Makomi
Elamani 9


Mokapo 9

Bantoma bakuti mosambisi mokonzi akufi na kiti ya bosambisi—Batiami na boloko mpe nsima babikisami—Na bofuli Nefi alakisaki Seatumi ete ye mobomi—Nefi andimami na boko bato lokola profeta. Penepene na mibu 23–21 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete ntango Nefi alobaki maloba oyo, boko bato oyo bazalaki na kati na bango bakimaki epayi na kiti ya bosambisi; iyo, kutu bazalaki bato mitano oyo bakendaki, mpe balobaki na kati na bango moko, wana ezalaki bango kokende:

2 Tala sikawa tokoyeba na bosolo soki moto oyo azali profeta mpe Nzambe atindi ye mpo na kosakola makambo ya bokamwi ya lolenge oyo epayi na biso. Tala, tondimi te ete atindaki ye; iyo, tondimi te ete azali profeta; nzokande, soki makambo oyo alobi mpo na oyo etali mosambisi mokonzi ezali solo, ete akufi, nde tokondima ete makambo mosusu oyo alobaki ezali solo.

3 Mpe esalemaki ete bakimaki mbangu na bokasi na bango, mpe bakotaki epayi na kiti ya bosambisi; mpe tala, mosambisi mokonzi akweyaki na mabele, mpe alalaki na makila na ye.

4 Mpe sikawa tala, ntango bamonaki oyo bakamwaki mingi koleka, na lolenge ete bakweyaki na mabele; mpo bandimaki te maloba oyo Nefi alobaki mpo na oyo etali mosambisi mokonzi.

5 Kasi sikawa, ntango bamonaki likambo oyo bandimaki, mpe bobangi eyaki likolo na bango mbele masambisi nyonso oyo Nefi alobelaki maya likolo na bato; boye balengaki, mpe bakweyaki na mabele.

6 Sikawa, sasaipi ntango babomaki mosambisi—mpe batiaki ye mbeli na ndeko na ye ya mobali na lolenge moko ya badongolomiso, mpe akimaki, mpe basali bakimaki mbangu mpe bayebisaki bato, kobelelaka ete babomi moto na kati na bango;

7 Mpe tala bato basanganaki bango moko epayi na esika ya kiti ya bosambisi—mpe tala, na bokamwi na bango bamonaki bato wana mitano bakwei na mabele.

8 Mpe sikawa tala, bato bayebaki eloko moko te mpo na oyo etali ebele ya bato oyo basanganaki elongo na elanga ya Nefi; boye balobaki na kati na bango moko: Bato oyo bazali bango oyo babomi mosambisi, mpe Nzambe abeti bango ete bakoka kokima biso te.

9 Mpe esalemaki ete batiaki nkanga likolo na bango, mpe balingaki bango singa mpe babwakaki bango na boloko. Mpe bosakoli etindamaki epayi na epayi mosika ete mosambisi abomami, mpe ete babomi bakamatami mpe babwakami na boloko.

10 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima bato basanganaki bango moko esika moko mpo na kosala matanga mpe kokila, na bokundi ya mosambisi mokonzi monene oyo babomaki.

11 Mpe boye basambisi lisusu baye wana bazalaki na elanga ya Nefi, mpe bayokaki maloba na ye, basanganaki esika moko na bokundi.

12 Mpe esalemaki ete batunaki na kati ya bato, kolobaka: Wapi ezali bato mitano oyo batindamaki mpo na kotuna na likambo etali mosambisi mokonzi soki akufaki? Mpe bayanolaki mpe balobaki: Mpo na oyo etali bato mitano oyo bolobi botindaki, toyebi te; kasi ezali na bato mitano oyo bazali babomi, baoyo tobwaki kati na boloko.

13 Mpe esalemaki ete basambisi bazalaki na mposa ete bamema bango; mpe bamemamaki, mpe tala bazalaki bato mitano oyo batindamaki; mpe tala basambisi batunaki bango mpo na koyeba oyo etali likambo yango, mpe balobelaki bango nyonso makambo oyo basalaki, kolobaka:

14 Tokendaki mbangu mpe tokomaki na esika ya kiti ya bosambisi, mpe ntango tomonaki makambo nyonso lokola Nefi atatolaki, tokamwaki mpenza na lolenge ete tokweyaki na mabele; mpe ntango tozongaki uta na kokweya na bokamwi na biso, tala babwakaki biso kati na boloko.

15 Sikawa, mpo na oyo etali bobomi ya moto oyo, toyebi te nani asali yango; mpe bobele oyo toyebi, tokimaki mbangu mpe topusanaki mpembeni engebene lokola bosengaki, mpe tala akufaki, engebene na maloba ya Nefi.

16 Mpe sikawa esalemaki ete basambisi basembolaki likambo yango epayi ya bato, mpe bazomelaki Nefi, kolobaka: Tala, toyebi ete Nefi oyo esengeli ete ayokanaki elongo na moto moko mpo na koboma mosambisi, mpe nde akoka kosakola yango epayi na biso, ete akoka kobongola biso na bondimi na ye, ete akoka komitombola mpo na kozala moto moko monene, aponama na Nzambe, mpe profeta.

17 Mpe sikawa tala, tokoluka koyeba bosolo mpo na moto oyo, mpe akotubela libunga na ye mpe akoyebisa biso mobomi ya solo ya mosambisi oyo.

