Makomi
3 Nefi 7


Mokapo 7

Mosambisi mokonzi abomami, ekobima ebebisami, mpe bato bakabwani na mabota—Yakobo, motelemeli Klisto akomi mokonzi ya bato ya likelemba moko ya nkuku—Nefi ateyi boyamboli mpe bondimi na Klisto—Banjelu basaleli ye mokolo na mokolo, mpe asekwisi ndeko na ye ya mobali uta na bakufi—Mingi bayamboli mpe babatisami. Penepene na mibu 30–33 ya Mobu ya Nkolo.

1 Sikawa tala, nakolakisa epayi na bino ete batiaki mokonzi moko likolo ya mboka te; kasi na mobu se moko wana, iyo, mobu ya ntuku misato, babebisaki moko likolo ya kiti ya bosambisi, iyo, babomaki mosambisi mokonzi na mboka.

2 Mpe bato bakabwanaki moko na mosusu; mpe batangolamaki moko na mosusu na mabota, moto na moto engebene na libota na ye mpe bandeko na ye mpe baninga na ye; mpe boye babebisaki mbulamatari ya mboka.

3 Mpe libota na libota eponaki mokonzi moko soki te mokambi moko likolo na bango; mpe boye bakomaki mabota mpe bakambi ya mabota.

4 Sikawa tala, ezalaki na moto moko te na kati na bango longola se soki azalaki na libota ya bato mingi mpe bandeko mpe baninga mingi; boye mabota na bango ekomaki minene mpenza.

5 Sikawa nyonso oyo esalemaki, mpe bitumba ezalaki naino te na kati na bango; mpe mabe oyo nyonso eyaki likolo ya bato mpo bamitikaki na nguya ya Satana.

6 Mpe mabongisi ya mbulamatari ebebisamaki, na ntina ya likelemba ya nkuku ya baninga mpe bandeko na bango oyo babomaki baprofeta.

7 Mpe babimisaki boweli monene kati na mboka, na lolenge ete eteni eleki sembo ya bato ezalaki nyonso penepene na kokoma bato ya nkuna, iyo, bato ya sembo bazalaki bobele moke na kati na bango.

8 Mpe boye mibu motoba elekaki te uta ntango eteni eleki mingi ya bato yango batikaki bosembo na bango, lokola mbwa oyo azongeli bisanza na ye, soki te lokola ngulu oyo azongeli bopotani na ye na potopoto.

9 Sikawa bato ya likelemba ya nkuku, oyo ememaki mabe monene likolo ya bato, basangana bango moko esika moko, mpe batiaki na moto na bango moto moko oyo babiangaki Yakobo;

10 Mpe babiangaki ye mokonzi na bango; boye akomaki mokonzi likolo ya lingomba oyo ya nkuna; mpe azalaki moko ya bakonzi oyo apesaki kopona na ye mpo na koboma baprofeta baoyo batatolaki mpo na Yesu.

11 Mpe esalemaki ete bazalaki mingi te na motango lokola ezalaki mabota ya bato, baye basanganaki esika moko longola se ezalaki ete bakambi na bango batiaki mibeko na bango, moko na moko engebene na libota na ye; nzokande bazalaki banguna; ata bazalaki bato ya sembo te, kasi basanganaki mpo na koyina bango oyo bakotaki kati na liyokani mpo na kobebisa mbulamatari.

12 Boye, Yakobo lokola amonaki ete banguna na bango bazalaki na motango monene ya bato koleka bango, lokola azalaki mokonzi ya lingomba, boye atindaki bato na ye ete bakima kati na eteni ya nordi mpenza ya mboka, mpe kuna batongaki bokonzi mpo na bango moko, kino bakabwani bayaki kosangana na bango, (mpo abendaki bango ete bakabwani bakozala mingi) mpe bakomaki makasi ya kokoka mpo na kowela na mabota ya bato; mpe basalaki bongo.

13 Mpe botamboli na bango ezalaki ya mbangu mpenza ete moto moko akokaki kopekisa te kino bakendaki mosika ete bakanga bango na bato te. Mpe boye esukaki mobu ya ntuku misato; mpe boye ezalaki makambo ya bato ya Nefi.

