Makomi
3 Nefi 14


Mokapo 14

Yesu atindi bato ete: Bosambisa te; Bosenga na Nzambe; Bokeba na baprofeta ya lokuta—Alaki lobiko na bango oyo basalaka bolingi ya Tata—Meka na Matai 7. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Yesu alobaki maloba oyo, abalukaki lisusu epayi na ebele ya bato mpe afungolaki monoko na ye epayi na bango lisusu, kolobaka: Solo, solo, nalobi epayi na bino, Bosambisa te, ete basambisa bino mpe te.

2 Mpo na esambiselo oyo bokosambisa, bokosambisama na yango; mpe na lomeko oyo bozali komeka, bakomeka bino mpe lisusu.

3 Mpe mpo na nini ezali yo kotala lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo ya mobali, kasi omoni te libaya oyo ezali na liso na yo moko?

4 Soki te lolenge boni ekoki yo koloba epayi ya ndeko na yo ya mobali: Tika nalongola lititi uta na liso na yo, mpe tala, libaya ezali na liso na yo moko?

5 Yo mokibisi, longola yambo libaya uta na liso na yo; mpe nde okomona polele mpo na kolongola lititi uta na liso ya ndeko na yo ya mobali.

6 Kopesa te oyo ezali esantu epayi na mbwa; mpe kobwaka mayaka na bino te liboso ya ngulu, mbele baniata yango na nse ya makolo na bango mpe babaluka lisusu mpe bapasola bino biteni.

7 Bosenga mpe ekopesama epayi na bino; boluka, mpe bokozwa; bobeta, mpe bakofungola bino.

8 Mpo moto nyonso oyo asengi, akozwa; mpe ye oyo aluki akozwa; na ye oyo abeti, bakofungola ye.

9 Soki te moto nani kati na bino, oyo, soki mwana mobali na ye asengi ye lipa, akopesa ye libanga?

10 Soki te ntango asengi mbisi, akopesa ye nioka?

11 Soki bino nde, oyo bozali bato mabe, boyebi lolenge kani kopesa makabo malamu epayi ya bana na bino, mingi boni koleka ekopesa Tata na bino oyo azali na lola biloko malamu na bango oyo basengi ye?

12 Boye, makambo nyonso kani bolingi ete bato basala na bino, bosalela bango mpe lokola, mpo oyo ezali mobeko mpe baprofeta.

13 Bokota na ekuke ya moke; mpo monene ezali ekuke, mpe ya etando ezali nzela, oyo ekambaka na bobebisami, mingi ezali baoyo bakendeka kuna.

14 Mpo moke ezali ekuke, mpe nkaka ezali nzela, oyo ekambaka na bomoi, mpe moke ezali baoyo bazwaka yango.

15 Bokeba na baprofeta ya lokuta, oyo bakoya na bino na elamba ya mpate, kasi na kati bazali mbwa ya zamba ya nkanda.

16 Bokoyeba bango na mbuma na bango. Ekobukaka bato mbuma ya vinyo na nzube, soki te mbuma ya misuke na mibwe?

17 Kutu bongo nzete nyonso ya malamu ebotaka se mbuma malamu, kasi nzete ya mabe ebotaka se mbuma ya mabe.

18 Nzete ya malamu ekoki kobota mbuma ya mabe te, mpe nzete ya mabe ebotaka mbuma ya malamu te.

19 Nzete nyonso oyo ebotaka te mbuma ya malamu ekokatama na nse, mpe ekobwakama kati na moto.

20 Yango wana, na mbuma na bango bokoyeba bango.

21 Moko nyonso oyo alobaka epayi na ngai, Nkolo, Nkolo, akokota te kati na bokonzi ya lola; kasi ezali ye oyo asalaka bolingi ya Tata na ngai oyo azali na lola.

22 Mingi bakoloba na ngai na mokolo wana: Nkolo, Nkolo, esakolaki biso te na nkombo na yo, mpe na nkombo na yo ebenganaki biso te zabulu libanda, mpe na nkombo na yo esalaki biso misala ya kokamwa te?

23 Mpe nde nakosakola epayi na bango: nayebaki bino soki moko te; bolongwa mosika na ngai, bino baoyo bosalaka mabe.

24 Boye, moto nyonso oyo ayoki maloba na ngai mpe asaleli yango, nakokokisa ye na moto ya bwania, oyo atongi ndako na ye likolo ya libanga

25 Mpe mvula ekitaki, mpe mpela eyaki, mpe mipepe mifulaki, mpe mibetaki likolo ya ndako wana; mpe ekweyaki te, mpo etongamaki likolo ya libanga.

26 Mpe moto nyonso oyo ayoki maloba oyo ya ngai mpe asaleli yango te akokokanisama na moto ya liboma, oyo atongi ndako na ye likolo ya zelo

27 Mvula ekitaki mpe mpela eyaki, mpe mipepe mifulaki, mpe mibetaki likolo ya ndako wana; mpe ekweyaki, monene ezalaki bokwei na yango.

Bimisa na lokasa