Makomi
Elamani 2


Mokapo 2

Elamani, mwana mobali ya Elamani, akomi mosambisi mokonzi—Gadiatoni akambi lingomba ya Kisikumeni—Mosali ya Elamani abomi Kisikumeni, mpe lingomba ya Gadiatoni ekimi kati na esobe. Penepene na mibu 50–49 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku minei na mibale ya boyangeli ya basambisi, esilaki Moroniya kofandisa lisusu kimia kati na Banefi mpe Balamani, tala ezalaki na moto moko te mpo na kokamata kiti ya bosambisi; boye boweli moko ebandaki kozala lisusu na kati ya bato mpo na oyo etali nani asengeli kokamata kiti ya bosambisi.

2 Mpe esalemaki ete Elamani, oyo azalaki mwana mobali ya Elamani, aponamaki mpo na kokamata kiti ya bosambisi, na kopona ya bato nyonso.

3 Kasi tala, Kisikumeni, oyo abomaki Pawolani, abatamaki mpo na koboma Elamani mpe lokola; mpe asungamaki na lingomba na ye, oyo bakotaki kati na liyokani moko ete moto moko te akoyeba nkuna na ye.

4 Mpo ezalaki na Gadiatoni moko, oyo azalaki nganga mayele koleka na maloba mingi, mpe lisusu na bikelakela na ye, mpo na kokamba misala ya nkuku ya koboma mpe koyongola; boye akomaki mokambi ya lingomba ya Kisikumeni.

5 Boye abendaki bango, mpe lisusu Kisikumeni, ete soki bakotia ye na kiti ya bosambisi akopesa epayi na bango oyo bazali ya lingomba na ye ete batiama na bibonga ya nguya mpe ya likoki na kati ya bato; boye Kisikumeni azalaki koluka koboma Elamani.

6 Mpe esalemaki ete lokola ekendaki ye epayi na kiti ya bosambisi mpo na koboma Elamani, tala moko ya basali ya Elamani, lokola azalaki libanda na butu yango, mpe azwaki, na nzela ya komibombana, boyebi ya miangowana oyo etiamaki na lingomba oyo mpo na koboma Elamani—

7 Mpe esalemaki ete akutanaki na Kisikumeni, mpe apesaki ye elembo moko; boye Kisikumeni asalaki ete mokano na ye mpo na ye eyebana, mpe azalaki na mposa ete amema ye na kiti ya bosambisi ete akoka koboma Elamani.

8 Mpe ntango mosali ya Elamani ayebaki motema nyonso ya Kisikumeni, mpe ete ezalaki mokano na ye mpo na koboma, mpe lisusu ete ezalaki mokano ya nyonso oyo bazalaki kati na lingomba na ye mpo na koboma, mpe koyongola, mpe kozwa nguya, (mpe oyo ezalaki mwango na bango ya nkuku, mpe likelemba na bango) mosali ya Elamani alobaki epayi ya Kisikumeni: Tika ete tokende epayi na kiti ya bosambisi.

9 Sikawa oyo esepelisaki Kisikumeni mingi koleka, mpo abanzaki ete akokokisa mokano na ye; kasi tala, mosali ya Elamani, lokola bazalaki kokende epayi na kiti ya bosambisi, atobolaki Kisikumeni na mbeli kutu na motema, ete akweyaki mokufi na kozangaka kotata. Mpe ye akimaki mpe ayebisaki Elamani makambo nyonso amonaki, mpe ayokaki, mpe asalaki.

10 Mpe esalemaki ete Elamani atindaki bato mpo na kokamata lingomba wana ya bayongoli mpe babomi ya nkuku, ete bakoka kobomama engebene na mobeko.

11 Kasi tala, ntango Gadiatoni amonaki ete Kisikumeni azongaki te abangaki ete mbele abebisama; boye asalaki ete lingomba na ye elanda ye. Mpe bakimaki libanda ya mboka, na nzela moko ya nkuku, kati na esobe; mpe boye ntango Elamani atindaki bato mpo na kokamata bango bakokaki komonana esika moko te.

12 Mpe mingi mpo na oyo etali Gadiatoni oyo ekolobama nsima. Mpe boye esukaki mobu ya ntuku minei na mibale ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

13 Mpe tala, na nsuka ya buku oyo bokomona ete Gadiatoni oyo akomimonisa kozala bokwei, iyo, penepene ya kozala bobebisami mobimba ya bato ya Nefi.

14 Tala nalingi kolobela nsuka ya buku ya Elamani te, kasi nalingi kolobela nsuka ya buku ya Nefi, uta wapi nakamati lisolo nyonso oyo nakomi.

Bimisa na lokasa