Makomi
Etele 9


Mokapo 9

Bokonzi eleki uta moko na mosusu na bonkoko, poloso, mpe bobomi—Emele amoni Mwana ya Bosembo—Baprofeta mingi babeleli boyamboli—Nzala mpe nioka moko ya ngenge enyokoli bato.

1 Mpe sikawa ngai, Moroni, nakobi kokoma lisolo ya makomi ya ngai. Boye, tala, esalemaki ete na ntina ya makelemba ya nkuku ya Akisi mpe baninga na ye, tala, bakweisaki bokonzi ya Omele.

2 Nzokande, Nkolo atondisamaki na boboto epayi na Omele, mpe lokola na bana mibali na ye mpe bana basi na ye baoyo balukaki bobebisami na ye te.

3 Mpe Nkolo akebisaki Omele na ndoto moko ete alongwa uta na mboka; yango wana Omele alongwaki uta na mboka elongo na libota na ye, mpe atambolaki mobembo mikolo mingi, mpe ayaki mpe alekaki mpembeni na ngomba moke ya Simi, mpe ayaki mpe alekaki mpembeni na esika wapi Banefi babebisamaki, mpe uta na esika wana epayi na esti, mpe ayaki na esika moko oyo ebiangamaki Abilomi, mpembeni na libongo ya mbu, mpe kuna atelemisaki ema na ye, mpe bana mibali na ye mpe bana basi na ye mpe lokola, mpe bato ya ndako na ye mobimba mpe lokola, longola se Yelede mpe libota na ye.

4 Mpe esalemaki ete Yelede apakolamaki kozala mokonzi likolo ya bato, na loboko ya nkuna; mpe apesaki mwana mwasi na ye na bolongani epayi na Akisi.

5 Mpe esalemaki ete Akisi alukaki bomoi ya bokilo na ye ya mobali; mpe asengaki epayi na bango oyo amemaki kolapa ndai ya bato ya kala, mpe bazwaki moto ya tata bokilo na ye, lokola efandaki ye likolo ya kiti ya bokonzi na ye, koyambaka bato na ye.

6 Mpo bopanzani ya lingomba oyo ya nkuna mpe ya nkuku ezalaki monene mpenza ete ebebisaki mitema ya bato nyonso; boye Yelede abomamaki likolo ya kiti ya bokonzi na ye, mpe Akisi ayangelaki na esika na ye.

7 Mpe esalemaki ete Akisi abandaki koyoka zuwa epayi ya mwana mobali na ye, boye akangaki ye na boloko, mpe abombaki ye na mwa bilei moke soki mpe te kino azwaki mpasi ya liwa.

8 Mpe sikawa ndeko na ye ya mobali oyo azwaki mpasi ya liwa, (mpe nkombo na ye ezalaki Nimela) asilikaki na tata na ye na ntina ya oyo wana tata na ye asalaki epayi ya ndeko na ye ya mobali.

9 Mpe esalemaki ete Nimela asangisaki esika moko motango moke ya bato, mpe akimaki uta na mboka, mpe ayaki mpe afandaki elongo na Omele.

10 Mpe esalemaki ete Akisi abotaki bana mibali basusu, mpe balongaki mitema ya bato, atako balapaki ndai epayi na ye mpo na kosala ndenge nyonso ya mabe engebene na oyowana azalaki na yango mposa.

11 Sikawa bato ya Akisi bazalaki bato na mposa ya matabisi, kutu lokola Akisi azalaki na mposa ya nguya; yango wana, bana mibali ya Akisi bapesaki bango mosolo, na nzela babendaki mosika eteni eleki mingi ya bato nsima na bango.

12 Mpe etumba ebandaki kozala kati na bana mibali ya Akisi mpe Akisi, oyo ewumelaki mpo na ntaka ya mibu mingi, iyo, kino na bobebisami ya penepene ya bato nyonso ya bokonzi, iyo, kutu nyonso longola se bato ntuku misato, mpe bango oyo bakimaki elongo na ndako ya Omele.

13 Yango wana, Omele azongisamaki lisusu na mboka ya bosangoli libula na ye.

14 Mpe esalemaki ete Omele abandaki kokoma mobange; nzokande, na bobange na ye, abotaki Emele; mpe apakolaki Emele mpo na kozala mokonzi ya koyangela na esika na ye.

15 Mpe esilaki ye kopakola Emele mpo na kozala mokonzi, amonaki kimia na mboka mpo na ntaka ya mibu mibale, mpe akufaki, nsima ya komona mikolo mingi koleka, oyo mitondaki na mawa. Mpe esalemaki ete Emele ayangelaki na esika na ye, mpe alandaki etambwiseli ya tata na ye.

16 Mpe Nkolo abandaki lisusu kolongola bolakeli mabe uta na mboka, mpe ndako ya Emele efulukaki mingi koleka na nse ya boyangeli ya Emele; mpe na ntaka ya mibu ntuku motoba na mibale bakomaki makasi mpenza, na lolenge ete bakomaki na bozwi mingi koleka—

17 Mpe bazalaki na ndenge nyonso ya mbuma, mpe ya mboto, mpe ya swa, mpe ya lino ya malonga, mpe ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya biloko ya motuya;

18 Mpe lisusu ndenge nyonso ya bibwele, ya pakasa mpe ya ngombe, mpe ya mpate, mpe ya ngulu, mpe ya ntaba, mpe lisusu ndenge mingi mosusu ya banyama oyo esengelamaki mpo na bilei ya moto.

