Makomi
Elamani 4


Mokapo 4

Bakabwani ya Banefi mpe Balamani basangisi makasi mpe bakamati mboka ya Zalayemila—Bokwei ya Banefi boyei na ntina ya nkuna na bango—Eklezia ebandaki kobeba mpe bato bakomaki na bolembu lokola Balamani. Penepene na mibu 38–30 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku mitano na minei ezalaki na bokabwani mingi kati na eklezia, mpe ezalaki na boweli na kati ya bato, na lolenge ete bosopi makila ezalaki mingi.

2 Mpe eteni ya batomboki babomamaki mpe babenganamaki uta na mboka, mpe bakendaki epayi na mokonzi ya Balamani.

3 Mpe esalemaki ete basalaki makasi mpo na kolamusa Balamani mpo na kobunda na Banefi; kasi tala, Balamani babangaki mingi koleka, na lolenge ete balingaki te koyoka maloba ya bakabwani wana.

4 Kasi esalemaki ete na mobu ya ntuku mitano na motoba ya boyangeli ya basambisi, ezalaki na bakabwani oyo bamataki uta na Banefi epayi ya Balamani; mpe balongaki elongo na baye wana basusu na kolamusaka bango na nkanda ya Banefi; mpe bazalaki na mobu mona mobimba komilengela mpo na etumba.

5 Mpe na mobu ya ntuku mitano na nsambo bakitaki mpo na kobunda na Banefi, mpe babandaki mosala ya liwa; iyo, na mobu ya ntuku mitano na mwambe ya boyangeli ya basambisi balongaki na kozwaka mboka ya Zalayemila; iyo, mpe lisusu bamboka nyonso, kutu mboka oyo ezalaki penepene ya mboka ya Beboo.

6 Mpe Banefi mpe mampinga ya Moroniya babenganamaki kutu kati na mboka ya Beboo;

7 Mpe kuna bamilendisaki mpo na kobunda na Balamani, uta na mbu ya westi, kutu epayi na esti; ezalaki mosika ya mokolo moko ya mobembo mpo na Monefi, na monkoloto oyo bamilendisaki mpe bapikaki mampinga na bango mpo na kobatela ekolo na bango ya nordi.

8 Mpe boye bakabwani bana ya Banefi, na lisalisi ya limpinga monene ya Balamani, bazwaka bozwi nyonso ya Banefi boye ezalaki na mboka epayi na sudi. Mpe oyo nyonso esalemaki na mobu ya ntuku mitano na mwambe mpe libwa ya boyangeli ya basambisi.

9 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku motoba ya boyangeli ya basambisi, Moroniya alongaki elongo na mampinga na ye na kozwaka biteni mingi ya mboka; iyo, bazwaki lisusu bingumba mingi oyo ekweyaki kati na maboko ya Balamani.

10 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku motoba na moko ya boyangeli ya basambisi balongaki na kozwaka lisusu katikati ya bozwi nyonso ya bango.

11 Sikawa bobungisi monene boye ya Banefi, mpe bobomi monene boye esalemaki na kati na bango, elingaki kosalema te soki ezalaki te mpo na nkuna na bango mpe bonsomo na bango boye ezalaki na kati na bango; iyo, mpe ezalaki na kati ya baye lisusu bazalaki koloba bazali ya eklezia ya Nzambe.

12 Mpe ezalaki na ntina ya lolendo ya mitema na bango, na ntina ya bozwi ya mingi koleka na bango, iyo, ezalaki na ntina ya monyokoli na bango epayi na babola, lokola bakangaki na loboko makasi bilei na bango uta na bato ya nzala, kokangaka bilamba na bango na loboko makasi na bato ya bolumbu, mpe kobetaka bandeko na bango bato na bomikitisi likolo ya litama, kosalaka liseki na oyo wana ezalaki bule, kowanganaka molimo ya masakoli mpe emoniseli, kobomaka, kopunzaka, kokosaka, koyibaka, kosalaka ekobo, kotelemaka na boweli monene, mpe kokimaka mosika kati na mboka ya Nefi, na kati ya Balamani—

13 Mpe na ntina ya nkuna monene oyo ya bango, mpe bifundeli na bango kati na bokasi na bango moko, batikamaki na bokasi na bango moko; boye bafulukaki te, kasi batungisamaki mpe babetamaki, mpe babenganamaki liboso ya Balamani, kino babungisaki penepene ya bamboka na bango nyonso.

