Makomi
Etele 6


Mokapo 6

Bibei ya Bayelede bipusami na mipepe na mboka elakelama—Bato basanzoli Nkolo mpo na bolamu na ye—Oliya aponami mokonzi likolo na bango—Yelede mpe ndeko na ye ya mobali bakufi.

1 Mpe sikawa ngai, Moroni, nakobi kopesa lisolo ya makomi ya Yelede mpe ndeko na ye ya mobali.

2 Mpo esalemaki ete esilisaki Nkolo kolengela mabanga oyo ndeko ya Yelede ya mobali akumbaki kati na ngomba, ndeko ya Yelede ya mobali akitaki uta na ngomba, mpe atiaki mabanga kati na masuwa oyo malengelamaki, libanga moko na nsuka moko moko na yango; mpe tala, mangengisaki masuwa.

3 Mpe boye Nkolo asalaki ete mabanga mangenga kati na molili, mpo na kopesa pole epayi ya mibali, basi, mpe bana, ete bakoka te kokatisa mai monene kati na molili.

4 Mpe esalemaki ete ntango esilaki bango kolengela ndenge nyonso ya bilei, ete na yango bakoka kobika likolo ya mai, mpe lisusu bilei mpo na bibwele mpe bitonga na bango, mpe nyama soki te mbisi to ndeke nyonso oyo bamemaki elongo na bango—mpe esalemaki ete ntango basalaki biloko nyonso oyo bakotaki kati na masuwa to bibei na bango, mpe bakendaki kati na mbu, komitikaka bango moko epayi ya Nkolo Nzambe na bango.

5 Mpe esalemaki ete Nkolo Nzambe asalaki ete mopepe moko ya makasi ebeta likolo ya etando ya mai, epayi na mboka elakelama; mpe boye bapusamaki likolo ya mbonge ya mbu liboso ya mopepe.

6 Mpe esalemaki ete bakundamaki na mozindo ya mbu na ntina ya ngomba ya mbonge oyo emataki likolo na bango, mpe lisusu bikumbaki minene mpe ya nsomo oyo esalemaki na makasi ya mopepe.

7 Mpe esalemaki ete ntango bakundamaki na mozindo ezalaki na mai te oyo makokaki kosala bango mpasi, masuwa na bango kozalaka na lidusu te lokola sani, mpe lisusu ezalaki na lidusu te lokola ezalaki masuwa ya Noa; boye, ntango bazingamaki bango na mai mingi, babelelaki epayi ya Nkolo, mpe amemaki bango lisusu likolo ya mai.

8 Mpe esalemaki ete mopepe mosilaki soki moke te kobeta epayi na mboka elakelama ntango ezalaki bango likolo ya mai; mpe boye bapusamaki liboso na mopepe.

9 Mpe bayembaki masanzoli epayi ya Nkolo; iyo, ndeko ya Yelede ya mobali ayembaki masanzoli epayi ya Nkolo, mpe atondaki mpe asanzolaki Nkolo bolayi ya mokolo mobimba; mpe ntango eyaki butu, batikaki te kosanzola Nkolo.

10 Mpe boye bapusamaki liboso; mpe dongolomiso moko te ya mbu akokaki kobuka yango, mpe mbisi monene moko te akokaki kobebisa yango; mpe bazalaki na pole ntango nyonso, ezala likolo ya mai soki te na nse ya mai.

11 Mpe boye bapusamaki, mikolo nkama misato na ntuku minei na minei likolo ya mai.

12 Mpe basemaki na libongo ya mboka elakelama. Mpe ntango batiaki makolo na bango likolo ya libongo ya mboka elakelama bamingumbaki na nse likolo ya etando ya mboka, mpe bamikitisaki liboso ya Nkolo, mpe basopaki mpizoli ya bosepeli liboso ya Nkolo, na ntina ya ebele ya boboto ya bolamu na ye likolo na bango.

