Makomi
Elamani 13


Lisakoli ya Samwele, Molamani, epayi ya Banefi.

Ezali na mikapo 13 kino na nsuka ya mokapo 15.

Mokapo 13

Samwele Molamani asakoli bobebisami ya Banefi longola se soki bayamboli—Bango mpe bozwi na bango balakelami mabe—Babwaki mpe babambi baprofeta mabanga, bazingami mpembeni na bazabulu, mpe baluki kozwa esengo na kosalaka mabe. Penepene na mobu 6 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete na mobu ya ntuku mwambe na motoba, Banefi batikalaki se kati na nkuna, iyo, kati na nkuna monene, wana ezalaki Balamani kotosa sikisiki kobatela mitindo ya Nzambe, engebene na mobeko ya Mose.

2 Mpe esalemaki ete na mobu oyo ezalaki na Samwele moko, Molamani, oyo ayaki kati na mboka ya Zalayemila, mpe abandaki koteya bato. Mpe esalemaki ete ateyaki, mikolo mingi, boyamboli epayi ya bato, mpe babwakaki ye libanda, mpe azongaki na mboka na ye moko.

3 Kasi tala, mongongo ya Nkolo moyaki epayi na ye, ete azonga lisusu, mpe asakola epayi ya bato makambo nyonso oyo ekoya kati na motema na ye.

4 Mpe esalemaki ete balingaki te kopesa nzela ete akota kati na mboka; boye amataki mpe atelemaki likolo ya efelo na yango, mpe asembolaki loboko na ye mpe abelelaki na mongongo moko makasi, mpe asakola epayi ya bato makambo nyonso Nkolo atiaki kati na motema na ye.

5 Mpe alobaki epayi na bango: Tala, ngai, Samwele, Molamani, nakoloba maloba ya Nkolo oyo atii kati na motema na ngai; mpe tala atii yango kati na motema na ngai mpo na koloba epayi ya bato oyo ete mompanga ya boyengebene ezali kodiembela likolo ya bato oyo; mpe mibu nkama minei mikoleka te longola se mompanga ya boyengebene mokwei likolo ya bato oyo.

6 Iyo, bobebisami monene ekozela bato oyo, mpe ekoya solo epayi ya bato oyo, mpe eloko moko te ekoki kobikisa bango longola se soki ezali boyamboli mpe bondimi na Nkolo Yesu Klisto, oyo akoya solo kati na mokili, mpe akoyoka mpasi na makambo mingi mpe bakoboma ye mpo na bato na ye.

7 Mpe tala, anjelu ya Nkolo asakoli yango epayi na ngai, mpe amemaki nsango ya nsai kati na molimo na ngai. Mpe tala, natindamaki epayi na bino mpo na kosakola yango epayi na bino mpe lokola, ete bokoka kozwa na nsango ya nsai; kasi tala bino bolingi te koyamba ngai.

8 Yango wana, boye elobi Nkolo: Na ntina ya bokasi ya mitema ya bato nyonso ya Banefi, longola se soki bayamboli, nakolongola liloba na ngai uta na kati na bango, mpe nakolongola Molimo na ngai uta na bango, mpe nakondima bango lisusu te, mpe nakobalola mitema ya bandeko na bango mpo na kobundisa bango.

9 Mpe mibu nkama minei mikoleka te liboso nasala ete babetama; iyo, nakobimela bango na mompanga mpe na nzala mpe na bokono.

10 Iyo, nakobimela bango na nkanda na ngai ya makasi, mpe ekozala na bango oyo ya nkola ya minei oyo bakozala na bomoi, uta na banguna na bino, mpo na komona bobebisami na bino mobimba; mpe makambo oyo solo ekoya longola se soki boyamboli, elobi Nkolo; mpe bango oyo ya nkola ya minei bakoya kotala bobebisami na bino.

11 Kasi soki bokoyambola mpe bokozonga epayi ya Nkolo Nzambe na bino nakobalola mosika nkanda na ngai, boye elobi Nkolo; iyo, boye elobi Nkolo, bapambolami ezali bango oyo bakoyambola mpe bakobaluka epayi na ngai, kasi lisuma epayi na ye oyo akoyambola te.

12 Iyo, lisuma na engumba monene oyo ya Zalayemila; mpo tala, ezali na ntina na bango oyo bazali sembo ete ebikisami; iyo, lisuma na engumba monene oyo, mpo namoni, elobi Nkolo, ete bazali mingi, iyo, kutu eteni eleki mingi ya engumba monene oyo, baoyo bayeisaka mitema na bango makasi na ngai, elobi Nkolo.