18 Mpe esalemaki ete bato mitano babikisamaki na mokolo ya bokundi. Nzokande, bapamelaki mpenza basambisi mpo na oyo etali maloba oyo balobaka likolo ya Nefi, mpe bawelaki na bango moko na moko, mpenza ete bayokisaki bango nsoni.

19 Nzokande, basalaki ete Nefi akamatama mpe alingama singa mpe amemama liboso ya ebele ya bato, mpe babandaki kotuna ye na banzela ya ndenge na ndenge ete bakoka kokutisa ye, ete bakoka kofunda ye na mbeba oyo epesamaka etumbu ya liwa—

20 Kolobaka epayi na ye: Osali likita; nani azali moto oyo asali bobomi boye? Sikawa lobela biso, mpe ndima libunga na yo; kolobaka, tala mosolo yango oyo; mpe lisusu tokotikela yo bomoi na yo soki olobeli biso, mpe ondimi boyokani boye bosali elongo na ye.

21 Kasi Nefi alobaki epayi na bango: O bino bato ya liboma, bino basutu na mitema, bino bato bokufa miso, mpe bino bato na matoyi mangongi, eyebi bino kino ntango boni Nkolo Nzambe na bino akopesa bin nzela ete bokoba na nzela na bino oyo ya masumu?

22 O bosengelaki kobanda kolela-lela mpe kosala matanga, na ntina ya bobebisami monene boye na ntango oyo ezali kozela bino, longola se soki boyamboli.

23 Tala bolobi ete nayokanaki elongo na moto moko ete aboma Sezolami, mosambisi mokonzi na biso. Kasi tala, nalobi epayi na bino, ete oyo ezali mpo natatolaki epayi na bino mpo ete bokoka koyeba na ntina ya likambo oyo; iyo, kutu mpo ezala litatoli epayi na bino, ete nayebaki nkuna mpe bonsomo boye ezali na kati na bino.

24 Mpe lokola nasali likambo oyo, bolobi ete nayokani elongo na moto moko ete asala likambo oyo; iyo, mpo nalakisaki epayi na bino elembo oyo bosiliki na ngai, mpe bozali koluka kobebisa bomoi na ngai.

25 Mpe sikawa tala, nakolakisa bino elembo mosusu, mpe nakotala soki na likambo oyo bokoluka kobebisa ngai.

26 Tala nalobi epayi na bino: Bokende na ndako ya Seatumi, oyo azali ndeko ya Sezolami ya mobali, mpe boloba na ye—

27 Eyokanaki Nefi, oyo amibengaka profeta, oyo asakolaka mabe mingi mpo na oyo etali bato oyo, elongo na yo, na liyokani oyo wapi obomi Sezolami, oyo azali ndeko na yo ya mobali?

28 Mpe tala, akoloba epayi na bino, Te.

29 Mpe bokoloba epayi na ye: Ebomaki yo ndeko na yo ya mobali?

30 Mpe akotelema na bobangi, mpe akoyeba te nini koloba. Mpe tala, akowangana epayi na bino; mpe akosala lokola soki akamwi; nzokande, akoloba epayi na bino ete azali na ekweyeli te.

31 Kasi tala, bokotala ye malamu, mpe bokomona makila likolo ya sangatumbu ya nzambala na ye.

32 Mpe ntango bokomona oyo, bokoloba: Ewuti wapi makila oyo? Eyebi biso te ete ezali makila ya ndeko na yo ya mobali?

33 Mpe nsima akolenga, mpe akokoma bopendoo, kutu lokola soki liwa eyaki likolo na ye.

34 Mpe nsima bokoloba: Na ntina ya bobangi boye mpe bopendoo boye emonani likolo ya elongi na yo, tala, toyebi ete ozali na elindo.

35 Mpe nsima bobangi monene koleka ekoya likolo na ye; mpe nsima akotubela epayi na bino, mpe akowangana lisusu te ete asali bobomi boye.

36 Mpe nde, akoloba epayi na bino, ete ngai, Nefi, nayebi eloko moko te mpo na oyo etali likambo yango longola se epesamaki epayi na ngai na nguya ya Nzambe. Mpe nde bokoyeba ete nazali moto ya sembo, mpe ete natindami epayi na bino uta na Nzambe.

37 Mpe esalemaki ete bakendaki mpe basalaki, kutu engebene lokola Nefi alobelaki bango. Mpe tala, maloba oyo alobaki ezalaki solo; mpo engebene na maloba yango awanganaki; mpe lisusu engebene na maloba yango atubelaki.

38 Mpe bamemaki ye mpo na kolakisa bosolo ete ye moko azalaki mobomi mpenza, na lolenge ete bato mitano batiamaki na lipanda, mpe lokola ezalaki Nefi.

39 Mpe ezalaki na boko Banefi oyo bandimaki maloba ya Nefi; mpe ezalaki na boko lisusu, oyo bandimaki na ntina ya litatoli ya bato mitano, mpo babongwanaki wana ezalaki bango na boloko.

40 Mpe sikawa ezalaki na boko bato na kati ya bato nyonso, oyo balobaki ete Nefi azalaki profeta.

41 Mpe ezalaki na basusu oyo balobaki: Tala, azali nzambe, mpo longola se soki azali nzambe akokaki te koyeba makambo oyo nyonso. Mpo tala, alobeli biso makanisi ya mitema na biso, mpe lisusu alobeli biso makambo; mpe kutu abimisi na boyebi na biso mobomi ya solo ya mosambisi mokonzi na biso.

Bimisa na lokasa