Makomi
3 Nefi 2


Mokapo 2

Nkuna mpe bonsomo ebakisami na kati ya bato—Banefi mpe Balamani basangani mpo na komibatela na bayongoli ya Gadiatoni—Babongwani ya Balamani bakomi mposo mpembe mpe babiangami Banefi. Penepene na mibu 5–16 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete boye mobu ya ntuku libwa na mitano elekaki lisusu, mpe bato babandaki kobosana bilembo mpe makamwisi oyo bayokaki, mpe babandaki kokamwa se moke moke na elembo soki te likamwisi uta na lola, na lolenge ete babandaki kokoma makasi na mitema na bango, mpe bato bakufa miso na mayele na bango, babandaki kolongola bondimi na nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki—

2 Kokanisaka makambo ya mpamba na mitema na bango, ete nyonso wana esalemaki na bato mpe na nguya ya zabulu, mpo na kopengwisa mpe kokosa-kosa mitema ya bato, mpe boye Satana azwaki lisusu mitema ya bato, na lolenge ete azipaki miso na bango mpe akosaki bango mpo na kondima ete malongi ya Klisto ezalaki likambo moko ya liboma mpe ya mpamba.

3 Mpe esalemaki ete bato babandaki kokoma makasi na nkuna mpe bonsomo; mpe bandimaki te ete bilembo mpe makamwisi ekopesama lisusu; mpe Satana azalaki se kosala, kokosaka mitema ya bato, kosenginiaka bango mpe kosalaka ete bango basala nkuna monene kati na mboka.

4 Mpe boye mobu ya ntuku libwa na motoba elekaki; mpe lisusu mobu ya ntuku libwa na nsambo, mpe lisusu mobu ya ntuku libwa na mwambe; mpe lisusu mobu ya ntuku libwa na libwa;

5 Mpe lisusu mibu nkama moko elekaki, uta na mikolo ya Mosiya oyo azalaki mokonzi likolo ya bato ya Banefi.

6 Mpe mibu nkama motoba na libwa elekaki uta Lehi atikaki Yelusaleme.

7 Mpe mibu libwa elekaki uta na ntango elembo epesamaki, oyo elobamaki na baprofeta, ete Klisto akoya kati na mokili.

8 Sikawa, Banefi babandaki kotanga ntango na bango uta na eleko oyo elembo epesamaki soki te uta na boyei ya Klisto; boye mibu libwa elekaki.

9 Mpe Nefi, oyo azalaki tata ya Nefi, oyo azalaki na mokumba ya masolo ya makomi, azongaki na mboka ya Zalayemila te, mpe akokaki komonana esika moko te kati na mboka mobimba.

10 Mpe esalemaki ete bato batikalaki se kaka na nkuna, ata mateya mpe masakoli mingi oyo matindamaki na kati na bango; mpe boye mobu ya zomi elekaki mpe lokola; mpe mobu ya zomi na moko elekaki bango se kati na mabe.

11 Mpe esalemaki ete na mobu ya zomi na misato bitumba mpe boweli ebandaki kozala na ntaka ya mboka mobimba; mpo bayongoli ya Gadiatoni bakomaki mingi mpenza, mpe boye babomaki mingi ya bato, mpe boye babebisaki bingumba mingi mpenza, mpe boye bapanzaki liwa mingi mpe kobomaboma epayi nyonso na mboka, ete elongobanaki ete bato nyonso, ezala Banefi mpe Balamani mpe lokola, basengeli kokamata manduki mpo na kobunda na bango.

12 Boye, Balamani baoyo bakomaki babongwani mpo na Nkolo basanganaki na bandeko na bango Banefi, mpe basengisamaki, mpo na bokengi ya bomoi na bango mpe basi na bango mpe bana na bango, kokamata manduki mpo na kobunda na bayongoli wana ya Gadiatoni, iyo, mpe lisusu mpo na kosimba makoki na bango, mpe matomba ya eklezia na bango mpe makoki ya bokumbameli na bango, mpe bonsomi na bango mpe lipanda na bango.

13 Mpe esalemaki ete liboso ete mobu oyo ya zomi na misato eleka, Banefi bakanelamaki na bobebisami nie mpenza na ntina ya etumba oyo, oyo ekomaki nsomo koleka.

14 Mpe esalemaki ete Balamani bana oyo basanganaki na Banefi batangamaki na kati ya Banefi;

15 Mpe bolakeli mabe na bango elongwaki uta na bango mpe mposo na bango ekomaki mpembe lokola ya Banefi;

16 Mpe bilenge mibali na bango mpe bana basi na bango bakomaki bonzenga koleka, mpe batangamaki na kati ya Banefi, mpe babiangamaki Banefi. Mpe boye esukaki mobu ya zomi na misato.

17 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya zomi na minei, etumba ekobaki mpe ekomaki nsomo koleka kati na bayongoli mpe bato ya Nefi; nzokande, bato ya Nefi bazwaki litomba likolo ya bayongoli, na lolenge ete babenganaki bango nsima uta na mboka na bango kati na bangomba mpe na bisika na bango ya nkuku.

18 Mpe boye esukaki mobu ya zomi na minei. Mpe na mobu ya zomi na mitano, bakendaki lisusu kobunda na bato ya Nefi; mpe na ntina ya nkuna ya bato ya Nefi, mpe boweli mingi mpe bokabwani na bango, bayongoli ya Gadiatoni bazwaki matomba mingi likolo na bango.

19 Mpe boye esukaki mobu ya zomi na mitano, mpe boye bato bazalaki na ezalela ya mitungisi mingi; mpe mompanga ya bobebisami modiembelaki likolo na bango, na lolenge ete bazalaki mpembeni na kokatama na yango, mpe oyo na ntina ya mabe na bango.

Bimisa na lokasa