Makomi
Mormon 1


Buku ya Mormon

Mokapo 1

Amaloni ateyi Mormon mpo na oyo etali masolo ya makomi ya bule—Etumba ebandi kati na Banefi mpe Balamani—Banefi Misato bakamatami mosika—Nkuna, bozangi boyambi, bondoki, bonganga nkisi epanzanaki. Penepene na 321–326 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa ngai, Mormon, nasali lisolo ya makomi ya makambo oyo namonaki mpe nayokaki, mpe nabiangi yango Buku ya Mormon.

2 Mpe penepene na ntango oyo Amaloni abombaki masolo ya makomi mpo na Nkolo, ye ayaki epayi na ngai, (nazalaki penepene na mibu zomi, mpe nabandaki kokoma moto oyo ayekola na lolenge ya boyekoli ya bato na ngai) mpe Amaloni alobaki epayi na ngai: Namoni ete ozali mwana moko ya lokengo, mpe ozali mbangu mpo na kososola;

3 Boye, ntango okozala penepene na mibu ntuku mibale na minei nalingi ete omikundola makambo oyo omonaki mpo na oyo etali bato oyo; mpe ntango okozala na mibuwana kende na mboka ya Atumi, na ngomba moke oyo ekobiangama Simi; mpe kuna nabombisi mpo na Nkolo nkoma nyonso ya bule oyo etali bato oyo.

4 Mpe tala, okokamata bapalaki ya Nefi mpo na yo moko, mpe ndambo etikali okotika na esika wapi ezali; mpe okokoma likolo ya bapalaki ya Nefi makambo nyonso oyo omonaki mpo na oyo etali bato oyo.

5 Mpe ngai, Mormon, lokola nazalaki eboto ya Nefi (mpe nkombo ya tata na ngai ezalaki Mormon), namikundolaki makambo Amaloni atindaki ngai.

6 Mpe esalemaki ete ngai, ntango nakomaki na mibu zomi na moko, namemamaki na tata na ngai kati na mboka moko epayi na sudi, kutu na mboka ya Zalayemila.

7 Etando mobimba ya mboka ekomaki ezipama na bandako ya minene, mpe bato bazalaki na motango mpenza monene, lokola soki ezalaki zelo ya mbu.

8 Mpe esalemaki ete na mobu oyo etumba ebandaki kozala kati na Banefi, oyo bazalaki na Banefi mpe Bayakobi mpe Bayosefe mpe Bazolami; mpe etumba oyo ezalaki kati na Banefi, mpe Balamani mpe Balemuele mpe Bayisamaele.

9 Sikawa Balamani mpe Balemuele mpe Bayisamaele babiangamaki Balamani, mpe biteni mibale oyo ezalaki na etumba ezalaki Banefi mpe Balamani.

10 Mpe esalemaki ete etumba ebandaki na kati na bango na ndelo ya Zalayemila, mpembeni na mai ya Sidoni.

11 Mpe esalemaki ete Banefi basangisaki esika moko motango moko monene ya bato, kutu koleka motango ya nkoto ntuku misato. Mpe esalemaki ete bazalaki na mobu se moko oyo na motango moko ya bitumba, oyo wapi Banefi balongaki Balamani mpe babomaki mingi na bango.

12 Mpe esalemaki ete Balamani batikaki mwango na bango, mpe kimia etiamaki na mboka; kimia etikalaki mpo na ntaka ya penepene na mibu minei, ete bosopi makila ezalaki te.

13 Kasi nkuna epanzanaki likolo ya etando mobimba ya mboka, na lolenge ete Nkolo alongolaki bayekoli balingami na ye, mpe misala ya makamwisi mpe ya bobikisi esilaki na ntina ya masumu ya bato.

14 Mpe makabo uta na Nkolo ezalaki te, mpe Molimo Mosantu moyaki likolo ata ya moko te, na ntina ya nkuna mpe bozangi bondimi na bango.

15 Mpe ngai, ntango nazalaki na mibu zomi na mitano mpe lokola nazalaki mwa moke na makanisi ya lokengo, boye nabimelamaki na Nkolo, mpe namekaki mpe nayebaki bolamu ya Yesu.

16 Mpe nasalaki makasi mpo na koteya epayi ya bato oyo, kasi monoko na ngai mokangamaki, mpe napekisamaki ete nateya epayi na bango; mpo tala batombokaki na Nzambe na bango na motema moko; mpe bayekoli balingami balongolamaki uta na mboka, na ntina ya mabe na bango.

17 Kasi natikalaki na kati na bango, kasi napekisamaki koteya epayi na bango, na ntina ya bokasi ya mitema na bango; mpe na ntina ya bokasi ya mitema na bango mboka elakelamaki mabe mpo na ntina na bango.

18 Mpe bayongoli oyo ya Gadiatoni, baoyo bazalaki na kati ya Balamani, batondaki kati na mboka, na lolenge ete bafandi na yango babandaki kobomba biloko na bango ya motuya na mabele; mpe bikomaki moselu mpo Nkolo alakelaki mboka mabe, ete bakokaki kosimba yango te, soki mpe kokanga yango lisusu te.

19 Mpe esalemaki ete ezalaki na bondoki, mpe bonganga nkisi, mpe soloka; mpe nguya ya moko oyo ya mabe ezalaki kosala likolo ya etando mobimba ya mboka, kutu mpo na bokokisi ya maloba nyonso ya Abinadi, mpe ya Samwele Molamani mpe lokola.

Bimisa na lokasa