Makomi
Elamani 11


Mokapo 11

Nefi andimisi Nkolo mpo na kotia nzala na esika ya etumba na bango—Bato mingi bawei—Bayamboli, mpe Nefi atungisi Nkolo mpo na kozwa mvula—Nefi mpe Lehi bazwi bimoniseli mingi—Bayongoli ya Gadiatoni bamiti mpenza na mboka. Penepene na mibu 20–6 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete na mobu ya ntuku sambo na mibale ya boyangeli ya basambisi boweli ebakisamaki, na lolenge ete bitumba ezalaki epayi nyonso na mboka mobimba na kati ya bato nyonso ya Nefi.

2 Mpe ezalaki lingomba oyo ya nkuku ya bayongoli oyo basalaki mosala oyo ya bobebisami mpe ya nkuna. Mpe etumba oyo ewumelaki mobu mona mobimba; mpe na mobu ya ntuku sambo na misato ewumelaki mpe lokola.

3 Mpe esalemaki ete na mobu oyo Nefi abelelaki epayi ya Nkolo, kolobaka:

4 O Nkolo, kopesa nzela te ete bato oyo babebisama na mompanga; kasi O Nkolo, kutu tika nzala ezala na mboka, mpo na kolamusa bango na bokundoli ya Nkolo Nzambe na bango, mpe mbele bakoyambola mpe bakozonga epayi na yo.

5 Mpe esalemaki bongo, engebene na maloba ya Nefi. Mpe ezalaki na nzala moko monene na mboka, na kati ya bato nyonso ya Nefi. Mpe boye na mobu ya ntuku sambo na minei nzala ekobaki, mpe mosala ya bobebisami na mompanga mosilaki kasi mokomaki nsomo na nzala.

6 Mpe mosala oyo ya bobebisami mokobaki na mobu ya ntuku sambo na mitano. Mpo mabele ebetamaki ete ekawukaki, mpe ebotaki te mbuma na eleko ya mboto; mpe mabele mobimba ebetamaki, kutu na kati ya Balamani mpe lokola na kati ya Banefi, mpenza ete bawaki nkoto na nkoto na biteni ya mboka oyo bileki nkuna.

7 Mpe esalemaki ete bato bamonaki ete bazalaki penepene na kowa na nzala, mpe babandaki komikundola Nkolo Nzambe na bango; mpe babandaki komikundola maloba ya Nefi.

8 Mpe bato babandaki kobondela elongo na basambisi bakonzi mpe bakambi na bango, ete baloba epayi na Nefi: Tala, toyebi ete ozali moto ya Nzambe, mpe boye belela epayi ya Nkolo Nzambe na biso ete asilisela biso nzala oyo, mbele maloba nyonso oyo olobaki mpo na oyo etali bobebisami na biso makokisama.

9 Mpe esalemaki ete basambisi balobelaki Nefi, engebene na maloba oyo ezalaki na mposa ya bato. Mpe esalemaki ete ntango Nefi amonaki ete bato bayambolaki mpe bamikitisaki na elamba ya saki, abelelaki lisusu epayi ya Nkolo, kolobaka:

10 O Nkolo, tala bato oyo bayamboli; mpe bakombi mosika lingomba ya Gadiatoni uta na kati na bango na lolenge ete basili, mpe bakundi miango na bango ya nkuku kati na mabele.

11 Sikawa, O Nkolo, na ntina ya bomikitisi na bango ekosukisa yo nkanda na yo, mpe ekotika nkanda na yo esepelisama na bobebisami ya bato wana ya nkuna oyo osili kobebisa.

12 O Nkolo, ekosukisa yo nkanda na yo, iyo, nkanda makasi na yo, mpe ekosala yo ete nzala oyo ekoka kosila na mboka oyo.

13 O Nkolo, ekoyokela yo ngai, mpe ekosala yo ete ekoka kosalema engebene na maloba na ngai, mpe ekotinda yo mvula likolo ya etando ya mabele, ete akoka kobota mbuma na ye, mpe mboto na ye na eleko ya mboto.

14 O Nkolo, oyokaki maloba na ngai ntango nalobaki, Tika nzala ezala, ete bokono ya mompanga ekoka kosila; mpe nayebi ete olingi, kutu na ntango oyo, koyoka maloba na ngai, mpo olobaki ete: Soki bato oyo bayamboli nakobikisa bango.

15 Iyo, O Nkolo, mpe omoni ete bayamboli, na ntina ya nzala mpe bokono mpe bobebisami boye eyaki likolo na bango.

16 Mpe sikawa, O Nkolo, ekosukisa yo nkanda na yo, mpe ekomeka yo lisusu bango soki bakosalela yo? Mpe soki bongo, O Nkolo, okokoka kopambola bango engebene na maloba na yo oyo olobaki.

17 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku sambo na motoba Nkolo asukisaki nkanda na ye uta na bato, mpe asalaki ete mvula ekweya likolo ya mabele, na lolenge ete ebimisaki mbuma na ye na eleko na ye ya mbuma. Mpe esalemaki ete ebimisaki mboto na ye na eleko na ye ya mboto.

18 Mpe tala, bato basepelaki mpe bakembelaki Nzambe, mpe etando mobimba ya mboka etondaki na bosepeli; mpe balukaki lisusu te kobebisa Nefi, kasi bamonaki ye lokola profeta moko monene, mpe moto moko ya Nzambe, oyo azalaki na nguya monene mpe likoki epesami epayi na ye uta na Nzambe.

