Makomi
1 Nefi 8


Mokapo 8

Lehi amoni limoni ya nzete ya bomoi—Lehi alei mbuma na yango mpe alingi libota na ye esala mpe lokola—Amoni lingenda ya ebende, nzela ya moke mpe ya nkaka, londende ya molili oyo ezipi bato—Salia, Nefi, mpe Sami balei mbuma, kasi Lamani mpe Lemuele baboyi. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete tosangisaki esika moko ndenge nyonso ya nkona ya ndenge na ndenge, mboto ya ndenge na ndenge mpe lokola, mpe lisusu nkona ya mbuma ya ndenge na ndenge.

2 Mpe esalemaki ete wana efandaki tata na ngai na esobe, alobaki epayi na biso, kolobaka: Tala, naloti ndoto; to, na maloba mosusu, namoni limoni.

3 Mpe tala, mpo na likambo oyo namonaki, nazali na ntina ya kosepela na Nkolo mpo na Nefi mpe lisusu mpo na Sami; mpo nazali na ntina ya kobanza ete bango, mpe lisusu mingi ya nkona na bango, bakobikisama.

4 Kasi tala, Lamani mpe Lemuele, nazali kobanga mingi koleka na ntina na bino; mpo tala, nakanisi namonaki na ndoto na ngai, esobe moko ya molili mpe ya mawa.

5 Mpe esalemaki ete namonaki moto moko, mpe alataki nzambala ya mpembe; mpe ayaki, mpe atelemaki liboso na ngai.

6 Mpe esalemaki ete alobelaki ngai, mpe ayebisaki ngai nalanda ye.

7 Mpe esalemaki ete lokola nalandaki ye, namimonaki ete nazalaki na eliki ya molili mpe ya mawa.

8 Mpe esilaki biso kokende mobembo na ntaka ya ngonga mingi kati na molili, nabandaki kosambela epayi ya Nkolo ete boboto na ye ezala na ngai, engebene na ebele ya boboto ya bolamu na ye.

9 Mpe esalemaki ete esilaki ngai kosambela epayi ya Nkolo, namonaki elanga ya monene mpe ya etando.

10 Mpe esalemaki ete namonaki nzete moko, oyo kani mbuma ezalaki elengi mpo na kopesa moto esengo.

11 Mpe esalemaki ete nakendaki, mpe naliaki mbuma na yango; mpe namonaki ete ezalaki sukali mingi, likolo ya nyonso oyo namekaka naino yambo. Iyo, mpe namonaki ete mbuma na yango ezalaki mpembe, koleka mpembe nyonso oyo naino namona.

12 Mpe lokola naliaki mbuma na yango, etondisaki molimo na ngai na bosepeli monene koleka; yango wana, mposa na ngai ebandaki kozala ete libota na ngai esengeli kolia yango mpe lokola, mpo nayebaki ete ezalaki elengi koleka bambuma nyonso mosusu.

13 Mpe lokola nabwakaki miso na ngai nzinganzinga, ete mbele nakokaki komona libota na ngai mpe lokola, namonaki ebale ya mai ezalaki kotiola mpembeni; mpe ezalaki penepene na nzete oyo kani mbuma nazalaki kolia.

14 Mpe natalaki mpo na komona wapi eutaki; mpe namonaki moto na yango kuna na mosika; mpe na moto na yango, namonaki mama na bino Salia, mpe Sami mpe Nefi; mpe batelemaki lokola soki bayebaki te epayi wapi basengeli kokende.

15 Mpe esalemaki ete napepaki loboko epayi na bango; mpe nalobaki lisusu epayi na bango na mongongo makasi ete baya epayi na ngai, mpe balia mbuma, oyo ezalaki elengi koleka bambuma nyonso mosusu.

16 Mpe esalemaki ete bayaki epayi na ngai mpe baliaki mbuma yango mpe lokola.

17 Mpe esalemaki ete nazalaki na mposa ete Lamani mpe Lemuele baya mpe balia mbuma yango mpe lokola; yango wana, nabwakaki miso na ngai epayi na moto ya ebale, ete mbele nakokaki komona bango.

18 Mpe esalemaki ete namonaki bango, kasi balingaki koya epayi na ngai mpe kolia mbuma yango te.

19 Mpe namonaki lingenda ya ebende, mpe ebendanaki na bolayi na libongo ya ebale, mpe ekambaki na nzete, mpembeni na oyo wapi natelemaki.

