Makomi
Etele 14


Mokapo 14

Mabe ya bato ememi bolakeli mabe likolo ya mboka—Koliantumili ayingeli na etumba kobundaka na Gilada, nsima Libi, mpe bongo Sizi—Makila mpe kobomaboma epalangani mboka mobimba.

1 Mpe sikawa bolakeli mabe monene ebandaki kozala likolo ya mboka mobimba na ntina ya mabe ya bato, oyo wapi, soki moto moko atie esalelo na ye to mompanga na ye likolo ya mesa na ye, to likolo ya esika wapi alingi kobomba yango, tala, na mokolo ya nsima, akokuta yango te, bolakeli mabe ezalaki ya monene mpenza likolo ya mboka.

2 Yango wana moto na moto akangamaki na oyo ezalaki ya ye moko, na maboko na ye, mpe alingaki te kodefa mpe alingaki te kodefisa; mpe moto na moto abombaki esimbelo ya mompanga na ye na loboko na ye ya mobali, mpo na bobateli ya bozwi mpe bomoi na ye moko, mpe ya basi mpe bana na ye.

3 Mpe sikawa, nsima ya ntaka ya mibu mibale, mpe nsima ya liwa ya Saledi, tala, ndeko ya Saledi ya mobali abimaki mpe abundisaki Koliantumili, na oyo wapi, Koliantumili alongaki ye mpe alandaki ye na esobe ya Akisi.

4 Mpe esalemaki ete ndeko ya Saledi ya mobali abundisaki ye na esobe ya Akisi; mpe etumba ekomaki ya nsomo mingi koleka, mpe nkoto mingi bakweyaki na mompanga.

5 Mpe esalemaki ete Koliantumili azingisaki esobe na basoda; mpe ndeko ya Saledi ya mobali atambolaki mpo na kobima na esobe kati na butu, mpe abomaki eteni moko ya limpinga ya Koliantumili, wana ezalaki bango ya kolangwa.

6 Mpe ayaki na mboka ya Mowana, mpe amitiaki likolo ya kiti ya bokonzi ya Koliantumili.

7 Mpe esalemaki ete Koliantumili afandaki elongo na limpinga na ye na esobe mpo na ntaka ya mibu mibale, ntango oyo wapi azwaki bokasi monene mpo na limpinga na ye.

8 Sikawa ndeko ya Saledi ya mobali, oyo kani nkombo ezalaki Gilidi, azwaki bokasi monene mpo na limpinga na ye, na ntina ya makelemba ya nkuku.

9 Mpe esalemaki ete nganganzambe monene na ye abomaki ye lokola efandaki ye likolo ya kiti ya bokonzi na ye.

10 Mpe esalemaki ete moto moko ya makelemba ya nkuku abomaki ye na nzela ya koleka na nkuku, mpe akamataki bokonzi epayi na ye moko; mpe nkombo na ye ezalaki Libi; mpe Libi azalaki moto moko ya nzoto molai koleka moto soki nani na kati ya bato nyonso.

11 Mpe esalemaki ete na mobu ya yambo ya boyangeli ya Libi, Koliantumili amataki na mboka ya Mowana, mpe abundisaki Libi.

12 Mpe esalemaki ete abundaki na Libi, na oyo wapi etumba, Libi abetaki ye na loboko na ye ete azokisamaki; nzokande, limpinga ya Koliantumili ezalaki koya liboso likolo ya Libi, ete akimaki na ndelo ya libongo ya mbu.

13 Mpe esalemaki ete Koliantumili alandaki ye; mpe Libi abundisaki ye na libongo ya mbu.

14 Mpe esalemaki ete Libi abetaki limpinga ya Koliantumili ete bakimaki lisusu na esobe ya Akisi.

15 Mpe esalemaki ete Libi alandaki ye kino ayaki na mabele ya polele ya Agosi. Mpe Koliantumili akamataki bato nyonso elongo na ye lokola ekimaki ye liboso ya Libi na ntaka oyo ya mboka wapi akimaki.

16 Mpe ntango akomaki na mabele ya polele ya Agosi, abundisaki Libi, mpe abetaki ye mompanga kino akufaki; nzokande, ndeko ya Libi ya mobali ayaki kobunda na Koliantumili na esika na ye, mpe etumba ekomaki nsomo mingi koleka, mpe Koliantumili akimaki lisusu liboso ya limpinga ya ndeko ya Libi ya mobali.

