Makomi
Elamani 1


Buku ya Elamani

Lisitwale ya Banefi. Bitumba mpe boweli na bango, mpe bokabwani na bango. Mpe lisusu masakoli ya baprofeta basantu mingi, yambo ya boyei ya Klisto, engebene na masolo ya makomi ya Elamani, oyo azalaki mwana mobali ya Elamani, mpe lisusu engebene na masolo ya makomi ya bana mibali na ye, kutu kokita kino na boyei ya Klisto. Mpe lisusu mingi ya Balamani babongwani. Lisitwale ya bobongwami na bango. Lisitwale ya bosembo ya Balamani, mpe nkuna mpe bonsomo ya Banefi, engebene na masolo ya makomi ya Elamani mpe bana mibali na ye, kutu kokita kino na boyei ya Klisto, oyo ebiangami buku ya Elamani, mpe bongo na bongo.

Mokapo 1

Pawolani ya mibale akomi mosambisi mokonzi mpe abomami na Kisikumeni—Pakumeni akamati kiti ya bosambisi—Koliantumili akambi mampinga ya Balamani, akamati Zalayemila, mpe abomi Pakumeni—Moroniya alongi Balamani mpe akamati lisusu Zalayemila, mpe Koliantumili abomami. Penepene na mibu 52–50 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa tala, esalemaki ete na ebandeli ya mobu ntuku minei ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, ebandaki kozala na kokoso moko ya ndongo na kati ya bato ya Banefi.

2 Mpo tala, Pawolani akufaki, mpe akendaki nzela ya mabele nyonso; boye boweli moko ya ndongo ebandaki kozala mpo na oyo etali nani akozwa kiti ya bosambisi na kati ya bandeko mibali, baoyo bazalaki bana mibali ya Pawolani.

3 Sikawa oyo ezali nkombo ya baoyo bawelaki mpo na kozwa kiti ya bosambisi, baoyo basalaki ete bato bawela: Pawolani, Paaki, mpe Pakumeni.

4 Sikawa baoyo bazali bana mibali nyonso ya Pawolani te (mpo azalaki na bango mingi), kasi oyo ezali bango oyo bawelaki mpo na kozwa kiti ya bosambisi; boye, basalaki mekabwani misato na kati ya bato.

5 Nzokande, esalemaki ete Pawolani aponamaki na kopona ya bato mpo na kozala mosambisi mokonzi mpe mokambi ya etuka likolo ya bato ya Nefi.

6 Mpe esalemaki ete Pakumeni, emonaki ye ete akokaki te kozwa kiti ya bosambisi, asalaki bomoko lokola emonisamaki na kopona ya bato.

7 Kasi tala, Paaki, mpe eteni wana ya bato oyo bazalaki na mposa ete azala mokambi na bango ya etuka, azalaki na nkanda mingi koleka; boye, azalaki penepene ya koleta bato wana mpo na kobimisa botomboki na bandeko na bango.

8 Mpe esalemaki ete lokola azalaki penepene na kosala oyo, tala, akamatamaki, mpe asambisamaki engebene na oyo emonisamaki na kopona ya bato, mpe bakatelaki ye etumbu ya liwa; mpo abimisaki botomboki mpe alukaki kobebisa lipanda ya bato.

9 Sikawa ntango emonaki bato oyo bazalaki na mposa ete azala mokambi na bango ya etuka ete apesamaki etumbu ya liwa, boye basilikaki, mpe tala, batindaki se moko Kisikumeni, kutu na kiti ya bosambisi ya Pawolani, mpe abomaki Pawolani wana efandaki ye likolo ya kiti ya bosambisi.

10 Mpe balandaki ye na basali ya Pawolani; kasi tala, bokimi ya Kisikumeni ezalaki mbangu mingi koleka ete moto moko te akokaki kokanga ye.

11 Mpe akendaki epayi na bango oyo batindaki ye, mpe nyonso bakotaki kati na liyokani moko, iyo, kolapaka na Mozalisi na bango ya libela, ete bakoyebisa moto moko te ete Kisikumeni abomaki Pawolani.

12 Yango wana, Kisikumeni ayebanaki te na kati ya bato ya Nefi, mpo azalaki elongi ebombama na ntango oyo abomaki Pawolani. Mpe Kisikumeni mpe lingomba na ye, baoyo bayokanaki elongo na ye, bamisangisaki na kati ya bato, na lolenge moko ete nyonso bakokaki kobombolama te; kasi mingi lokola babombolamaki bakatelaki bango etumbu ya liwa.

13 Mpe sikawa tala, Pakumeni aponamaki, engebene na kopona ya bato nyonso, mpo na kozala mosambisi mokonzi mpe mokambi ya etuka ya bato yango, mpo na koyangela na esika ya ndeko na ye ya mobali Pawolani; mpe ezalaki engebene na makoki na ye. Mpe nyonso oyo esalemaki na mobu ya ntuku minei ya boyangeli ya basambisi; mpe ekomaki na nsuka.

14 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku minei na moko ya boyangeli ya basambisi, Balamani basangisaki limpinga ya bato mingi mpenza esika moko, mpe bapesaki bango manduki ya mipanga, mpe ya nsendo mpe ya matimbo, mpe ya makula, mpe ya bibende ya mito, mpe ya bibende ya ntolo, mpe ndenge nyonso ya nguba ya ndenge na ndenge.

15 Mpe bakitaki lisusu ete bakoka kobunda etumba na Banefi. Mpe bakambamaki na moto moko oyo kani nkombo ezalaki Koliantumili; mpe azalaki eboto ya Zalayemila; mpe azalaki mokabwani uta na kati ya Banefi; mpe azalaki moto moko mbinga mpe moto moko ya makasi.

