe babandaki kondima mobembo na bango na bozangi koyima-yima.

3 Mpe boye tomoni ete mitindo ya Nzambe esengeli kokokisama. Mpe soki ekozala bongo ete bana ya bato babombi mitindo ya Nzambe ye akoleisa bango, mpe akopesa bango bokasi, mpe akopesa bango banzela oyo wapi bakoki kokokisa makambo oyo atindaki bango; yango wana, apesaki makoki mpo na biso, ntango ezalaki biso kofanda na esobe.

4 Mpe totikalaki na esobe na ntaka ya mibu mingi, iyo, kutu mibu mwambe na esobe.

5 Mpe tokomaki na mboka oyo tobiangaki Beboo, na ntina ya mbuma mingi na yango mpe lisusu mafuta ya nzoi; mpe biloko oyo nyonso bilengelamaki na Nkolo ete tokoka kowa te. Mpe tomonaki mbu, oyo tobiangaki Ileyatumi, oyo, na kolimbolaka, elingi koloba mai mingi.

6 Mpe esalemaki ete totelemisaki biema na biso na libongo ya mbu; mpe ata toyokaki mpasi ya mitungisi mingi mpe pkokoso ebele, iyo, kutu boye ebele ete tokoki kokoma yango nyonso te, tosepelaki mingi koleka ntango ekomaki biso na libongo ya mbu; mpe tobiangaki esika yango Beboo, na ntina ya mbuma mingi na yango.

7 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, esilaki ngai kozala na mboka ya Beboo na ntaka ya mikolo mingi, mongongo ya Nkolo eyaki epayi na ngai, kolobaka: Telema, mpe kende na ngomba. Mpe esalemaki ete natelemaki mpe namataki na ngomba, mpe nabelelaki epayi ya Nkolo.

8 Mpe esalemaki ete Nkolo alobelaki ngai, kolobaka: Okotonga masuwa, nsima ya lolenge oyo nakolakisa yo, ete nakoka komema bato na yo na ngambo ya mai oyo.

9 Mpe nalobaki: Nkolo, nakokende wapi ete nakoka kozwa makele mpo na koniangola, ete nakoka kosala bisaleli mpo na kotonga masuwa nsima ya lolenge oyo olakisaki ngai?

10 Mpe esalemaki ete Nkolo ayebisaki ngai wapi nakokende mpo na kozwa makele, ete nakoka kosala bisaleli.

11 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nasalaki nkuka oyo wapi kofula na yango moto, ya mposo ya nyama; mpe esilaki ngai kosala nkuka, ete nakoka kozwa nini oyo wapi kofula na yango moto, natutisaki mabanga mibale elongo ete nakoka kosala moto.

12 Mpo Nkolo, kino na ntango wana, atikalaki te kopesa nzela ete tokoka kosala moto moike, lokola ekendaki biso mobembo na esobe; mpo alobaki: Nakoyeisa bilei na bino elengi, ete bolamba yango te;

13 Mpe lisusu nakozala pole na bino kati na esobe; mpe nakolengela nzela liboso na bino, soki ekozala bongo ete bokobomba mitindo na ngai; yango wana, mbala mingi lokola ekobomba bino mitindo na ngai bokokambama na mboka elakelama; mpe bokoyeba ete bokambami na ngai.

14 Iyo, mpe Nkolo alobaki lisusu ete: Ekosila bino kokoma na mboka elakelama, bokoyeba ete ngai, Nkolo, nazali Nzambe; mpe ete ngai Nkolo nabikisaki bino uta na bobebisami; iyo, ete namemaki bino uta na mboka ya Yelusaleme.

15 Yango wana, ngai, Nefi, nasalaki makasi mpo na kobomba mitindo ya Nkolo, mpe nalendisaki bandeko mibali na ngai na bosembo mpe na molende.

16 Mpe esalemaki ete nasalaki bisaleli ya makele oyo naniangolaki uta na libanga.

17 Mpe emonaki bandeko mibali na ngai ete nalingaki kotonga masuwa, babandaki koyima-yima na ngai, kolobaka: Ndeko na biso azali moto ya liboma, mpo akanisi ete akokoka kotonga masuwa; iyo, mpe akanisi lisusu ete akokoka kokatisa mai oyo monene.