13 Mpe esalemaki ete bakendaki likolo ya etando ya mboka, mpe babandaki kowana bilanga.

14 Mpe Yelede abotaki bana mibali minei; mpe babiangamaki Yakomi, mpe Giliga, mpe Maya, mpe Oliya.

15 Mpe ndeko ya Yelede ya mobali mpe lokola abotaki bana mibali mpe bana basi.

16 Mpe baninga ya Yelede mpe ndeko na ye ya mobali bazalaki na motango ya penepene bato ntuku mibale na mibale; mpe lisusu babotaki bana mibali mpe bana basi liboso ete baya na mboka elakelama; mpe boye babandaki kokoma mingi.

17 Mpe bateyamaki kotambola na bomikitisi liboso ya Nkolo; mpe lisusu bateyamaki uta na likolo.

18 Mpe esalemaki ete babandaki kopanzana likolo ya etando ya mboka, kokoma mingi mpe kowana bilanga; mpe bakomaki makasi kati na mboka.

19 Mpe ndeko ya Yelede ya mobali abandaki kokoma mobange, mpe amonaki ete asengelaki kala mingi te kokita na lilita; yango wana alobaki epayi ya Yelede: Tika tosangisa bato na biso esika moko ete tokoka kotanga bango, ete tokoka koyeba uta na bango nini bazali na yango mposa na biso liboso ete tokita na malita na biso.

20 Mpe na engebene bato nyonso basanganaki esika moko. Sikawa motango ya bana mibali mpe bana basi ya ndeko ya Yelede ya mobali ezalaki ntuku mibale na mibale ya bato; mpe motango ya bana mibali mpe bana basi ya Yelede ezalaki zomi na mibale, mpe azalaki na bana mibali minei.

21 Mpe esalemaki ete batangaki bato na bango; esilaki bango kotanga bango, bazalaki na mposa ya koyeba uta na bango makambo oyo balingi ete basala liboso ete bakita na malita na bango.

22 Mpe esalemaki ete bato bazalaki na mposa uta na bango ete bapakola moko ya bana mibali na bango mpo na kozala mokonzi likolo na bango.

23 Mpe sikawa tala, oyo ezalaki likambo ya mpasi mpo na bango. Mpe ndeko ya Yelede ya mobali alobaki epayi na bango: Solo likambo oyo ememaka bato kati na bokangemi.

24 Kasi Yelede alobaki epayi ya ndeko na ye ya mobali: Pesa bango nzela ete bakoka kozala na mokonzi. Mpe boye alobaki epayi na bango: Bopona uta na kati ya bana mibali na biso mokonzi moko, kutu oyo nani bolingi.

25 Mpe esalemaki ete baponaki kutu mobotami ya yambo ya ndeko ya Yelede ya mobali; mpe nkombo na ye ezalaki Pagagi. Mpe esalemaki ete aboyaki mpe alingaki te kozala mokonzi na bango. Mpe bato nyonso balingaki ete tata na ye asalisa ye na makasi, kasi tata na ye alingaki te; mpe atindaki bango ete basengisa moto te mpo na kozala mokonzi na bango.

26 Mpe esalemaki ete baponaki bandeko mibali nyonso ya Pagagi, mpe balingaki te.

27 Mpe esalemaki ete bana mibali ya Yelede balingaki te mpe lokola, kutu nyonso longola se moko; mpe Oliya apakolamaki mpo na kozala mokonzi likolo ya bato.

28 Mpe abandaki koyangela, mpe bato babandaki kozwa bomengo; mpe bakomaki na bozwi mingi koleka.

29 Mpe esalemaki ete Yelede akufaki, mpe ndeko na ye ya mobali lokola.

30 Mpe esalemaki ete Oliya atambolaki na bomikitisi liboso ya Nkolo, mpe amikundolaki makambo minene boni Nkolo asalaki mpo na tata na ye, mpe lisusu alakisaki bato na ye makambo minene boni Nkolo asalaki mpo na batata na bango.

Bimisa na lokasa