Makomi
1 Nefi 3


Mokapo 3

Bana mibali ya Lehi bazongi na Yelusaleme kokamata bapalaki ya motako—Labana aboyi kopesa bapalaki—Nefi alendisi mpe akembisi bandeko na ye ya mibali—Labana ayibi bozwi na bango mpe ameki koboma bango—Lamani mpe Lemuele babeti Nefi mpe Sami mpe bapamelami na anjelu. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nazongaki, uta na masolo elongo na Nkolo, na ema ya tata na ngai.

2 Mpe esalemaki ete alobelaki ngai, kolobaka: Tala, nalotaki ndoto, na oyo wapi Nkolo atindaki ngai ete yo mpe bandeko na yo ya mibali bozonga na Yelusaleme.

3 Mpo tala, Labana azali na lisolo ya makomi ya Bayuda, mpe lisusu mambi ma kala ya libota ya batata na ngai, mpe ekomami likolo ya bapalaki ya motako.

4 Yango wana Nkolo atindaki ngai ete yo mpe bandeko na yo ya mibali bosengeli kokende na ndako ya Labana, mpe koluka masolo ya makomi, mpe komema yango awa kati na esobe.

5 Mpe sikawa, tala bandeko na yo ya mibali bazali koyima-yima, kolobaka ete ezali likambo ya makasi oyo nasengaki bango; kasi tala nasengaki bango yango te, kasi ezali motindo ya Nkolo.

6 Boye kende, mwana na ngai ya mobali, mpe Nkolo akosunga yo, mpo oyimaki-yimaki te.

7 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki epayi ya tata na ngai: Nakokende mpe nakosala makambo oyo Nkolo atindi, mpo nayebi ete Nkolo apesaka mitindo epayi ya bana ya bato te, longola se soki alengeli nzela mpo na bango ete bakoka kokokisa likambo oyo atindi bango.

8 Mpe esalemaki ete ntango tata na ngai ayokaki maloba oyo, azalaki na nsai koleka, mpo ayebaki ete napambolamaki na Nkolo.

9 Mpe ngai, Nefi, mpe bandeko na ngai ya mibali tokamataki nzela ya mobembo na biso na esobe, elongo na biema na biso, mpo na komata na mboka ya Yelusaleme.

10 Mpe esalemaki ete emataki biso na mboka ya Yelusaleme, ngai elongo na bandeko na ngai ya mibali totunanaki moko na mosusu.

11 Mpe tobetaki zeke—nani kati na biso akokota na ndako ya Labana. Mpe esalemaki ete zeke ekweyaki likolo ya Lamani; mpe Lamani akotaki kati na ndako ya Labana, mpe asololaki elongo na ye, wana ezalaki ye ya kofanda na ndako na ye.

12 Mpe asengaki na Labana masolo ya makomi oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako, oyo ezalaki na mambi ma kala ya libota ya tata na ngai.

13 Mpe tala, esalemaki ete Labana asilikaki, mpe abenganaki ye libanda uta na miso na ye; mpe alingaki te ete akamata bapalaki. Yango wana, alobelaki ye: Tala ozali moyibi, mpe nakoboma yo.

14 Kasi Lamani akimaki libanda uta na miso na ye, mpe ayebisaki makambo oyo Labana asalaki, epayi na biso. Mpe tobandaki koyoka mawa mingi koleka, mpe bandeko na ngai ya mibali bazalaki penepene na kozonga epayi ya tata na ngai na esobe.

15 Kasi tala nalobaki epayi na bango ete: lokola Nkolo azali na bomoi, mpe lokola tozali na bomoi, tokokita te epayi ya tata na biso na esobe kino ekokokisa biso likambo oyo Nkolo atindaki biso.

16 Yango wana, tika tozala sembo na kobombaka mitindo ya Nkolo; boye tika tokita na mboka ya bosangoli libula ya tata na biso, mpo atikaki wolo, mpe mpauni, mpe ndenge nyonso ya bozwi. Mpe nyonso oyo asalaki na ntina ya mitindo ya Nkolo.

17 Mpo ayebaki ete Yelusaleme esengeli kobebisama, na ntina ya nkuna ya bato.

18 Mpo tala, babwakaki maloba ya baprofeta. Yango wana, soki tata na ngai afandi na mboka nsima na ye kotindama mpo na kokima uta na mboka, tala, ye asengeli kowa mpe lokola. Yango wana, esengeli mpenza ete akima uta na mboka yango.

19 Mpe tala, ezali bwania ya Nzambe ete tozwa masolo ya makomi oyo, ete tokoka kobomba lokota ya batata na biso mpo na bana na biso.

20 Mpe lisusu ete tokoka kobomba mpo na bango maloba elobama na monoko ya baprofeta basantu Nyonso, oyo epesama epayi na bango na Molimo mpe nguya ya Nzambe, uta mokili ebanda, kutu kino na ntango oyo ya lelo.

21 Mpe esalemaki ete na elobeli ya lolenge oyo nandimisaki bandeko mibali na ngai, ete bazala sembo na kobombaka mitindo ya Nzambe.

22 Mpe esalemaki ete tokitaki na mboka ya bosangoli libula na biso, mpe tosangisaki esika moko wolo na biso, mpe mpauni na biso, mpe biloko na biso ya motuya.

23 Mpe esilaki biso kosangisa biloko oyo esika moko, tomataki lisusu na ndako ya Labana.

24 Mpe esalemaki ete tokotaki epayi ya Labana, mpe tosengelaki na ye ete apesa biso masolo ya makomi oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako, mpo na yango tolingaki kopesa ye wolo na biso, mpe mpauni na biso, mpe biloko nyonso na biso ya motuya.

25 Mpe esalemaki ete ntango Labana amonaki bozwi na biso, mpe ete ezalaki monene koleka, alulaki yango, na lolenge ete abenganaki biso libanda, mpe atindaki basali na ye koboma biso, ete akoka kozwa bozwi na biso.

26 Mpe esalemaki ete tokimaki liboso ya basali ya Labana, mpe tosengelaki kotika bozwi na biso, mpe ekweyaki na maboko ya Labana.

27 Mpe esalemaki ete tokimaki kati na esobe, mpe basali ya Labana bakangaki biso te, mpe tomibombaki kati na libulu ya libanga.

28 Mpe esalemaki ete Lamani asilikelaki ngai, mpe lisusu tata na ngai; mpe Lemuele mpe lokola, mpo ayokaki maloba ya Lamani. Yango wana Lamani mpe Lemuele balobaki maloba ya mabe mingi epayi na biso, bandeko mibali baleki na bango, mpe babetaki biso kutu na lingenda.

29 Mpe esalemaki ete lokola babetaki biso na lingenda, tala, anjelu ya Nkolo ayaki, mpe atelemaki liboso na bango, mpe alobaki epayi na bango, kolobaka: Mpo na nini kobeta ndeko ya leki na bino ya mobali na lingenda? Boyebi te ete Nkolo aponaki ye mpo na kozala moyangeli na bino, mpe oyo na ntina ya mabe na bino? Tala, bokomata lisusu na Yelusaleme, mpe Nkolo akotika Labana na maboko na bino.

30 Mpe esilaki anjelu kolobela biso, ye akendaki.

31 Mpe esilaki anjelu kokende, Lamani mpe Lemuele babandaki lisusu koyima-yima, kolobaka: Lolenge boni ekoki kosalema ete Nkolo atika Labana na maboko na biso? Tala, azali moto moko makasi, mpe akoki kopesa motindo na ntuku mitano, iyo, kutu akoki koboma ntuku mitano; bongo lolenge boni biso te?

Bimisa na lokasa