Makomi
Etele 2


Mokapo 2

Bayelede bamilengeli mpo na mobembo na bango na mboka elakelama—Ezali mboka ya boponi likolo ya oyo wapi bato basengeli kosalela Klisto soki te kokombolama mosika—Nkolo asololi na ndeko ya Yelede ya mobali ngonga misato—Bayelede batongi bibei ya masuwa—Nkolo atuni ndeko ya Yelede ya mobali mpo na kopesa likanisi na lolenge kani bibei bikongengisama.

1 Mpe esalemaki ete Yelede mpe ndeko na ye ya mobali, mpe mabota na bango, mpe lisusu baninga ya Yelede mpe baninga ya ndeko na ye ya mobali mpe mabota na bango, bakitaki kati na lobwaku oyo ezalaki epayi na nordi, (mpe nkombo ya lobwaku yango ezalaki Nimilodi, mpo ebiangamaki nsima ya moto moko ya makasi na bokila) elongo na bibwele na bango oyo basangisaki esika moko, mibali mpe basi, ya ndenge na ndenge.

2 Mpe batiaki lisusu mitambo mpe bakangaki ndeke ya likolo; mpe balengelaki liziba ya sani moko, kati na oyo wapi bakumbaki mbisi uta na mai.

3 Mpe lisusu bakumbaki elongo na bango deselete, eye, na kolimbolaka; ezalaki mafuta ya nzoi, mpe boye bakumbaki elongo na bango mangambo ya nzoi, mpe ndenge nyonso ya biloko oyo ezalaki likolo ya etando ya mboka, nkona ya ndenge na ndenge.

4 Mpe esalemaki ete ntango bakitaki kati na lobwaku ya Nimilodi Nkolo akitaki mpe asololaki elongo na ndeko ya Yelede ya mobali; mpe azalaki na lipata, mpe ndeko ya Yelede ya mobali amonaki ye te.

5 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki bango ete bakende kati na esobe, iyo, kati na ntaka ya mabele wapi moto moko akoma kuna soki moke te. Mpe esalemaki ete Nkolo akendaki liboso na bango, mpe asololaki na bango wana etelemaki ye na lipata, mpe apesaki malakisi wapi basengelaki kokende mobembo.

6 Mpe esalemaki ete bakendaki mobembo kati na esobe, mpe batongaki bibei, kati na oyo wapi bakatisaki mai mingi, mpe batambwisamaki ntango nyonso na loboko ya Nkolo.

7 Mpe Nkolo apesaki nzela te ete bakangama mosika kuna koleka na mbu kati na esobe, kasi alingaki kaka ete bakoba se kokende kutu na mboka ya elaka, oyo ezalaki ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu, oyo Nkolo Nzambe abatelaki mpo na bato ya sembo.

8 Mpe alapaki ndai na nkele na ye epayi na ndeko ya Yelede ya mobali, ete oyo akokamata mboka oyo ya elaka, uta sikawa kokende liboso mpe libela, asengeli kosalela ye, Nzambe ya solo mpe bobele se moko, soki te bakokombolama nie ntango ekoya litondi ya nkele na ye likolo na bango.

9 Mpe sikawa, tokoki komona mikano ya Nzambe mpo na oyo etali mboka oyo, oyo ezali mboka ya elaka; mpe ekolo nyonso oyo ekozwa yango ekosalela Nzambe, soki te bakokombolama mosika ntango ekoya litondi ya nkele na ye likolo na bango. Mpe litondi ya nkele na ye ekoya likolo na bango ntango bakokomela kati na mabe.

10 Mpo tala, oyo ezali mboka ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu; yango wana ye oyo akokamata yango akosalela Nzambe soki te akokombama; mpo ezali mokano ya libela ya Nzambe. Mpe ekozala te kino na litondi ya mabe na kati ya bana ya mboka, ete bakokombolama.

11 Mpe lisolo oyo eyei epayi na bino, O bino baoyo bozali Bayuda-te, ete bokoka koyeba mikano ya Nzambe—ete bokoka koyambola, mpe bokoba te kati na mabe na bino kino ekoya litondi, ete bokoka te kokitisa na nse litondi ya nkele ya Nzambe likolo na bino lokola bafandi ya mboka basalaki kino sikawa.

12 Tala, oyo ezali mboka moko ya boponi, mpe ekolo nyonso oyo ekozwa yango ekozala nsomi uta na boumbu, mpe uta na bokangemi, mpe uta na bikolo nyonso mosusu na nse ya lola, soki bakosalela kaka Nzambe ya mboka yango, oyo azali Yesu Klisto, oyo amimonisi na makambo oyo tokomi.

13 Mpe sikawa nakobi na lisolo ya makomi ya ngai; mpo tala, esalemaki ete Nkolo amemaki Yelede mpe bandeko na ye kutu na mbu monene oyo ekaboli bamboka. Mpe lokola bayaki na mbu batelemisaki biema na bango; mpe babiangaki nkombo ya esika yango Moliakumele; mpe bafandaki kati na biema, mpe bafandaki kati na biema likolo ya libongo ya mbu mpo na ntaka ya mibu minei.

