Makomi
Etele 1


Buku ya Etele

Lisolo ya makomi ya Bayelede, ezwami uta na bapalaki ntuku mibale na minei oyo ebombolamaki na bato ya Limiyi na mikolo ya Mokonzi Mosiya.

Mokapo 1

Moroni asali bokuse ya nkoma ya Etele—Mambi ma kala ya libota ya Etele epesami—Lokota ya Bayelede ebulunganisamaki te na Linongi ya Babele—Nkolo alaki komema bango na mboka ya boponi mpe kokomisa bango ekolo moko monene.

1 Mpe sikawa ngai, Moroni, nakobi kokoma lisolo ya bafandi wana ya kala oyo babebisamaki na loboko ya Nkolo likolo ya etando ya ekolo oyo ya nordi.

2 Mpe nakamati lisolo na ngai uta na bapalaki ntuku mibale na minei oyo ezwamaki na bato ya Limiyi, oyo ebiangami Buku ya Etele.

3 Mpe lokola nabanzi ete eteni ya yambo ya lisolo ya makomi oyo, oyo ezali kolobela bokeli ya mokili, mpe lisusu ya Adama, mpe oyo ezali na lisitwale uta na ntango wana kutu kino na linongi monene, mpe makambo nyonso oyo malekaki na kati ya bana ya bato kino na ntango wana, ezwami na kati ya Bayuda—

4 Boye nakomi makambo oyo wana malekaki uta na mikolo ya Adama kino na ntango wana te; kasi ezwami likolo ya bapalaki; mpe oyo akomona yango, ye moko wana nde akozala na nguya ya kozwa lisitwale mobimba.

5 Kasi tala, napesi lisitwale mobimba te, napesi bobele eteni moko ya lisitwale, uta na ntango ya linongi kino na ntango babebisamaki.

6 Mpe na motindo oyo napesi lisitwale yango. Ye oyo akomaki lisolo ya makomi oyo azalaki Etele, mpe azalaki eboto ya Koliantoni.

7 Koliantoni azalaki mwana mobali ya Mowana.

8 Mpe Mowana azalaki mwana mobali ya Etemi.

9 Mpe Etemi azalaki mwana mobali ya Ayaye.

10 Mpe Ayaye azalaki mwana mobali ya Sete.

11 Mpe Sete azalaki mwana mobali ya Sibiloni.

12 Mpe Sibiloni azalaki mwana mobali ya Komi.

13 Mpe Komi azalaki mwana mobali ya Koliantumi.

14 Mpe Koliantumili azalaki mwana mobali ya Aminigada.

15 Mpe Aminigada azalaki mwana mobali ya Alona.

16 Mpe Alona azalaki eboto ya Eti, oyo azalaki mwana mobali ya Alitomi.

17 Mpe Alitomi azalaki mwana mobali ya Libi.

18 Mpe Libi azalaki mwana mobali ya Kisi.

19 Mpe Kisi azalaki mwana mobali ya Kolomi.

20 Mpe Kolomi azalaki mwana mobali ya Lewi.

21 Mpe Lewi azalaki mwana mobali ya Kimi.

22 Mpe Kimi azalaki mwana mobali ya Moliantoni.

23 Mpe Moliantoni azalaki eboto ya Lipilakisi.

24 Mpe Lipilakisi azalaki mwana mobali ya Sezi.

25 Mpe Sezi azalaki mwana mobali ya Eti.

26 Mpe Eti azalaki mwana mobali ya Komi.

27 Mpe Komi azalaki mwana mobali ya Koliantumi.

28 Mpe Koliantumili azalaki mwana mobali ya Emele.

29 Mpe Emele azalaki mwana mobali ya Omele.

30 Mpe Omele azalaki mwana mobali ya Sule.

31 Mpe Sule azalaki mwana mobali ya Kibi.

32 Mpe Kibi azalaki mwana mobali ya Oliya, oyo azalaki mwana mobali ya Yelede;

33 Yelede oyo wapi ayaki elongo na ndeko na ye ya mobali mpe mabota na bango, elongo na boko basusu mpe mabota na bango, uta na linongi monene, na ntango Nkolo abulunganisaki lokota ya bato, mpe alapaki ndai na nkele na ye ete bakopanzama likolo ya etando mobimba ya mabele; mpe engebene na liloba ya Nkolo bato nyonso bapanzamaki.

