Makomi
Etele 15


Mokapo 15

Bifuku ya Bayelede babomami na etumba—Sizi mpe Koliantumili basangisi bato nyonso mpo na etumba ya kufa—Molimo ya Nkolo motiki kobunda na bango—Ekolo ya Bayelede ebebisami nie—Bobele Koliantumili atikali.

1 Mpe esalemaki ete ebikisamaki Koliantumili uta na mpota na ye, abandaki komikundola maloba oyo Etele alobaki epayi na ye.

2 Amonaki ete bato na ye oyo basilaki kobomama na mompanga bazalaki penepene na bifuku mibale, mpe abandaki koyoka mawa kati na motema na ye; iyo, babomamaki bifuku mibale ya bato ya makasi, mpe lisusu basi mpe bana na bango.

3 Abandaki koyambola uta na mabe oyo asalaki; abandaki komikundola maloba oyo elobamaki na monoko ya baprofeta nyonso, mpe amonaki ete ekokisamaki kino sikawa, eteni na eteni; mpe molimo na ye elelaki mpe eboyaki kobondisama.

4 Mpe esalemaki ete akomaki mokanda epayi na Sizi, kosengaka na ye ete soki akolinga kobatela bato, mpe kolobaka ete alingaki kotika bokonzi mpo na litomba ya bomoi ya bato.

5 Mpe esalemaki ete ntango Sizi azwaki mokanda na ye akomaki mokanda moko epayi ya Koliantumili, ete soki amitiki, ete akoka koboma ye na mompanga na ye moko, ete akobatela bomoi ya bato.

6 Mpe esalemaki ete bato bayambolaki te uta na mabe na bango; mpe bato ya Koliantumili balamusamaki na nkanda na bato ya Sizi; mpe bato ya Sizi balamusamaki na nkanda na bato ya Koliantumili; yango wana, bato ya Sizi babundisaki bato ya Koliantumili.

7 Mpe ntango emonaki Koliantumili ete akomaki mpembeni na kokweya akimaki lisusu liboso ya bato ya Sizi.

8 Mpe esalemaki ete ayaki na mai ya Lipiliakumi, oyo, na bolimboli, elingi koloba monene, to koleka nyonso; yango wana, ntango bayaki na mai oyo batelemisaki biema na bango; mpe Sizi lisusu atelemisaki biema na ye penepene na yango; mpe boye na mokolo ya nsima babandaki etumba.

9 Mpe esalemaki ete babundaki etumba moko ya nsomo mingi koleka, na oyo wapi Koliantumili azokisamaki lisusu, mpe asenzwaki mpo na bobungisi ya makila.

10 Mpe esalemaki ete mampinga ya Koliantumili mawelaki makasi na mampinga ya Sizi ete bakoka kolonga bango, ete bakimisa bango liboso na bango; mpe bakimaki epayi na sudi, mpe batelemisaki biema na bango na esika moko oyo ebiangamaki Ogati.

11 Mpe esalemaki ete limpinga ya Koliantumili etelemisaki biema na bango mpembeni na ngomba moke ya Laoyo; mpe ezalaki se ngomba moko wana wapi tata na ngai Mormon abombaki masolo ya makomi ya Nkolo, oyo ezalaki bule.

12 Mpe esalemaki ete basangisaki esika moko bato nyonso likolo ya etando mobimba ya mboka, baoyo babomamaki te, longola se Etele.

13 Mpe esalemaki ete Etele amonaki bikela nyonso ya bato; mpe amonaki ete bato oyo bazalaki mpo na Koliantumili basangisamaki esika moko na limpinga ya Koliantumili; mpe bato oyo bazalaki mpo na Sizi basangisamaki esika moko na limpinga ya Sizi.

14 Yango wana, bazalaki mpo na ntaka ya mibu minei kosangisaka bato esika moko, ete bakoka kozwa baoyo nyonso bazalaki likolo ya etando ya mboka, mpe ete bakoka kozwa bokasi nyonso boye bakokaki kozwa.

15 Mpe esalemaki ete ntango basanganaki esika moko, moto na moto na limpinga oyo alingaki, elongo na basi na bango mpe bana na bango—nyonso mibali, basi mpe bana na bango kolataka manduki na bibundeli ya bitumba, mpe bazalaki na nguba, mpe bibende ya ntolo, mpe bibende ya mito, mpe balataki na lolenge ya etumba—batambolaki liboso mpo na kobunda moko na mosusu; mpe babundaki mokolo wana mobimba, mpe balongaki te.

