Makomi
2 Nefi 30


Mokapo 30

Bayuda-te baoyo babongwani bakotangama elongo na bato ya liyokani—Balamani mpe Bayuda mingi bakondima liloba mpe bakokoma bato ya kosepela—Yisalaele ekozongisama mpe bato ya nkuna bakobebisama. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa tala, bandeko balingami na ngai, nalingi koloba epayi na bino; mpo ngai, Nefi, nakopesa nzela te bobanza ete bozali sembo koleka baoyo bazali Bayuda-te. Mpo tala, longola se soki bobateli mitindo ya Nzambe bokowa nyonso bobele bongo; mpe na ntina ya maloba oyo elobamaki bosengeli te kobanza ete Bayuda-te bakobebisama nyonso nie.

2 Mpo tala, nakoloba epayi na bino ete Bayuda-te mingi lokola bakoyambola bakozala bato ya liyokani ya Nkolo; mpe Bayuda mingi lokola bakoyambola te bakobwakama mosika; mpo Nkolo ayokanaka na moto te longola se soki ezali na bango oyo bayamboli mpe bandimi Mwana na ye, oyo azali Moko Mosantu ya Yisalaele.

3 Mpe sikawa, nalingi kosakola mwa moke lisusu mpo na oyo etali Bayuda mpe Bayuda-te. Mpo ekosila buku oyo nalobelaki kobima, mpe kokomama epayi ya Bayuda-te, mpe kokangama lisusu epayi ya Nkolo, ekozala na bato mingi oyo bakondima maloba oyo ekomami; mpe bakomema yango epayi ya montika ya nkona na biso.

4 Mpe nde montika ya nkona na biso ekoyeba makambo etali biso, lolenge nini toyaki uta na Yelusaleme, mpe ete bazali biboto ya Bayuda.

5 Mpe nsango malamu ya Yesu Klisto ekoteyama na kati ya bango; yango wana, bakozongisama na boyebi ya batata na bango, mpe lisusu na boyebi ya Yesu Klisto, boye ezalaki na kati ya batata na bango.

6 Mpe nde bakosepela; mpo bakoyeba ete ezali lipamboli uta na loboko ya Nzambe epayi na bango; mpe biteku ya molili ekobanda kokweya uta na miso na bango; mpe nkola mingi ekoleka te na kati na bango, longola se soki bakozala bato ya peto mpe bato ya kosepela.

7 Mpe ekosalema ete Bayuda baoyo bapanzami lisusu bakobanda kondima Klisto; mpe bakobanda kosangana na etando ya mboka; mpe mingi lokola bakondima Klisto bakokoma bato ya kosepela.

8 Mpe ekosalema ete Nkolo Nzambe akobanda mosala na ye na kati ya bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso, mpe bato nyonso, mpo na kokokisa bozongisi ya bato na ye likolo ya mabele.

9 Mpe na bosembo Nkolo Nzambe akosambisa babola, mpe akopalela na alima basokemi ya mokili. Mpe akobeta mabele na lingenda ya monoko na ye; mpe na mpema ya mbebu na ye akoboma bato ya nkuna.

10 Mpo ntango ezali koya na lombangu wapi Nkolo Nzambe akosala bokaboli monene na kati ya bato, mpe bato ya nkuna nde akobebisa; mpe akobikisa bato na ye, iyo, kutu soki ezali bongo ete asengeli kobebisa bato ya nkuna na moto.

11 Mpe bosembo ekozala mokaba ya nketo na ye, mpe bosembo mokaba ya loketo na ye.

12 Mpe na ntango wana mbwa ya zamba ekofanda elongo na mwana ya mpate; mpe nkoi ekolala elongo na mwana ya ntaba, mpe mwana ya ngombe, mpe nkosi ya elenge, mpe nyama ya mafuta, elongo esika moko; mpe mwana moke akokamba bango.

13 Mpe ngombe mobali mpe ngombolo ekolia; bilenge na bango bakolala esika moko; mpe nkosi akolia matiti lokola ngombe.

14 Mwana oyo azali komela libele akosakana na libulu ya etupa, mpe mwana oyo atiki libele akotia loboko na ye na lidusu ya mbakoko.

15 Bakosalana mabe te to bakobebisa te na ngomba nyonso na ngai esantu; mpo mabele mokotonda na boyebi ya Nkolo lokola mai ezipaka mbu.

16 Yango wana, makambo ya bikolo nyonso makoyebana; iyo, makambo nyonso makoyebana epayi ya bana ya bato.

17 Ezali na eloko moko te oyo ezali ya nkuku longola se ekobimisama; ezali na mosala moko te ya molili longola se ekomonisama na pole; mpe ezali na eloko moko te oyo ekangama likolo ya mabele longola se ekofungolama.

18 Yango wana, makambo nyonso oyo ebimiebimisami epayi ya bana ya bato makobimisama na mokolo wana; mpe Satana akozala lisusu te na nguya likolo ya mitema ya bana ya bato, mpo na ntango molai. Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, natie nsuka na maloba na ngai.

Bimisa na lokasa