Makomi
Mormon 3


Mokapo 3

Mormon abeleli boyamboli epayi ya Banefi—Bazwi elonga moko monene mpe babeti ntolo na bokasi na bango moko—Mormon aboyi kokamba bango, mpe sambo na ye mpo na bango izangi bondimi—Buku ya Mormon ebiangi mabota zomi na mibale ya Yisalaele na kondima nsango malamu. Penepene na mibu 360–362 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete Balamani bayaki lisusu te kobunda kino mibu zomi misusu elekaki. Mpe tala, nasalelaki bato na ngai, Banefi, mpo na kolengelaka mboka na bango mpe manduki na bango mpo na ntango ya etumba.

2 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epayi na ngai: Belela epayi ya bato oyo—Boyambola, mpe boya epayi na ngai, mpe bobatisama, mpe botonga lisusu eklezia na ngai, mpe bokobikisama.

3 Mpe nabelelaki epayi ya bato oyo, kasi ezalaki na mpamba; mpe basosolaki te ete oyo abikisaki bango ezalaki Nkolo, mpe apesaki epayi na bango libaku moko malamu mpo na boyamboli. Mpe tala bayeisaki mitema na bango makasi lisusu na Nkolo Nzambe na bango.

4 Mpe esalemaki ete esilaki mibu zomi oyo koleka, kosalaka, na mobimba, mibu nkama misato na ntuku motoba uta na boyei ya Klisto, mokonzi ya Balamani atindaki mokanda moko epayi na ngai, oyo eyebisaki ngai ete bazalaki komilengela mpo na koya lisusu kobunda na biso.

5 Mpe esalemaki ete nasalisaki bato na ngai basangana bango moko na mboka ya Libebi, na engumba oyo ezalaki na ndelo, na nzela ya nkaka oyo ekambaka na mboka epayi na sudi.

6 Mpe kuna totiaki mampinga na biso, ete tokoka kokanga mampinga ya Balamani, ete bakoka kobotola moko ya bamboka na biso te; boye tomilendisaki mpo na kobunda na bango na makasi na biso nyonso.

7 Mpe esalemaki ete na mobu ya nkama misato na ntuku motoba na moko Balamani bakitaki na engumba ya Libebi kobunda na biso; mpe esalemaki ete na mobu mona tobetaki bango, na lolenge ete bazongaki na bamboka na bango moko lisusu.

8 Mpe na mobu ya nkama misato na ntuku motoba na mibale bakitaki lisusu kobunda. Mpe tobetaki bango lisusu, mpe tobomaki motango moko monene na bango, mpe bakufi na bango babwakamaki kati na mbu.

9 Mpe sikawa, na ntina ya likambo monene oyo bato na ngai, Banefi, basalaki, babandaki komikumisa na makasi na bango moko, mpe babandaki kolapa ndai liboso ya lola ete bakobekola bango moko na makila ya bandeko na bango oyo babomamaki na banguna na bango.

10 Mpe balapaki ndai na lola, mpe lisusu na kiti ya bokonzi ya Nzambe, ete bakokende kobunda na banguna na bango, mpe bakosilisa bango nie na etando ya mboka mobimba.

11 Mpe esalemaki ete ngai, Mormon, naboyaki mpenza, uta na ntango oyo, kozala komanda moko mpe mokambi ya bato oyo, na ntina ya nkuna mpe bonsomo na bango.

12 Tala, nakambaki bango, atako nkuna na bango nakambaki bango mbala mingi mpo na kobunda, mpe nalingaki bango, engebene na bolingo ya Nzambe boye ezalaki kati na ngai, na motema na ngai mobimba; mpe motema na ngai mosopanaki na losambo epayi na Nzambe na ngai na bolayi ya mokolo mobimba mpo na bango; nzokande, ezalaki na kozanga bondimi, na ntina ya bokasi ya mitema na bango.

13 Mpe mbala misato nabikisaki bango uta na maboko ya banguna na bango, mpe bayambolaki uta na masumu na bango te.

14 Mpe ntango elapaki bango ndai na nyonso oyo bapekisamaki kosala na Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto, ete bakomata epayi na banguna na bango mpo na kobunda, mpe bakobekola bango moko na makila ya bandeko na bango, tala mongongo ya Nkolo moyaki epayi na ngai, kolobaka:

15 Bobekoli ezali ya ngai, mpe nakofutisa mpe lokola; mpe lokola bato oyo bayamboli te nsima na ngai kobikisa bango, tala, bakosila nie uta na etando ya mabele.

16 Mpe esalemaki ete ngai naboyaki mpenza komata mpo na kobunda na banguna na ngai; mpe nasalaki kutu lokola Nkolo atindaki ngai; mpe natelemaki lokola nzeneneke moko ya mpamba mpo na komonisa epayi na mokili makambo namonaki mpe nayokaki, engebene na mamonisi ya Molimo oyo atatolaki mpo na oyo etali makambo ekoya.

17 Boye nakomi epayi na bino, baoyo bozali Bayuda-te, mpe lisusu epayi na bino, ndako ya Yisalaele, ntango ekobanda mosala, ete bosila komilengela mpo na kozonga na mboka ya libula na bino;

18 Iyo, tala, nakomi epayi na nsuka nyonso ya mabele; iyo, epayi na bino, mabota zomi na mibale ya Yisalaele, oyo bokosambisama engebene na misala na bino na bazomi na mibale baoyo Yesu aponaki mpo na kozala bayekoli na ye na mboka ya Yelusaleme.

19 Mpe nakomi lisusu epayi na montika ya bato oyo, oyo bakosambisama mpe lokola na bazomi na mibale baoyo Yesu aponaki na mboka oyo; mpe bakosambisama na bazomi na mibale basusu oyo Yesu aponaki na mboka ya Yelusaleme.

20 Mpe makambo oyo Molimo amonisi epayi na ngai; boye nakomeli bino nyonso. Mpe mpo na ntina ya oyo nakomi epayi na bino, ete bokoka koyeba ete nyonso bosengeli koteleme liboso ya kiti ya bosambisi ya Klisto, iyo, moto moko moko oyo azali ya libota mobimba ya bato nyonso ya Adama; mpe bosengeli kotelema mpo na kosambisama na misala na bino, soki ezali malamu to mabe;

21 Mpe lisusu ete bokoka kondima nsango malamu ya Yesu Klisto, oyo bokozwa na kati na bino; mpe lisusu ete Bayuda, bato ya liyokani ya Nkolo, bazwa nzeneneke mosusu likolo ya oyo bamonaki mpe bayokaki, ete Yesu oyo babomaki, azalaki Klisto solo mpenza mpe Nzambe mpenza.

22 Mpe nalingi ete nakoka kondimisa bino nyonso nsuka ya mabele koyambola mpe komilengela mpo na kotelema liboso ya kiti ya bosambisi ya Klisto.

Bimisa na lokasa