Makomi
Etele 10


Mokapo 10

Mokonzi moko akitani mosusu—Boko bakonzi bazali sembo; basusu bazali ya nkuna—Ntango bosembo efandi, bato bapambolami mpe bafulusami na Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete Sezi, oyo azalaki eboto ya Eti—mpo Eti awaki na nzala, mpe baoyo nyonso ya ndako na ye longola se Sezi—Yango wana, Sezi abandaki kolendisa lisusu bato oyo babukamaki na nzala.

2 Mpe esalemaki ete Sezi amikundolaki bobebisami ya batata na ye, mpe atongaki bokonzi ya sembo; mpo amikundolaki nini Nkolo asalaki na komemaka Yelede mpe ndeko na ye ya mobali kokatisa mozindo; mpe atambolaki na banzela ya Nkolo; mpe abotaki bana mibali mpe bana basi.

3 Mpe mwana mobali na ye ya nkulutu, oyo kani nkombo ezalaki Sezi, atombokaki na ye; nzokande, Sezi abetamaki na loboko ya moyongoli moko, na ntina ya bozwi na ye mingi koleka, oyo ememaki kimia lisusu epayi ya tata na ye.

4 Mpe esalemaki ete tata na ye atongaki bingumba mingi likolo ya etando ya mboka, mpe bato babandaki lisusu kopanzana likolo ya etando ya mboka. Mpe Sezi azalaki na bomoi kino na mobu moko ya bobange koleka; mpe abotaki Lipilakisi. Mpe akufaki, mpe Lipilakisi ayangelaki na esika na ye.

5 Mpe esalemaki ete Lipilakisi asalaki te oyo wana ezalaki alima na miso ya Nkolo, mpo azalaki na basi mpe makango mingi, mpe atiaki mokumba mona likolo ya mapeka ya bato oyo ezalaki mpasi mpo na komema; iyo, afutisaki bango mpako ya bozito; mpe na mpako yango atongaki ndako mingi ya minene.

6 Mpe amisalelaki kiti ya bokonzi moko ya kitoko koleka; mpe atongaki bandako mingi ya boloko, mpe moto oyo alingaki te koyangelama na mpako abwakamaki kati na boloko; mpe oyo akokaki te kofuta mpako abwakamaki kati na boloko; mpe asalisaki bango mosala ntango nyonso mpo na kozwa lisungi na bango; mpe oyo aboyaki kosala asalaki ete atiama na liwa.

7 Yango wana azwaki biloko kitoko na mosala na ye ya ntoki, iyo, kutu wolo na ye ya malonga asalaki epetolama na boloko; mpe ndenge nyonso ya biloko esalemi na maboko ya kitoko asalisaki na boloko. Mpe esalemaki ete atungisaki bato na pite mpe bonsomo na ye.

8 Mpe ntango ayangelaki mpo na ntaka ya mibu ntuku minei na mibale bato batelemelaki ye na botomboki; mpe etumba ebandaki lisusu kozala na mboka, na lolenge ete Lipilakisi abomamaki, mpe biboto na ye bibenganamaki uta na mboka.

9 Mpe esalemaki ete nsima ya ntaka ya mibu mingi, Moliantoni, (ye azalaki eboto ya Lipilakisi) asangisaki esika moko limpinga moko ya bato babwakama, mpe akendaki mpe abundisaki bato; mpe azwaki nguya likolo ya bingumba mingi; mpe etumba yango ekomaki nsomo koleka, mpe ewumelaki mpo na ntaka ya mibu mingi; mpe azwaki nguya likolo ya mboka mobimba, mpe amitiaki mokonzi likolo ya mboka mobimba.

10 Mpe esilaki ye komitia mokonzi alembisaki mokumba ya bato, na yango azwaki lisungi na miso ya bato, mpe bapakolaki ye mpo na kozala mokonzi na bango.

11 Mpe asalaki boyengebene epayi ya bato, kasi epayi na ye moko te na ntina ya pite mingi na ye; yango wana akatamaki mosika uta na miso ya Nkolo.

12 Mpe esalemaki ete Moliantoni atongaki bingumba mingi, mpe bato bakomaki na bozwi mingi koleka na nse ya boyangeli na ye, ezala na bandako, mpe na wolo mpe mpauni, mpe na kokolisaka eboto ya kowana, mpe na bibwele, mpe bitonga, mpe biloko ya lolenge wana oyo ezongisamaki epayi na bango.

13 Mpe Moliantoni azalaki na bomoi kino na mobu ya mobange koleka, mpe na ntango wana abotaki Kimi; mpe Kimi ayangelaki na esika ya tata na ye; mpe ayangelaki mibu mwambe, mpe tata na ye akufaki. Mpe esalemaki ete Kimi ayangelaki na bosembo te, yango wana asungamaki na Nkolo te.

14 Mpe ndeko na ye ya mobali atelemelaki ye na botomboki, na boye wapi amemaki ye kati na bokangemi; mpe atikalaki kati na bokangemi mikolo na ye nyonso; mpe abotaki bana mibali mpe bana basi kati na bokangemi, mpe na bobange na ye abotaki Lewi; mpe akufaki.