34 Mpe ndeko ya Yelede ya mobali lokola azalaki mbinga mobali mpe moto moko makasi, mpe moto moko oyo asungamaki mingi na Nkolo, Yelede, ndeko na ye ya mobali, alobaki epayi na ye: Belela epayi ya Nkolo, ete abulunganisa biso te ete tokoka kososola te maloba na biso.

35 Mpe esalemaki ete ndeko ya Yelede ya mobali abelelaki epayi ya Nkolo, mpe Nkolo ayokelaki Yelede mawa; boye abulunganisaki te lokota ya Yelede; mpe Yelede mpe ndeko na ye ya mobali babulunganisamaki te.

36 Na ntango wana Yelede alobaki epayi ya ndeko na ye ya mobali: Belela lisusu epayi ya Nkolo, mpe ekoki kozala ete abalola mosika nkanda na ye uta na bango oyo bazali baninga na biso, ete abulunganisa lokota na bango te.

37 Mpe esalemaki ete ndeko ya Yelede ya mobali abelelaki epayi ya Nkolo, mpe Nkolo ayokelaki baninga na bango mpe mabota na bango mawa mpe lokola, ete babulunganisamaki te.

38 Mpe esalemaki ete Yelede alobaki lisusu epayi ya ndeko na ye ya mobali, kolobaka: Kende mpe tuna na Nkolo soki akobengana biso uta na mboka, mpe soki akobengana biso uta na mboka, belela epayi ya Nkolo wapi tokokende. Mpe nani ayebi soki Nkolo akokumba biso kati na mboka oyo ezali ya boponi likolo ya mabele nyonso? Mpe soki ezali bongo, tika tozala sembo epayi ya Nkolo, ete tokoka kozwa yango mpo na libula na biso.

39 Mpe esalemaki ete ndeko ya Yelede ya mobali abelelaki epayi ya Nkolo engebene na oyo wana elobamaki na monoko ya Yelede.

40 Mpe esalemaki ete Nkolo ayokelaki ndeko ya Yelede ya mobali, mpe ayokaki mawa likolo na ye, mpe alobaki epayi na ye:

41 Kende mpe sangisa bibwele na yo, ezala mibali mpe basi, ya ndenge na ndenge; mpe lisusu nkona ya mabele ya ndenge na ndenge; mpe mabota na yo, mpe lisusu Yelede ndeko na yo ya mobali mpe libota na ye; mpe lisusu baninga na yo mpe mabota na bango, mpe baninga ya Yelede mpe mabota na bango.

42 Mpe ntango ekosala yo oyo okotambola na moto na bango mpo na kokita na lobwaku oyo ezali epayi na nordi. Mpe kuna tokokutana ngai na yo, mpe nakokende liboso na yo kati na mboka oyo ezali ya boponi koleka bamboka nyonso ya mabele.

43 Mpe kuna nakopambola yo mpe nkona na yo, mpe nakotelemisa mpo na ngai uta na nkona na yo, mpe uta na nkona ya ndeko na yo ya mobali mpe lokola, mpe bango oyo bakokende elongo na yo, ekolo moko monene. Mpe ekozala te na ekolo monene koleka ekolo oyo nakotelemisa mpo na ngai uta na nkona na yo, likolo ya etando mobimba ya mabele. Boye nakosala epayi na yo mpo ntango molai oyo obelelaki epayi na ngai.

Bimisa na lokasa