17 Sikawa nkombo ya ndeko ya Libi ya mobali ebiangamaki Sizi. Mpe esalemaki ete Sizi alandaki Koliantumili, mpe akweisaki bingumba mingi, mpe abomaki basi mpe bana lokola, mpe atumbaki bingumba yango.

18 Mpe bobangi ya Sizi ekendaki na ntaka ya mboka mobimba; iyo, kolela ebimaki epayi nyonso na mboka—Nani akoki kotelema liboso ya limpinga ya Sizi? Tala, akombaka mabele liboso na ye!

19 Mpe esalemaki ete bato babandaki kosangana esika moko kati na mampinga, na epayi nyonso na etando ya mboka mobimba.

20 Mpe bakabwanaki; mpe eteni moko na bango ekimaki epayi na limpinga ya Sizi, mpe eteni moko na bango ekimaki epayi na limpinga ya Koliantumili.

21 Mpe etumba ezalaki ya monene mpe ya molai mpenza, mpe likambo ya bosopi makila mpe kobomaboma ewumelaki ntango molai, ete etando mobimba ya mboka ezipamaki na nzoto ya bakufi.

22 Mpe etumba ezalaki noki mpe na lombangu ete moto moko te atikalaki mpo na kokunda bakufi, kasi batambolaki uta bosopi makila na bosopi makila, kotikaka nzoto ezala ya mibali, basi, mpe bana epanzani likolo ya etando ya mboka, mpo na kokoma bilei mpo na mpambo oyo eliaka mosuni.

23 Mpe solo mabe na yango elumbamaki likolo ya etando ya mboka, kutu likolo ya etando mobimba ya mboka; yango wana bato batungisamaki na moi mpe na butu, na ntina ya solo mabe na yango.

24 Nzokande, Sizi atikaki te kolanda Koliantumili; mpo alapaki kobekola ye moko likolo ya Koliantumili na makila ya ndeko na ye ya mobali, oyo abomamaki, mpe likolo ya maloba ya Nkolo oyo eyaki na Etele ete Koliantumili akokweya na mompanga te.

25 Boye tomoni ete Nkolo abimelaki bango na litondi ya nkele na ye, mpe nkuna mpe bonsomo na bango bolengelaki nzela mpo na bobebisami na bango ya libela.

26 Mpe esalemaki ete Sizi alandaki Koliantumili epayi na esti, kutu kino na ndelo ya libongo ya mbu, kuna abundisaki Sizi mpo na ntaka ya mikolo misato.

27 Mpe boye bobebisami ezalaki ya nsomo na kati ya mampinga ya Sizi ete bato babandaki kobanga, mpe babandaki kokima liboso ya mampinga ya Koliantumili; mpe bakimaki na mboka ya Koliyolo, mpe bakombaki bafandi liboso na bango, bango nyonso oyo balingaki kosangana na bango te.

28 Mpe batelemisaki biema na bango na lobwaku ya Koliyolo; mpe Koliantumili atelemisaki biema na ye na lobwaku ya Suli. Sikawa lobwaku ya Suli ezalaki mpembeni na ngomba ya Kominoli; yango wana, Koliantumili asangisaki mampinga na ye esika moko likolo ya ngomba ya Kominoli, mpe abetaki mondule moko epayi na mampinga ya Sizi mpo na kobianga bango na etumba.

29 Mpe esalemaki ete bayaki mpembeni, kasi babenganamaki lisusu; mpe bayaki mbala ya mibale, mpe babenganamaki lisusu mbala ya mibale. Mpe esalemaki ete bayaki lisusu mbala ya misato, mpe etumba ekomaki nsomo mingi koleka.

30 Mpe esalemaki ete Sizi abetaki likolo ya Koliantumili ete azokisaki ye mpota mingi; mpe Koliantumili, ebungisaki ye makila na ye, asenzwaki, mpe akumbamaki mosika lokola soki akufaki.

31 Sikawa bobungisi ya mibali, basi mpe bana ezalaki na ngambo nyonso mibale ezalaki mpenza monene ete, Sizi atindaki bato na ye ete balanda mampinga ya Koliantumili te; yango wana bazongaki na nganda na bango.

Bimisa na lokasa