Makomi
1 Nefi 18


Mokapo 18

Masuwa masilisami—Mbotama ya Yakobo mpe ya Yosefe etangami—Lingomba emati na masuwa mpo na mboka elakelama—Bana mibali ya Yisamaele mpe basi na bango basangani na loyenge mpe na botomboki—Nefi akangemi, mpe masuwa ezongisami nsima na ekumbaki ya nsomo—Nefi azwi bonsomi, mpe na losambo na ye mopepe makasi mokiti—Bato bakomi na mboka elakelama. Penepene na mibu 591–589 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete bakumbamelaki Nkolo, mpe bakendaki elongo na ngai; mpe tosalaki mabaya ya esaleli ya ntoki. Mpe Nkolo alakisaki ngai mbala na mbala lolenge kani oyo nasengelaki kosala mabaya ya masuwa.

2 Sikawa ngai, Nefi, nasalaki mabaya na lolenge ya bato oyo bateyamaki te, mpe natongaki masuwa na lolenge ya bato te; kasi natongaki yango na lolenge oyo Nkolo alakisaki ngai; yango wana, ezalaki te na lolenge ya bato.

3 Mpe ngai, Nefi, nakendaki na ngomba mbala mingi, mpe nasambelaki mbala mingi epayi ya Nkolo; yango wana Nkolo alakisaki ngai makambo minene.

4 Mpe esalemaki ete esilisaki ngai masuwa, engebene na liloba ya Nkolo, bandeko mibali na ngai bamonaki ete ezalaki malamu, mpe esaleli na yango ezalaki malonga mpenza; yango wana bamikitisaki lisusu liboso ya Nkolo.

5 Mpe esalemaki ete mongongo ya Nkolo eyaki epayi na tata na ngai, ete totelema mpe tokota kati na masuwa.

6 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima, esilaki biso kolengela biloko nyonso, mbuma mpe nyama mingi uta na esobe, mpe mafuta ya nzoi ya kotondana, mpe bilei engebene na oyo Nkolo atindaka biso, tokotaki na masuwa, elongo na mikumba na biso nyonso mpe nkona na biso, mpe eloko nyonso oyo tomemaki elongo na biso, moto na moto engebene na mibu na ye; yango wana, tokotaki biso nyonso na masuwa, elongo na basi na biso mpe bana na biso.

7 Mpe sikawa, tata na ngai abotaki bana mibale na esobe; nkulutu abiangamaki Yakobo mpe leki Yosefe.

8 Mpe esalemaki ete esilaki biso nyonso kokita kati na masuwa, mpe kokamata elongo na biso bilei na biso mpe biloko oyo totindamaki kokamata, tokotaki kati na mbu mpe topusamaki liboso na mopepe na mboka elakelama.

9 Mpe esilaki biso kopusama liboso na mopepe na ntaka ya mikolo mingi, tala, bandeko mibali na ngai mpe bana mibali ya Yisamaele mpe lisusu basi na bango bakomaki komisepelisa, na lolenge ete babandaki kobina, mpe koyemba, mpe koloba na yauli mingi, iyo, kutu ete babosanaki na nguya nini bamemamaki kuna; iyo, batombolamaki na yauli ya mingi koleka.

10 Mpe ngai, Nefi, nabandaki kobanga mingi koleka mbele Nkolo asilika na biso, mpe abeta biso na ntina ya mabe na biso, ete tomelama na bozindo ya mbu; yango wana ngai, Nefi, nabandaki koloba na bango na limemia mingi; kasi tala, basilikaki na ngai, kolobaka: Tolingi te ete ndeko na biso mobali ya leki azala moyangeli na biso.

11 Mpe esalemaki ete Lamani mpe Lemuele bakamataki ngai mpe bakangaki ngai na singa, mpe basalelaki ngai na loma; nzokande, Nkolo apesaki na yango nzela ete akoka kolakisa nguya na ye, mpo na kokokisa liloba na ye oyo alobaki mpo na oyo etali bato ya nkuna.

12 Mpe esalemaki ete esilaki bango kokanga ngai na lolenge ete nakoka koningana lisusu te, kompa, oyo elengelamaki na Nkolo, etikaki kosala.

13 Yango wana, bayebaki te wapi basengelaki kokamba masuwa, na lolenge ete mopepe makasi monene emataki, iyo, mopepe makasi monene mpe ya nsomo, mpe tozongisamaki nsima likolo ya mai na ntaka ya mikolo misato; mpe babandaki kobanga mingi koleka ete bazinda na mbu; nzokande bafungolaki ngai te.

