Makomi
3 Nefi 10


Mokapo 10

Mboka ezalaki nie mpo na ngonga mingi—Mongongo ya Klisto mopesi elaka ya kosangisa bato na Ye lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye—Eteni eleki sembo ya bato babatelami. Penepene na mibu 34–35 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa tala, esalemaki ete bato nyonso ya mboka bayokaki maloba oyo, mpe batatolaki yango. Mpe nsima ya maloba oyo mboka ezalaki nie mpo na ntaka ya ngonga mingi;

2 Mpo bokamwi ya bato ezalaki monene mpenza ete batikaki komilela-lela mpe koganga-ganga mpo na bobungisi bandeko na bango oyo babomamaki; boye mboka mobimba ezalaki nie mpo na ntaka ya ngonga mingi.

3 Mpe esalemaki ete mongongo moko eyaki lisusu epayi ya bato, mpe bato nyonso bayokaki, mpe batatolaki na ntina na yango, kolobaka:

4 O bino bato ya bingumba minene oyo bikwei, oyo bozali biboto ya Yakobo, iyo, oyo bozali bato ya ndako ya Yisalaele, mbala boni nalingaki kosangisa bino lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, mpe mbala boni naleisaki bino.

5 Mpe lisusu, mbala boni nalingaki kosangisa bino lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, iyo, O bino bato ya ndako ya Yisalaele, oyo bokwei; iyo, O bino bato ya ndako ya Yisalaele, bino oyo bofandi na Yelusaleme, bino oyo bokwei mpe lokola; iyo, mbala boni nalingaki kosangisa bino lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, mpe bolingaki te.

6 O bino ndako ya Yisalaele oyo nabikisi, mbala boni nalingaki kosangisa bino lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, soki bokoyambola mpe bokozonga epayi na ngai na mokano etonda ya motema.

7 Kasi soki te, O ndako ya Yisalaele, esika ya bofandi na bino ekotikala mpamba kino na ntango ya bokokisi ya liyokani nasalaki na batata na bino.

8 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki bato koyoka maloba oyo, tala, babandaki kolela mpe koganga lisusu mpo na bobungisi ya bandeko mpe baninga na bango.

9 Mpe esalemaki boye ete mikolo misato elekaki. Mpe ezalaki na ntongo, mpe molili mopanzanaki uta na etando ya mboka, mpe mabele matikaki kolenga, mpe mabanga matikaki kopasuka, mpe minkime ya nsomo mitikaki, mpe makelele ya lokito malekaki.

10 Mpe mabele ekangamaki lisusu, ete matelemaki; mpe matanga, mpe boleli, mpe biyelela ya bato oyo batikalaki na bomoi bisilaki; mpe matanga ebalukaki kati na bosepeli, mpe boleli na bango kati na bosanzoli mpe na bopesi matondi epayi ya Nkolo Yesu Klisto, Mosikoli na bango.

11 Mpe kino na ntango oyo makomi oyo elobamaki na baprofeta ekokisamaki.

12 Mpe ezalaki eteni eleki sembo ya bato nde babikisamaki, mpe ezalaki bango oyo bayambaki baprofeta, mpe babambaki bango mabanga te, mpe ezalaki bango oyo basopaka makila ya basantu te, baoyo babikisamaki—

13 Mpe babikisamaki mpe bazindisamaki te mpe bakundamaki te na mabele; mpe bazindisamaki na bozindo ya mbu te; mpe bazikisamaki te na moto, to bakweyaki te mpe banikamaki na liwa te; mpe bamemamaki te na mopepe ya kaina; to bazipamaki na mbongi ya molinga mpe ya molili te.

14 Mpe sikawa, moto nyonso oyo atangi, tika ye asosola; ye oyo azali na makomi, tika ye aluka malamu kati na yango, mpe amona mpe atala soki liwa mpe bobebisami nyonso oyo na moto, mpe na molinga, mpe na ekumbaki, mpe na mopepe ya kaina, mpe na bofungwani ya mabele mpo na koyamba bango, mpe makambo nyonso oyo ezali te mpo na bokokisi ya masakoli ya baprofeta basantu mingi.

15 Tala, nalobi epayi na bino ete, Iyo, mingi batatolaki makambo oyo na boyei ya Klisto, mpe babomamaki mpo batatolaki mpo na makambo oyo.

16 Iyo, profeta Zenosi atatolaki makambo oyo, mpe lisusu Zenoki alobaki mpo na oyo etali makambo oyo, mpo batatolaki mingi mingi mpo na ntina na biso, baoyo tozali montika ya nkona na bango.

17 Tala, tata na biso Yakobo atatolaki lisusu mpo na oyo etali montika ya nkona ya Yosefe. Mpe tala, ezali biso montika ya nkona ya Yosefe te? Mpe makambo oyo ezali kotatola biso, ekomami yango te likolo ya bapalaki ya motako oyo tata na biso Lehi amemaki uta na Yelusaleme?

18 Mpe esalemaki ete na nsuka ya mobu ya ntuku misato na minei, tala, nakolakisa epayi na bino ete bato ya Nefi oyo babikisamaki, mpe lisusu bango oyo babiangamaki Balamani, oyo babikisamaki, bazwaki lisungi monene epayi na bango, mpe mapamboli minene masopanaki likolo ya mitu na bango, mpo kala mingi te nsima ya bobuti ya Klisto na lola, amimonisaki solo epayi na bango—

19 Kolakisaka nzoto na ye epayi na bango, mpe kosalelaka bango; mpe lisolo moko ya mosala na ye ekopesama awa nsima. Boye mpo na ntango oyo natie nsuka na maloba na ngai.

Bimisa na lokasa