Makomi
1 Nefi 9


Mokapo 9

Nefi asali maboke mibale ya masolo ya makomi—Liboke moko moko ebiangami bapalaki ya Nefi—Bapalaki ya minene ezali na mambi ya kala ya mokili; bapalaki ya mike ezali mingi na makambo ya bule. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe makambo nyonso oyo tata na ngai amonaki, mpe ayokaki, mpe alobaki, lokola azalaki kofanda na ema, kati na lobwaku ya Lemuele, mpe amonaki lisusu makambo mingi mpenza, oyo ekoki kokomama likolo ya bapalaki oyo te.

2 Mpe sikawa, lokola elobaki ngai mpo na oyo etali bapalaki oyo, tala ezali te bapalaki likolo ya oyo wapi napesi lisolo mobimba ya mambi ya kala ya bato na ngai; mpo bapalaki likolo ya oyo wapi napesi lisolo mobimba ya bato na ngai, napesi yango nkombo ya Nefi; yango wana, ebiangami bapalaki ya Nefi, nsima ya nkombo na ngai moko; mpe bapalaki oyo lisusu ebiangami bapalaki ya Nefi.

3 Nzokande, nazwaki motindo ya Nkolo ete nasala bapalaki oyo, mpo na ntina ya malamu koleka ete ekozala na lisolo moko ekomama ya mosala ya bato na ngai.

4 Likolo ya bapalaki mosusu, ekokomama lisolo ya boyangeli ya bakonzi, mpe bitumba mpe boweli ya bato na ngai; yango wana bapalaki oyo ezali, mpo na eteni eleki mingi mpo na oyo etali mosala; mpe bapalaki mosusu ezali, mpo na eteni eleki mingi, mpo na oyo etali boyangeli ya bakonzi, mpe bitumba mpe boweli ya bato na ngai.

5 Yango wana, Nkolo atindaki ngai nasala bapalaki oyo mpo na ntina ya bwania na ye, oyo ntina, nayebi te.

6 Kasi Nkolo ayebi makambo nyonso uta na ebandeli; yango wana, alengelaka nzela mpo na kokokisa misala na ye nyonso na kati ya bana ya bato; mpo tala, azali na nguya nyonso mpo na kokokisa maloba na ye nyonso. Mpe ezali boye. Amene.

Bimisa na lokasa