19 Mpe tala, Lehi, ndeko na ye ya mobali, azalaki moke te nsima na ye na kotalaka makambo matali bosembo.

20 Mpe boye esalemaki ete bato ya Nefi babandaki lisusu kofuluka na mboka, mpe babandaki kotonga bisika na bango oyo ebebaki, mpe babandaki koyikana mpe kopanzana, kutu kino bazipaki etando mobimba ya mboka, epayi na nordi mpe epayi na sudi mpe lokola, uta na mbu epayi na westi kino na mbu epayi na esti.

21 Mpe esalemaki ete mobu ya ntuku sambo na motoba esukaki na kimia. Mpe mobu ya ntuku sambo na nsambo mobandaki na kimia; mpe eklezia epanzanaki epayi nyonso na etando ya mboka mobimba; mpe eteni eleki mingi ya bato, Banefi mpe Balamani mpe lokola, bazalaki ya eklezia; mpe bazalaki na kimia monene mpenza na mboka; mpe boye esukaki mobu ya ntuku sambo na nsambo.

22 Mpe lisusu bazalaki na kimia na mobu ya ntuku sambo na mwambe, longola se ezalaki na boweli moke mpo na oyo etali matono ya malongi oyo etiamaki na baprofeta.

23 Mpe na mobu ya ntuku sambo na libwa boswani boike ebandaki kozala. Kasi esalemaki ete Nefi mpe Lehi, mpe mingi ya bandeko na bango bandimi baoyo bayebaki matono ya solo ya malongi, mpo bazalaki na bimoniseli mingi mokolo na mokolo, boye bateyaki epayi ya bato, na lolenge ete batiaki nsuka na boswani na bango na mobu se moko wana.

24 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku mwambe ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, ezalaki na motango ya bakabwani uta na bato ya Nefi, oyo boko mibu eleki liboso bakendaki epayi na Balamani, mpe bakamataki likolo na bango nkombo ya Balamani, mpe lisusu motango moko ya baoyo bazalaki biboto ya solo ya Balamani, lokola balamusaki bango na nkanda na bango, to na bakabwani bana, boye babandaki etumba na bandeko na bango.

25 Mpe basalaki bobomi mpe bopunzi; mpe nsima balingaki kozonga nsima kati na ngomba, mpe kati na esobe mpe na bisika ya nkuku, kobatamaka ete babombolama te, koyambaka mokolo na mokolo bato oyo babakisamaki na motango na bango, mbala mingi lokola ezalaki na bakabwani oyo bakendaki epayi na bango.

26 Mpe boye na ntango, iyo, kutu na ntaka ya mibu mingi te, bakomaki lingomba moko monene mpenza ya bayongoli; mpe balukaki miango nyonso ya nkuku ya Gadiatoni; mpe boye bakomaki bayongoli ya Gadiatoni.

27 Sikawa tala, bayongoli bana basalaki bonielengeni monene, iyo, kutu bobebisami bonene na kati ya bato ya Nefi, mpe lisusu na kati ya bato ya Balamani.

28 Mpe esalemaki ete elongobanaki ete nsuka etiama na mosala ya bobebisami; boye batindaki limpinga moko ya bato makasi kati na esobe mpe likolo ya bangomba mpo na koluka lingomba ya bayongoli, mpe mpo na kobebisa bango.

29 Kasi tala, esalemaki ete na mobu se moko wana kaka babenganamaki kutu kati na bamboka na bango moko. Mpe boye esukaki mobu ya ntuku mwambe ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

30 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya ntuku mwambe na moko bakendaki lisusu kobunda na lingomba ya bayongoli, mpe babebisaki mingi; mpe bobebisami boike ebimelaki bango lokola.

31 Mpe basengisamaki kozonga uta na esobe mpe uta na bangomba epayi na bamboka na bango moko, na ntina ya bonene koleka ya motango ya bayongoli bana oyo batondisaki na lolenge ya koleka bangomba mpe esobe.

32 Mpe esalemaki ete boye esukaki mobu oyo. Mpe bayongoli bazalaki se kobakisama lisusu mpe bakomaki makasi, na lolenge ete babundisaki mampinga mobimba ya Banefi, mpe lisusu ya Balamani; mpe basalaki ete bato bazala na bobangi monene likolo ya etando mobimba ya mboka.

33 Iyo, mpo babimelaki biteni mingi ya mboka, mpe basalaki bobebisami monene epayi na bango; iyo, babomaki mingi, mpe bamemaki basusu bakangemi kati na esobe, iyo, mpe mingi mingi koleka basi na bango mpe bana na bango.

34 Sikawa mpasi monene oyo, oyo eyelaki bato na ntina ya mabe na bango, elamusaki bango lisusu na bokundoli ya Nkolo Nzambe na bango.

35 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku mwambe na moko ya boyangeli ya basambisi.

36 Mpe na mobu ya ntuku mwambe na mibale babandaki lisusu kobosana Nkolo Nzambe na bango. Mpe na mobu ya ntuku mwambe na misato babandaki kokoma makasi kati na mabe. Mpe na mobu ya ntuku mwambe na minei babongisaki te nzela ya bomoi na bango.

37 Mpe esalemaki na mobu ya ntuku mwambe na mitano bakomaki makasi mingi na lolendo na bango, mpe kati na nkuna na bango; mpe boye bazalaki kokomelaka lisusu mpo na bobebisami.

38 Mpe boye nde esukaki mobu ya ntuku mwambe na mitano.

Bimisa na lokasa