19 Mpe bazalaki lisusu na bampunda, mpe na farasa, mpe ezalaki na nzoku mpe kulelomi mpe kumomi; nyonso oyo esengelamaki mpo na moto, mpe mingi mingi koleka nzoku mpe kulelomi mpe kumomi.

20 Mpe boye Nkolo asopaki mapamboli na ye likolo ya mboka oyo, oyo ezalaki ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu; mpe atindaki ete oyo akozwa mboka akozwa yango mpo na Nkolo, soki te bakobebisama ntango bakokomela kati na mabe; mpo likolo ya bato ya lolenge oyo, elobi Nkolo: Nakosopa litondi ya nkele na ngai.

21 Mpe Emele asalaki bosambisi na bosembo mikolo na ye nyonso, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi mingi; mpe abotaki Koliantumi, mpe apakolaki Koliantumili mpo na koyangela na esika na ye.

22 Mpe esilaki ye kopakola Koliantumili mpo na koyangela na esika na ye atikalaki na bomoi mibu minei, mpe amonaki kimia na mboka; iyo, mpe amonaki kutu Mwana ya Bosembo, mpe asepelaki mpe akembelaki na mikolo na ye, mpe akufaki na kimia.

23 Mpe esalemaki ete Koliantumili atambolaki na makolo ya tata na ye, mpe atongaki bingumba ya makasi mingi, mpe asalaki oyo wana ezalaki malamu mpo na bato na ye mikolo na ye nyonso. Mpe esalemaki ete azalaki na bana te kino akomaki mobange mingi koleka.

24 Mpe esalemaki ete mwasi na ye akufaki, azalaki na mibu nkama moko na mibale. Mpe esalemaki ete Koliantumili akamataki na bolongani, na bobange na ye, elenge mwasi moko, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi; yango wana azalaki na bomoi kino azalaki na mibu nkama moko na ntuku minei na mibale.

25 Mpe esalemaki ete abotaki Komi, mpe Komi ayangelaki na esika na ye; mpe ayangelaki mibu ntuku minei na libwa, mpe abotaki Eti; mpe lisusu abotaki bana mibali mpe bana basi basusu.

26 Mpe bato bapanzanaki lisusu likolo ya etando mobimba ya mboka, mpe nkuna ya monene koleka ebandaki lisusu kozala likolo ya etando ya mboka, mpe Eti abandaki lisusu kondima miango ya nkuku ya bato ya kala, mpo na kobebisa tata na ye.

27 Mpe esalemaki ete abotolaki kiti ya bokonzi ya bokonzi ya tata na ye, mpo abomaki ye na mompanga na ye moko; mpe akonzaki na esika na ye.

28 Mpe baprofeta bayaki lisusu kati na mboka, kobelelaka boyamboli epayi na bango—ete basengeli kolengela nzela ya Nkolo soki te bolakeli mabe ekoya likolo ya etando ya mboka; iyo, kutu ekozala na nzala moko ya monene, na oyo wapi bakobebisama soki bayamboli te.

29 Kasi bato bandimaki maloba ya baprofeta te, kasi babenganaki bango; mpe boko bato na bango babwakamaki kati na mabulu mpe batikaki bango bawa. Mpe esalemaki ete basalaki makambo oyo nyonso engebene na motindo ya mokonzi, Eti.

30 Mpe esalemaki ete bokeleli ya biloko ebandaki na mboka, mpe bafandi babandaki kobebisama noki koleka na ntina ya bokeleli ya biloko, mpo mvula ezalaki te likolo ya etando ya mabele.

31 Mpe ntango nioka ya ngenge eyaki lisusu likolo ya etando ya mboka, mpe baswaki bato mingi. Mpe esalemaki ete bibwele na bango bibandaki kokima liboso ya nioka ya ngenge, epayi na mboka ya sudi, oyo ebiangamaki na Banefi Zalayemila.

32 Mpe esalemaki ete ezalaki na mingi kati na bango oyo bawaki na nzela na yango; nzokande, ezalaki na ndambo ya bato oyo bakimaki na mboka ya epayi na sudi.

33 Mpe esalemaki ete Nkolo asalaki ete nioka elanda bango lisusu te, kasi etia bikonongo na nzela ete bato bakoka te koleka, ete oyo akomeka koleka akoka kokweya na nioka ya ngenge.

34 Mpe esalemaki ete bato balandaki nzela wapi etambolaki banyama, mpe basepelaki kolia bibembe ya oyo ekweyaki mpembeni na nzela, kino basilisaki yango nyonso. Sikawa ntango bato bamonaki ete basengelaki kowa babandaki koyambola uta na mabe na bango mpe kobelela epayi ya Nkolo.

35 Mpe esalemaki ete ntango bamikitisaki na ndenge ekoki liboso ya Nkolo, atindaki mvula likolo ya etando ya mabele; mpe bato babandaki kozwa bomoi lisusu, mpe mbuma ebandaki komonana lisusu na bikolo ya nordi, mpe na bikolo nyonso mpembeni nzinganzinga. Mpe Nkolo alakisaki nguya na ye epayi na bango na kobikisaka bango uta na nzala.

Bimisa na lokasa