18 Mpe boye bandeko mibali na ngai bayima-yimaki na ngai, mpe balingaki ete bakoka te kosala, mpo bandimaki te ete ngai nakokoka kotonga masuwa; balingaki kondima mpe te ete ngai nalakisamaki na Nkolo.

19 Mpe sikawa esalemaki ete ngai, Nefi, nayokaki mawa mingi koleka mpo na bokasi ya mitema na bango; mpe sikawa emonaki bango ete nabandaki koyoka mawa, bazalaki na nsai na mitema na bango, na lolenge ete basepelaki likolo na ngai, kolobaka: Toyebaki ete okokaki te kotonga masuwa, mpo toyebaki ete ozalaki kozanga bwania; yango wana, okoki te kokokisa mosala monene boye.

20 Mpe ozali lokola tata na biso, oyo akambami mosika na bililingi ya makanisi ya liboma ya motema na ye; iyo, akambaki biso uta na mboka ya Yelusaleme, mpe toyenga-yengaki na esobe mibu oyo mingi; mpe basi na biso bayokaki bwale, kokumbaka zemi; mpe babotaki bana na esobe mpe bayokaki mpasi ya ndenge nyonso, longola se liwa; mpe elingaki kozala bolamu mingi koleka ete bakufa yambo baya uta na Yelusaleme esika ete bayoka mpasi ya mitungisi oyo.

21 Tala, mibu mingi oyo toyokaki mpasi na esobe, ntango yango tokokaki kosepela na bozwi na biso mpe mboka ya bosangoli libula na biso; iyo, tokokaki kozala na esengo.

22 Mpe toyebi ete bato oyo bazalaki na mboka ya Yelusaleme bazalaki bato ya sembo; mpo babatelaki meko mpe masambisi ya Nkolo, mpe mitindo na ye nyonso, engebene na mobeko ya Mose; yango wana, toyebi ete bazalaki bato ya sembo; mpe tata na biso asambisaki bango, mpe akambaki biso mosika mpo ete toyokaki maloba na ye; iyo, mpe ndeko na biso mobali azali lokola ye. Mpe na elobeli ya lolenge oyo bandeko mibali na ngai bayima-yimaki mpe bamilelaki na biso.

23 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki epayi na bango, kolobaka: Bondimi ete batata na biso, baoyo bazalaki bana ya Yisalaele, balingaki kokambama mosika uta na maboko ya Baejipito soki bayokaki maloba ya Nkolo te?

24 Iyo, bobanzi ete balingaki kokambama uta na boumbu soki Nkolo atindaki te Mose ete akamba bango uta na boumbu?

25 Sikawa boyebi ete bana ya Yisalaele bazalaki na boumbu; mpe boyebi ete bamemisamaki mikumba, oyo ezalaki bozito na komema; yango wana, boyebi ete esengelaki mpenza kozala likambo malamu mpo na bango, ete bakambama uta na boumbu.

26 Sikawa boyebi ete Mose atindamaki na Nkolo mpo na kosala mosala wana monene; mpe boyebi ete na liloba na ye mai ya Mbu Etane ekabwanaki ngambo na ngambo, mpe balekaki na katikati likolo ya mabele ekawuka.

27 Kasi boyebi ete Baejipito, baoyo bazalaki mampinga ya Falo, bazindaki na Mbu Etane.

28 Mpe lisusu boyebi ete baleisamaki na mana na esobe.

29 Iyo, mpe boyebi lisusu ete Mose, na liloba na ye, engebene na nguya ya Nzambe oyo ezalaki na ye, abetaki libanga, mpe mai ebimaki ete bana ya Yisalaele bakokaki kosilisa mposa na bango.

30 Mpe ata bokambami na bango, Nkolo Nzambe na bango, Mosikoli na bango, kokendaka liboso na bango, kokambaka bango na moi mpe kopesaka bango pole na butu, mpe kosalaka makambo nyonso mpo na bango oyo malongobanaki mpo na moto kozwa, bayeisaki mitema na bango makasi mpe bakangaki miso ya mayele na bango, mpe batiolaki Mose mpe Nzambe ya solo mpe ya bomoi.

