Makomi
Etele 11


Mokapo 11

Bitumba, boswani, mpe nkuna eleki mingi na bomoi ya Bayelede—Baprofeta balobeli yambo bobebisami ya Bayelede esalema nie longola se soki bayamboli—Bato babwaki maloba ya baprofeta.

1 Mpe lisusu na mikolo ya Komi baprofeta bayaki mingi, mpe basakolaki bobebisami ya bato banene bana longola se soki bayamboli, mpe babaluki epayi ya Nkolo, mpe batiki bobomi mpe nkuna na bango.

2 Mpe esalemaki ete baprofeta babwakamaki na bato, mpe bakimaki epayi na Komi mpo na kobatelama, mpo bato balukaki koboma bango.

3 Mpe basakolaki epayi na Komi makambo mingi; mpe apambolamaki na ndambo oyo etikalaki ya mikolo na ye nyonso.

4 Mpe azalaki na bomoi kino na bobange moko ya malamu, mpe abotaki Sibilomi; mpe Sibilomi ayangelaki na esika na ye. Mpe ndeko ya Sibilomi ya mobali atombokaki na ye, mpe etumba monene koleka ebandaki kozala na mboka mobimba.

5 Mpe esalemaki ete ndeko ya Sibilomi ya mobali asalaki ete baprofeta nyonso oyo basakolaki basengelaki kotiama na liwa;

6 Mpe likambo ya mawa monene ezalaki na mboka mobimba, mpo batatolaki ete bolakeli mabe monene ekoya likolo ya mboka, mpe likolo ya bato, mpe ete bobebisami monene ekozala na kati na bango, bobebisami ya lolenge moko lokola esalema soki moke te likolo ya etando ya mabele, mpe mikuwa na bango mikoya lokola ngomba ya mabele likolo ya etando ya mboka longola se soki bayamboli uta na nkuna na bango.

7 Mpe bayokaki mongongo ya Nkolo te, na ntina ya makelemba ya nkuna na bango; yango wana, bitumba mpe boweli ebandaki kozala na mboka mobimba, mpe lisusu nzala mpe bokono mingi, na lolenge ete ezalaki na bobebisami monene, ya lolenge moko lokola eyebanaki soki moke te likolo ya etando ya mabele; mpe nyonso oyo esalemaki na mikolo ya Sibilomi.

8 Mpe bato babandaki koyambola uta na mabe na bango; mpe mbala mingi lokola basalaki yango Nkolo azalaki na boboto likolo na bango.

9 Mpe esalemaki ete Sibilomi abomamaki, mpe Sete amemamaki na bokangemi, mpe afandaki kati na bokangemi mikolo na ye nyonso.

10 Mpe esalemaki ete Aya, mwana mobali na ye, azwaki bokonzi; mpe ayangelaki likolo ya bato mikolo na ye nyonso. Mpe asalaki ndenge nyonso ya mabe na mikolo na ye, na oyo wapi asopi makila mingi; mpe mikolo na ye ezalaki mike.

11 Mpe Etemi, lokola azalaki eboto ya Aya, azwaki bokonzi; mpe lisusu asalaki oyo wana ezalaki ya nkuna na mikolo na ye.

12 Mpe esalemaki ete na mikolo ya Etemi baprofeta mingi bayaki, mpe basakolaki lisusu epayi ya bato; iyo, basakolaki ete Nkolo akobebisa bango nie uta na etando ya mabele longola se soki bayamboli uta na mabe na bango.

13 Mpe esalemaki ete bato bayeisaki mitema na bango makasi, mpe balingaki koyoka maloba na bango te; mpe baprofeta balelaki mpe balongwaki uta na kati ya bato.

14 Mpe esalemaki ete Etemi asambisaki na nkuna mikolo na ye nyonso; mpe abotaki Mowana. Mpe esalemaki ete Mowana ayangelaki na esika na ye; mpe Mowana asalaki oyo wana ezalaki mabe liboso ya Nkolo.

15 Mpe esalemaki ete botomboki ebimaki na kati ya bato, na ntina ya makelemba ya nkuku oyo matongamaki mpo na kozwa nguya mpe matabisi; mpe moto moko ya makasi kati na mabe abimaki na kati na bango, mpe abundisaki Mowana, na oyo wapi etumba akweisaki ndambo moko ya bokonzi; mpe asimbaki ndambo ya bokonzi mpo na mibu mingi.

16 Mpe esalemaki ete Mowana akweisaki ye, mpe azwaki lisusu bokonzi.

17 Mpe esalemaki ete moto ya makasi mosusu abimaki; mpe azalaki eboto ya ndeko ya Yelede ya mobali.

18 Mpe esalemaki ete akweisaki Mowana mpe azwaki bokonzi; yango wana, Mowana afandaki kati na bokangemi ntango etikalaki ya mikolo na ye nyonso; mpe abotaki Koliantoni.

19 Mpe esalemaki ete Koliantoni afandaki kati na bokangemi mikolo na ye nyonso.

20 Mpe na mikolo ya Koliantoni baprofeta bayaki lisusu mingi, mpe basakolaki makambo minene mpe ya kokamwa, mpe babelelaki boyamboli epayi ya bato, mpe longola se soki bayamboli Nkolo Nzambe alingaki komema bosambisi likolo na bango kino na bobebisami nie na bango;

21 Mpe basakolaki ete Nkolo Nzambe alingaki kotinda soki te komema bato basusu mpo na kozwa mboka, na nguya na ye, na lolenge oyo wapi amemaki batata na bango.

22 Mpe babwakaki maloba nyonso ya baprofeta, na ntina ya lingomba na bango ya nkuku mpe bonsomo ya nkuna na bango.

23 Mpe esalemaki ete Koliantoni abotaki Etele, mpe akufaki, wana efandaki ye kati na bokangemi mikolo na ye nyonso.

Bimisa na lokasa