13 Kasi bapambolami ezali bango oyo bakoyambola, mpo bango nde nakobikisa. Kasi tala, soki ezalaka mpo na basembo oyo bazali kati na engumba monene oyo te, tala, nalingaki kosala ete moto ekita uta na lola mpe ebebisa yango.

14 Kasi tala, ezali mpo na ntina ya basembo ete ebikisami. Kasi tala, ntango eyei, elobi Nkolo, ete ntango bokobwaka basembo libanda uta na kati na bino, nde bokokomela mpo na bobebisami; iyo, lisuma ezala na engumba monene oyo, na ntina ya nkuna mpe bonsomo boye ezali kati na ye.

15 Iyo, mpe lisuma ezala na engumba ya Gideona, mpo na nkuna mpe bonsomo boye ezali kati na ye.

16 Iyo, mpe lisuma ezala na bingumba nyonso oyo ezali nzinganzinga mpembeni, oyo ezwami na Banefi, na ntina ya nkuna mpe bonsomo boye ezali kati na yango.

17 Mpe tala, bolakeli mabe ekoya likolo ya mboka, elobi Nkolo na Bibele, mpo na ntina ya bato oyo bazali likolo ya mboka, iyo, na ntina ya nkuna na bango mpe bonsomo na bango.

18 Mpe ekosalema, elobi Nkolo na Bibele, iyo, Nzambe monene mpe ya solo na biso, ete moto nyonso oyo akobomba biloko na ye ya motuya na mabele akomona yango lisusu te, na ntina ya bolakeli mabe monene ya mboka, longola se soki azali moto moko ya sembo mpe akobomba yango epayi ya Nkolo.

19 Mpo nalingi, elobi Nkolo, ete babomba biloko na bango ya motuya epayi na ngai; mpe balakelami mabe ezali bango oyo bakobomba biloko na bango ya motuya epayi na ngai te; mpo moko te akobomba biloko na ye ya motuya epayi na ngai longola se soki azali moto ya sembo; mpe ye oyo akobomba biloko na ye ya motuya epayi na ngai te, alakelami mabe, mpe lisusu biloko yango ya motuya, mpe moto moko te akosikola yango na ntina ya bolakeli mabe ya mboka.

20 Mpe mokolo ekoya ete bakobomba biloko na bango ya motuya, mpobatie mitema na bango likolo ya bozwi; mpe lokolabatie mitema na bango likolo ya bozwi na bango, mpe bakobomba biloko na bango ya motuya ntango bakokima liboso ya banguna na bango; mpo bakobomba yango te epayi na ngai, balakelami mabe mpe biloko na bango ya motuya mpe lokola, mpe na mokolo wana, bakobetama, elobi Nkolo.

21 Botala bino, bato ya mboka monene oyo, mpe boyoka maloba na ngai; iyo, boyoka maloba oyo Nkolo alobi; mpo tala, alobi ete bolakelami mabe na ntina ya bozwi na bino, mpe lisusu bozwi na bino elakelami mabe mpo botie mitema na bino likolo na yango, mpe botiaki bokebi te na maloba na ye oyo apesaki bozwi yango epayi na bino.

22 Bomikundolaka te Nkolo Nzambe na bino na biloko oyo wapi apamboli bino, kasi bomikundolaka ntango nyonso se bozwi na bino, ata kotonda Nkolo Nzambe na bino mpo na yango te; iyo, mitema na bino mibendani epayi ya Nkolo te, kasi mivimbani na lolendo monene, mpo na bifundeli, mpe mpo na bovimbami monene, bilula-lula, songisongi, nko, minyokoli mpe bobomi, mpe ndenge nyonso ya mabe.

23 Mpo na ntina oyo Nkolo Nzambe asalaki ete bolakeli mabe boya likolo ya mboka, mpe lisusu likolo ya bozwi na bino, mpe oyo na ntina ya mabe na bino.

24 Iyo, lisuma epayi ya bato oyo, na ntina ya ntango oyo eyei, oyo wapi bobengani baprofeta, mpe boseki bango, mpe bobambi bango mabanga, mpe bobomi bango, mpe bosali bango ndenge nyonso ya mabe, kutu lokola basalaki bango na ntango ya kala.

25 Mpe sikawa ntango bosololaka, bolobi: Soki mikolo na biso ezalaka na mikolo ya batata na biso ya kala, tolingaki koboma baprofeta te; tolingaki kobamba bango mabanga te, mpe kobwaka bango libanda te.

