Makomi
2 Nefi 18


Mokapo 18

Klisto akozala lokola libanga ya libaku mpe libanga ya etumbu—Boluka Nkolo, banganga nkisi te—Bobaluka na mobeko mpe na litatoli mpo na bokambami—Meka na Yisaya 8. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpo na kobakisa liloba na Nkolo flobelaki ngai: Kamata etando monene, mpe koma likolo na yango na ekomelo ya moto, mpo na oyo etali Maele-Salala-Hasa-baza.

2 Mpe nakamataki banzeneneke ya sembo mpo na kokoma masolo ya makomi, Uliya nganganzambe mpe Zekalia mwana ya Yebelekia.

3 Mpe nakendaki epayi ya mwasi profeta; mpe azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Nde Nkolo alobaki na ngai: Bianga nkombo na ye, Maele-Salala-Hasa-baza.

4 Mpo tala, mwana akozala na boyebi mpo na kolela te, Tata na ngai, mpe mama na ngai, yambo ete bozwi ya Damaseke mpe biloko bipunzami ya Samalia bibotolama liboso ya mokonzi na Asulia.

5 Nkolo alobelaki ngai lisusu, kolobaka:

6 Na kotalaka ete bato oyo baboyi mai ya Siloa oyo etiolaka malembe malembe, mpe basepeli na Lesini mpe mwana ya Lemalia;

7 Boye sikawa, tala, Nkolo amemi likolo na bango mai ya ebale, makasi mpe mingi, kutu mokonzi na Asulia mpe nkembo nyonso na ye; mpe akoya likolo ya mingongolo nyonso ya ye, mpe akokende likolo ya mabongo nyonso na ye.

8 Mpe ye akoleka na nzela ya Yuda; akozindisa mpe akosopana epayi, akokoma kutu kino na nkingo; mpe botandoli ya mapapu na ye ekotondisa bonene ya mboka na yo, O Emanuele.

9 Bosangana bino moko, O bino bato, mpe bokobukama na biteni; mpe botia litoyi bino nyonso ya bikolo ya mosika; bomikanga nkaba na loketo, mpe bokobukama na biteni; bomikanga nkaba na loketo mpe bokobukama na biteni.

10 Bozwana toli esika moko, mpe ekokoma mpamba; boloba liloba, mpe ekosimba te; mpo Nzambe azali elongo na biso.

11 Mpo Nkolo alobaki boye na ngai na loboko ya makasi, mpe alakisaki ngai ete natambola te na nzela ya bato oyo, kolobaka:

12 Boloba te, Likita, na nyonso epayi kani bato oyo bakoloba, Likita; mpe bobanga te bobangi na bango, mpe bozala na nsomo te.

13 Bosantisa Nkolo na Bibele ye moko, mpe tika ye azala bobangi na bino, mpe tika ye azala nsomo na bino.

14 Mpe akozala lokola ndako esantu; kasi lokola libanga ya libaku, mpe libanga ya botumoli na ndako mibale ya Yisalaele, lokola mbonga mpe motambo na bafandi ya Yelusaleme.

15 Mpe mingi na kati na bango bakobete libaku mpe bakokweya, mpe bakobukana, mpe bakokangama na motambo mpe bakozwama.

16 Tia litatoli singa, kanga mobeko na kati ya bayekoli na ngai.

17 Mpe nakozela se Nkolo, oyo abombi elongi na ye mosika uta na ndako ya Yakobo, mpe nakoluka ye.

18 Tala, ngai mpe bana oyo Nkolo apesaki ngai tozali lokola bilembo mpe lokola makamwisi na Yisalaele uta na Nkolo na Bibele, oyo afandi na Ngomba ya Siona.

19 Mpe ntango bakoloba epayi na bino: Boluka epayi na bango oyo bazali na milimo ya momeseno, mpe banganga nkisi baoyo bakobeta piololo mpe banunga-nungaka—esengeli bato koluka toli te epayi ya Nzambe na bango na esika ete bato ya bomoi bayokela uta na bakufi?

20 Na mobeko mpe na litatoli; mpe soki balobi engebene na liloba oyo te, ezali mpo pole ezali te kati na bango.

21 Mpe bakoleka na katikati na yango wana esili bango konyokwama mpenza mpe na nzala; mpe ekosalema ete ntango bakoyoka nzala, bakomisilikisa, mpe bakolakela mokonzi na bango mabe mpe Nzambe na bango, mpe bakotala epayi na likolo.

22 Mpe bakotala na mabele mpe tala mobulu, mpe molili, butu ya nsomo, mpe bakumbama na molili.

Bimisa na lokasa