14 Mpe esalemaki ete na nsuka ya mobu ya minei Nkolo ayaki lisusu epayi ya ndeko ya Yelede ya mobali, mpe atelemaki kati na lipata mpe asololaki elongo na ye. Mpe mpo na ntaka ya ngonga misato Nkolo asololaki na ndeko ya Yelede ya mobali, mpe apesaki ye etumbu mpo amikundolaki te kobelela nkombo ya Nkolo.

15 Mpe ndeko ya Yelede ya mobali ayambolaki uta na mabe oyo asalaki, mpe abelelaki nkombo ya Nkolo mpo na bandeko na ye oyo bazalaki elongo na ye. Mpe Nkolo alobaki epayi na ye: Nakolimbisa yo mpe bandeko na yo uta na masumu na bango; kasi okosumuka lisusu te, mpo okomikundola ete Molimo na ngai mokobunda elongo na moto ntango nyonso te; yango wana, soki okosumuka kino okomeli mobimba okokatama mosika uta na miso ya Nkolo. Mpe oyo ezali makanisi na ngai mpo na oyo etali mboka oyo nakopesa bino mpo na bosangoli libula na bino; mpo ekozala mboka moko ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu.

16 Mpe Nkolo alobaki: Kende kosala mpe tonga, na lolenge ya bibei oyo otongaki kino sikawa. Mpe esalemaki ete ndeko ya Yelede ya mobali akendaki kosala, elongo na bandeko na ye, mpe batongaki bibei na lolenge oyo batongaka, engebene na malako ya Nkolo. Mpe ezalaki mike, mpe ezalaki pepele likolo ya mai, mpe kutu lokola pepele ya ndeke likolo ya mai.

17 Mpe etongamaki na lolenge moko ete ezalaki na lidusu ata moke te, kutu ete ezalaki kokanga mai lokola sani, mpe nse na yango ezalaki na lidusu te lokola sani; mpe mipanzi na yango ezalaki na lidusu te lokola sani; mpe nse na yango ezalaki nsonge; mpe likolo na yango ezalaki na lidusu te lokola sani; mpe bolayi na yango ezalaki bolayi ya nzete moko; mpe ekuke na yango, ntango ekangemi, ezalaki na lidusu te lokola sani.

18 Mpe esalemaki ete ndeko ya Yelede ya mobali abelelaki epayi ya Nkolo, kolobaka: O Nkolo, nasali mosala oyo otindaki ngai, mpe nasali bibei lokola opesaki ngai mibeko.

19 Mpe tala, O Nkolo, kati na yango pole ezali te; tokotambwisa yenda wapi? Mpe lisusu tokowa, mpo kati na yango tokokoka kopema te, longola se mopepe oyo ezali kati na yango; boye tokowa.

20 Mpe Nkolo alobaki epayi ya ndeko ya Yelede ya mobali: Tala, sala lidusu moko na likolo, mpe mosusu na nse; mpe ntango ekoyoka yo mposa mpo na mopepe okozipola lidusu mpe okozwa mopepe. Mpe soki ezali boye ete mai makoti likolo na yo, tala, okozipa lidusu yango, ete okoka te kowa na mpela.

21 Mpe esalemaki ete ndeko ya Yelede ya mobali asalaki boye lokola Nkolo atindaki ye.

22 Mpe abelelaki lisusu epayi ya Nkolo kolobaka: O Nkolo, tala nasali kutu lokola otindaki ngai; mpe nalengeli masuwa mpo na bato na ngai, mpe tala ezali na pole te kati na yango. Tala, O Nkolo ekondima yo ete tokatisa mai monene oyo kati na molili?

23 Mpe Nkolo alobaki epayi ya ndeko ya Yelede ya mobali: Nini olingi nasala ete bokoka kozala na pole kati na masuwa na bino? Mpo tala, bokoki te kozala na maninisa, mpo ekopasuka na biteni; bokomema moto mpe te elongo na bino, mpo bokotambola na pole ya moto te.

24 Mpo tala, bokozala lokola mbisi monene na katikati ya mbu; mpo ngomba ya mbonge ekobeta likolo na bino. Nzokande, nakomema bino lisusu libanda ya mozindo ya mbu; mpo mipepe mibimaki uta na monoko na ngai, mpe natindaki lisusu mvula mpe mpela.

25 Mpe tala, nalengeli bino mpo na kotelemela biloko oyo; mpo bokoki te kokatisa mozindo oyo monene longola se soki nalengeli bino mpo na kotelemela mbonge ya mbu, mpe mipepe oyo ekeyi, mpe mpela oyo ekoya. Boye nini elingi bino ete nalengeli mpo na bino ete bokoka kozala na pole ntango bokomelama kati na mozindo ya mbu?

Bimisa na lokasa