14 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku misato na moko bato bakabwanaki na mabota, moto na moto engebene na libota, bandeko mpe baninga na ye; nzokande bakomaki na boyokani moko ete bakokende te na etumba moko na mosusu; kasi basanganaki mpo na oyo etali mibeko na bango, mpe lolenge na bango kotambwisa mbulamatari, mpo mitiamaki engebene na makanisi na bango oyo bazalaki bakonzi na bango mpe bakambi na bango. Kasi batiaki mibeko ya sikisiki ete libota moko ekokaki kosala libota mosusu mabe te, na lolenge ete bazalaki na kimia kati na mboka ata mwa moke; nzokande, mitema na bango mibalukaki uta na Nkolo Nzambe na bango, mpe babambaki baprofeta mabanga mpe babwakaki bango libanda uta na kati na bango.

15 Mpe esalemaki ete Nefi—lokola bayaki kotala ye na banjelu mpe lisusu na mongongo ya Nkolo, boye lokola amonaki banjelu, mpe lokola azalaki nzeneneke ya miso, mpe lokola apesamaki makoki ya koyeba oyo etali mosala ya Klisto, mpe lisusu lokola azalaki nzeneneke ya miso ya bozongi na bango na lombangu uta na bosembo kino na nkuna mpe bonsomo na bango;

16 Boye, lokola azalaki na mawa mpo na bokasi ya mitema na bango mpe bokufi miso ya mayele na bango—akendaki na kati na bango na mobu se moko wana, mpe abandaki kotatola, na mpiko, boyamboli mpe bolimbisi ya masumu na nzela ya bondimi na Nkolo Yesu Klisto.

17 Mpe asalaki makambo mingi mpo na bango; mpe nyonso makoki te kokomama, mpe eteni moko na yango ekokoka kokomama nyonso te, boye ekomami te kati na buku oyo. Mpe Nefi ateyaki bango na nguya mpe na likoki monene.

18 Mpe esalemaki ete basilikaki na ye, kutu mpo azalaki na nguya mingi koleka bango, mpo ekokaki te kosalema ete bazanga kondima maloba na ye, mpo bondimi na ye na Nkolo Yesu Klisto ezalaki monene mpenza ete banjelu basalelaki ye mokolo na mokolo.

19 Mpe na nkombo ya Yesu abenganaki bazabulu mpe milimo ya mbindo; mpe kutu asekwisaki ndeko na ye ya mobali uta na bakufi, nsima ete bato babamba ye mabanga, mpe bayokisa ye mpasi ya liwa.

20 Mpe bato bamonaki yango, mpe batatolaki yango mpe basilikaki na ye na ntina ya nguya na ye, mpe lisusu asalaki makamwisi mingi koleka, na miso ya bato, na nkombo ya Yesu.

21 Mpe esalemaki ete mobu ya ntuku misato na moko elekaki, mpe ezalaki bobele bato moke oyo babongwanaki epayi ya Nkolo; mingi lokola babongwanaki balakisaki solo epayi ya bato ete babimelamaki na nguya mpe Molimo ya Nzambe oyo ezalaki na Yesu Klisto, na oyo kani bandimaki.

22 Mpe mingi lokola babenganaki bazabulu uta na bango, mpe babikisamaki na bokono na bango mpe maladi na bango, bamonisaki solo epayi ya bato ete babimelamaki na Molimo ya Nzambe, mpe babikisamaki; mpe balakisaki lisusu bilembo mpe basalaki boko makamwisi na kati ya bato.

23 Boye nde elekaki mobu ya ntuku misato na mibale. Mpe Nefi abelelaki epayi ya bato na ebandeli ya mobu ya ntuku misato na misato, mpe ateyaki bango boyamboli mpe bolimbisi ya masumu.

24 Sikawa nalingi bomikundola lisusu, ete ezali na moto moko te oyo amemamaki na boyamboli baoyo babatisamaki na mai te.

25 Boye, ezalaki na baoyo bakulisamaki na Nefi, kozala bato mpo na mosala oyo, ete nyonso lokola baoyo bakoya epayi na bango babatisama na mai, mpe oyo lokola elembo mpe litatoli liboso ya Nzambe, mpe epayi ya bato, ete bayambolaki mpe bazwaki bolimbisi ya masumu na bango.

26 Mpe ezalaki na mingi baye na ebandeli ya mobu oyo babatisamaki mpo na boyamboli; mpe boye eteni eleki mingi ya mobu elekaki.

Bimisa na lokasa