Makomi
3 Nefi 13


Mokapo 13

Yesu ateyi Banefi Losambo ya Nkolo—Basengeli kobomba biloko ya motuya na lola—Bayekoli zomi na mibale kati na mosala na bango batindami kotungisama te mpo na biloko ya ntango—Meka na Matai 6. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Solo, solo, nalobi ete nalingi ete bokaba makabo epayi ya babola, kasi bosala keba ete bokaba te makabo na bino liboso ya bato mpo na komonana na bango; soki te bozali na mbano moko te na Tata na bino oyo azali na lola.

2 Boye, ntango bokokaba makabo na bino, bolelisa mondule liboso na bino te, lokola ekosalaka bakibisi na sinagoga mpe na balabala, ete bakoka kozwa nkembo uta na bato. Solo nalobi epayi na bino, bazali na lifuta na bango.

3 Kasi ntango okokaba makabo tika ete loboko na yo ya mwasi eyeba te nini loboko na yo ya mobali ezali kosala.

4 Ete makabo na yo ekoka kozala na nkuku; kasi Tata na yo oyo amonaka na nkuku, ye moko akopesa yo mbano na polele.

5 Mpe ntango okosambela kosala te lokola bakibisi, mpo balingaka kosambela, kotelemaka na sinagoga mpe na litumu ya balabala, ete bakoka komonana na bato. Solo nalobi epayi na bino, bazali na mbano na bango.

6 Kasi yo, ntango okosambela, kota kati na kisuku na yo, mpe esili yo kokanga ekuke na yo, sambela na Tata na yo oyo azali na nkuku, Mpe Tata na yo, oyo amonaka na nkuku akopambola yo na polele.

7 Kasi ntango okosambela, kozongela maloba ya mpamba te, lokola bapaganu, mpo bakanisi ete bakoyokela bango mpo na maloba mingi na bango.

8 Boye kozala lokola bango te, mpo Tata na bino ayebi biloko nini bozali na yango mposa liboso bosenga ye.

9 Boye sambela na lolenge oyo: Tata na biso oyo azali na lola, nkombo na yo ebulisama,

10 Bolingi na yo esalema na mabele lokola ezali na lola.

11 Mpe limbisa biso niongo na biso, lokola biso tolimbisaka bato na niongo na biso.

12 Mpe kokamba biso kati na masenginia te, kasi bikisa biso uta na mabe.

13 Mpo bokonzi, nguya, mpe nkembo ezali na yo, libela. Amene.

14 Mpo, soki bolimbisi bato mabe na bango Tata na bino na lola akolimbisa bino mpe lokola.

15 Kasi soki bolimbisi te bato mabe na bango mpe Tata na bino akolimbisa te mabe na bino.

16 Lisusu, ntango bozali kokila bilei bozala te lokola bakibisi, na bilongi ya mawa, mpo babebisaka bilongi na bango ete bakoka komonana epayi ya bato ete bazali kokila. Solo nalobi epayi na bino, bazali na mbano na bango.

17 Kasi ntango ozali kokila, pakola moto na yo mafuta mpe sukola elongi na yo.

18 Ete emonana te epayi ya bato ete ozali kokila, kasi epayi ya tata na bino, oyo azali na nkuku; mpe Tata na yo oyo amonaka na nkuku, akopesa yo mbano na polele.

19 Bobomba te mpo na bino moko biloko ya motuya na mabele, wapi mpomboli mpe bogugi ebebisaka, mpe bayibi bakotaka mpe bayibaka.

20 Kasi bobomba mpo na bino moko biloko ya motuya na lola, wapi mpomboli soki te bogugi ebebisaka te, wapi bayibi bakotaka soki mpe bayibaka te.

21 Mpo wapi ezali biloko na yo ya motuya, kuna nde ekozala motema na yo mpe lokola.

22 Pole ya nzoto ezali liso; soki, boye, liso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole.

23 Kasi soki liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekotonda na molili. Soki, boye, pole oyo ezali kati na yo ezali molili, lolenge boni monene ezali molili mona!

24 Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale; mpo akoyina moko mpe akolinga mosusu, soki te lisusu akokangama na moko mpe akotiola mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe Mamona.

25 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Yesu alobaki maloba oyo atalaki likolo ya Bazomi na mibale oyo aponaki, mpe alobaki epayi na bango: Bomikundola maloba oyo nalobi. Mpo tala, bozali bango oyo naponi mpo na kosalela bato oyo. Boye nalobi epayi na bino, bomitungisa te mpo na bomoi na bino, nini bokolia, soki te nini bokomela; soki te mpo na nzoto na bino, nini bokolata. Ezali te bomoi motuya mingi koleka nyama mpe nzoto koleka elamba?

26 Tala ndeke na likolo, mpo balonaka te, mpe babukaka te to mpe basangisaka te kati na ebombelo; nzokande Tata na bino ya lola aleisaka bango. Ezali bino motuya mingi koleka bango te?

27 Nani kati na bino na komitungisaka akoki kobakisa eteni moko ya lipeko na bolayi na ye?

28 Mpe ntina nini ezali bino komitungisa mpo na bilamba? Botala fololo ya elanga lolenge boni ekolaka. Esalaka te, mpe etongaka mpe te.

29 Mpe nzokande nalobi epayi na bino, ete kutu Solomo, na nkembo na ye nyonso, atutaki monzele lokola moko na yango te.

30 Yango wana, soki Nzambe alatisaka bongo matiti ya elanga, oyo lelo ezali, mpe lobi makobwakama kati na fulu, kutu bongo nde akolatisa bino, soki bozali na bondimi moke te.

31 Boye bomitungisa te, kolobaka, tokolia nini? To, tokomela nini? To tokolata nini?

32 Mpo Tata na bino na lola ayebi ete bozali na mposa ya biloko oyo nyonso.

33 Kasi boluka yambo bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na ye mpe biloko oyo nyonso bikobakisama epayi na bino.

34 Boye, bomitungisa te mpo na mokolo ya nsima; mpo na mokolo ya nsima ekomitungisa mpo na biloko na yango moko. Mabe ya mokolo ekoki na yango.

Bimisa na lokasa