16 Boye, mokonzi na Balamani, oyo kani nkombo ezalaki Tubaloti, oyo azalaki mwana mobali ya Amoloni, kobanzaka ete Koliantumili, lokola azalaki moto moko ya makasi, akokaki kotelema mpo na kobunda na Banefi, na bokasi na ye mpe lisusu na bwania monene na ye, na lolenge ete na kotindaka ye liboso akozwa nguya likolo ya Banefi—

17 Boye alamusaki bango na nkanda, mpe asangisaki esika moko mampinga na ye, mpe aponaki Koliantumili mpo na kozala mokambi na bango, mpe asalaki ete bakita na mboka ya Zalayemila mpo na kobunda na Banefi.

18 Mpe esalemaki ete na ntina ya boweli boike mpenza mpe kokoso mingi mpenza na mbulamatari, ete batikaki te bakengeli ya kokoka na mboka ya Zalayemila; mpo babanzaki ete Balamani bakomeka te koya na kati ya bamboka na bango mpo na kobundisa engumba monene wana ya Zalayemila.

19 Kasi esalemaki ete Koliantumili atambolaki liboso na moto ya ebele ya bato na ye mingi, mpe ayelaki bafandi ya engumba, mpe botamboli na bango ezalaki ya lombangu monene ete ezalaki na ntango te mpo na Banefi kosangisa mampinga na bango esika moko.

20 Boye Koliantumili akataki na mompanga bakengeli baoyo batiaki mpembeni na monoko ya engumba, mpe atambolaki elongo na mampinga na ye mobimba kati na engumba, mpe babomaki moto nyonso oyo atelemelaki bango, mpenza ete bakamataki engumba mobimba.

21 Mpe esalemaki ete Pakumeni, oyo azalaki mosambisi mokonzi, akimaki liboso uta na Koliantumili, kutu mosika na bifelo ya engumba. Mpe esalemaki ete Koliantumili se moko wana abambaki ye na efelo, na lolenge ete akufaki. Mpe boye esukaki mikolo ya Pakumeni.

22 Mpe sikawa ntango Koliantumili amonaki ete azwi engumba ya Zalayemila, mpe lokola amonaki ete Banefi bakimi liboso na bango, mpe babomami, mpe bakamatami, mpe babwakami kati na boloko, mpe azwaki bisika bileki makasi na mboka mobimba, motema na ye mozwaki mpiko na lolenge ete azalaki penepene na kokende kobunda na mboka mobimba.

23 Mpe sikawa awumelaki te na mboka ya Zalayemila, kasi atambolaki elongo na limpinga moko monene, kutu epayi na engumba ya Beboo; mpo ezalaki mokano na ye ya kokende mpe kosala na molende ete aboma na mompanga, ete akoka kozwa biteni ya mboka epayi na nordi.

24 Mpe, lokola abanzaki ete bokasi koleka monene na bango ezalaki na katikati ya mboka, yango wana atambolaki, kopesaka bango ntango te mpo na komisangisa esika moko longola se soki ezalaki mangomba make; mpe na lolenge oyo bakweyaki likolo na bango mpe bakataki bango na nse na mabele.

25 Kasi tala, botamboli boye ya Koliantumili epayi nyonso na katikati ya mboka epesaki Moroniya litomba monene likolo na bango, ata monene ya motango ya Banefi baoyo babomamaki.

26 Mpo tala, Moroniya abanzaki ete Balamani bakomeka te koya na katikati ya mboka, kasi ete bakolinga kobundisa bingumba ezalaki nzinganzinga mpembeni na ndelo lokola basalaki kino sikawa; boye Moroniya asalaki ete mampinga na bango ya makasi masimba biteni wana oyo ezalaki nzinganzinga mpembeni na ndelo.

27 Kasi tala, Balamani babangaki te engebene na mposa na ye, kasi bayaki na katikati ya mboka, mpe bakamataki engumba mokonzi oyo ezalaki engumba ya Zalayemila, mpe bazalaki kotambolaka epayi na biteni bileki motuya ya mboka, kobomaka bato na bobomi moko monene, mibali, basi, mpe bana, kokamataka bingumba mingi mpe bisika ya makasi mingi.

28 Kasi ntango Moroniya abombolaki oyo, atindaki sasaipi Lehi elongo na limpinga moko nzinganzinga mpembeni mpo na kokanga bango nzela yambo ya koya na mboka ya Beboo.

29 Mpe asalaki boye; mpe akataki bango nzela yambo baya na mboka ya Beboo, mpe abundisaki bango etumba, na lolenge ete babandaki kozonga nsima epayi na mboka ya Zalayemila.

30 Mpe esalemaki ete Moroniya akataki bango nzela na bokimi na bango, mpe abundisaki bango etumba, na lolenge ete ekomaki etumba ya kotangisa makila mingi koleka; iyo, mingi babomamaki, mpe na kati ya motango ya baoyo babomamaki Koliantumili amonanaki mpe lokola.

31 Mpe sikawa, tala, Balamani bakokaki te kokima na nzela moko te, ezala na nordi te, na sudi te, na esti te, soki na westi mpe te, mpo bazingamaki ngambo na ngambo na Banefi.

32 Mpe boye nde Koliantumili akotisaki Balamani na katikati ya Banefi, na lolenge ete bazalaki na nse ya nguya ya Banefi, mpe ye moko abomamaki, mpe Balamani bamitikaki bango moko kati na maboko ya Banefi.

33 Mpe esalemaki ete Moroniya akamataki engumba ya Zalayemila lisusu, mpe asalaki ete Balamani baoyo bakamatamaki bato ya boloko babima uta na mboka na kimia.

34 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku minei na moko ya boyangeli ya basambisi.

Bimisa na lokasa