Makomi
2 Nefi 32


Mokapo 32

Banjelu balobaka na nguya ya Molimo Mosantu—Bato basengeli kosambela mpe kozwa boyebi mpo na bango moko uta na Molimo Mosantu. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, tala, bandeko balingami na ngai, nabanzi ete bomanyolaka ya moke na mitema na bino mpo na oyo etali nini bosengeli kosala nsima ya kokota na nzela. Kasi, tala, mpo na nini ezali bino komanyola makambo oyo na mitema na bino?

2 Emikundoli bino te ete nalobaki epayi na bino ete esili bino kozwa Molimo Mosantu bokoki koloba lokota ya banjelu? Mpe sikawa, lolenge nini ekokaki bino koloba na monoko ya banjelu soki ezalaki te na Molimo Mosantu?

3 Banjelu balobaka na nguya ya Molimo Mosantu; yango wana, balobaka maloba ya Klisto. Yango wana, nalobaki na bino ete, bosala lipati na maloba ya Klisto; mpo tala, maloba ya Klisto makoyebisa bino makambo nyonso bosengeli kosala.

4 Yango wana, sikawa esili ngai koloba maloba oyo, soki bokoki kososola yango te ekozala mpo bosengi te, mpe bobeti te; yango wana, bokumbami te na pole, kasi bosengeli kowa na molili.

5 Mpo tala, lisusu nakoloba epayi na bino ete soki bokokota na nzela, mpe bokozwa Molimo Mosantu, akolakisa epayi na bino makambo nyonso bokosala.

6 Tala, oyo ezali malongi ya Klisto, mpe ekozala na malongi mosusu ya kopesama likolo te kino akomimonisa ye moko epayi na bino na mosuni. Mpe ntango akomimonisa epayi na bino na mosuni, makambo oyo akolobela bino yango nde bokotosa mpo na kosalela.

7 Mpe sikawa ngai, Nefi, nakoki koloba mingi te; Molimo akangi maloba na ngai, mpe natikali kolela na ntina ya bozangi boyambi, mpe nkuna, mpe bozangi koyeba, mpe matoyi mangongi ya bato; mpo balingi te koluka boyebi, kososola boyebi monene mpe te, ntango epesami epayi na bango na polele, kutu polele lokola liloba ekoki kozala.

8 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, namoni ete bozali naino komanyola na mitema na bino; mpe etungisi ngai ete nasengeli koloba mpo na oyo etali likambo oyo. Mpo soki bolingi koyokela Molimo oyo ateyaka moto kosambela, bolingaki koyeba ete bosengeli kosambela; mpo molimo ya mabe ateyaka te moto ete asambela, kasi ateyaka ye ete asengeli kosambela te.

9 Kasi tala, nakoyebisa bino ete bosengeli kosambela ntango nyonso, mpe kolemba te; ete bosengeli kosalela Nkolo likambo moko te longola se soki na esika ya yambo bosambeli Tata na nkombo ya Klisto, ete abulisa misala na bino mpo na bino, ete misala na bino mikoka kozala mpo na bolamu ya molimo na bino.

Bimisa na lokasa