31 Mpe esalemaki ete engebene na liloba na ye, abebisaki bango; mpe engebene na liloba na ye, akambaki bango; mpe engebene na liloba na ye, asalaki makambo nyonso mpo na bango; mpe likambo te esalemaki longola se soki ezalaki na liloba na ye.

32 Mpe esilaki bango kokatisa ebale ya Yaladene, akomisaki bango bato makasi mpo na kobengana bana ya mboka wana, iyo, kino na bopanzani na bango na bobebisami.

33 Mpe sikawa, bobanzi ete bana ya mboka oyo, baoyo bazalaki na mboka ya elaka, baoyo babenganamaki libanda na batata na biso, bobanzi ete bazalaki sembo? Tala, nalobi epayi na bino, Te.

34 Bobanzi ete batata na biso balingaki kozala bato balongobani mingi na boponi koleka bango soki bazalaki sembo? Nalobi epayi na bino, Te.

35 Tala, Nkolo atalaka mosuni nyonso lolenge moko; ye oyo azali sembo asungami na Nzambe. Kasi tala, bato oyo babwakaki liloba nyonso ya Nzambe, mpe bakomelaki kati na mabe; mpe litondi ya nkele ya Nzambe ezalaki likolo na bango; mpe Nkolo alakelaki mboka na bango mabe mpo na bango, mpe apambolaki yango mpo na batata na biso; iyo, alakelaki yango mabe kino na bobebisami mpo na bango, mpe apambolaki yango mpo na batata na biso kino ete bazwaki nguya likolo na yango.

36 Tala, Nkolo akelaki mabele ete bato bafanda; mpe akelaki bana na ye ete bazwa yango.

37 Mpe atombolaka ekolo ya sembo, mpe abebisaka bikolo ya bato ya nkuna.

38 Mpe akambaka basembo mosika kati na bamboka ya motuya, mpe bato ya nkuna nde abebisaka, mpe alakelaka mboka mabe mpo na ntina na bango.

39 Azali kokonza likolo na lola, mpo ezali kiti ya bokonzi na ye, mpe mabele oyo ezali etielo ya makolo na ye.

40 Mpe alingaka baoyo balingaka kozwa ye azala Nzambe na bango. Tala, alingaki batata na biso, mpe asalaki liyokani na bango, iyo, kutu Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo; mpe amikundolaki mayokani oyo asalaki; yango wana, amemaki bango libanda uta na mboka ya Ejipito.

41 Mpe akangaki bango na nkaka kati na esobe na lingenda na ye; mpo bayeisaki mitema na bango makasi, kutu lokola bosalaki; mpe Nkolo akangaki bango na nkaka na ntina ya mabe na bango. Atindaki nioka ya moto oyo epumbwaki na kati na bango; mpe esilaki bango koswama alengelaki nzela ete bakoka kobikisama; mpe mosala oyo basengelaki kosala ezalaki bobele kotala; mpe na ntina ya bozangi mokakatano ya nzela wana, to petepete na yango, bazalaki mingi baoyo bawaki.

42 Mpe bayeisaki mitema na bango makasi mbala na mbala, mpe batiolaki Mose, mpe lisusu Nzambe; nzokande, boyebi ete bakambamaki na nguya na ye ezanga emekiseli, na kati ya mboka ya elaka.

43 Mpe sikawa, nsima ya makambo oyo nyonso, ntango eyaki ete bakomaki bato ya nkuna, iyo, penepene na bokomeli; mpe nayebi te kasi bazali na mokolo oyo penepene na kobebisama; mpo nayebi ete mokolo esengeli solo koya ete basengeli kobebisama, longola se bobele bato moke, baoyo bakokambama mosika kati na bokangemi.

44 Yango wana, Nkolo atindaki tata na ngai ete akende na esobe; mpe lisusu Bayuda balukaki kolongola bomoi na ye; iyo, mpe bolukaki lisusu kolongola bomoi na ye; yango wana, bozali babomi kati na mitema na bino mpe bozali lokola bango.

45 Bozali mbangu mpo na kosala mabe kasi malembe mpo na komikundola Nkolo Nzambe na bino. Bomonaki anjelu, mpe alobelaki bino; iyo, boyokaki mongongo na ye mbala na mbala; mpe alobaki epayi na bino na mongongo ya moke ya kimia, kasi bozalaki mosika mpo na koyoka na mitema, ete bokokaki koyoka maloba na ye na mitema te; yango wana, alobelaki bino lokola na mongongo ya kake, oyo moningisaki mabele lokola soki esengelaki kokabwana na katikati.