20 Mpe namonaki lisusu nzela ya moke mpe ya nkaka, oyo eyaki kolandaka penepene na lingenda ya ebende, kutu kino na nzete mpembeni na oyo wapi natelemaki; mpe ekambaki mpe lokola mpembeni na moto ya liziba, na elanga moko ya monene mpe ya etando, lokola soki ezalaki mokili moko.

21 Mpe namonaki mangomba mingi na bato, mingi na bango bazalaki kokende mbangu liboso ete bakoka kozwa nzela oyo ekambaki na nzete mpembeni na oyo wapi natelemaki.

22 Mpe esalemaki ete babelemaki, mpe babandaki kotambola na nzela oyo ekambaki na nzete.

23 Mpe esalemaki ete londende ya molili emataki; iyo, kutu londende ya monene koleka ya molili, na lolenge ete baoyo bayingelaki na nzela babungaki nzela na bango, ete bayenga-yengaki mosika mpe babungaki nzela.

24 Mpe esalemaki ete namonaki basusu bazalaki kokende mbangu liboso, mpe babelemaki mpe bakangaki nsuka ya lingenda ya ebende; mpe bakendaki mbangu liboso na nzela ya londende ya molili, kokangamaka na lingenda ya ebende, kutu kino babelemaki mpe baliaki mbuma ya nzete.

25 Mpe esilaki bango kolia mbuma ya nzete, babwakaki miso na bango nzinganzinga lokola soki bazalaki koyoka nsoni.

26 Mpe ngai lisusu nabwakaki miso na ngai bipayi na bipayi nzinganzinga, mpe namonaki, na ngambo mosusu ya ebale ya mai, ndako moko ya monene mpe ya etando; mpe etelemaki lokola soki ezalaki na mopepe, likolo mpenza ya mabele.

27 Mpe etondaki na bato, mibange mpe bilenge lokola, mibali mpe basi lokola; mpe lolenge ya molato na bango ezalaki ya malonga koleka; mpe bazalaki na ezalela ya kosekaka mpe kolakisaka misapi na bango na baoyo bakomaki mpe bazalaki kolia mbuma.

28 Mpe esilaki bango komeka mbuma ya nzete bayokaki nsoni, na ntina ya baoyo bazalaki koseka bango; mpe bakweyaki mosika kati na banzela oyo epekisami mpe babungaki nzela.

29 Mpe sikawa ngai, Nefi, nalobi te maloba nyonso ya tata na ngai.

30 Kasi, mpo nazala mokuse na bokomi, tala, amonaki ebele ya bato basusu kokendaka mbangu liboso; mpe bayaki mpe bakangaki nsuka ya lingenda ya ebende; mpe bakendaki mbangu liboso, na nzela na bango, ntango nyonso kokangaka lingenda ya ebende ngwi, kino babelemaki, mpe bakweyaki, mpe baliaki mbuma ya nzete.

31 Mpe amonaki lisusu ebele ya bato mosusu kolukaka nzela na bango epayi na ndako wana ya monene mpe ya etando.

32 Mpe esalemaki ete mingi babendamaki kati na mozindo ya liziba; mpe mingi balimwaki mosika uta na miso na ye, koyenga-yengaka na banzela ya ndenge mosusu.

33 Mpe mingi mpenza ezalaki ebele ya bato oyo bakotaki kati na ndako wana ya lolenge mosusu. Mpe esilaki bango kokota kati na ndako wana, balakisaki mosapi ya litio epayi na ngai mpe baoyo bazalaki kolia mbuma mpe lokola; kasi tokebaki na bango te.

34 Oyo ezali maloba ya tata na ngai: Mpo mingi lokola baoyo bakebaki na bango, bakweyaki.

35 Mpe Lamani mpe Lemuele baliaki mbuma te, elobaki tata na ngai.

36 Mpe esalemaki ete esilaki tata na ngai koloba maloba nyonso na ndoto to limoni na ye, oyo ezalaki mingi, alobaki epayi na biso ete, na ntina ya makambo oyo amonaki na limoni, abangaki koleka mpo na Lamani mpe Lemuele; iyo, abangaki mbele babwakama mosika uta na miso ya Nkolo.

37 Mpe alendisaki bango na motema ya moboti ya bolingo, ete bayoka maloba na ye, ete mbele Nkolo alingaki kolakisa boboto epayi na bango, mpe kobwaka bango mosika te; iyo, tata na ngai ateyaki bango.

38 Mpe esilaki ye koteya bango, mpe kosakola makambo mingi epayi na bango, atindaki bango kobomba mitindo ya Nkolo; mpe asilisaki kolobela bango.

Bimisa na lokasa