14 Mpe na mokolo ya minei, oyo tozongisamaki nsima, ekumbaki ebandaki kozala ya nsomo mingi koleka.

15 Mpe esalemaki ete tokomaki penepene na komelama na mbu. Mpe esilaki biso kozongisama nsima likolo ya mai na ntaka ya mikolo minei, bandeko na ngai babandaki komona ete masambisi ya Nzambe ezalaki likolo na bango, mpe ete basengelaki kowa longola se soki bakoyambola uta na mabe na bango; yango wana, bayaki epayi na ngai, mpe bafungolaki singa oyo ezalaki na nkingo ya maboko na ngai, mpe tala evimbaki mingi koleka; mpe lisusu makaka na ngai mavimbaki mingi, mpe mpasi na yango ezalaki ya monene.

16 Nzokande, natalelaki Nzambe, mpe nasanzolaki ye bolayi ya mokolo mobimba; mpe nayima-yimaki te na Nkolo na ntina ya mitungisi na ngai.

17 Sikawa tata na ngai, Lehi, alobaki makambo mingi epayi na bango, mpe lisusu epayi na bana ya Yisamaele; kasi, tala, babimisaki libanda bokaneli boike na oyo nyonso akoloba mpo na ngai; mpe baboti na ngai, lokola babukanaki na mibu, mpe lokola bayokaki mpasi ya mitungisi mingi na ntina ya bana na bango, bakitisamaki, iyo, kutu likolo ya mbeto na bango ya bokono.

18 Na ntina ya mpasi mpe mawa mingi na bango, mpe mabe ya bandeko mibali na ngai, bayeisamaki penepene kutu na komemama uta na ntango oyo mpo na kokutana elongo na Nzambe na bango; iyo, na bango nsuki ya mpembe ezalaki penepene na kokitisama mpo na kolala na nse na kati ya mputulu; iyo, kutu bazalaki penepene na kobwakama na mawa kati na lilita ya mai.

19 Mpe Yakobo mpe Yosefe lisusu, lokola bazalaki bilenge, mpe lokola bazalaki na mposa ya bilei mingi, bayokaki mpasi na ntina ya mitungisi ya mama na bango; mpe lisusu mwasi na ngai, na mai ya miso na ye mpe sambo na ye, mpe bana na ngai lokola, balembisaki te mitema na bandeko mibali na ngai ete bafungola ngai.

20 Mpe ezalaki na eloko te longola se nguya ya Nzambe, oyo ebundisaki bango na bobebisami, ekokaki kolembisa mitema na bango; yango wana, lokola bamonaki ete bakomaki penepene na komelama na bozindo ya mbu nde bayambolaki uta na likambo oyo basalaki, na lolenge ete bafungolaki ngai.

21 Mpe esalemaki ete esilaki bango kofungola ngai, tala, nakamataki kompa, mpe ebandaki kosala lokola nalingaki. Mpe esalemaki ete nasambelaki epayi ya Nkolo; mpe esilaki ngai kosambela, mopepe motikaki, mpe mopepe monene makasi motikaki, mpe kimia ya monene eyingelaki.

22 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nakambaki masuwa, ete tonanaki lisusu epayi na mboka elakelama.

23 Mpe esalemaki ete esilaki biso konana na ntaka ya mikolo mingi, tokomaki na mboka elakelama; mpe tokitaki likolo ya mabele, mpe totelemisaki biema na biso; mpe tobiangaki yango mboka elakelama.

24 Mpe esalemaki ete tobandaki kosala bilanga, mpe tobandaki kowana nkona; iyo, totiaki nkona na biso nyonso kati na mabele, oyo tomemaki uta na mboka ya Yelusaleme. Mpe esalemaki ete ekolaki mingi koleka; yango wana, topambolamaki na lolenge ya kotondana.

25 Mpe esalemaki ete toyekolaki mboka ya elaka, lokola ekendaki biso mobembo na esobe, ete ezalaki na banyama ya zamba ya ndenge na ndenge, ngombe ya mwasi mpe ngombe ya mobali lokola, mpe bampunda mpe bampunda, mpe ntaba mpe ntaba ya zamba, mpe ndenge nyonso ya banyama ya zamba, oyo bato bakoki kosalela. Mpe toyekolaki ndenge nyonso ya makele, ya wolo, mpe ya mpauni lokola, mpe ya motako.

Bimisa na lokasa