46 Mpe boyebi lisusu ete na nguya ya liloba na ye ya bokasi nyonso akoki kosala ete mabele maleka mosika; iyo, mpe boyebi ete na liloba na ye akoki kosala ete bisika ya mabulu mabulu eyeisama ya patalalu, mpe bisika ya patalalu bibukani bukana. O, nde, ntina nini ezali, ete bokoki kozala bato makasi mingi boye na mitema na bino?

47 Tala, molimo na ngai mopasuki na nsomo na ntina na bino, mpe motema na ngai moyoki mpasi; nazali kobanga mbele bobwakama mosika libela. Tala natondi na Molimo ya Nzambe, na lolenge ete nzoto na ngai ezali na makasi te.

48 Mpe sikawa esalemaki ete elobaki ngai maloba oyo basilikaki na ngai, mpe balingaki kobwaka ngai kati na bozindo ya mbu; mpe eyaki bango kotia maboko na bango likolo na ngai nalobaki epayi na bango, kolobaka: Na nkombo ya Nzambe ya Bokasi Nyonso, natindi bino ete bosimba ngai te, mpo natondi na nguya ya Nzambe, kutu kino na bozikisami ya mosuni na ngai; mpe oyo nyonso akotia maboko na ye likolo na ngai akokawuka kutu lokola monkekele mokawuka; mpe akozala lokola eloko te liboso ya nguya ya Nzambe, mpo Nzambe akobeta ye.

49 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki epayi na bango ete bayima-yima lisusu te likolo ya tata na bango; mpe baboya kosalisa ngai te, mpo Nzambe atindaki ngai ete natonga masuwa.

50 Mpe nalobaki epayi na bango: Soki Nzambe atindaki ngai nasala makambo nyonso, nakokoka kosala yango. Soki atindaki ngai naloba na mai oyo, zala mabele, elingaki kozala mabele; mpe soki nalobaki yango, elingaki kosalema.

51 Mpe sikawa, soki Nkolo azali na nguya monene ya lolenge oyo, mpe asalaki bongo makamwisi mingi na kati ya bana ya bato, ezali lolenge boni ete akoka koteya ngai te, ete nakoka kotonga masuwa?

52 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki makambo mingi epayi ya bandeko na ngai, na lolenge ete bayokisamaki nsoni mpe bakokaki lisusu kotia ntembe na ngai te; mpe bamekaki te kotia maboko na bango likolo na ngai soki te kosimba ngai na misapi na bango, kutu na ntaka ya mikolo mingi. Sikawa bamekaki kosala yango te na kobangaka ete bakawuka liboso na ngai, Molimo ya Nzambe ezalaki na nguya makasi; mpe boye esalaki likolo na bango.

53 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epayi na ngai: Sembola lisusu loboko na yo epayi ya bandeko mibali na yo, mpe bakokawuka te liboso na yo, kasi nakotuta bango, elobaki Nkolo, mpe nakosala oyo, ete bakoka koyeba ete nazali Nkolo Nzambe na bango.

54 Mpe esalemaki ete na sembolaki loboko na ngai epayi ya bandeko mibali na ngai, mpe bakawukaki liboso na ngai te; kasi Nkolo aningisaki bango, kutu engebene na liloba oyo alobaki.

55 Mpe sikawa, balobaki: Toyebi na ntembe te ete Nkolo azali elongo na yo, mpo toyebi ete ezali nguya ya Nkolo oyo eningisaki biso. Mpe bakweyaki na nse liboso na ngai, mpe bazalaki penepene na kokumbamela ngai, kasi napesaki bango nzela te, kolobaka: Ngai nazali ndeko na bino, iyo, kutu ndeko na bino ya leki; yango wana, bokumbamela Nkolo Nzambe na bino, mpe bokumisa tata na bino mpe mama na bino, ete mikolo na bino mikoka kozala molai na mboka oyo Nkolo Nzambe na bino akopesa bino.

Bimisa na lokasa