16 Mpe esalemaki ete ntango butu eyaki balembaki, mpe bazongaki na banganda na bango; mpe esilaki bango kozonga na banganda na bango babandaki kolela mpe komilela mpo na bobungisi ya bato na bango; mpe boye bogangi na bango, boleli mpe biyelela na bango ezalaki monene, ete epasolaki mopepe mingi koleka.

17 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima bakendaki lisusu mpe babundaki, mpe mokolo wana ezalaki monene mpe nsomo mpenza; nzokande, balongaki te, mpe ntango butu eyaki lisusu bapasolaki mopepe na bogangi, boleli na bango, mpe biyelela na bango, mpo na bobungisi ya bobomi ya bato na bango.

18 Mpe esalemaki ete Koliantumili akomaki lisusu mokanda moko epayi ya Sizi, kosengaka ete aya lisusu te kobunda, kasi akamata bokonzi, mpe abatela bomoi ya bato.

19 Kasi tala, Molimo ya Nkolo motikaki kobunda na bango, mpe Satana azalaki na nguya nyonso likolo ya mitema ya bato; mpo bamipesaki mobimba na bokasi ya mitema na bango, mpe bokufi miso ya mayele na bango ete bakoka kobebisama; yango wana bakendaki kobunda.

20 Mpe esalemaki ete babundaki mokolo wana mobimba, mpe ntango butu eyaki balalaki likolo ya mipanga na bango.

21 Mpe na mokolo ya nsima babundaki kutu kino butu eyaki.

22 Mpe ntango butu eyaki balangwaki na nkanda, kutu lokola moto alangwe vinyo; mpe balalaki lisusu likolo ya mipanga na bango.

23 Mpe na mokolo ya nsima babundaki lisusu; mpe ntango butu eyaki nyonso bakweyaki na mompanga longola se ntuku mitano na mibale ya bato ya Koliantumili, mpe ntuku motoba na libwa ya bato ya Sizi.

24 Mpe esalemaki ete balalaki likolo ya mipanga na bango butu wana, mpe na mokolo ya nsima babundaki lisusu, mpe bawelaki na makasi na bango elongo na mipanga mpe elongo na nguba, mokolo wana mobimba.

25 Mpe ntango butu eyaki ezalaki na ntuku misato na mibale ya bato ya Sizi, mpe ntuku mibale na nsambo ya bato ya Koliantumili.

26 Mpe esalemaki ete baliaki mpe balalaki, mpe bamilengelaki mpo na kokufa na mokolo ya nsima. Mpe bazalaki bambinga ya bato mpe bato ya makasi na kotalaka bokasi ya bato.

27 Mpe esalemaki ete babundaki mpo na ntaka ya ngonga misato, mpe basenzwaki na bobungisi ya makila.

28 Mpe esalemaki ete ntango bato ya Koliantumili bazwaki lisusu makasi makoki ete bakokaki kotambola, bazalaki penepene na kokima mpo na bomoi na bango; kasi tala, Sizi alamukaki, mpe bato na ye lokola, mpe alapaki na nkele na ye ete akoboma Koliantumili soki te akowa na mompanga.

29 Yango wana, alandaki bango, mpe na mokolo ya nsima azwaki bango; mpe babundaki lisusu na mompanga. Mpe esalemaki ete ntango bakweyaki nyonso na mompanga, longola se soki ezalaki Koliantumili mpe Sizi, tala Sizi asenzwaki na bobungisi ya makila.

30 Mpe esalemaki ete ntango Koliantumili ayekemaki likolo ya mompanga na ye, ete apema moke, akataki moto ya Sizi.

31 Mpe esalemaki ete esilaki ye kokata moto ya Sizi, Sizi atelemaki likolo ya maboko na ye mpe akweyaki; mpe nsima ya kobunda mpo na mpema, akufaki.

32 Mpe esalemaki ete Koliantumili akweyaki na mabele, mpe akomaki lokola soki azalaki na bomoi te.

33 Mpe Nkolo alobaki epayi ya Etele, mpe alobaki epayi na ye: Kende. Mpe akendaki, mpe amonaki ete maloba ya Nkolo ekokisamaki nyonso; mpe asilisaki lisolo ya makomi na ye; (mpe eteni moko ya nkama nakomaki yango te) mpe abombaki yango na lolenge moko ete bato ya Limiyi bakutaki yango.

34 Sikawa, maloba ya nsuka oyo ekomamaki na Etele ezali oyo: Soki Nkolo alingi ete nabongwama, soki te ete namitika na mpasi ya kozelaka ya bolingi ya Nkolo kati na mosuni, likambo ezali te, soki ezali ete nabikisama kati na bokonzi ya Nzambe. Amene.

Bimisa na lokasa