15 Mpe esalemaki ete Lewi asalelaki kati na bokangemi nsima ya liwa ya tata na ye, mpo na ntaka ya mibu ntuku minei na mibale. Mpe abundaki etumba na mokonzi na mboka, na oyo wapi azwaki bokonzi mpo na ye moko.

16 Mpe esilisaki ye kozwa bokonzi mpo na ye moko asalaki oyo ezalaki alima na miso ya Nkolo; mpe bato bafulukaki mingi na mboka; mpe azalaki na bomoi kino na bobange boko malamu, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi, mpe lisusu abotaki Kolomi, oyo apakolaki mpo na kozala mokonzi na esika na ye.

17 Mpe esalemaki ete Kolomi asalaki oyo wana ezalaki malamu na miso ya Nkolo mikolo na ye nyonso; mpe abotaki bana mibali mpe bana basi mingi; mpe esilaki ye komona mikolo mingi akufaki, kutu lokola baoyo nyonso batikali na mabele; mpe Kisi ayangelaki na esika na ye.

18 Mpe esalemaki ete Kisi akufaki mpe lokola, mpe Libi ayangelaki na esika na ye.

19 Mpe esalemaki ete Libi asalaki oyo wana ezali malamu na miso ya Nkolo. Mpe na mikolo ya Libi nioka ya ngenge ebebisamaki. Yango wana bakendaki na mboka epayi na sudi, mpo na bokila ya bilei mpo na bato ya mboka, mpo mboka etondaki na banyama ya zamba. Mpe Libi ye moko akomaki mobomi nyama monene.

20 Mpe batongaki engumba monene mpembeni na nkingo moke ya mboka, mpembeni na esika wapi mbu ekaboli mboka.

21 Mpe babatelaki mboka epayi na sudi lokola esobe, mpo na kozwa nyama ya zamba. Mpe etando mobimba ya mboka epayi na nordi etondaki na bafandi.

22 Mpe bazalaki bato balinga mosala koleka, mpe basombaki mpe batekaki mpe basalaki mombongo moko na mosusu, ete bakoka kozwa matabisi.

23 Mpe basalaki ndenge nyonso ya makele, mpe basalaki wolo, mpe mpauni, mpe ebende, mpe motako, mpe ndenge nyonso ya bibende; mpe batimolaki yango uta na mabele; yango wana, babwakaki ngomba enene ya mabele mpo na kozwa makele, wolo, mpe mpauni, mpe ebende, mpe makele. Mpe basalaki ndenge nyonso ya misala ya ntoki ya malonga.

24 Mpe bazalaki na swa, mpe lino ya kilo ya malonga; mpe basalaki ndenge nyonso ya bilamba, ete bakoka komilatisa uta na bolumbu na bango.

25 Mpe basalaki ndenge nyonso ya bisalelo mpo na kosala bilanga, ezala mpo na kobalola mabele mpe mpo na kowana, mpe mpo na kobuka mpe mpo na kotimola na nkongo, mpe lisusu mpo na koyungula.

26 Mpe basalaki ndenge nyonso ya bisalelo na oyo wapi basalelaki banyama na bango misala.

27 Mpe basalaki ndenge nyonso ya bibundeli ya bitumba. Mpe basalaki ndenge nyonso ya biloko na esaleli ya ntoki koleka.

28 Mpe ekokaki kozala soki moke te na bato bapambolama koleka bango, mpe baoyo bafulukaki mingi na loboko ya Nkolo. Mpe bazalaki na mboka oyo ezalaki ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu, mpo Nkolo alobaki yango.

29 Mpe esalemaki ete Libi azalaki na bomoi mibu mingi, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi, mpe abotaki lisusu Alitomi.

30 Mpe esalemaki ete Alitomi ayangelaki na esika ya tata na ye. Mpe ntango Alitomi ayangelaki mpo na mibu ntuku mibale na minei, tala, babotolaki ye bokonzi. Mpe asalelaki mibu mingi kati na bokangemi, iyo, kutu mikolo mitikali na ye nyonso.

31 Mpe abotaki Eti, mpe azalaki na bomoi kati na bokangemi mikolo na ye nyonso. Mpe Eti abotaki Alona, mpe Alona afandaki kati na bokangemi mikolo na ye nyonso; mpe abotaki Aminigada, mpe Aminigada mpe lokola afandaki kati na bokangemi mikolo na ye nyonso; mpe abotaki Koliantumi, mpe Koliantumili afandaki kati na bokangemi mikolo na ye nyonso; mpe abotaki Komi.

32 Mpe esalemaki ete Komi abendaki nsima na ye ndambo ya bato ya bokonzi. Mpe ayangelaki likolo ya ndambo ya bato ya bokonzi mibu ntuku minei na mibale; mpe akendaki kobunda na mokonzi, Amigidi, mpe babundaki mpo na ntaka ya mibu mingi, na ntango yango Komi azwaki nguya likolo ya Amigidi, mpe azwaki nguya likolo ya ndambo etikali ya bokonzi.

33 Mpe na mikolo ya Komi bayongoli babandaki kozala na mboka; mpe bandimaki miango ya kala, mpe balapanaki ndai na lolenge ya bato ya kala, mpe balukaki lisusu kobebisa bokonzi.

34 Sikawa Komi abundaki na bango mingi; nzokande, alongaki bango te.

Bimisa na lokasa