Makomi
Elamani 16


Mokapo 16

Banefi oyo bandimi Samwele babatisami na Nefi—Samwele akoki te kobomama na makonga mpe mabanga ya Banefi bazanga boyamboli—Boko bayeisi mitema na bango makasi, mpe basusu bamoni banjelu—Bazanga bondimi balobi ete ezali mayele te ya kondima na Klisto mpe boyei na Ye na Yelusaleme. Penepene na mibu 6–1 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete ezalaki na bato mingi oyo bayokaki maloba ya Samwele, Molamani, oyo alobaki likolo ya efelo ya mboka. Mpe lokola mingi bandimaki liloba na ye bakendaki mpe balukaki Nefi; mpe ntango bayaki mpe bakutaki ye batubelaki epayi na ye masumu na bango mpe bawanganaki te, mpe bazalaki na mposa ete bakoka kobatisama mpo na ntina ya Nkolo.

2 Kasi mingi lokola ezalaki baoyo bandimaki maloba ya Samwele te basilikaki na ye; mpe babwakelaki ye mabanga likolo ya efelo, mpe lisusu mingi babetak i ye makonga lokola etelemaki ye likolo ya efelo; kasi Molimo ya Nkolo azalaki elongo na ye, na lolenge ete bakokaki te kozwa ye na mabanga na bango soki te makonga na bango.

3 Sikawa ntango emonaki bango ete bakokaki kozwa ye te, ezalaki na mingi koleka baoyo bandimaki maloba na ye, na lolenge ete bakendaki mosika epayi na Nefi mpo na kobatisama.

4 Mpo tala, Nefi azalaki kobatisaka, mpe kosakolaka, mpe koteyaka, kobelelaka boyamboli epayi ya bato, kolakisaka bilembo mpe makamwisi, kosalaka makamwisi na kati ya bato, ete bakoka koyeba ete Klisto asengeli mosika te koya—

5 Kolobelaka bango makambo oyo esengeli mosika te koya, ete bakoka koyeba mpe komikundola na ntango makambo yango ekoya ete boyebisamaki epayi na bango liboso masalema, na ntina ete bakoka kondima; boye mingi lokola bandimaki maloba ya Samwele bakendaki epayi na ye mpo na kobatisama, mpo bayaki koyambolaka mpe kotubelaka masumu na bango.

6 Kasi eteni eleki mingi na bango bandimaki maloba ya Samwele te; boye ntango bamonaki ete bakokaki kozwa ye te na mabanga na bango mpe makonga na bango, babelelaki epayi ya bakapiteni na bango, kolobaka: Bokamata moto oyo mpe bolinga ye singa, mpo azali na zabulu; mpe na ntina ya nguya ya zabulu oyo ezali na ye tokoki te kozwa ye na mabanga na biso mpe makonga na biso; yango wana bokamata ye mpe bolinga ye singa, mpe bomema ye mosika.

7 Mpe lokola bakendaki mpo na kotia maboko likolo na ye, tala, amibwakaki na nse uta na efelo, mpe akimaki uta na mboka na bango, iyo, kutu epayi na ekolo na ye moko, mpe abandaki koteya mpe kosakola na kati ya bato na ye moko.

8 Mpe tala, ayokanaki nsango lisusu te na kati ya Banefi; mpe boye nde ezalaki makambo ya bato.

9 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku mwambe na motoba ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

10 Mpe boye esukaki lisusu mobu ya ntuku mwambe na nsambo ya boyangeli ya basambisi, eteni eleki mingi ya bato kotikalaka se na lolendo mpe nkuna na bango, mpe eteni eleki moke ya bato kotambolaka na bokebi liboso ya Nzambe.

11 Mpe oyo ezalaki bizalela ya makambo mpe lokola, na mobu ya ntuku mwambe na mwambe ya boyangeli ya basambisi.

12 Mpe ezalaki bobele na mbongwana moke na makambo ya bato, longola se bato babandaki kozalamitu makasi mingi na mabe, mpe kosala mingi mpe mingi oyo wana ezalaki na bokeseni na mitindo ya Nzambe, na mobu ya ntuku mwambe na libwa ya boyangeli ya basambisi.

13 Kasi esalemaki ete na mobu ya ntuku libwa ya boyangeli ya basambisi, bilembo minene epesamaki epayi ya bato, mpe makamwisi; mpe maloba ya baprofeta ebandaki kokokisama.

14 Mpe banjelu bamonanaki epayi ya bato, bato ya bwania, mpe basakolaki nsango ya nsai ya bosepeli monene epayi na bango; boye na mobu oyo ekomi ebandaki kokokisama.

15 Nzokande, bato babandaki koyeisa mitema na bango makasi, nyonso longola se eteni na bango oyo balekaki na bondimi, ya Banefi mpe ya Balamani mpe lokola, mpe babandaki kotalela bobele bokasi na bango moko mpe bwania na bango moko, kolobaka:

16 Ndambo ya makambo bakokaki kokanisa malamu, na kati ya mingi mpenza; kasi tala, toyebi ete misala minene mpe ya kokamwa nyonso oyo elobamaki, ekoki kosalema te.

17 Mpe babandaki komanyola mpe kowela na kati na bango na bango, kolobaka:

18 Ete ezali mayele te ete mozali moko ya lolenge oyo lokola Klisto akoya; soki bongo, mpe soki azali Mwana ya Nzambe, Tata ya lola mpe ya mabele, lokola elobamaki, mpo na nini ekomilakisa ye te epayi na biso lokola epayi na bango oyo bakozala na Yelusaleme?

19 Iyo, mpo na nini ekomilakisa ye te na mboka oyo lokola na mboka ya Yelusaleme?

20 Kasi tala, toyebi ete oyo ezali momeseno ya nkuna, oyo ekitisamaki epayi na biso na batata na biso, mpo na kosala ete tondima na likambo moko monene mpe ya bokamwi oyo ekosalema, ezala na kati na biso te, kasi na mboka oyo ezali mosika, mboka oyo toyebi te; boye bakoki kobomba biso kati na bozangi boyebi, mpo tokoki kotatola na miso na biso moko te ete makambo yango ezali solo.

21 Mpe bakosala, na mayele mabe mpe ntoki ya mibombamo ya moko ya mabe, boko mibombamo minene oyo tokoki kososola te, oyo ekokanga biso na nse mpo na kozala basali na maloba na bango, mpe lisusu basali epayi na bango, mpo tokotalela se bango mpo na koteya biso liloba; mpe boye bakokanga biso kati na bozangi boyebi soki tokomipesa epayi na bango, mikolo nyonso ya bomoi na biso.

22 Mpe bato bakanisaki makambo mingi lisusu na mitema na bango, oyo ezalaki ya liboma mpe ma mpamba; mpe bazalaki kati na mobulu moike, mpo Satana atombokisaki bango na kosala ntango nyonso mabe; iyo, bakendaki nzinganzinga kopanzaka nungunungu mpe boweli likolo ya etando mobimba ya mboka, ete akoka koyeisa mitema ya bato makasi na kotelemelaka oyo wana ezalaki malamu mpe kotelemelaka oyo wana ekoya.

23 Mpe ata bilembo mpe makamwisi oyo masalemaki na kati ya bato ya Nkolo, mpe bikamwisi mingi oyo basalaki, Satana azalaki na nkanga monene likolo ya mitema ya bato likolo ya etando mobimba ya mboka.

24 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

25 Mpe boye esukaki buku ya Elamani, engebene na lisolo ya makomi ya Elamani mpe bana mibali na ye.

Bimisa na lokasa