14 Kasi tala, Moroniya ateyaki makambo mingi epayi ya bato na ntina ya masumu na bango, mpe lisusu Nefi mpe Lehi, baoyo bazalaki bana mibali ya Elamani, bateyaki makambo mingi epayi ya bato, iyo, mpe basakolaki makambo mingi epayi na bango mpo na oyo etali mabe na bango, mpe nini ekoyela bango soki bayamboli te masumu na bango.

15 Mpe esalemaki ete bayambolaki, mpe mbala mingi lokola bayambolaki babandaki mpenza kofuluka.

16 Mpo ntango Moroniya amonaki ete bayambolaki amekaki kokamba bango uta esika na esika, mpe uta engumba na engumba, kutu kino balongaki lisusu kozwa katikati ya bozwi na bango mpe katikati ya mboka na bango nyonso.

17 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku motoba na yambo ya boyangeli ya basambisi.

18 Mpe esalemaki na mobu ya ntuku motoba na mibale ya boyangeli ya basambisi, ete Moroniya akokaki kozwa lisusu te bozwi likolo ya Balamani.

19 Boye batikaki mwango na bango ya kokamata ndambo etikalaki ya mboka na bango, mpo motango ya Balamani ezalaki monene mpenza ete ekokaki te kosalema mpo na Banefi ete bazwa nguya mingi likolo na bango; boye Moroniya asalelaki mampinga nyonso na ye na kosimbaka biteni wana oyo bakamataki.

20 Mpe esalemaki ete, na ntina ya motango monene ya Balamani Banefi bazalaki na bobangi monene, kobangaka mbele balongama, mpe baniatama, mpe babomama, mpe babebisama.

21 Iyo, babandaki komikundola masakoli ya Alma, mpe lisusu maloba ya Mosiya; mpe bamonaki ete bazalaki bato ya matoyi mangongi, mpe ete batalaki mpamba mitindo ya Nzambe.

22 Mpe ete babongolaki mpe baniataki mibeko ya Mosiya na nse ya makolo na bango; to mpe oyo Nkolo atindaki ye kopesa epayi ya bato; mpe bamonaki ete mibeko na bango ekomaki ya kobeba, mpe ete bakomaki bato ya nkuna, na lolenge ete bazalaki nkuna kutu lokola Balamani.

23 Mpe na ntina ya mabe na bango, eklezia ebandaki kobebisama moke moke; mpe babandaki kotia ntembe na molimo ya masakoli mpe molimo ya emoniseli; mpe masambisi ya Nzambe matelemelaki bango na elongi.

24 Mpe bamonaki ete bakomaki bato na bolembu, lokola bandeko na bango Balamani, mpe ete Molimo ya Nkolo abatelaki bango lisusu te; iyo, alongwaki uta na bango mpo Molimo ya Nkolo afandaka te kati na batempelo ezanga bosantu—

25 Boye Nkolo atikaki kobatela bango na nguya na ye ya makamwisi mpe ezanga emekiseli, mpo bakweyaki kati na ezalela moko ya bozangi bondimi mpe nkuna ya nsomo; mpe bamonaki ete Balamani bazalaki na motango monene koleka bango, mpe longola se soki bakangemi na Nkolo Nzambe na bango basengeli na ntembe te kowa.

26 Mpo tala, bamonaki ete bokasi ya Balamani ezalaki monene lokola oyo ya bango, kutu moto na moto. Mpe boye bakweyaki kati na bobuki mobeko monene boye; iyo, boye bakomaki bato na bolembu, na ntina ya bobuki mobeko na bango, na ntaka ya mibu mingi te.

Bimisa na lokasa