Makomi
3 Nefi 29


Mokapo 29

Bobimi ya Buku ya Mormon ezali elembo ete Nkolo abandi kosangisa Yisalaele mpe kokokisa mayokani na Ye—Bango oyo bakobwaka bimoniseli mpe makabo ya mokolo ya nsuka bakolakelama mabe. Penepene na mibu 34–35 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa tala, nalobi epayi na bino ete, ntango Nkolo akomona ete elongobani na bwania na ye ete maloba oyo ekoya epayi na baoyo bazali Bayuda-te, engebene na liloba na ye, na ntango wana nde bokoyeba ete liyokani oyo Tata asalaki elongo na bana ya Yisalaele, oyo etali bozongisi na mboka ya bosangoli libula, esili kobanda kokokisama.

2 Mpe bokoki koyeba ete maloba ya Nkolo oyo elobamaki na baprofeta basantu, nde nyonso makokokisama; mpe bosengeli te koloba ete Nkolo azelisi boyei na ye epayi ya bana ya Yisalaele.

3 Mpe bosengeli te kokanisa na mitema na bino ete maloba oyo elobamaki ezali mpamba, mpo tala, Nkolo akomikundola liyokani na ye oyo asalaki na bato na ye ya ndako ya Yisalaele.

4 Mpe ntango bokomona maloba oyo kokokisama na kati na bino, na ntango wana nde bosengeli lisusu te koboya misala ya Nkolo, mpo mompanga ya boyengebene na ye ezali na loboko na ye ya mobali; mpe tala, na mokolo ya nsuka, soki boboyi misala na ye, akosala ete kala mingi te mokanga bino.

5 Lisuma epayi na ye oyo aboyaka misala ya Nkolo; iyo, lisuma epayi na ye oyo akowangana Klisto mpe misala na ye!

6 Iyo, lisuma epayi na ye oyo akowangana bimoniseli ya Nkolo, mpe oyo akoloba ete Nkolo asalaka lisusu na emoniseli te, to na masakoli, to na makabo, to na minoko, to na bobikisi na bokono, to na nguya ya Molimo Mosantu mpe te.

7 Iyo, mpe lisuma epayi na ye oyo akoloba na mokolo wana, mpo na kozwa matabisi, ete likamwisi esalemi na Yesu Klisto ekoki kozala lisusu te; mpo ye oyo asali oyo akokoma lokola mwana mobali ya ebomi, mpo na nani boboto ezalaki te, engebene na liloba ya Klisto!

8 Iyo, mpe bosengeli lisusu te kotiola, soki te koboya, to koseke Bayuda, to montika ya ndako ya Yisalaele; mpo tala, Nkolo amikundoli liyokani na ye na bango, mpe akosala epayi na bango engebene na oyo alapaki.

9 Boye, bosengeli te kobanza ete bokoki kobalola loboko ya mobali ya Nkolo epayi na loboko oyo ya mwasi, ete akoki te kosala bosambisi mpo na bokokisami ya liyokani oyo asalaki na ndako ya Yisalaele.

Bimisa na lokasa