26 Tala bozali bato mabe koleka bango; mpo lokola Nkolo azali na bomoi, soki profeta moko ayei na kati na bino mpe asakoli epayi na bino liloba ya Nkolo, oyo litatoli mpo na masumu na bino mpe mabe na bino, bosiliki na ye, mpe bobengani ye mpe boluki ndenge nyonso ya nzela mpo na kobebisa ye; iyo, bokoloba ete azali profeta moko ya lokuta, mpe azali mosumuki, mpe moto ya zabulu, mpo atatoli ete misala na bino ezali mabe.

27 Kasi tala, soki moto moko akoya na kati na bino mpe alobi: Bosala likambo oyo, mpe mabe ezali te; bosala oyo wana mpe bokoyoka mpasi te; iyo, akoloba: Botambola na kolandaka lolendo ya mitema na bino moko; iyo, botambola na kolandaka lolendo ya miso na bino, mpe bosala nyonso oyo motema na bino ezali na yango mposa—Mpe soki moto moko akoya na kati na bino mpe alobi likambo oyo, bokoyamba ye, mpe bokoloba ete azali profeta.

28 Iyo, bokotombola ye, mpe bokopesa ye biloko na bino; bokopesa ye wolo na bino, mpe mpauni na bino, mpe bokolatisa ye bilamba ya ntalo; mpe mpo alobeli bino maloba ya koleta, mpe alobi ete nyonso ezali malamu, bongo bokomona libunga na ye te.

29 O bino nkola ya nkuna mpe nkola oyo ebeba; boyeisi bato mitema makasi mpe matoyi mangongi, kino ntango molai boni ebanzi bino ete Nkolo akondima bino? Iyo, kino ntango molai boni ekondima bino kokambama na bakambi ba liboma mpe bakufa miso? Iyo, kino ntango molai boni ekopona bino molili kutu koleka pole?

30 Iyo, tala, nkanda ya Nkolo esili kopela na bino; tala, alakeli mboka mabe na ntina ya mabe na bino.

31 Mpe tala, ntango eyei wapi alakeli bozwi na bino mabe, ete ekoma moselu, ete bokoka kosimba yango te; mpe na mikolo ya bobola na bino bokoka kosimba yango te.

32 Mpe na mikolo ya bobola na bino bokobelela epayi ya Nkolo; mpe bokobelela mpamba, mpo libebi na bino esili koya likolo na bino, mpe bobebisami na bino ezali kosalema na ntembe te; mpe nde bokolela mpe bokoganga na mokolo wana, elobi Nkolo na Bibele. Mpe nsima bokomilela, mpe bokoloba:

33 O soki nayambolaka, mpe soki nabomaka baprofeta te, mpe nabambaka bango mabanga te, mpe nabwakaka bango libanda te. Iyo, na mokolo wana okoloba: O soki tomikundolaka Nkolo Nzambe na biso na mokolo oyo apesaki biso bozwi, mpe bongo elingaki te kokoma moselu ete tobungisa yango; mpo tala, bozwi na biso ekimi mosika uta na biso.

34 Tala, totii esalelo moko awa mpe na mokolo ya nsima ekeyi; mpe tala, mipanga na biso mikamatami uta na biso na mokolo toluki yango mpo na etumba.

35 Iyo, tobombaki biloko na biso ya motuya mpe bisielumuki mosika uta na biso, na ntina ya bolakeli mabe ya mboka.

36 O soki toyambolaka na mokolo oyo liloba ya Nkolo eyaki epayi na biso; mpo tala mboka elakelami mabe, mpe biloko nyonso bikomi moselu, mpe tokoki kosimba yango te.

37 Tala, tozingami na bazabulu, iyo, tozingami mpembeni na banjelu na ye oyo alukaki kobebisa milimo na biso. Tala, mabe na biso ezali monene. O Nkolo, ekoki yo te kobalola mosika nkanda na yo uta na biso? Mpe oyo ekozala elobeli na bino na mikolo wana.

38 Kasi tala, mikolo na bino ya momekano eleki; bozelisaki mokolo ya lobiko na bino kino ntango eleki libela, mpe bobebisami na bino ekomisami solo; iyo, mpo mikolo nyonso ya bomoi na bino bolukaki oyo wana bokokaki kozwa te; mpe bolukaki esengo na kosalaka mabe, eloko oyo ezali na bokeseni na ezalela ya bosembo boye ezali na Moto monene mpe ya Seko na biso.

39 O bino bato ya mboka, soki bolingaki koyoka maloba na ngai! Mpe nasambeli ete nkanda ya Nkolo ebaluka mosika uta na bino, mpe ete bolinga koyambola mpe kobikisama.

Bimisa na lokasa